Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye
Yesu apesi liteya ya komikitisa
NSIMA na kobikisa elenge mobali oyo azalaki na démo kuna epai na régio ya Césarée de Philippe, Yesu alingi kokenda epai na ye na Kapernaume. Kasi, alingi kosala mobembo yango ye moko elongo na bayekoli na ye mpo ete abongisa bango malamu na ntina na liwa na ye mpe na mikumba oyo bakotikala na yango na nsima. Alobi na bango boye: “Ekoki na Mwana na moto ete akabama na maboko na bato, mpe bakoboma ye mpe na mokolo na misato akosekwa.”
Yesu asilaki kolobela likambo yango, mpe bantoma misato bamonaki na miso na bango ndenge abongwanaki mpe ndenge basololaki na ntina na kokenda na ye; nzokande bayekoli na ye bakangi naino ntina na yango te. Atako moko te kati na bango aboi te kondima likambo yango, lokola Petelo autaki kosala yango, ete akobomama, bazali kobanga kotuna ye lisusu na ntina na likambo yango.
Bakomi sikawa na Kapernaume, mboka oyo mpo na Yesu ezalaki lokola libongo esika azali komibongisa mpo na mibembo na boumeli ya mosala na ye; yango ezali mpe mboka ya Petelo mpe bantoma mingi. Na ntango yango, bato basengeli kokongola mpako babelemi epai na Petelo mpe, mbala mosusu ezali mpo na kokanga Yesu na libunga na likambo moko oyo endimami na bato nyonso, batuni Petelo boye: “Molakisi na bino akofuta mpako [ya temple] te?”
Petelo ayanoli ete: “Akofuta”.
Ekoti ye na ndako, mbala mosusu ntango mingi elekaki te, Yesu ayebi ete likambo yango euti kosalema. Yango wana Petelo azwaki ata ntango ya kolobela yango te, Yesu atuni ye: “Okanisi nini mpo na oyo, Simon? Mikonzi na mokili bakokamata mpako soko lifuti epai na banani? Na bana na bango soko na bapaya?”
Petelo ayanoli ete: “Na bapaya”.
Bongo Yesu alobi: “Bana bakofutaka mpako te.” Lokola Tata na Yesu azali
Mokonzi ya molongo, Ye oyo asambelami na temple, mobeko esengi te ete Mwana na Nzambe afuta mpako ya temple. Yesu abakisi boye: “Kasi mpo tobetisa bango libaku te, kenda na libeke mpe bwaka ndobo mpe kamata mbisi na liboso oyo ekoya likolo; zipola monoko na yango mpe okozwa lopata. Kamata yango mpe pesa yango epai na bango mpo na ngai na yo.”
Ntango bayekoli bayanganaki, mbala mosusu epai na Petelo, wana ezongaki bango na Kapernaume, batuni motuna oyo: “Nani aleki monene kati na bokonzi na makolo? “Yesu ayebi mpenza likambo nini ezalaki kotungisa bango, mpamba te abosani te lisolo oyo basololaki ntango bazalaki kotambola nsima na ye na kozongaka na Césarée de Philippe. Atuni bango boye: “Bino bozalaki kotyana ntembe na likambo nini kati na nzela? Bayekoli baboi koyanola, bayoki nsoni, mpamba te na nzela balukaki koyeba nani azali mokonzi kati na bango.
Tokoki kokanisa ete likambo motindo boye mbele ekokaki kobima te kati na bayekoli, mpamba te bateyami epai na Yesu mbula misato. Kasi kozanga kokoka mpe makanisi ya mangomba na biso ya kala ezali kopusa biso mingi. Bayekoli babokwamaki kati na lingomba ya Bayuda, oyo ezalaki kotya na esika ya liboso lokumu kati na makambo nyonso. Lisusu, mbala mosusu Petelo azali komiyoka ete aleki baninga na ye uta Yesu alakaki ye ete akopesa ye “bafungola” ya Bokonzi. Yakobo mpe Yoane bakokaki kozala mpe na makanisi motindo moko mpamba te bazwaki libaku ya komona ndenge Yesu abongwanaki.
Ata ndenge nini, Yesu asaleli elakiseli moko malamu mpo na kobongisa makanisi ya bayekoli na ye. Abengi mwana, mpe atye ye kati na bango; bongo azingi ye na maboko na ye mpe alobi: “Soko bokobongwana mpo na kokoma lokola bana mike te bokoingela na Bokonzi na likolo te. Ye nani akomisokisa lokola mwana oyo, ye akoleka monene kati na Bokonzi na likolo. Ye nani akoyamba mwana na lolenge oyo na nkombo na ngai azali koyamba ngai.”
Oyo nde lolenge kitoko mpo na kopamela bayekoli! Yesu atombokeli bango te mpe alobi na bango te ete bazali na lolendo, na lokoso to na komitombola. Te, kasi apesi bango liteya na kosalelaka elakiseli ya bana mike, mpamba te bango bazali na bopolo, bamitombolaka te mpe balukaka koleka baninga na bango te. Yesu amonisi bongo ete bayekoli na ye bazali na mposa ya kokolisa bizaleli oyo bana bazalaka na yango. Asukisi boye: “Ye oyo kati na bino akomitambwisa lokola mwana moke, ye nde aleki monene.” Matai 17:22-27; 18:1-5; Malako 9:30-37; Luka 9:43-48.
◆ Wana ezongi bango na Kapernaume, Yesu akundoli likambo nini, mpe yango esali nini epai na bayekoli?
◆ Mpo na nini Yesu asengisami te ete afuta mpako ya temple, kasi mpo na nini afuti yango?
◆ Eloko nini etindi bayekoli ete baswana, mpe Yesu asali nini mpo na kosembola bango?