Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/10 lok. 23
  • Ba assemblées ya distrike “Boyengebene ya Nzambe”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ba assemblées ya distrike “Boyengebene ya Nzambe”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Masolo mosusu
  • Yaka na assemblée ya distrike “monoko na peto”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Tobyangi yo ete oya koyanganana ba assemblée ya distrike “Baninga na bonsomi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Bisika mpe badates ya ba assemblées “Mateya mauti na Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Boyei malamu na ba assemblées ya distrike “bamemi na pole”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/10 lok. 23

Ba assemblées ya distrike “Boyengebene ya Nzambe”

BAMPASI etondi na mokili mpo boyengebene ezali te. Ndenge bakonzi mingi na politike bazali kosalela mabe nguya na bango ezali kobimisa bampasi mingi. Lokoso oyo ezali kotambwisa mombongo ekomi kilo likolo na bato mpe ezali kozangisa bango makambo mingi. Monyokoli ezali kouta ata epai na bakonzi na mangomba, oyo bakokani mpe na bakonzi na mangomba na ntango na Yesu, oyo alobaki na ntina na bango ete: “Bazali kokanga mikumba na bozito mpe bakotya yango na mapeka na bato nde bango mpenza balingi kotombola yango ata na mosapi na bango te.” (Matai 23:4) Ata na kati na libota, nguya ezali kosalelama mabe mbala mingi mpe yango ezali kobimisa kozanga na boyengebene.

Lisolo na bato emonisi ete mpo na kosilisa mabe yango, ntina ezali te ya kotya motema epai na bato, ata soko bazali na makanisi malamu ndenge nini. Nzokande, mosambisi monene, Jéhovah azali na makoló. Azali Nzambe na boyengebene. Yango wana Moïse ayembaki boye na ntina na ye: “Ye libanga mosala na ye ebongi; mpo ete nzela na ye nyonso boyengebene.”​—Deteronome 32:4.

Uta kala Jéhovah azali kopesa nzela na mabe nyonso ya mokili oyo, kasi akosilisa ezaleli yango. Asila kokana mokolo oyo akotya nsuka na yango, mpe wana tokomona kokokana na esakweli ezwami na Yisaya 14:4-7 oyo elobi ete lolenge nyonso na nguya mabe ekosila mpe ‘mabelé ekokoma na kimya’.

Mpo na kondima na bango makasi na bilikya epesami na bisakweli, ba Témoins de Jéhovah balingi kosakola bisika nyonso ete etikali moke Jéhovah akotya nsuka na monyokoli nyonso, na mabe nyonso mpe na lolenge nyonso na kozanga boyengebene na kotyaka bongo boyangeli ya Bokonzi na ye awa na mabele mobimba. Na bongo moko te akosala mabe, mpamba te ‘mabele’ mobimba ekotonda na mayele na Jéhovah lokola mbonge ekozipaka mai na monana’.​—Yisaya 11:9.

Mpo na kolendisa kondima na biso kati na bikateli na sembo na Jéhovah, ba assemblées ya distrike oyo ekosalema na 1988 ekozala na theme “Boyengebene ya Nzambe”. Badiskur na yango ekotinda biso bobele te na kozwa elikya ya boyengebene ya Nzambe. Kasi ekolendisa biso lisusu tomitambwisa na ndenge na boyengebene ya Nzambe na makambo na biso nyonso oyo tozali kosala

Lokola tozali basaleli na Jéhovah, toyebi ete mpo baboti na biso ya liboso basalaki lisumu, topusami na ezaleli na moimi mpe na kozanga boyengebene. Tokosepela bongo na mateya kitoko oyo tokozwa na nzela na badiskur ezwami na Biblia, na ba démonstrations, masolo mpe ba drames oyo ekomonisa ntina ya kolongisa boyengebene ya Nzambe. Ezali bongo na boyokani na etinda na Mika 6:8, oyo elobi ete ‘tosala na boyengebene mpe tolinga boboto mpe totambola na bopolo esika moko na Nzambe na biso’. Ezalela yango ekopesa nzela na boyokani mpe esengo; ezali mpe lisalisi mpo na kosakola ntango nyonso nsango malamu na mabele mobimba.

Ba assemblées yango ekokesena na boye ete bamboka mingi ekokangisama na nzela na telefone mpo na koyoka badiskur ya sipesiale oyo ekosalema na ba membres du Collège central ya ba Témoins de Jéhovah. Mpe voyage ekofutama mpo na kopesa nzela na bamisionere ya mokili mobimba ete bakenda kotala baboti na bango.

Soko Jéhovah alingi, ba assemblées ya distrike “Boyengebene ya Nzambe” ekobanda mokolo ya jeudi na 13h30, mpe ekosuka mokolo ya dimanche na 16 heures. Tomibongisa mpo koyangana na yango mikolo nyonso uta ebandeli kino nsuka na programme. Oya na mposa ya kolya bilei na elimo mpe na mwa lokasa mpo na kokoma makambo ya ntina. Tya elikya mpenza ete Jéhovah abombeli biso “elambo” na biloko kitoko oyo ekolendisa biso mpo na mosala oyo etikali na biso kosala.​—Yisaya 25:6; Loyembo na Salomo 2:4.

Ee, tika ete mokomoko na biso azwa bolamu ya elimo na assemblée ya distrike “Boyengebene ya Nzambe”!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto