Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/9 nk. 5-7
  • Biblia ezali na mobulungano kati na yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia ezali na mobulungano kati na yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tobongisa “mibulungano”
  • Tokoki kotyela Biblia motema
  • Biblia ezali bongolabongola?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Ndenge nini nzambe apemisaki Biblia?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Nani akomaki Biblia?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • 3. Makambo oyo yango elobeli ezali na boyokani
    Lamuká!—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/9 nk. 5-7

Biblia ezali na mobulungano kati na yango?

Blblia elobi “Nzambe akoki kokosa te”. (Baebele 6:18) Ndenge nini mokanda na ye ekoki kotonda na mobulungano mpe ebengama lisusu Liloba na Nzambe? Ekoki kosalema te. Kasi mpo na nini mobulungano ezali kati na yango?

Ya solo, kati na mokanda oyo basalaki bakopi na yango mbala mingi na boumeli ya bikeke mpe oyo ezalaki kosenga ete ebongolama na minoko milobamaki na ntango wana, mabunga mike mpo na oyo etali ekomeli ekotaki na kati. Kasi, ezalaki mingi te mpe ezali na likama mpenza te mpo toboya kondima ete Biblia epemamaki mpe ete ekoki kosunga biso. Soko totali malamumalamu makambo mazali komonana lokola bongolabongola, tokozwa ndimbola oyo ekoki kosepelisa biso. Mbala mingi, baoyo bazali koloba ete Biblia ezali na mobulungano naino batalela na mozindo likambo yango te. Bazali se kosuka na kokabola likanisi ya baoyo bazali kondimela Biblia te to baoyo baboi ete Biblia etambwisa bomoi na bango. “Moto akozongisa eyano soko ayoki naino te, akolakisa bozoba bwa ye mpe akoyoka nsoni”; Biblia elobi bongo kati na Masese 18:13.

Balobaka mpe lisusu ete bakomi na Biblia bazangi bomoko mpo na oyo etali na ndakisa mituya, molongo ya bakitani to ndenge ya kotanga to kozongela maloba na kala. Kasi tokanisa: Soko osengi epai na bato mingi ete balobela likambo moko oyo bamonaki, bakoloba yango na lolenge moko mpe bakoyebisa makambo nyonso ndenge moko? Soko bameki koloba ndenge moko, okokanisa te ete basalaki sekele? Bobele bongo, Nzambe atikaki bakomi na Biblia ete babatela lolenge na bango mpe elobeli na bango, na kosenzelaka ete makanisi mpe makambo na ntina malimbolama kozanga libunga.

Bakomi oyo bazalaki kozongela makomi na kala bazalaki kopengwa mwa moke na maloba na ebandeli na kotalelaka bamposa na bango to mokano oyo bazalaki koluka, kasi bazalaki kobatela likanisi mpe ndimbola na ebandeli. Bazalaki kosala ndenge moko mpo na kosangisa makambo. Mokomi moko akokaki kolanda molongo mobimba ya bakitani kozanga kotika likambo, mpe mosusu akokaki kolobela makambo na kotalelaka boyokani na makanisi oyo azali kolobela. Bobele bongo, mokomi moko akokaki kotika makambo mosusu na kotalelaka ndenge oyo azali komonela makambo mpe mbala mosusu alingaki ete lisolo na ye ezala mokuse. Na ndakisa, Matthieu alobeli bakufeli-miso mibale oyo basalisamaki na Yesu, nzokande Marc mpe Luc balobeli bobele mokufeli-miso moko. (Matai 20:29-34; Malako 10:46; Luka 18:35) Lisolo na Matthieu etye mobulungano te na masolo oyo ya Marc mpe Luc; ezali se sikisiki mpo na motuya, nzokande Marc mpe Luc batye likebi mingi epai na moto moko oyo asololaki na Yesu.

Lolenge ya kotanga ntango ezalaki mpe mingi. Libota ya Bayuda ezalaki kosalela manaka mibale: manaka moko ya lingomba mpe mosusu ebengami sivile, to ya baloni. Manaka oyo mibale ezalaki kobanda na eleko moko te. Ntango bakomi bazali kolobela likambo moko na basanza to mikolo mikeseni, ekoki kozala mpo ete basalelaki manaka mibale. Lokola bakomi na Orient bazalaki kosalela mingi te mituya ya ndambo (fraksio), bambula ekomi naino na nsuka te ezalaki kotangama lokola ya mobimba. Bazalaki kobelemisa yango na motuya mobimba oyo ezalaki pene. Ezali yango esalemi mpo na bokitani na Genese mokapo ya 5.

Tobongisa “mibulungano”

Kasi mikapo oyo mizali na mobulungano mizali te kati na Biblia? Totalela mwa makambo mabimisami na baoyo bazali kotiola Biblia.

Kati na Yoane 3:22, totangi boye ete Yesu azalaki “kobatisa”; mwa mosika, kati na Yoane 4:2, eyebisami ete ‘ezalaki Yesu te moto azalaki kobatisa’. Kasi lokola maloba na zongazonga mamonisi yango, Yesu azalaki elongo na bayekoli na ye, mpe ezalaki bango nde bazalaki kobatisa na nkombo na ye mpe na litambwisi na ye. Ezali lokola patron moko mpe sekretere, bango mibale bakoki mpenza koloba ete bakomaki mokanda moko.

Mokapo na Genese 2:2 emonisi Nzambe apemaki “na misala na ye nyonso”. Bazali komonisa likambo oyo Yesu alobaki yango na Yoane 5:17, ete Nzambe “azali naino kosala mosala”. Kasi na mokapo ya Genese maloba na zongazonga momonisi ete ezali mpenzampenza mpo na misala na kozalisa na Nzambe, nzokande na mokapo ya Yoane ezali mpo na misala na ye oyo azali kotambwisa na yango mokili mpe kobatela yango.

Mobulungano mosusu mobimi kati na Exode 34:7 mpe Ezekiele 18:20. Mokapo ya liboso ezali koloba ete Nzambe akoyeisa “etumbu mpo na mabe na batata likolo na bana mpe na bankoko”; mokapo oyo ya mibale elobi ete “mwana akomema lisumu na tata na ye te”. Mpo na nini mikapo yango mizali na mobulungano? Mpamba te ezali wana na makambo mibale makeseni. Soko otaleli yango malamumalamu, okomona yo moko ete ntango Nzambe azalaki kolobela mpo na etumbu oyo akoyeisa bobele epai na batata te, kasi lisusu likolo na bana mpe bankoko, azalaki kokanisa mpo na mabe oyo Bayisraele bakozwa lokola libota soko basaleli ye lisumu mpe soko bamemami na boombo. Epai mosusu, ntango alobaki ete mwana akoki komema lisumu ya tata na ye te, azalaki koloba mpo na mokumba ya moto na moto.

Bokeseni ezali mpe lisusu kati na masolo ya kobotama na Yesu mazwami kati na Matai 1:18-25 mpe na Luka 1:26-38. Kasi ezali mpenza mobulungano?

Osila kotanga mikanda mibale elobeli bomoi ya moto moko? Soko ee, osila komona ete ezali na bokeseni kati na yango kasi ezali mpenza na mobulungano te? Mbala mingi, makambo mazali kokesena na kotalelaka mokomi to liziba esika azwi makambo azali kokoma to lisusu makambo oyo ye amoni ete maleki ntina, to likambo oyo ye azali kolobela mpe bato oyo bakotanga mokanda na ye. Yango wana masolo makomamaki mpo na Bapakano makeseni na oyo ekomamaki mpo na Bayuda, mpamba te bango bazalaki kondima mpe kokanga ntina ya makambo mosusu.

Ezali wana bobele bamoko na biteni na Biblia oyo, kozanga kotalela yango na mozindo, ezali komonana lokola ete ezali na mobulungano. Kasi soko tokotalela yango malamumalamu, na kotangaka mpe maloba na zongazonga mpe ndenge mokomi azali komonela makambo, tokomona ete ezali mpenza mobulungano te kasi bobele mikapo oyo ezali kosenga bolukiluki. Mingi kati na batangi basalaka bolukiluki yango te oyo ezali na ntina; bazali kowela koloba ete: “Biblia ezali na mobulungano.”

Tokoki kotyela Biblia motema

Elimo santu na Nzambe etikelaki bakomi na Biblia bonsomi ya kokoma. (Misala 3:21) Yango wana bakokaki kopesa elakiseli malamu ya makambo oyo bango bamonaki. Kasi, bokeseni na bango ezali se kobakisa konfianse oyo tozali na yango epai na bango mpe ezali kobakisa bosolo ya masolo na bango, mpamba te tokoki koloba te ete bakosaki to bayokanaki mpo bakosa. (2 Petelo 1:16-21) Ata basalelaki bilakiseli bikeseni, bakomi nyonso bazalaki na nzela moko mpe na mokano moko: komonisa epai na bato ndenge nini Jéhovah Nzambe akozalisa bato esengo, mpe kolimbwela bango nini basengeli kosala, mpo na kondimama epai na ye.​—Masese 2:3-6, 9.

Biblia ezali mokanda moko oyo ezali kotinda biso na kokanisa. Ezali na bomoko kobanda na ebandeli kino nsuka; ezali na mobulungano te. Tokoki solo kotya motema na mikanda na yango 66, mikapo na yango 1 189 mpe ba versets na yango 31 173. Ee, okoki kotyela Biblia motema!

[Etanda na lokasa 6]

Soko okutani na “mobulungano” kati na Biblia, ekoki kozala ete

◆ oyebi makambo mosusu te matali lisolo yango to ezaleli na kala

◆ otaleli maloba na zongazonga te

◆ oyebi te ndenge nini mokomi azalaki kotalela makambo

◆ omeki kokokisa makanisi ya mangomba na lokuta na oyo Biblia ezali mpenza koloba

◆ ozali kosalela libongoli moko ya Biblia ezali na mabunga to ya kala

[Bililingi na lokasa 7]

Matai alobaki ete Yesu abikisaki bakufeli miso mibale. Marc mpe Luc balobeli bobele moko. Wana ezali mobulungano?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto