Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/2 lok. 30
  • Yaka na assemblée ya distrike “monoko na peto”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yaka na assemblée ya distrike “monoko na peto”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masolo mosusu
  • Tobyangi yo ete oya koyanganana ba assemblée ya distrike “Baninga na bonsomi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Bisika mpe badates ya ba assemblées “Mateya mauti na Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Boyei malamu na ba assemblées ya distrike “bamemi na pole”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Yaká na liyangani ya etúká “bobangi Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/2 lok. 30

Yaka na assemblée ya distrike “monoko na peto”

UTA na Babele, bokeseni na minoko ekomaki ntina na bokabwani. Ezali na Babele nde Jéhovah abulunganisaki monoko na bato mpo na kopekisa mikano na bango: balingaki ‘kotonga ndako molai mpe komisalela nkombo na lokumu’. (Genese 11:4.) Bokeseni na minoko ezali solo kokabola, mpo na yango, tozwa ndakisa, bokabwani na bituluku mibale oyo esalamaki esili koleka mwa bambula na université katolike ya Louvain (Belgique).

Ezali bobele monoko nde ezali kokabola bato te. Ekolo, mposo, boyekoli oyo moto asalaki, mpe bozwi na moto, makambo yango mazali mpe kokabola bato. Kasi ba Témoins de Jéhovah bazali ntango nyonso komilengela mpo na kolonga bantina oyo na bokabwani mpe bazali solo na bomoko.

Bomoko yango emonanaki na lolenge ya kokamwisa na elanga na mbula eleki na mokili ya Pologne, na mboka chorzów (pembeni na Katowice), na Poznań mpe na Varsovie epai kuna Batemwe ya minoko mikeseni soko 20 mpe bautaki na mikili 37 basanganaki. Nzokande, bomoko na kokamwisa ezalaki kati na bango. Ndenge nini likambo yango ekokaki kosalema? Ee, ezali mpo ete bango nyonso bazalaki kosolola “monoko na peto”, yango ezali bongo solo na Biblia, oyo mosakoli Sofoni, asakolaki na maloba oyo: “Na ntango yango nakopesa (elobi Jéhovah Nzambe) epai na bato​—ekozala libongwani monoko na peto, mpo ete babelela nkombo na Jéhovah bango nyonso, mpo ete basalela ye na motema moko.”Sofoni 3:9.

Na bongo ezali na ntina malamu ete ba assemblées ya distrike na 1990 ezala na motó ya likambo “Monoko na peto”. Mpo na kozanga kokoka na bomoto, bopusi na mokili mabe na Satana mpe misala na mayele mabe ya Diable mpe bademó na ye, ezali likambo ya petee te koloba “monoko na peto”. Tosengeli ntango nyonso kobunda mpo na ezalela ya moimi oyo ekoki kokabola biso.

Mpo na nini Nzambe apesaki biso monoko oyo na peto? Ezali mpo ete tokoka kosalela ye na “motema moko”. Mabongoli mosusu na Biblia mamonisi ete yango elimboli kosalela “na nse na ekanganeli moko” (Jérusalem); “na molende moko” (Maredsous); “na bokasi moko”. Votre Bible.

Na nzela ya badiskur, bilakiseli, makambo malekaki na bomoi ya bato mosusu, molongo ya masolo mpe badrame na Biblia, ba assemblées oyo ekolendisa biso mpe ekopusa biso na koloba monoko na peto kozanga nkaka. Ekopusa biso lisusu na kosalela Nzambe elongo na bandeko na biso na makasi koleka mpe na bomoko. Ba assemblées na mikili oyo bazali na bonsomi ekobanda Jeudi nsima moke ya 13 heure mpe ekosila dimanche penepene na 16 heure. Soki ozwami na moko na mikili yango obanda komibongisa uta sikawa mpo na kozala wana banda na loyembo ya liboso, mpe kozala wana na biteni nyonso kino libondeli ya nsuka na dimanche nsima ya midi.

Mema Biblia na yo mpe mokanda ya nzembo, mpe buku mpo na kozwa ba notes. Kolisa mposa makasi na makambo na elimo mpo na koya na yango, mpe okozonga osili kobongisama malamu koleka mpo na koloba monoko na peto mpe kosalela Jéhovah. (Awa na Zaire, tokolanda badiskur yango lokola momeseno kati na masanga na biso. Nzokande, mpo na baoyo bazali na likoki ya kotambola, liste ya ba assemblées epesami na nkasa elandi).

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto