Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/8 nk. 9-14
  • Jéhovah, azali nguya na biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Jéhovah, azali nguya na biso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ‘Mboka na mabota na yauli’
  • Nzembo na esengo ata moko te kati na “Babilone”
  • Liziba ya solo ya kimya
  • Esengo na baoyo bazali kotambola na pole
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Lobɔkɔ ya Yehova ekómi likoló
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
  • Totya motema epai na Jah Jéhovah!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mokanda ya Biblia nimero 23—Yisaya
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/8 nk. 9-14

Jéhovah, azali nguya na biso

“Jéhovah azali nguya na ngai mpe makasi na ngai.”​—YISAYA 12:2.

1. (a) Mpo na nini ba Témoins de Jéhovah bakeseni na mabota mosusu? (b) Na maloba nini Yisaya 12:2 elobeli makambo, oyo Jéhovah asali mpo na libota na ye?

OYANGANAKA: na makita oyo ba Témoins de Jéhovah basalaka na ba Salles du Royaume na bango? Libota oyo eyanganaka kuna ekeseni na mabota mosusu. Libota yango ezali nini, mpe mpo na nini ekeseni na mosusu? Ezali bongo libota ya Nzambe, mpe ekeseni mpamba te ezali komema nkombo eleki lokumu na bankombo nyonso, oyo ya Mozalisi monene ya biloko bitondi na molongo. Nkombo yango ezali na biso, mpe ezali na nkombo ya Nzambe ete tozali koyangana na esengo mpo na kokabola bilei kitoko ya elimo oyo epesami “na ntango ekoki” na nzela na lisangá na ye. (Luka 12:42) Botondi na biso na ndenge tozali ba Témoins de Jéhovah, etindi biso tokumisa nkombo eleki monene ya Nzambe na kozongelaka maloba oyo mazwami na Yisaya mokapo 12, verset 2: “Tala, Nzambe azali lobiko na ngai, ngai nakotya elikya epai na ye mpe nakobanga te, mpamba te Jah, Jéhovah azali nguya na ngai mpe makasi na ngai, ye akomi mpe lobiko na ngai.” Nzambe na biso abikisi biso na mimekamo mingi. Sikawa lobiko na biso ya nsuka ebelemi, mpe yango ekouta epai na Jah Jéhovah.

2. (a) Mbala boni, mpe epai wapi elobeli “Jah Jéhovah emonani kati na Biblia? (b) Liloba na hébreu ebongolami na “makasi” kati na Yisaya 12:2 ekoki lisusu kobongolama na liloba nini, mpe mpo na nini liteya yango ekoki mpenza?

2 Elobeli “Jah Jéhovah”, esika oyo nkombo ya Nzambe ezongelami mbala mibale, emonani se mbala mibale kati na Biblia: na Yisaya 12:2 mpe na Yisaya 26:4. Bible Crampon-Tricot, yango mpe ezongeli nkombo oyo mbala mibale na kobongolaka mokapo ezwami na Yisaya 12:2 na elobeli “Yah, Yahweh”. (Tala Darby.) Na note moko na nse na lokasa mpo na Yisaya 12:2, Traduction du monde nouveau, ebimeli ya Lingelisi oyo ezali na mitindami, etindi na liteya oyo elobi ete liloba na hébreu oyo ebongolami na “makasi” ekoki kobongolama na “loyembo” to “lisanzoli”. Ya solo, Mozwi-na-Nguya-Nyonso Jah Jéhovah, oyo azali kopesa nguya mpe makasi epai na basambeli na ye, akoki mpo na koyembelama epai na basambeli na ye!​—Yisaya 40:28-31.

3. (a) Likoki nini Jah Jéhovah apesaki epai na bato, mpe na nzela nini? (b) Maloba na Paulo mazwami kati na Baloma 11:33-36 mazali kotinda ba Témoins de Jéhovah ete basala nini?

3 Nguya na Jéhovah etyami bokatikati na mayele na ye, boyengebene na ye mpe bolingo na ye. Jah Jéhovah amonisaki bizaleli yango ya bonzambe na kopesaka epai na bato oyo bazali na kondima likoki ya kozwa lobiko na nzela na mbeka na Yesu. Yango wana ntoma Paulo angangaki: “Ee, bozwi mpe boyebi mpe bososoli na Nzambe ezali na bozindo boni! Bikateli na ye bikoki koyebana ntina te; bilekelo na ye ekomonana nzela te. Mpo ete, Nani ayebi motema na Nkolo? Nani azali moyebisi na ye? Nani apesi likabo epai na ye liboso ete afutama na ye nsima? Mpamba te biloko nyonso biuti na ye, bizali na ntina na ye, bizali mpo na ye. Nkembo ezala na ye libela na libela. Amen.” (Baloma 11:33-36) Na yango, esengeli na biso mpenza tokangama libela na Jah Jéhovah, Nzambe na biso mpe Nkolo Moyangeli Mozwi-na-Nguya-Nyonso, mpe tosakola elikya nyonso oyo tozali na yango epai na ye.​—Tala Baebele 3:14.

4. (a) Mpo na nini Yisaya akokaki mpenza koloba: “Nakotya elikya epai na ye mpe nakobanga te”? (b) Mpo na nini basaleli na Jéhovah bakoki mpenza kotya elikya epai na Jah Jéhovah na ekeke oyo ya 20?

4 Yisaya azalaki na bantina ya koloba: “Nakotya elikya epai na ye mpe nakobanga te.” Na nsima, mosakoli ayaki koyeba misala na lobiko ya Nzambe, mpamba te amonaki ndenge Jéhovah akokisaki liloba na Ye na koyokisaka nsoni na Asulia, mpe na mokonzi na yango oyo azalaki lolendo mingi, Senakeribe. Na butu moko, anzelu moko atindamaki na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, Jéhovah, abomaki basoda na Asulia 185 000. Soko likambo monene boye ekokaki kosalema, ezalaki mpo ete mokonzi Ezekiase mpe bafandi nyonso na Yuda batyaki elikya na bango epai na Jah Jéhovah. (Yisaya 37:6, 7, 21, 36-38) Na ekeke ya 20, Jéhovah asili mpe kobikisa libota na ye na komekama, bipekiseli, miyokoli mpe ba camps ya concentration. Lokola Baasulia oyo bamitombolaki makasi na eleko na Yisaya, ndenge moko mpe mokonzi monazi Adolf Hitler afingaki ba Témoins de Jéhovah; mokolo mosusu, alobaki boye: “Mwa liboke ya bato oyo bakosila na Allemagne.” Nzokande, ezali Hitler mpe banazi na ye nde basilaki; mpe sikawa, etuluku moke ya Batemwe Baalemá oyo batyaki elikya epai na Jéhovah basili kokola kino kokoma etuluku monene eleki bato 121 200.​—Nzembo 27:1, 2; Baloma 8:31, 37.

5. Ndenge nini maloba mazwami kati na Yisaya 12:3-5 mazali kokokana na basaleli na Jéhovah na eleko na biso?

5 Wana monyokoli ekwei, ata na esika nini, basaleli na Jéhovah, oyo bazali na elikya epai na ye, bazali kozwa makasi na mai na solo oyo ya lobiko. Yango wana mosakoli na Nzambe alobaki kati na Yisaya 12:3-5: “Na esengo bokotoka mai na maziba na kobikisama. Na mokolo yango bokoloba ete, Botonda Jéhovah, bobyanga nkombo na ye, boyebisa misala na ye kati na mabota, bosakola ete nkombo na ye ezali kokumisama. Yembela Jéhovah nzembo, mpamba te asali misala na nkembo, oyo eyebani na mokili mobimba.” Tika ete tomela ntango nyonso mai na solo na Bokonzi mpe tokumisa nkombo ya Nkolo Moyangeli Jéhovah na botondi nyonso! Wana etye biso elikya nyonso epai na Jéhovah, ‘tosakola liloba; tosala yango na etingya na bileko malamu mpe na bileko na mpasi’. (2 Timote 4:2) Ata soko bato oyo bazali kotemela biso bakosala nini, Jah Jéhovah akosunga biso na bolingo nyonso na nzela na lobiko.

‘Mboka na mabota na yauli’

6, 7. (a) Na kolandaka Yisaya 25:1, mpo na nini basambeli na Jéhovah basengeli kokumisa ye? (b) Na maloba nini Yisaya 25:2, 3 elobeli mboka moko? (c) Mosakoli alobeli mpo na mboka nini mpenza, mpe mpo na nini?

6 Totalela sikawa mokapo 25 ya mokanda na Yisaya. Totangi boye na verset 1: “O Jéhovah, yo Nzambe na ngai; nakokumisa yo, nakosanzola nkombo na yo, mpo ete osali makambo na kokamwa, myango mibongisamaki kala na solo mpe na sembo.” Lokola batii elikya na bango epai na Jéhovah, basambeli na ye bazali kokumisa ye mpo na misala kitoko oyo asili kokokisa kati na bango. Yisaya atye na nsima bokokani kati na biloko mibale: “Mpamba te okomisi mboka lokola libondo, mpe mboka na makasi bobele eloko mpamba. Ndako monene na bapaya ezali mboka lisusu te, libela ekotongama lisusu te . . . ; mboka na mabota na yauli bakotosa yo [Jéhovah].”​—Yisaya 25:2, 3.

7 Mboka yango na yauli oyo Yisaya alobeli kozanga kotanga nkombo na yango, ezali nini? Ekoki kozala Ar, kapitale ya Moabe, oyo ntango nyonso ezalaki monguna ya libota na Nzambe. Nzokande, lisolo ya Biblia emonisi ete ezali bongo eteni mosusu ya lisangá na Satana: Babilone, monguna monene. Na mokolo etyamaki, Babilone elingaki kopanza Yuda mpe Yelusaleme, koboma ndako esika Jéhovah azalaki kosambelama, mpe komema na boombo babiki na libota. Yisaya atangaki maloba mazangi ntina ya mokonzi na Babilone: “Nakobuta epai na lola koleka likolo na myoto na Nzambe; (nakotombola) na kiti na ngai na bokonzi, nakofanda na ngomba na koyangana . . .; nakomizalisa lokola Oyo-Aleki-likolo.” Kasi, Jéhovah alingaki kobimisa Cyrus Moperse mpo na koboma Babilone mpe kozongisa libota na Nzambe na mboka na bango. Engebene esakweli, esika oyo Babilone na kala etongamaki ezali sikawa se “libondo”, “eloko mpamba”.​—Yisaya 14:12-14; 13:17-22.

8, 9. (a) Basambeli na Jéhovah basengeli kobunda na Babilone nini, mpe ndenge nini Babilone yango ebotamaki? (b) Ndenge nini Yisaya abengaki “Babilone Monene”, mpe mpo na nini liloba yango esengeli mpenza?

8 Ata ndenge nini, mbula 2 500 na nsima ya kokwea na Babilone, basambeli na Jéhovah basengeli lisusu kotemela Babilone mosusu, “Babilone Monene, mama na pite mpe na bosoto na mokili”. (Emoniseli 17:5) Ezali bongo lisangá ya mokili mobimba ya mangomba na lokuta, oyo ebotamaki mwa ntango moke nsima na mpela, ya mikolo ya Noa, wana Nimrod atongaki Babilone na ebandeli. Mboka yango elingaki kokoma ebandeli ya losambo ya lokuta, losambo oyo ekabwani na mangomba mingi. Nsima na kosalema na losambo na boklisto epai na Yesu mpe bantoma na ye, bapengwi babebisaki solo ya Biblia na kobakisaka “mateya ya badémo” kati na yango, mateya oyo eutaki na Babilone ya bapakano; ezali na ndenge yango nde boklisto na mokili oyo ebotamaki. (1 Timote 4:1) Lolenge yango ya losambo na boklisto ekomaki eteni eleki monene ya “Babilone Monene”, oyo esili kopalanganisa biteni na yango kati na mabelé mobimba mpe mabota nyonso ya bato. Yisaya abengi yango ete ‘mboka na mabota na yauli’.

9 Eleki sikawa mibu 4 000 longwa kosalema na Babilone na ebandeli kino na mikolo na biso-batambwisi na mitema makasi bazali kosalela bakonzi na mangomba ya mitema mabe mpo na konyokola mpe mpo na koyangela mabota. Ee, “moto azali koyangela moto mpo na kopesa ye mpasi”. (Mosakoli 8:9) Yesu ayokelaki bato mawa, ‘mpo ete bakosamaki mpe bapalanganisamaki’ na babateli oyo mabe na elimo. Lelo oyo, lingomba oyo esali mabe koleka ebengami “Moto akotiolaka mobeko”; kati na yango tokokuta bakonzi na mangomba na mokili, oyo bazali bato ya liboso bazali kotemela ba Témoins de Jéhovah mpe bazali konyokola bango.​—Matai 9:36; 2 Batesaloniki 2:3, 4.

10. (a) Na kolanda Yisaya 25:3, ndenge nini ‘mboka na mabota na yauli’ esengelaki kokumisa Jéhovah, mpe mpo na nini ezali kobanga ye? (b) Kati na Yisaya 25:4, 5, maloba nini Yisaya alobi epai un Jéhovah mpo na “mobola” mpe mpo na “bato na yauli”?

10 Na 1919, Jéhovah asikolaki libota na ye ya solo na boombo ya “Babilone Monene”, mpe ‘mboka na mabota na yauli’ esengelaki kokumisa Jéhovah. Ndenge nini? Na boye ete, esengelaki na ye kotala na mawa nyonso “makambo kitoko” oyo Jéhovah azalaki kokokisa ntango azongiselaki basambeli na ye mosala malamu. Mpe lisusu, na kotalelaka nsuka oyo ezali kozela bango, bakonzi na mangomba basengeli mpenza kobanga Jéhovah. Na boumeli na bikeke, bakonzi mabe na mangomba bamitombolaki likolo na basambeli mosusu, kasi sikawa maloba oyo Yisaya alobaki epai na Jéhovah mazali kokokisama: “Mpamba te osili kozala esika makasi mpo na mobola, esika na makasi epai na mozangi kati na mpasi na ye; ekimelo liboso na mbula monene mpe molili na ntango na moi makasi; mpo ete mopepe na bato na yauli ezali lokola mbula monene oyo ebetabeti lopango, lokola moi makasi na esika ekaoki. Okokitisa makelele na bapaya, lokola moi ekitisami na molili na lipata; boye loyembo na bato na yauli ekozalisama nyee.”​—Yisaya 25:4, 5.

Nzembo na esengo ata moko te kati na “Babilone”

11. Mpo na nini kati na etando mobimba ya “Babilone Monene”, loyembo na esengo ezali te, mpe ndenge nini likambo yango ya kokamwa emonisamaki polele na bokutani ya mangomba minene ya mokili oyo esalemaki na mboka Assise?

11 Ezali boye solo kati na etando mobimba ya “Babilone Monene”: ata nzembo moko na esengo ezali te, mpe bakonzi na mangomba ya lokuta bayebi te banzambe nini bakoki kosambela. Likambo yango emonisamaki polele wana bakonzi ya mangomba nyonso bayanganaki na Italie, na Assise, le 27 octobre 1986. Mpo na Mbula ya kimya kati na mokili mobimba, pape Jean-Paul lI ayanganisaki bakonzi ya mangomba minene ya “Babilone Monene”. Bango banso basalaki mabondeli mpo na kimya, basango mosusu ya Buda basambelaki kino ngonga 12 na mokolo moko. Kasi bato yango bazalaki kosambela nani? Marie? Bosato Bosantu ya boklisto ya mokili oyo? Bosato ya ba Indu? to bamilio na banzambe ya lingomba na Buda? to lisusu Allah? to nyama renard (gambala), oyo bashintoiste (lingomba ya Bajaponé) basambelaka? Mabondeli mandimamaki mingi mazalaki oyo ya Indien ya Amerike na ekolo ya ba Crows? Balobaki ete ‘ebimeli na ye ezalaki na lokumu mingi na biloko alataki na moto na ye bizalaki kobenda likebi’, mpe apelisaki moto ya kimya mpe asalaki mabondeli “kati na milinga oyo ezalaki komata lokola mpaka na malasi kati na mopepe”.

12. Maloba nini na Mika mpe Yisaya, bakonzi na mangomba na “Babilone Monene’‘ bazali koboya kolanda yango?

12 Likambo moko ezali solo: moko te kati na bakonzi yango ya mangomba longwa na dalai-lama, mosambeli na Buda, kino na momonisi na lingomba na Orthodoxe ya Bagreke, moko te alandi maloba mazwami kati na Mika 4:5 “Nde biso tokotambola na nkombo na Jéhovah Nzambe na biso, libela na libela.” Ata moko te andimi bosolo ya maloba mapemamaki na Nzambe na nzela na Yisaya oyo mazwami kati na mokapo 42, versets 5 mpe 8 ya mokanda na ye: “Jéhovah Nzambe alobi boye, ye oyo atongaki lola mpe asembolaki yango, ye oyo atandisaki mokili mpe biloko bikoutaka na yango, ye oyo akopesaka mpema epai na bango bakotambolaka wana. Ngai nazali Jéhovah, yango nkombo na ngai, nakopesa nkembo na ngai epai na mosusu te, kosanzola na ngai epai na bikeko te.”

13. Ndenge nini bokutani ya Assise esalemaki, mpe makambo masalemaki kuna masilaki kokweisama na maloba nini na Yesu ntango azalaki awa na mabelé?

13 Milulu mineneminene, bilamba ya ntalo mpe mabondeli ekozongelaka maloba se moko ekomisaki bokutani yango ya mboka Assise likambo monene mpo na bato, makambo nyonso oyo Yesu Klisto, mwana na Jéhovah, akweisaki ntango azalaki awa na mabelé. Alobaki na ntina na bakonzi na mangomba: “Bazali kosala misala na bango nyonso ete bato bamona bango”; mpe alobelaki bango polele: “Mawa na bino, bakomeli mpe Bafalisai, bakosi! Mpamba te bokofunga Bokonzi na likolo liboso na bato. Bino mpenza bokoingela wana te nde bokotika te ete baoyo balingi baingela.” (Matai 23:5, 13; tala Matai 6:1-8.) Mpo na Nzambe, komilakisa mpe esika ya losambo ezali na ntina te na miso na ye, mpamba te lokola Yesu alobaki yango, Nzambe azali Elimo, mpe baoyo nyonso bazali kosambela basengeli kosambela ye na elimo mpe na solo”.​—Yoane 4:21, 24.

Liziba ya solo ya kimya

14. (a) Mpo na nini mabondeli ya mangomba na mokili mpo na kimya ezali ya lokuta? (b) Mangomba na boklisto na mokili oyo ezwi lisambisi nini epai na Nzambe?

14 Na kotalela mobulu oyo etondi lelo oyo kati na mangomba ya mokili, nani akozala zoba mpo akanisa ete mabondeli ya bakonzi na mangomba ekomema solo kimya na mokili? Na yango, na boumeli ya bikeke mingi bakonzi na mangomba basalaki mabondeli na bango ya lokuta, mpe bazalaki kosangana na bitumba oyo mabota mazalaki kobunda, mpe na minyokoli ya nsomo. Mosakoli na Jéhovah atunaki boye: “Moto moindo akoki nde kobongola lomposo na ye? Nkoi ekoki nde kobongola matono ma ye? Bino bomeseni kosala mabe, bokoki nde kosala malamu?” (Yilimia 13:23, Liloba lya Nzambe) Lokola eteni ya ntina ya “Babilone Monene”​—lisangá ya mokili mobimba ya mangomba na lokuta, mangomba ya boklisto ya mokili oyo esili komekama na emekeli na Nzambe mpe emonani ete ekoki te. Ekweisami.​—Yilimia 2:34, 35, 37; 5:29-31; Danyele 5:27.

15. Ndenge nini Jéhovah akotya kimya ya libela, mpe ndenge nini bato oyo batii elikya epai na ye bazali kosala mpo na kimya?

15 Jéhovah, “Nzambe na kimya” akotya kimya ya solo na kobomaka baoyo nyonso bazali na nyongo ya makila mpe na kotondisaka mabelé na bato oyo bazali mpenza na mposa na solo mpe boyengebene (Bafilipi 4:9) Engebene mokonzi Davidi, basokemi, oyo ‘bazali kotya elikya epai na Jéhovah mpe bazali kosala malamu’, bango nde “bakosangola mabelé” mpe “bakosepela na kimya ya solo”. (Nzembo 37:3, 11) Bato oyo ‘bazali ntango nyonso kotya elikya epai na Jéhovah mpe bazali kosala malamu’ bazali kosala mpo na kimya na ndenge oyo ekoki komekolama te epai na baoyo bazali kosambela bikeko to banzambe oyo ekowelanaka.​—Nzembo 115:2-8; Yisaya 44:14-20.

16. Elambo nini Jéhovah asali mpo na basokemi oyo bayangani na libanda na “mboka na mabota na yauli”?

16 Kokesena monene ezali kati na mabondeli ya libota na Nzambe mpe elikya na bango mpe mabondeli ya “Babilone Monene”! Tozali mpenza na esengo ete “loyembo na bato na yauli ebandi kozalisama nyee”! (Yisaya 25:5) Tala maloba Yisaya abimisaki na nsima mpo na basokemi oyo bayanganisami libanda na “mboka na mabota na yauli”: “Na ngomba oyo Jéhovah na bibele akobongisela mabota nyonso elambo na bilei na mafuta, elambo na vinyo oyo esili koumela, na bilei kitoko bitondi na mafuta mpe na vinyo eumeli mpe eponami.” (Yisaya 25:6) Elambo ya elimo oyo bato nyonso bazali koya kosambela Jéhovah bazali kosangana na yango ezali solo elambo ya esengo. Motema na biso elendisami liboso na mimekamo mpe esengo na biso ezali koya makasi mpamba te tozali kosalela Jéhovah na molende nyonso wana ezali biso kozela mokili ya sika mpe elambo na biloko kitoko oyo Jéhovah alaki kati na mabelé ya sika.​—Nzembo 104:1, 14, 15; Matai 19:28.

17. “Makambo ya kitoko” nini Jéhovah akokokisa mpe yango ekobimisa esengo nini?

17 Etikali moke Jah Jéhovah akokokisa “makambo kikoto” na kolimwisaka, bobele “Babilone Monene” te, kasi lisusu “ezipeli” na kokweisama oyo ezipi bato mpo na lisumu na Adame. (Yisaya 25:7) Na yango, na nzela na mbeka na Yesu, Nzambe na biso akokokisa esakweli oyo ezwami kati na Yisaya 25:8: “Akosilisa kufa libela mpe Nkolo Jéhovah akokomba mpisoli na bilongi nyonso; akolongola mpe nsoni na bato na ye longwa na mokili mobimba, mpamba te Jéhovah alobi bongo.” Ekozala esengo monene ntango lisumu mpe liwa euta na Adame ekolongolama. Ekozala esengo monene mpo na koyamba balingami na biso wana ekosikwama bango na bikangeli na liwa. Ekozala esengo na koyeba ete ba Témoins de Jéhovah na sembo bakopesa bongo eyano epai na Motumoli monene, Satan le Diable. (Masese 27:11) Moko te akobwaka lisusu nsoni epai na bango, mpamba te, na kotikelaka sembo, bakolonga. “Na bosembo nyonso”, Jéhovah akokokisa makambo oyo asakolaki, “mikano na ye na ebandeli”. Mabelé mobimba ekokoma paradis na bosembo, ekotonda na bato na sembo. Tala elikya na solo!

18. Atako mimekamo mizali, tozwi ekateli ya kosala nini na boyokani na Yisaya 25:9?

18 Na eleko ya molili oyo tozali na yango, ezali solo ete tokozwa mbano soko tobateli elikya na biso oyo tozali na yango epai na Jéhovah. Ata tokutani na mimekamo nini na bomoi na biso ya mokolo na mokolo- ezala mpo na kokokisa bamposa ya libota na biso, ezala mpo na kokangama na mitinda ya Biblia na eteyelo to kopesa litatoli na teritware etondi na mikakatano- tozali ntango nyonso na elikya epai na Nzambe. Soko tobateli boyokani ya penepene elongo na Jéhovah, ‘Ye oyo ayokaka mabondeli’, tokozwa lobiko. (Nzembo 65:2) Na yango, tozwa ekateli ya kotikala kati na bango balobi, engebene maloba na Yisaya 25:9 ete: “Totii elikya epai na ye mpe abikisi biso. Jéhovah azali awa. Totii elikya epai na ye. Tosepela na lobiko na ye.”

Bozongeli

◻ Na ndenge nini Jah Jéhovah azali nguya na biso mpe makasi na biso?

◻ “Mboka na mabota na yauli” ezali nini?

◻ Ndenge nini ‘mboka na mabota na yauli’ esengelaki kokumisa Jéhovah, mpe mpo na nini ezali kobanga ye?

◻ Nini elakisi ete loyembo na esengo ezali te kati na “Babilone Monene”?

◻ “Makambo ya kitoko’‘ nini Jéhovah akokokisa lisusu mpo na libota na ye?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto