Totya motema epai na Jah Jéhovah!
“Tya motema na yo epai na Jéhovah mpo na libela, mpamba te Jah Jéhovah azali libanga likoumela seko.”—YISAYA 26:4.
1, 2. Loyembo nini ya lisanzoli ezwami kati na Yisaya 26:1-6, mpe mpo na nini?
KOKWEA ya ‘mboka na mabota na yauli’ esengeli kokumisama na loyembo ya bolongi. (Yisaya 25:3) Ezali mpenza na ntina yango ete esakweli na Yisaya elandani na mokapo 26, versets 1 kino 6, na loyembo na esengo mpo na kosanzola Nkolo Moyangeli Jéhovah. Loyembo yango eyembami na eleko na biso “kati na mboka na Yuda”, Yuda elimboli “Kosanzolama”. Bible Crampon-Tricot esaleli lisusu elobeli “Yah Yahweh”, kati na yango nkombo na Nzambe ezongelami mbala mibale. Bobele bongo, maloba na nzembo yango mazali mpenza koyokana polele na ndenge ebongolami kati na Traduction du monde nouveau esika, mbala nyonso oyo yango ebimi na makomi, nkombo ya Nzambe ebongolami kozanga libunga!
2 Yoka sikawa loyembo yango ya kitoko: “Mboka na nguya ezali na biso, [Jéhovah] atongi lobiko lokola mapango mpe bizingelo. Zipola bikuke ete libota na boyengebene mpe na kobatela kondimana baingela. Okobatela ye na kimya, ee na kimya mpenza, ye oyo makanisi na ye maumeli epai na yo, mpamba te azali kotalela yo. Tya motema na yo epai na Jéhovah mpo na libela, mpo ete Jah, Jéhovah azali libanga likoumela seko. Mpamba te asili kokitisa bafandi kati na likolo, mboka etombolami likolo, akitisi yango, akweisi yango na mabelé, abwaki yango na mputulu. Lokolo ekonyatela yango, ata makolo na babola, matambe na bazangi.” Oyo nde esengo ya kozala elongo na baoyo batii motema na bango epai na Nzambe mpe bazali kosanzola ye na loyembo oyo, elingi koloba ba Témoins de Jéhovah.
3. (a) “Libota na sembo” ezali nini, mpe nani akoti na “bikuke” na yango bifungwami? (b) Ndenge nini lisanga ya Jéhovah ezali ntango nyonso kokola na bomoko atako monguna azali kotemela yango?
3 Yah Yahweh, to Jah Jéhovah, akokitisa mpenza bato na lolendo mpe akosikola baoyo bazali ntango nyonso kotya motema epai na ye. Nsima wana ezalaki “moke”, Yisraele na elimo ekomaki “libota makasi”, “libota ya sembo”. Mpe lisusu, ebele monene na bato koleka 3 milió oyo bazali kosepela na boboto na Nzambe basili kokota na “bikuke” bifungwami kati na lisangá ya Jéhovah oyo ekokisami awa na engumba. Bato yango nyonso basangani bazali bongo libota ya mokili mobimba ezali na bato koleka mikili 57 kati na O.N.U. Kasi mpo na “libota” ya Nzambe mpe bato oyo bazali kolanda bango, bango banso bazali mpenza na bomoko. Kati na mokili mobimba, mposa ya libota yango ezali ya kotosa mitinda ya sembo ya Nzambe. “Bifelo” na yango to lolenge ya ebongiseli na yango, ezali ebombamelo to libateli liboso na milende na Satana oyo azali koluka kobebisa bosembo na bango epai na solo. Monguna akoki te kobebisa bokoli na libota oyo ezali sembo epai na Nzambe na yango. Elikya na biso ezali ntango nyonso epai na ‘Jah Jéhovah, Libanga mpo na libela’.—Yisaya 54:17; 60:22.
4, 5. (a) “Mboka etombwami” ezali nini, mpe mpo na nini tokoki koloba ete basaleli na Jéhovah bazali konyata yango na ndenge ya elilingi? (b) Esakweli oyo ezali kati na Yisaya 26:10 ekokani na monene na yango na eleko nini, mpe kokokisama na yango ezali nini? (c) Esakweli yango ekokani mpe mpo na likambo nini?
4 Wana ezali biso koyokisa likebisi oyo ete Jéhovah alingi kokitisa “mboka na lolendo”, “Babilone Monene”, ezali elendiseli mpo na biso na ndenge tozali komona babola mpe bato mike kondima na motema moko nsango malamu ya Bokonzi. (Emoniseli 18:2, 4, 5) Na ndenge ya elilingi bazali konyata “mboka na lolendo”, na kobebisaka yango te kasi na kosakolaka mokolo na nkanda na Jéhovah, oyo ekokwela biloko mabe na ntango oyo. (Yisaya 61:1, 2) Uta bambula mwa mingi, ba Témoins de Jéhovah bazali komonisa boboto epai na bato mabe na kokendaka kotala bango na bandako mpo na komemela bango nsango ya lobiko. Litomba ya mosala yango ezali oyo tozali kotanga kati na Yisaya 26:10: “Soko moto mabe amonisami boboto, akoyekola boyengebene te; kati na mokili na sembo, akosalaka na mobulu, akomona nkembo na Jéhovah te.”
5 Esakweli yango ya kozongisama ezali kokokana na bonene na yango na eleko na biso. Atako likoki epesameli bango, bobele mwa bato moke nde balingi kobongisa bomoi na bango mpo na kondimama na Jéhovah na “mokili na sembo”. Baoyo bazali kobwaka nsoni likolo na Jéhovah mpe likolo na batemwe na ye ya sembo ‘bakomona bonene ya Jéhovah te’, mpe bakobika te mpo bamona mapamboli kitoko oyo makosopama na mokili nsima wana nkombo na Jéhovah ekosantisama. (Yisaya 11:9) Esakweli yango ekoki mpe kotalela bato oyo bakosekwisama mpo na kofanda na mabelé oyo ekobongwana Paradis. Bamoko kati na bango bakoboya mpenza kotosa mitinda oyo Nzambe akomonisa polele na “mikanda” oyo akokomisa; na bongo, nkombo na bango ekokomama te na “buku ya bomoi”.—Emoniseli 20:12, 15; tala Ezekiele 33:11.
Jéhovah abongisi kimya
6. Basaleli ya sembo ya Jéhovah bazali konganga na esengo na likambo nini, mpe mpo na nini?
6 Nzokande, basaleli ya sembo ya Nzambe bazali kotala na likebi mpenza lokumu, mpe kosantisama ya Jah Jéhovah. Bazali kosambela ye mpo ete ‘abongisa kimya’ mpo na libota na ye mpe bazali konganga na esengo: “Nde osili kofulukisa libota, E Jéhovah, osili kofulukisa libota, okembisami; okomisi yango mosika kino nsuka nyonso na mokili.” (Yisaya 26:12, 15) Kati na mikili 210 mpe bisangá ya mokili, Jéhovah azali se kofulukisa bato bakokani na bampate, na libota na ye ya elimo. Bankama na bankoto na bato ya sika bazali kobatisama. Basanza mosusu, bakomaka kino 500 000 pionniers spéciaux, permanents mpe auxiliaires. Ba Salles du Royaume mpe ba Salles d’assemblée ezali kotongama. Ba filiales ya la Société Watch Tower ezali se kobakisa bandako na yango oyo ekolalisaka basali, ezali mpe kobakisa ba imprimeries, mpe ezali kobakisa bamasini mpo na mosala. Bokoli ezali kolandana!
7. Bokoli ya lisanga ya Jéhovah oyo ekokani na mboka moko, ezali kouta wapi?
7 Bokoli yango ezali kosalema mpo “Nkolo na kimya” azali kotambwisa makambo ya libota na Nzambe oyo ezali awa na mabelé. Lokola Yisaya alobaki yango “kofuluka na bokonzi na ye mpe na kimya ekosuka te; na kiti na bokonzi na Davidi mpe likolo na bokonzi na ye, ete abongisa yango mpe ete atelemisa yango na kosambisa-sembo mpe na boyengebene longwa na ntango oyo kino libela. Mposa na Jéhovah na bibele ekosala oyo”. (Yisaya 9:6, 7) Maloba yango masili kokokana na ndenge malamu na eleko na biso. Baoyo bazali kotya motema epai na Jéhovah bazali kosepela na kimya mpe na boyengebene oyo ezali mbuma ya boyangeli yango. Bazali na bomoko etondi na bolingo oyo ezali komonana bobele epai na bayekoli ya solo ya Yesu. (Yoane 13:24, 25) Bazali kozela na motema likolo mpenza ntango oyo Yesu akoyangela mabelé mobimba, oyo ekotonda na “boyebi ya Jéhovah”.—Yisaya 11:9; Danyele 2:35, 44, 45.
8. Maloba na Jéhovah mazwami na Yisaya 26:20 malimboli nini, mpe “biteni na ndako” bizali nini?
8 Wana bokoli ya Bokonzi ezali kobelama na nsuka na yango, libyangami na Jéhovah ezwami na Yisaya 26:20 ezali koyokana na nguya nyonso: “Yaka bato na ngai, ingela na biteni na ndako na yo, kanga bikuke nsima na yo; omibomba ntango mwa moke kino nkanda esili koleka.” “Biteni na ndako” oyo elobelami awa ezali bongo masangá 54 000 oyo ekokisami na bingumba, kati na yango ba Témoins de Jéhovah ya mokili mobimba bazali koyangana. Tokoyeba nsima likambo nini Jéhovah akosala kasi totii elikya ete ntango akoboma bato mabe, akobatela basaleli na ye oyo bazali na elikya, ndenge asalaki yango na eleko na Yisaya na kobenganaka mokonzi mabe ya Asulia ete azonga na mboka na ye.—Yisaya 10:24-26.
Kobika ekozala solo
9. (a) Ndenge nini mokonzi Ezekiase amonisaki ete atyaki motema na ye epai na Jéhovah? (b) Wapi ezaleli malamu oyo tokoki kobatela soko bato oyo bayinaka Jéhovah bazali kofinga biso to konyokola biso?
9 Lelo oyo, basaleli na Jéhovah bazali na ntina lokola Ezekiase ya kotya motema epai na Nzambe na bango. Mokonzi yango atyaki motema na ye mobimba epai na Jéhovah, komonaka ye ete azali Nkolo Moyangeli. Yango wana, ntango matumoli ya Baasulia ekomaki makasi, abondelaki Nzambe na maloba oyo: “Jéhovah na bibele, Nzambe na Yisraele, yo oyo okofandaka kati na Bakeluba, yo ozali Nzambe na bikonzi nyonso na mokili, bobele yo moko. Ee yo osalaki lola mpe mokili. E Jéhovah, belemisa litoi na yo mpe yoka; E Jéhovah, zipola miso na yo mpe mona; yeba maloba nyonso na Senakeribe oyo ye atindi kotiola Nzambe na bomoi.” (Yisaya 37:16, 17) Wana bato baini Jéhovah bazali koseka yo, bazali kofinga yo to konyokola yo, libondeli motindo oyo eyelaka yo na motema te? Na kotyaka motema mobimba, okobondela Jéhovah te ete alongola nsoni na nkombo na ye? Wana ezalaki makanisi na Yesu mwa moke liboso ya kufa na ye na nzete na mpasi. Asengaki ete kopo oyo alingaki komela “eleka” mosika na ye, mpo na nsoni monene oyo yango elingaki kobwaka epai na Tata na ye.—Matai 26:39-44.
10. (a) Libondeli na Ezekiase emonisi ete likanisi na ye ya liboso ezalaki nini? (b) Awa tozali kokutana na mimekamo mizali liboso na Armagedon, ndenge nini tokoki kokokana no Ezekiase?
10 Libondeli na Ezekiase emonisaki ete alukaki kosikolama na Baasulia bobele ye moko te; amekaki kobikisa bomoi na ye moko te. Alukaki nde nkombo ya Jéhovah ekumisama mpe boyangeli na ye elongisama. Yango wana libondeli na ye esuki na maloba oyo: “Boye sikawa, E Jéhovah, Nzambe na biso, nabondeli yo ete obikisa biso na loboko na ye ete bikonzi nyonso na mokili bayeba ete yo ozali Jéhovah, bobele yo moko.” (Yisaya 37:20) Bobele bongo, wana ezali biso kokutana na mimekamo oyo mizali liboso na etumba ya Armagedon, tobosana te ete, mpo na oyo etali kokumisa nkombo na Jéhovah, lobiko ya moto mokomoko ezali likambo ekoya nsima. Lokola Nkolo Moyangeli alobaki yango mbala 60 na nzela na mosakoli Ezekiele, “[mabota] bakoyeba ete nazali Jéhovah.”—Ezekiele 38:23.
11. (a) Libunga nini Senakeribe asalaki, mpe Jéhovah alobaki nini na ntina yango? (b) Na kotalelaka makambo nakomelaki Senakeribe, tokoki kotya motema epai na nani?
11 Ntango Ezekiase asilisaki libondeli na ye, Yisaya ayebisaki ye liloba oyo Jéhovah alobaki mpo na Senakeribe, Mofingi Moasulia oyo, asalaki libunga monene na ndenge abwakaki nsoni likolo na Nzambe na bomoi! Na nzela na Yisaya, Jéhovah alobaki boye mpo na Senakeribe: “Yo opameli nani mpe otuki nani? Otombweli nani mongongo na yo? Otombweli nani miso na yo? Bobele ye Oyo na Bulee na Yisraele.” Ezali Mosantu na Yisraele nde abundaki na butu wana! Anzelu moko ya Jéhovah akokaki mpo na koboma bilombe 185 000 na mampinga na Senakeribe; alalisaki bango “bibembe, bakufi”. Mokonzi yango na lolendo azongaki na nsoni na Ninive mpe mwa bambula na nsima, abomamaki na bana na ye moko wana ezalaki ye kosambela bikeko na ye. Tokoki kotya motema epai na Jéhovah: akosala ndenge yango epai na Satana mpe epai na bato na ye nyonso, oyo bazali kofinga mpe konyokola ba Témoins de Jéhovah.—Yisaya 37:23, 36-38.
Makila na “babomami” makofutama
12. (a) Na maloba nini Yisaya 26:21 emonisi ndenge Nzambe akokanisela moto na moto na Armagedon? (b) “Babomami” oyo mpo na bango Nzambe akosenga makila na bango na Armagedon, bazali banani mpe ndenge nini Nzambe akosala?
12 Etumba oyo touti kolobela ezali nsomo, kasi nsomo ekoleka lisusu makasi ntango moto na moto akozwa mbano na misala na ye na “bolozi monene”. (Matai 24:21) Jéhovah abyangi biso mpo ete totalela moboma yango: “Mpamba te tala, Jéhovah azali kobima na esika na ye, mpo na kopesa bafandi na mokili etumbu mpo na mabe na bango; mpe mokili ekozipola makila masopani likolo na yango, ekobomba lisusu babomami na yango te.” (Yisaya 26:21) Liboso, Jéhovah akosala na boye ete banguya na politike bakokisa ekateli na ye epai na baoyo bazali kondima mangomba ya lokuta; na mokolo yango, bato wana bakobikisama te na banzambe na bango ya lokuta. Tika Pape alanda kosalisa makita ntango nyonso na koyanganisaka mangomba na “Babilone Monene”! Moko te na baoyo bazali kozwa likanisi ya koyanganisa mangomba azali kokumisa Nzambe na solo mpe na bomoi, Jéhovah. Mateya na bango mazali lokuta, mpamba te makeseni na Makomami, mpe misala na bango mizali bongo lokola. Basambeli na mangomba yango basili komiboma bango na bango na boumeli na bikeke mpe basopaki makila ya baklisto ya kimya. Na ekeke na 20, mingi kati na bango bapesaki maboko epai na bakonzi mabe oyo babomaki ba Témoins de Jéhovah kati na boloko mpe ba camps de concentration, na kobetaka bango masasi to na kokataka bango nkingo na epasola. Lokola Jéhovah alobaki yango polele nyonso na nzela na basakoli na ye, akosenga nyongo ya makila mpo na “babomami” yango.—Deteronome 32:41, 43; Yisaya 1:24; 63:4; Emoniseli 17:15-18; 18:21, 24.
13. Engebene mosakoli Yisaya, likambo nini ekosalema na “mokolo na Jéhovah”, mpe maloba yango mazali kokokana na nani?
13 Nsima wana Mangomba na lokuta makobomama, Jéhovah akomibalola epai na batemeli na Bokonzi na Klisto. Maloba na Nzambe maye mazwami na Yisaya 13:6, 9 mazali kokokana epai na bato yango nyonso mpe epai na “Babilone Monene”: “Bolela mpamba te mokolo na Jéhovah ezali kobelama; ekoya lokola kobebisama longwa na Oyo-na-Nguya-Nyonso. Tala mokolo na Jéhovah ezali koya na motema makasi na nkanda mpe na nkele kokomisa mokili mpamba mpe kobebisa kati na yango bato na masumu na yango.” Yango ekosalema mpenza lokola mokomi na nzembo Davidi alobaki yango: “Jéhovah akobatela baoyo nyonso bakolinga ye kasi akoboma bato nyonso mabe.”—Nzembo 145:20; Emoniseli 19:11-21.
14. Mabota masengeli kotalela maloba nini mosusu ya Yisaya, mpe mpo na nini?
14 Mabota na nse basengeli kokanga ntina ya maloba oyo Yisaya akomaki na nsima, na mokapo 34, versets 1 kino 8, ya mokanda na ye: “Bino mabota bobelema ete boyoka, bino bato boyoka; . . . Mpamba te Jéhovah asiliki na mabota nyonso, azali na nkanda mpo na ebele na bango mobimba; asili kobebisa bango nyee, apesi bango ete babomama. Babomami na bango bakobwakama, nsolo mabe na bibembe na bango ekobuta likolo, ngomba ekotiola na makila na bango. . . . Mpamba te Jéhovah azali na mokolo na kobukanisa.” Lelo oyo, politike, mombongo mpe Mangomba ya lokuta ebebisami na makambo nyonso mabe mpe na pite. Nzokande Jéhovah azali na likanisi ya kopetola mabelé; yango wana abimisi longwa na mabota mpe ayanganisi mpo na lobiko bato oyo balingi kobongisa bomoi na bango mpo na kosalela ye na boyengebene. Bato oyo batikali na mokili bakokufa bango nyonso na mokolo na nkanda na ye.—Yilimia 25:31-33.
Paradis ya kimya
15. Yisaya alobi nini na mokapo 35 ya mokanda na ye mpo na oyo etali (a) Eleko na biso? (b) Avenire?
15 Na mokapo 35 ya mokanda na ye, Yisaya mosakoli na Nzambe, alobeli na maloba kitoko mpenza mpe na bonzenga ezalela ya basaleli na Jéhovah oyo bakosepela na mokili ya sika elakami; ezali bongo bato oyo batii motema epai na ye. Lokola basangani kati na paradis ya elimo, ‘bazali komona nkembo na Jéhovah, lokumu na Nzambe na bango’. Bazali mpe kozela paradis ya mosuni mpe kokokisama na elaka oyo: “Bongo miso na bakufeli—miso makofungwama, mpe matoi na bimimi makozipwama. Bongo, motengumi akopombwa lokola mboloko, mpe lolemo na ebubu ekoyemba na esengo. Mpamba te mai makopunzwa kati na lisobe, bitima kati na mokili mokaoki.” (Yisaya 35:1, 2, 5, 6) Elikya yango ezali kosepelisa yo? Otyaka motema epai na Jéhovah, na kondimaka ete akokokisa bilaka na ye nyonso?
16, 17. (a) Libyangami nini ya lombango mpenza Yisaya asalaki wana ezalaki ye kolobela Paradis? (b) Ndenge nini basaleli na Jéhovah basengeli koyanola na libyangami yango?
16 Ekoki kozala ete elikya na yo epai na Jéhovah etinda yo ete olendisa bayekoli ya sika, mpe baklisto mosusu oyo kondima na bango esili kolemba. Mosakoli Yisaya akati maloba na ye mpo na Paradis mpo na kosala libyangami oyo ya lombango mpenza: “Bokembisa maboko malembi; bopesa nguya na mabolongo mazali na makasi te; boloba na bango bazali kobanga kati na mitema ete, Yika mpiko! Banga te! Tala Nzambe na bino akoya na kobukanisa; na lifuti na Nzambe mpenza akoya mpe akobikisa bino.” (Yisaya 35:3, 4) Na yango, mposa na biso ezali ya komona bato nyonso oyo balingi boyengebene kotya elikya na bango epai na Jéhovah, yango ekopesa bango nzela ya kofanda na mabelé oyo ekobongwana Paradis.
17 Mpo na yango, tokembisa maboko malembi, mpo ete ‘ekangama ngwi na liloba na bomoi’. Tolendisa baoyo nyonso bazali na mabolongo malembi mpe tosalisa bango na makambo oyo bazali na yango bolembu mpo “batambola na ndenge malamu liboso na Jéhovah, mpo na kosepelisa ye na makambo nyonso”. (Bafilipi 2:16; Bakolose 1:10) Ee, tobondisa baoyo nyonso balembi, mpe tolendisana ntango mimekamo to minyokoli mizali kobima, mpo ete tozala “na molende mingi mpo na koloba Liloba na Nzambe kozanga kobanga”. (Bafilipi 1:14; 1 Batesaloniki 5:14; Baefese 5:15, 16) Na bongo, tokoki kotya motema ete mokolo nkanda na Jéhovah ekoya tokozwa lipamboli ya Nzambe na biso ntango ‘akoya kobikisa libota na ye’. Na mokolo yango, okozala kati na baoyo bakotya motema epai na Jéhovah mpe bakobikisama?
18. Avenire nini epesami epai na baoyo batii motema epai na Jéhovah, mpe mpo na yango ekateli na bango ezali nini?
18 Avenire nini ekofungwama nsima na mokolo monene oyo epai na baoyo bazali kotya motema epai na Jéhovah! Banyokoli, basali na mabe, bakolimwa. Na mokili ya sika, baoyo balingi Jah Jéhovah bakozongela nzoto ya kokoka na nzela na Mwana na ye, bakosikwama na masumu nyonso. Omoni te ete ntango yango ezali koumela mpo na yo? Lokola otii motema epai na Jéhovah, okomona mokolo yango ya kitoko. Ee, landa kotya motema epai na Jéhovah! mpamba te yango ekopesa yo lobiko.
Bozongeli
◻ Loyembo na elonga oyo ezwami na Yisaya 26 elendisi biso tosala nini?
◻ “Mboka etombwami” oyo Jéhovah akokitisa ezali nini, mpe ndenge nini tozali konyata yango?
◻ Liteya nini tokoki kozwa na libondeli na Ezekiase oyo asalaki ntango Senakeribe alingaki kobundisa ye?
◻ Ndenge nini Nzambe akosenga nyongo ya makila mpo na “babomami” oyo balobelami kati na Yisaya 26:21?
◻ Tokoki kolikya nini soko totye motema epai na Jéhovah?
[Etanda na lokasa 18]
Bakonzi na katolike bafundami?
Kolobelaka lisolo moko ebimisaki na 11 Giornale ya Milan na Umberto Siniscalchi, zulunalo World Press Review elobi boye: “Esambiselo eleki monene ya ltalie efundami makasi mpo eboyaki kondima mandat d’arret oyo etindamaki epai na bakonzi misato ya banke ya Vatican oyo nkombo na bango ezalaki kati na likambo ya banke Ambrosiano.” Ekateli yango, oyo ezwi moboko na boyokani moko esalemaka kala kati na Vatican mpe boyangeli ya ltalie, epekisi ete mokonzi ya banke, oyo azali sango, asambisama te, bakisa directeur général na ye mpe chef comptable na ye. Mokanda yango ebakisi boye: “Ata batii ntembe te na ekateli ya basambisi, bato mosusu balobi ete boyokani yango ezali kofinga Mokanda na mibeko na ltalie na kopekisaka ete bato basali mabe na ltalie, basambisama te. Bato bakoyekolaka mibeko basengi nzela mpo ete basambisi na ltalie bafunda bakonzi na katolike mpo na mabe oyo bazali kosala na ltalie.”