Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lmd liteya 10
  • Zalá na ekateli ya kokómisa moto moyekoli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zalá na ekateli ya kokómisa moto moyekoli
  • Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo Yesu asalaki
  • Ndakisa ya Yesu eteyi biso nini?
  • Mekolá Yesu
  • Zwá liteya na ndakisa ya Nikodeme
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Yesu ateyi Nikodeme na butu
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Salisá bayekoli ya Biblia bázwa ekateli ya kosalela Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Yesu ateyi Nikodeme
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
Makambo mosusu
Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
lmd liteya 10

KOKÓMISA BATO BAYEKOLI

Yesu ná Nikodeme bazali kosolola libanda na butu.

Yoa. 3:​1, 2

LITEYA 10

Zalá na ekateli ya kokómisa moto moyekoli

Etinda: “Tozwaki ekateli ya kopesa bino, kaka nsango malamu ya Nzambe te, kasi mpe bomoi na biso mpenza, mpo bokómaki bandeko na biso ya bolingo.”—1 Tes. 2:8.

Oyo Yesu asalaki

Yesu ná Nikodeme bazali kosolola libanda na butu.

VIDEO: Yesu ateyi Nikodeme

1. Talá VIDEO, to tángá Yoane 3:​1, 2. Na nsima, talelá mituna oyo elandi:

  1. Ekoki kozala mpo na nini Nikodeme amonaki malamu akende kokutana na Yesu na butu?—Talá Yoane 12:​42, 43.

  2. Lokola andimaki kokutana na Nikodeme na butu, ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki na ekateli ya kokómisa bato bayekoli?

Ndakisa ya Yesu eteyi biso nini?

2. Lokola tolingaka bato, tozalaka na ekateli ya kokómisa bango bayekoli.

Mekolá Yesu

3. Yekolá na moto na ngonga mpe na esika oyo ebongi na ye. Mbala mosusu asepelaka na mokolo moko na katikati ya pɔsɔ to mpe na ngonga moko boye na mokolo. Akomiyoka malamu soki ayekoli na esika na ye ya mosala, na ndako na ye, to mpe na esika oyo bato mosusu bakoki komona ye? Soki likoki ezali, salá makasi oyokanisa programɛ na yo ná oyo ya ye.

4. Bóyekolaka mbala na mbala. Soki okozala te, kotika moyekoli mpamba te. Na esika otika ye mpamba, talá nde soki:

  1. Okoki koyekola na ye mokolo mosusu na boumeli ya pɔsɔ yango.

  2. Okoki koyekola na ye na nzela ya telefone to ya video.

  3. Okoki kosɛnga na mosakoli mosusu ayekola na ye.

5. Sɛngá Yehova asalisa yo ozala na makanisi ebongi. Sɛngá Yehova asalisa yo ozala na ekateli ya koyekola Biblia na moto yango, ata soki azali kokoka te koyekola mbala na mbala to mpe kosalela makambo oyo azali koyekola. (Flp. 2:13) Na ntembe te, moyekoli na yo azali na bizaleli mingi ya malamu; sɛngá Yehova asalisa yo otalelaka nde bizaleli yango.

TALÁ MPE

Mas. 3:27; Mis. 20:35; 2 Ko. 12:15

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto