Bato bazali koluka baninga malamu
ELENGE mobali moko azokaki mpota monene na likama ya moto. Ezali bobele nsima ya bamposa mingi ya mpasi makasi nde abandaki kozongela santé, kasi mokemoke. Bongo alobaki boye: “Soko bato nyonso oyo nayebani na bango bazala baninga na ngai, mpasi na ngai elingaki kosila nokinoki.” ‘Bato mingi oyo nayebanaki na bango liboso ya aksida na ngai, batikaki ngai. Kasi baninga malamu bakoki mpenza kosalisa mpo ete maladi esila.’
Likambo yango ezali mpenza komonana mingi kati na mokili na biso oyo boninga ezali se kobunga. Baninga bazali mingi soko makambo nyonso mazali kotambola malamu. Kasi soko likama ekwei, babungi. Mingimingi, ezali mpasi mpo na kozwa baninga ya solo.
Nzokande, mwa baninga ya solo bakoki kobongola bomoi. Bato bakoyekolaka likambo yango bandimi ete: “Mposa ya kosala boyokani makasi na moto mosusu ezali moko na mabanzo maleki minene na ntango na biso.” Mpe lisusu, na kolandaka lisese moko ya kala, “ezali na ntango ya mpasi nde bakoyebaka moninga malamu”.
Na kala bato bazalaki kosepela na bazalani na bango mpe bazalaki pene mpo na kosalisa baninga to bato ya pembeni. Kasi uta Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, eleko oyo ebongolaki makambo nyonso, boyokani kati na bato ezali kobeba. Sikawa, kozanga botondi, ezaleli ya kozanga kotalela mayoki ya baninga mpe ezalela ya komitya na esika ya liboso, yango nde ezali komonana.
Ezalela ya mawa motindo oyo esakolamaki esili koleka sikawa bikeke 19 na maloba oyo: “Na mikolo ya nsuka, ekozala mpasi mpo na kozala moklisto. Mpamba te bato bakozala baimi mpe bakolinga mbongo; bakozala na lolendo mpe bakomitombola, bakoseka Nzambe, bakozanga botosi mpe kozanga botondi epai na baboti na bango, mpe bakozala mpenza mabe. Bakozala motó makasi, mpe bakolinga koyokela moto te, bakozala bakosi mpe bakobimisa mobulu, ezaleli ya mbindo ekobangisa bango te. Bakozala motema makasi mpe bato na nko mpe bakozala koseka baoyo bakomeka kozala bato malamu. Bakobanda kotekisa baninga na bango.” (2 Timote 3:1-4, ebongolami uta Biblia Le Livre, éditions Farel).
Ezali mawa solo, kasi makambo yango mazali kosalema lelo oyo! Na makambo motindo boye, elikya ya kozwa baninga ya solo etikali bobele moke. Ata bongo, na mikolo na biso, tokoki kozwa baninga ya solo, oyo bazali mpenza na motuya! Baninga bazangi te soko mpenza tozali na mposa ya lisalisi, ya batoli, ya elendiseli mpe boninga ya solo. Kasi libosoliboso, ezali na ntina mingi ya kokesenisa baninga ya solo na baninga ya lokuta.
“Baninga” nyonso bazali baninga ya solo te
Elenge mobali oyo asalaki aksida, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, azalaki kobeta na ekipe moko ya ndembo mpe azalaki na “baninga” ebele. Kati na basangani ya ekipe moko to basangani ya masangá mosusu ya mikemike, boyokani malamu ezali kosalema, kasi yango ezali ntango nyonso “boninga” oyo mpenza ekoki koumela te. Mpe lisusu, lokola elenge mobali oyo amonaki yango, kozala na “baninga” mingi mpe kobungisa bango na nsima, ezali likambo moko ezali kolembisa. Ezali likambo ya petee mpo na koyebana na bato, kasi ezali mpasi mpo na kotonga boninga ya solo.
Bato bazali na mbongo to baoyo bazali na bomoi malamu bakoki kozala na “baninga” mingi. Lokola Biblia elobi yango, “mozwi azali na baninga mingi”. Endimi lisusu ete: “Bato mingi bakolombaka ngolu na mokolo; bato nyonso bazali baninga na moto na makabo.” (Masese 14:20; 19:6) Kasi mingi kati na bango bazali na makanisi mabe, boye te? Soko bato oyo bazali na baninga mingi batikali lisusu bazwi te to na makoki te, baninga na bango nyonso bakobunga lokola molinga.
Bato oyo bazali kitoko, bango mpe, bazalaka na “baninga” mingi oyo babendami mpo na kitoko. Kasi “boninga” motindo oyo ekoki kozala mpenza mabe mpe kolimwa kati na mpasi lokola londende na móto. Tala mpo na nini osengeli mpenza . . .
Koyeba kopona
Ya solo, esengeli kopona malamu baninga na yo. Baninga mabe bazali mbala mingi basengi minene oyo bakoluka kondimama epai na yo mpo na kozwa litomba. “Moto oyo akobenda mozalani na ye na maloba kitoko azali kotyela ye mokila na makolo.”—Masese 29:5.
Mpo na yango, talela malamumalamu baoyo bazali baninga na yo ya sikawa. Bazali kopusa yo ete osala malamu to mabe? Bazali baimi, bato na motó makasi mpe bazali komitombola? Bazwaka bikateli kozanga kokanisa mpe balingaka komitya na likama? Ezaleli na bango ezali ndenge nini liboso na basi to soko bazali basi, ezaleli na bango ezali ndenge nini liboso na mibali? Bazali na botosi mpe na limemya, to bazali na ezaleli ya bongo na bongo, to bato bamipesi na pite? Osili komona ete baninga na yo bazali mpenza bato na lokuta, ete okoki te koyebisa bango sekele? Bazali komela makaya makasi? Bazali komela masangá? Soki ee, ozali na likama. Mpo na yo, mbala mosusu ozali na ezaleli malamu, ozali peto mpe na kosokema, kasi omikundola ete “baninga mabe bakobebisaka bizaleli malamu”.—1 Bakolinti 15:33.
Ntango moto azali na baninga mabe, akoki mpenza komekola bango. Mokemoke, mbala mosusu kozanga koyeba, bizaleli na bango mpe makanisi na bango ekoki kokotela yo. Biblia elobi ete: “Ye oyo akotambola na bato na mayele akozala na mayele, nde motamboli elongo na bazoba akobukana.”—Masese 13:20.
Okoki mpenza komikosa ntango ozali kozwa baninga. Kasi kolemba te. Mokili ezali naino na bamilió na bato oyo bazali malamu mpe oyo bakoki kokoma baninga na yo. Mpo na yango, ndenge nini okoki kozwa baninga malamu?
[Elilingi na lokasa 4]
Baninga na yo bazali na bopusi makasi likoló na yo