Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/5 nk. 29-31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Masolo mosusu
  • Mituna na batangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Koyokisa elimo santu ya Yehova mawa te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Elimo na Jéhovah ezali kokamba libota na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • ‘Na nkombo na elimo santu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/5 nk. 29-31

Mituna ya batángi

• Lokola elimo santu ezali moto te, ndenge nini tokoki koyokisa yango mawa?

Ezali ntoma Paulo moto akomaki ete: “Bóyokisaka elimo santu ya Nzambe mawa te.” (Baefese 4:30) Bato mosusu balobaka ete maloba yango ezali komonisa ete elimo santu ezali moto. Kasi, mikanda ya “kapita ya sembo” emonisaka mbala na mbala makanisi ya Biblia mpe makambo mosusu ya kala oyo ezali komonisa ete baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kokanisa te ete elimo santu ezali moto to ete ezali nzambe oyo akokani na Oyo-Aleki-Likoló, ndenge liteya ya Bosato elobaka yango.a (Luka 12:42) Na bongo, Paulo alingaki koloba te ete elimo santu ya Nzambe ezali moto.

Elimo santu ezali nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala. (Genese 1:2) Yesu asengelaki kobatisa “na elimo santu,” kaka ndenge Yoane azalaki kobatisa na mai. (Luka 3:16) Na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), bayekoli pene na 120 “batondaki na elimo santu”; ezali polele ete batondaki na moto te. (Misala 1:5, 8; 2:4, 33) Bapakolami yango bazwaki elikya ya kokende na likoló, mpe elimo santu ya Nzambe esalisaki bango bátikala sembo tii liwa na bango. (Baloma 8:14-17; 2 Bakolinti 1:22) Elimo yango ebotaki mbuma, elingi koloba bizaleli malamu mpe esalisaki bango báboya “misala ya mosuni” to masumu oyo ekokaki kotinda Nzambe aboya bango.​—Bagalatia 5:19-25.

Basaleli ya Nzambe oyo tozali na elikya ya kozwa bomoi ya seko awa na mabelé topakolami na elimo santu ya Nzambe te. Atako bongo, tokoki kozwa elimo ya Nzambe ndenge moko na baoyo bazali na elikya ya kokende na likoló. Na yango, biso mpe tokoki koyokisa elimo santu mawa. Ndenge nini?

Soki tozali kobosana toli ya Biblia oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu, tokoki kokolisa bizaleli oyo ekotinda biso tósalela elimo masumu na nko, bizaleli oyo ekotinda Yehova aboya biso, mpe na nsuka tóbomama. (Matai 12:31, 32) Ekoki kozala ete tozali naino kosala lisumu ya monene te, kasi tokómi na mimeseno ya mabe oyo, nsukansuka ekolongola biso na nzela oyo elimo ezali kolakisa biso. Na ntango wana, tozali koyokisa elimo santu mawa.

Kasi, ndenge nini tokoki koboya koyokisa elimo ya Nzambe mawa? Na ntembe te tosengeli kobatelaka makanisi mpe kokeba na misala na biso. Na mokanda ya Baefese mokapo 4, ntoma Paulo apesaki toli ya koboya lokuta, nkanda makasimakasi, gɔigɔi, mpe maloba ya mbindo. Nini ekosalema soki nsima ya kolata “bomoto ya sika,” tozali lisusu kozongela makambo ya ndenge wana? Yango ekomonisa ete tozali kolanda te toli ya Biblia, Liloba ya Nzambe. Soki tosali bongo, tokoyokisa elimo santu mawa.

Na Baefese mokapo 5, tozali kotánga toli ya Paulo ya koboya kotya makanisi na makambo ya pite. Lisusu, ntoma Paulo apesaki baninga na ye bandimi toli ete báboya etamboli ya nsɔni mpe kosala masɛki na makambo ya nsɔni. Soki tolingi koyokisa elimo santu ya Nzambe mawa te, tosengeli kobosana toli yango te ntango tozali kopona masano. Tosengeli te kosepelaka na makambo ya ndenge wana, na ndakisa kolobela yango, kotánga mikanda oyo ezali kolobela yango, mpe kotala yango na televizyo to na bisika mosusu.

Tokoki mpe koyokisa elimo mawa na makambo mosusu. Elimo ya Yehova etyaka bomoko na kati ya lisangá. Kasi ekozala boni soki, na ndakisa, tozali kotɔnga bandeko mosusu to kolendisa ezaleli ya kosala mwa bituluku na lisangá? Ekomonisa mpenza ete tozali kotɛmɛla elimo oyo ezali kolinga kotya bomoko na lisangá. Na ntembe te tokoyokisa elimo santu mawa, lokola kaka baklisto mosusu oyo bazalaki kokabola bandeko na lisangá ya Kolinti. (1 Bakolinti 1:10; 3:1-4, 16, 17) Lisusu, tokoyokisa elimo mawa soki tozali koboya kotosa bandeko oyo elimo santu eponi bango mpo na kokokisa mikumba na kati ya lisangá.​—Misala 20:28; Yuda 8.

Na bongo, ezali malamu tótalela makanisi mpe misala na biso na kolanda litambwisi ya elimo santu, ndenge emonisami na kati ya Biblia mpe na lisangá ya boklisto. Tiká mpe ‘tóbondelaka na elimo santu’ mpe tótika ete nguya na yango etambwisa biso mpo tósalaka makambo eyokani na Liloba ya Nzambe oyo epemami na elimo santu. (Yuda 20) Tózwa mokano ya koyokisa elimo mawa te, kasi ya kotika ete yango etambwisa biso mpo na lokumu ya nkombo mosantu ya Yehova.

• Yesu Klisto alobaki ete mokakatano ya moto ya bomɛngo mpo na kokɔta na Bokonzi ya Nzambe ezali lokola kamela oyo ezali komeka kokɔta na lidusu ya ntonga. Yesu azalaki nde kokanisa kamela mpe lidusu ya ntonga ya solo mpenza?

Na bavɛrsɛ misato oyo elobeli lisolo yango, mibale elobi ndenge moko mpenza. Lisolo ya Matai emonisi ete Yesu alobaki boye: “Koleka ya kamela na lidusu ya ntonga ezali mpenza pɛtɛɛ mingi koleka kokɔta ya moto ya bomɛngo na bokonzi ya Nzambe.” (Matai 19:24) Ndenge moko mpe, Malako 10:25 elobi boye: “Koleka ya kamela na lidusu ya ntonga ezali mpenza pɛtɛɛ mingi koleka kokɔta ya moto ya bomɛngo na bokonzi ya Nzambe.”

Babuku mosusu oyo elimboli maloba ya Biblia emonisi ete “lidusu ya ntonga” ezalaki mwa porte ya moke oyo ezalaki na kati ya porte moko ya monene ya Yelusaleme. Soki bakangi porte ya monene na butu, bakokaki kofungola porte wana ya moke. Balobaka ete kamela ekokaki koleka na mwa porte wana. Yesu azalaki nde kolobela porte wana?

Ekoki kozala bongo te. Yesu alobelaki lidusu ya ntonga mpenza. Na bamboka wana, bato ya mayele oyo balukaka biloko ya kala bamonaki bantonga ya kalakala esalemi na mikwa to na mabende; yango emonisi ete bazalaki kosalela yango mingi na bandako na bango. Vɛrsɛ ya Luka 18:25 ezali kosilisa kokakatana nyonso oyo tokokaki kozala na yango mpo na koyeba ndimbola ya maloba ya Yesu, mpamba te yango elobi ete Yesu alobaki boye: “Ya solo, koleka ya kamela na lidusu ya ntonga ezali mpenza pɛtɛɛ mingi koleka bokɔti ya moto ya bomɛngo na bokonzi ya Nzambe.”

Balimboli mingi ya maloba ya lokota bandimaka ete esengeli kobongola maloba wana na “lidusu ya ntonga,” ndenge ebongolami na Libongoli ya mokili ya sika. Liloba ya Grɛki (rhaphis) oyo ebongolami ‘ntonga’ na Matai 19:24 mpe na Malako 10:25 euti na verbe moko oyo elimboli “kotonga.” Lisusu, liloba ya Grɛki (bélonê) oyo ezali na Luka 18:25 esalelamaka mpo na kolobela ntonga oyo minganga batongaka na yango mpota. Diksionɛrɛ Vine’s Expository Dictionary of Old and New Testament Words, 1981, Volimi 3, lokasa 106 elobi ete: “Likanisi ya koloba ete ‘lidusu ya ntonga’ ezali porte ya moke ezali ya sika mpenza, eloko moko te emonisi ete na ntango ya kala bazalaki kosalela yango na ndimbola wana. Likanisi ya nkolo ezalaki ya komonisa likambo oyo moto akoki kosala te mpe ntina ezali te ya kolɛmbisa mokakatano yango mpe kolimbola lidusu ya ntonga na eloko mosusu na esika ya kolimbola yango na ntonga mpenza.”

Bato mosusu balobaka ete na bavɛrsɛ wana, liloba oyo babongoli “kamela” esengeli kobongolama “nsinga.” Liloba ya Grɛki oyo ebongolamaka na nsinga (kamilos) ekokani mwa moke na liloba mosusu ya Grɛki (kamêlos) oyo ebongolamaka na kamela. Kasi, na bamaniskri ya kala ya Evanzile ya Matai (Sinaiticus, Vaticanus 1209, mpe Alexandrinus) basaleli nde liloba ya Grɛki oyo elimboli “kamela” na Matai 19:24, kasi te liloba oyo elimboli “nsinga.” Balobaka ete Matai akomaki Evanzile na ye libosoliboso na Liebele mpe mbala mosusu abongolaki yango ye moko na Grɛki. Na ntembe te, ayebaki malamu likambo oyo Yesu azalaki kolobela mpe asalelaki liloba oyo ebongi mpenza.

Na bongo, Yesu alobelaki ntonga mpe kamela mpenza. Asalelaki elilingi wana mpo na komonisa likambo oyo ekoki kosalema te. Kasi, Yesu alingaki nde koloba ete moto ya bomɛngo ata moko te akokota na Bokonzi? Te, mpamba te maloba ya Yesu ezalaki na ndimbola ya elilingi. Asalelaki maloba ya elilingi ya kolekisa ndelo mpo na komonisa ete ndenge kamela ekoki te kokɔta na lidusu ya ntonga, ndenge moko mpe ezali mpasi mpo moto ya bomɛngo akɔta na Bokonzi, soki azali komipesa mingi na bozwi na ye mpe azali te kotya Yehova na esika ya liboso na bomoi na ye.​—Luka 13:24; 1 Timote 6:17-19.

Yesu alobaki likambo yango ntango elenge mozwi moko alekisaki libaku monene ya kokóma moyekoli ya Yesu. (Luka 18:18-24) Moto ya bomɛngo oyo alingi bozwi na ye mingi koleka makambo ya elimo, akoki kolikya te kozwa bomoi ya seko na Bokonzi ya Nzambe. Atako bongo, bato mosusu ya bozwi bakómaki bayekoli ya Yesu. (Matai 27:57; Luka 19:2, 9) Na bongo, Nzambe akoki kobikisa moto ya bozwi oyo ayebi mpenza bobola na ye ya elimo mpe azali koluka lisalisi na ye.​—Matai 5:3; 19:16-26.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá mwa buku Osengeli kondima Trinité? ebimisamaki na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto