Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lmd liteya 1
  • Likambo oyo ekobenda likebi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Likambo oyo ekobenda likebi
  • Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo Yesu asalaki
  • Ndakisa ya Yesu eteyi biso nini?
  • Mekolá Yesu
  • Sololá ndenge bato basololaka
    Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kobanda lisolo na ndenge oyo ekopesa biso nzela ya kopesa litatoli
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • Ndenge ya koyeba kosolola na bato
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Ndenge ya kobanda lisolo mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
Makambo mosusu
Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
lmd liteya 1

NDENGE YA KOBANDA LISOLO

Yesu azali kosolola na mwasi moko na libulu ya mai.

Yoa. 4:​6-9

LITEYA 1

Likambo oyo ekobenda likebi

Etinda: “Bolingo . . . elukaka matomba na yango moko te.”—1 Ko. 13:​4, 5.

Oyo Yesu asalaki

Yesu azali kosolola na mwasi moko na libulu ya mai.

VIDEO: Yesu ná mwasi moko bazali na libulu ya mai

1. Talá VIDEO, to tángá Yoane 4:​6-9. Na nsima talelá mituna oyo elandi:

  1. Makambo nini Yesu amonaki epai ya mwasi yango liboso abanda kosolola na ye?

  2. Yesu alobaki: “Pesá ngai mai ya komɛla.” Mpo na nini ezalaki lolenge malamu ya kobanda lisolo?

Ndakisa ya Yesu eteyi biso nini?

2. Mbala mingi tosololaka malamu na moto soki tobandisi lisolo moko oyo ezali kobenda likebi na ye.

Mekolá Yesu

3. Bongolá lisolo soki esengeli. Koluka kaka te kobanda lisolo na likambo oyo obongisaki. Bandá lisolo na likambo moko oyo bato bazali kolobela. Omituna boye:

  1. ‘Bansango nini bato bazali kolobela?’

  2. ‘Bato ya kartye na ngai, baninga na ngai ya mosala to mpe ya kelasi, bazali kolobela makambo nini?’

4. Saleláká miso. Omituna boye:

  1. ‘Moto yango azali kosala nini? Mbala mosusu azali kokanisa nini?’

  2. ‘Ndenge alati to ndenge azali komonana, ezala mpe ndako na ye, ezali kolobela ngai nini na oyo etali bindimeli mpe mimeseno na ye?’

  3. ‘Oyo ezali mpenza ntango ya malamu ya kosolola na ye?’

5. Yokáká.

  1. Kolobaka mingi te.

  2. Salá ete moto yango abimisa makambo oyo ezali na motema na ye. Soki emonani malamu, tunáká mituna.

TALÁ MPE

Mat. 7:12; 1 Ko. 9:​20-23; Flp. 2:4; Yak. 1:19

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto