Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lmd liteya 5
  • Lobá na mayele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lobá na mayele
  • Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo Paulo asalaki
  • Ndakisa ya Paulo eteyi biso nini?
  • Mekolá Paulo
  • “Báluka Nzambe, . . . mpe bázwa ye mpenza”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Komikitisa
    Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
  • Ndenge nini otalelaka bato ya teritware na bino?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Tokozwa boyengebene ya solosolo epai na nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
lmd liteya 5

NDENGE YA KOBANDA LISOLO

Ntoma Paulo azali kosolola na bato ya Atene.

Mis. 17:​22, 23

LITEYA 5

Lobá na mayele

Etinda: “Maloba na bino ezala ntango nyonso kitoko.”—Kol. 4:6.

Oyo Paulo asalaki

Ntoma Paulo azali kosolola na bato ya Atene.

VIDEO: Paulo azali kosakwela bato ya Atene

1. Talá VIDEO, to tángá Misala 17:​22, 23. Na nsima talelá mituna oyo elandi:

  1. Paulo amiyokaki ndenge nini mpo na misala ya mangomba ya lokuta oyo amonaki na engumba Atene?—Talá Misala 17:16.

  2. Na esika apamela bato ya Atene, ndenge nini Paulo asalelaki na mayele bindimeli na bango mpo na kosakwela bango nsango malamu?

Ndakisa ya Paulo eteyi biso nini?

2. Mbala mingi bato bandimaka koyoka biso soki toponi na mayele makambo ya koyebisa bango, ndenge ya koloba yango mpe ntango ya koloba yango.

Mekolá Paulo

3. Poná maloba ya malamu. Na ndakisa, ntango ozali kosolola na moto oyo ayebi makambo ya bakristo te, ekoki kosɛnga ete osalela maloba mosusu mpo na kolobela Biblia to mpe Yesu.

4. Kozala motema mɔtɔmɔtɔ te mpo na kosembola moto. Tiká ye abimisa oyo ye ayebi. Soki alobi likambo moko oyo eyokani te na mateya ya Biblia, koluka kobendana na ye te. (Yak. 1:19) Koyoka moto na likebi ekosalisa yo oyeba makambo oyo andimaka mpe ntina oyo andimaka yango.—Mas. 20:5.

5. Ndimá makanisi na ye oyo ebongi mpe pesá ye longonya. Mbala mosusu moto yango andimaka na motema mobimba ete lingomba na ye eteyaka solo. Luká kolobela libosoliboso makambo oyo bino mibale bozali kondima, mpe na nsima, salisá ye mokemoke ayeba oyo Biblia eteyaka.

TALÁ MPE

Mas. 25:15; 2 Tim. 2:​23-26; 1 Pe. 3:15

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto