Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/6 nk. 22-24
  • Mituna na batangi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna na batangi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Masolo mosusu
  • Gehena ezali esika oyo bato banyokwamaka na mɔtɔ?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Laki ya mɔto ezali nini? Ezali ndenge moko na lifelo to na Gehena?
    Biyano na mituna ya Biblia
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/6 nk. 22-24

Mituna na batangi

◼ Mpo na nini Yesu alobaki ete bato bazalaki koyamba lingomba ya Bafalisai ‘bazalaki bana na Geena mbala mibale’ koleka Bafalisai bango moko?

Tokoki kokanisa ete bapakano oyo bazalaki komibongola na lingomba ya Bafalisai, lingomba ya boyuda, bazalaki na etamboli mabe mpenza. Bamoko kati na bango, oyo basilaki koboyama na Nzambe, bazalaki lisusu koboyama mbala mibale na ndenge bamibongolaki na losambo ya Bayuda; bazalaki kokenda na libebi kati na Geena.

Lobwaku na Hinnom ezalaki na sud-ouest ya bifelo milai ya Jerusalem. Na bileko bikeseni, losambo ya bikeko ezalaki kosalema na esika yango mpe bato bazalaki kopesama na mabonza. (2 Ntango 28:1-3; 33:1-6; Yilimia 32:35) Yango wana ekomaki esika bakobwakaka matiti mpe bibembe ya babomi oyo bakokaki te kozwa lokumu ya kokundama mpe kosikolama mokolo mosusu.​—Tala Matai 5:22.

Engebene le Nouveau Dictionnaire biblique (J. Douglas, 1962. Angl.), lobwaku na Hinnom ezalaki na libanda na Yelusaleme, na esika oyo bana batumbamaki na moto lokola mabonza epai na Moleke. Na nsima, lobwaku ekomaki elilingi ya libebi na ndenge ya esakweli mpe lisusu elilingi ya etumbu ya nsuka. Mojésuite moko, John Mckenzie, abakisi boye kati na Diksionele na ye ya Biblia (1965 Angl.): (Etumbelo na yango esalemaki mpo na kotumba bato bapesami mabonza) etindaki Yilimia alakela mabe na lobwaku yango, asakolaki ete esika yango ekokoma esika ya liwa mpe ya libebi (7:32; 16:9) Kati na Yisaya 66:24, balobeli yango, kozanga kotanga nkombo na yango, lokola esika bakotya bibembe ya baoyo batombokeli Yawe. . . . Kati na Makomami ya bakonzi na mangomba na Bayisraele, eyebani solosolo le soko moto na seko elimboli libebi ya seko. . . . (Geena) ezali esika bakobomaka nyee molimo mpe nzoto ya bato mabe, yango ekundoli mbala mosusu likanisi ya koboma libela. (Mat 10:28)”

Na kotangaka masolo mazwami kati na Matai 15:1-8 mpe Yoane 8:12-19, 31-41; 9:13-34; 11:45-53, tokozala na likoki ya koyeba mpo na nini Yesu alobaki ete Bafalisai basengelaki kobomama nyee, oyo ezalaki elilingi ya Geena. Ya solo, bamoko bakokaki komibongola mpe kondimama na Nzambe, kasi na kotalelaka bango lokola etuluku basengelaki solo kobomama mpo na libela. Klisto alobaki: “Mawa na bino, bakomeli mpe Bafalisai, bakosi! Mpamba te bokoleka maimonene mpe lisobe mpo na kobongola moto moko motema nde wana akobongwana, bokokomisa ye mwana na Geena koleka bino mbala mibale.”​—Matai 23:25.

Wana ezali makambo oyo makoki koyebisama mpo na Bafalisai Bayuda. Kasi mpo na nini baoyo bazalaki koyamba losambo na bango ‘bazalaki kokoma bana na Geena mbala mibale’ koleka Bafalisai? Tokundola ete Bapakano yango bazalaki kosuka te bobele na kolanda makanisi ya Bayuda, to komibongola mpe kokatisa ngenga (Luka 7:2-10; Malako 7:24-30; Misala 8:26-34; 10:1, 2) Te, Yesu azalaki kolobela mpo na bábongwáni na losambo na boyuda te, kasi mpo na babongwani na losambo na Bafalisai bakosi. Bálándi yango ya Bafalisai bazalaki mpenza banani?

Bamoko kati na bango bazalaki mbala mosusu basumuki minene to bato bamipesaki na losambo na badémons, mpe mpo na yango baboyamaki makasi na Nzambe. Mbala mosusu bamoko bakomaki bana na Geena mpo basalelaki elimo santu na Nzambe lisumu, (Matai 12:32) Kasi ata soko boyokani na bango na Jéhovah ebebaki te kino motindo yango, ata bongo ezalaki lisusu kobeba makasi ntango bazalaki komikotisa na banzela mabe ya Bafalisai. Bato yango bazalaki bongo komipesa na milulu ya bokosi mpe bazalaki kolekisa ndelo na makambo na bango na komimonisaka bato malamu mpe bato na solo koleka bayambi mosusu ya losambo na boyuda. Tokoki bongo kokanisa ete Bayambi yango ya losambo na Bafalisai bazalaki kolekisa ndelo koleka ata Bafalisai bango moko. Na yango, soko Bafalisai ‘bazalaki bana na Geena’, balandi na bango balekaki bango to, lokola Yesu alobaki yango, bazalaki bana na Geena mbala mibale koleka.

[Karte/​Elilingi na lokasa 31]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

CARTE YA YELUSALEME NA EKEKE YA LIBOSO

ESIKA TEMPLE EZALAKI

LOBWAKU NA HINNOM

(GEENA)

[Elilingi]

Eteni ya lobwaku na Hinnom ndenge ezali lelo oyo

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto