Mituna na batangi
◼ Engebene bayekoli mosusu ya Blblia, liloba “nkamba” esengeli kozala na esika ya liloba “kamela” na Matai 19:24, epai tozali kotanga boye: “Koingela na kamela na liso na ntonga eleki bolembu na koingela na mozwi kati na Bokonzi na Likolo.” Wapi liloba oyo ekoki na esika yango?
Bayekoli mosusu ya Biblia bazali kokanisa ete maloba yango ya Yesu makomamaki liboso na Araméen. Nzokande, liloba esalemi na monoko yango (gamla) ekoki kolimbola “chamo”. Nzokande na kotalelaka lisolo yango mobimba, tokoki mpe kolya na esika yango, maloba lokola “nkamba monene to nzete.” Kasi soki tolandi maloba ya Papias de Hiérapolis, oyo mbala mosusu azalaki na bomoi na eleko ya ntoma Yoane, Matai akomaki mokanda na ye na hébreu, kasi na Araméen te, bongo na nsima abongolaki yango na greke. Na ndenge yango, lokola liloba na hébreu ebongolami na chamo (gamal) ekeseni mpenza na maloba ebongolami na nkamba to nsinga (heʹvél, ‘avoth), Matai akokaki mpenza kosalela liloba na greke oyo esengelaki.
Makomi na greke oyo na kala mpenza mpe oyo tokoki kondimela (le Sinanticus et le Vaticanus 1209) ezali na liloba kamelos, oyo elimboli chamo. Liloba yango moko esalelami mpe na Matai 23:24, esika oyo na kozanga ntembe mpenza elobeli mpo na ”chamo”.
Nsima na bikeke, bamoko bamekaki kokitsa bokasi ya elakiseli na Yesu. Bamoko babongolaki mpenza na ndenge na bango makomi ya bulee. Makomi na greke makomamaki liboso na ekeke ya 5 mazali na liloba ekokani na yango, kamilos. Liloba yango esalelamaka mingi te elimboli “nkama, nsinga bakokangelaka masuwa. Engebene Lekzike Greke-Anglais ya Kondimana na Sika (Angl.) ya Arndt mpe Gingrich, liloba yango “ezali na esika te kati na Kondimana na sika”. Westcott mpe Hort balobi ete ezali Cyrille d’Alexandrie moto abongolaki yango. Moklisto yango ya ekeke ya 5 alobaki ete liloba esalelami na Matai (kamelos) ekokaki kolimbola cable. Alobaki: “Batambwisi ya masuwa oyo bameseni na mosala na bango bazali na ezaleli ya kobenga basinga ya minene ‘chamo’. “Kasi Westcott mpe Hort balobi boye na ntina ya likambo: “Ezali lokuta.”
Engebene mokanda moko ya mitindami, kolobela chamo monene oyo azali komeka koleka na lidusu ya ntonga moke “ezali kolekisa ndelo esalemaka mingi na orient.” Nkutu, tala oyo tokoki kotanga na Talmud ya Babilonyé na ntina ya bato oyo bayebanaki mpo na mayele na bango mpe bazalaki kosala makambo oyo emonanaki ete ekoki kosalema te: “Bazali komeka kolekisa nzoku na lidusu ya ntonga.” Yesu asalelaki bongo elilingi moko emesanaki na bato ya Orient mpo na komonisa polele na lisalisi ya ndakisa ete likambo boye ekoki kosalema te. Na yango, ezali mpenza mpasi mpo na kolekisa eloko nyonso ya monene na lidusu ya ntonga-ezala nkamba, chamo to nzoku.
Yesu alobaki te ete mozwi akoki kozwa bomoi ya seko te; na yango, mwa bato bazalaki na bozwi bakomaki bayekoli na ye, (Matai 27:57; Luka 19:2, 9; Yoane 19:38, 39) Kasi liboso ete aloba ‘maloba yango ya makasi’ elenge moko mozwi alekisaki mabaku minene ya elimo mpo alingaki ‘bozwi na ye’. (Matai 19:16-22) Mozwi nyonso akomonisa elimo motindo yango akoki kozwa bomoi ya seko te. Ezali se na lisalisi ya Nzambe nde akobongwana mpe akozwa lobiko oyo ekoki kozwama na nguya na Nzambe.—Matai 19:25, 26.