Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lmd liteya 2
  • Sololá ndenge bato basololaka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sololá ndenge bato basololaka
  • Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo Filipe asalaki
  • Ndakisa ya Filipe eteyi biso nini?
  • Mekolá Filipe
  • Filipo—Mosakoli ya nsango malamu na molende
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Ndenge ya kobanda lisolo mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Likambo oyo ekobenda likebi
    Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
  • Asakolaki “nsango malamu oyo etali Yesu”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
Makambo mosusu
Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
lmd liteya 2

NDENGE YA KOBANDA LISOLO

Filipe mopalanganisi ya nsango malamu, azali kosolola na moto ya Etiopi oyo azali kotánga rulo wana afandi na likalo na ye.

Mis. 8:​30, 31

LITEYA 2

Sololá ndenge bato basololaka

Etinda: “Liloba oyo elobami na ntango oyo ebongi ezali mpenza malamu!”—Mas. 15:23.

Oyo Filipe asalaki

Filipe mopalanganisi ya nsango malamu, azali kosolola na moto ya Etiopi oyo azali kotánga rulo wana afandi na likalo na ye.

VIDEO: Filipe azali kosakwela Mokube moto ya Etiopi

1. Talá VIDEO, to tángá Misala 8:​30, 31. Na nsima talelá mituna oyo elandi:

  1. Ndenge nini Filipe abandaki lisolo na ye?

  2. Mpo na nini okanisi ete Filipe abandaki lisolo na ye na ndenge ebongi mpe ateyaki moto yango likambo moko ya sika?

Ndakisa ya Filipe eteyi biso nini?

2. Soki tosali ete lisolo ekende ndenge bato basololaka mpenza, yango ekosala ete moto oyo tozali kosolola na ye akakatana te kobimisa makanisi na ye mpo na nsango oyo tomemeli ye.

Mekolá Filipe

3. Saleláká miso. Tokoki koyeba makambo mingi etali moto kaka na ndenge atɛlɛmi, bajɛstɛ azali kosala, to mpe elongi na ye. Moto yango azali mpenza na mposa bósolola? Okoki kobanda lisolo na yo na motuna lokola, “Oyebi ete . . . ?” Koluka te kosolisa moto na makasi soki azali na ye na mposa ya kosolola te.

4. Zalá na motema molai. Kokanisa te ete osengeli kokɔtisa makambo ya Biblia mbala moko kaka ntango obandi lisolo. Zelá libaku ya malamu emonana, wana okokɔtisa yango na ndenge oyo ekobebisa lisolo te. Na bantango mosusu, libaku ya kokɔtisa makambo ya Biblia ekoki mpe komonana te, ekosɛnga ozela tii mbala ya nsima oyo okosolola lisusu na moto yango.

5. Yebá kobongola makambo. Moto akoki kobimisa lisolo oyo okanisaki te. Ekosɛnga olobela likambo moko oyo ekosalisa moto yango, ata soki ezali te likambo oyo yo obongisaki.

TALÁ MPE

Mos. 3:​1, 7; 1 Ko. 9:22; 2 Ko. 2:17; Kol. 4:6

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto