Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lmd liteya 6
  • Mpiko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpiko
  • Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo Yesu asalaki
  • Ndakisa ya Yesu eteyi biso nini?
  • Mekolá Yesu
  • Tómekola Yesu—Tósakolaka na mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Osakolaka na mpiko?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • ‘Tóloba Liloba ya Nzambe na mpiko’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Tókoba kosakola liloba ya Nzambe na mpiko
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Makambo mosusu
Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
lmd liteya 6

NDENGE YA KOBANDA LISOLO

Yesu azali kosɛnga Zakai akita na nzete mpe bato bazali kokamwa.

Luka 19:​1-7

LITEYA 6

Mpiko

Etinda: “Nzambe na biso apesaki biso mpiko mpo na kolobela bino nsango malamu ya Nzambe.”—1 Tes. 2:2.

Oyo Yesu asalaki

Yesu azali kosɛnga Zakai akita na nzete mpe bato bazali kokamwa.

VIDEO: Yesu ateyi Zakai

1. Talá VIDEO, to tángá Luka 19:​1-7. Na nsima talelá mituna oyo elandi:

  1. Nini ekokaki kosala ete bato mosusu báboya Zakai?

  2. Atako bongo, nini etindaki Yesu ateya ye nsango malamu?

Ndakisa ya Yesu eteyi biso nini?

2. Tosengeli kozala na mpiko mpo na kosakwela bato ya ndenge nyonso nsango ya Bokonzi.

Mekolá Yesu

3. Tyelá Yehova motema. Elimo ya Nzambe epesaki Yesu nguya ya kosakola, ekoki mpe kosala bongo mpo na yo. (Mat. 10:​19, 20; Luka 4:18) Sɛngá Yehova apesa yo mpiko mpo na kosakola nsango malamu epai ya bato oyo ozali kobanga.—Mis. 4:29.

4. Kokanisela bato mabe te. Tokoki kobanga kosolola na bato mosusu kaka mpo na ndenge oyo bazali komonana, mpo bazali bazwi to babola, lolenge ya bomoi na bango, to mpe mpo na mateya ya lingomba na bango. Kasi kobosana likambo oyo te:

  1. Yehova ná Yesu bakoki kotánga mitema; kasi biso te.

  2. Yehova akoki kosimba motema ya moto nyonso.

5. Zalá na mpiko ná limemya, kasi zalá mpe ekɛngɛ. (Mat. 10:16) Kowelana na moto maloba te. Na limemya nyonso, katá lisolo na moto soki omoni ete azali kosepela te na nsango malamu mpe soki omoni ete ozali na likama.—Mas. 17:14.

TALÁ MPE

Mis. 4:31; Ef. 6:​19, 20; 2 Tim. 1:7

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto