Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lmd liteya 3
  • Boboto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Boboto
  • Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo Yesu asalaki
  • Ndakisa ya Yesu eteyi biso nini?
  • Mekolá Yesu
  • Likambo oyo ekobenda likebi
    Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
  • Tiká “mobeko ya motema boboto” elendisa yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Tólanda komonisa boboto na mokili oyo etondi na mabe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Tomonisa ezaleli na malamu mpo na kosepelisa Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
lmd liteya 3

NDENGE YA KOBANDA LISOLO

Na boboto nyonso, Yesu apusani pene ya mobali moko oyo akufá miso mpo na kobikisa ye.

Yoa. 9:​1-7

LITEYA 3

Boboto

Etinda: “Bolingo ezali . . . na boboto.”—1 Ko. 13:4.

Oyo Yesu asalaki

Na boboto nyonso, Yesu apusani pene ya mobali moko oyo akufá miso mpo na kobikisa ye.

VIDEO: Yesu afungoli miso ya moto oyo akufá-miso

1. Talá VIDEO, to tángá Yoane 9:​1-7. Na nsima talelá mituna oyo elandi:

  1. Likambo nini Yesu asalaki liboso: abikisaki moto yango to asakwelaki ye naino nsango malamu? —Talá Yoane 9:​35-38.

  2. Okanisi nini: mpo na nini likambo oyo Yesu asalaki etindaki moto yango andima koyoka nsango malamu?

Ndakisa ya Yesu eteyi biso nini?

2. Moto akoki kondima na pɛtɛɛ nyonso koyoka nsango oyo tomemeli ye soki amoni ete tozali komitya na esika na ye.

Mekolá Yesu

3. Omityaka na esika ya bato. Meká kokanisa ndenge azali komiyoka.

  1. Omituna boye: ‘Likambo nini ezali kotungisa ye? Likambo nini ekoki kosalisa ye to mpe kosepelisa ye?’ Kosala bongo ekosalisa yo omonisela moto yango boboto na ndenge ebongi mpe na ndenge ya solo.

  2. Yoká moto yango malamu mpo na komonisa ete ozali kotyela ye likebi. Soki ayebisi yo ndenge azali komiyoka mpo na likambo moko to mpe alobeli mokakatano moko oyo azali kokutana na yango, koluka te kobongola lisolo.

4. Lobá na boboto mpe na limemya. Soki omitye na esika ya moto yango mpe olingi mpenza kosalisa ye, yango ekomonana na ndenge na yo ya koloba. Poná na likebi makambo oyo okoloba mpe lobá na mongongo ya malamu. Koloba te makambo oyo ekoki kozokisa ye.

5. Zalá pene ya kosalisa. Luká mabaku ya malamu mpenza mpo na kosalisa moto yango na makambo ya sikisiki. Soki tomoniseli moto boboto, yango ekoki kotinda ye andima kosolola na biso.

TALÁ MPE

Rom. 12:​15, 16; Gal. 6:10; Ebr. 13:16

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto