Mosolo ya libala mpe baklisto
Kino lelo oyo, na mikili mingi, bazali naino kopesa mosolo mpo na libala, ndenge bankoko bazalaki kosala yango na kala. Mingimingi, ekofutamaka na mbongo, elongo na makabo ya ntalo. Motuya ya mosolo mpo na libala mozali kobuta to mpe kokita na kotalelaka esika bato bafandi, libota, bozwi ya libota, kelasi moto akotaki, mpe makambo mosusu. Na mikili mosusu mibeko mitiami mpo na likambo yango, atako bobele ntalo moke na bato nde batosaka motuya mobongisami na mibeko.
Soko totali likambo yango, tokomona ete bazali kolekisa ndelo na ndenge bazali kosalela yango lelo oyo. Na yango, ekozala likambo na mayele ete yo moklisto ososola likoló na bopusi oyo ezaleli yango ekoki kokotisa kati na bomoi na ye.
Na Papouasie-Nouvelle-Guinée, bofuti ya mosolo mpo na libala ekokani na mosolo moye libota ya mobali abali, elingi koloba bandeko na ye ya penepene bakopesa na libota ya mwasi abali. Motuya mobandi na 42 000 Z. kino 1 925 000 Z., na kotalelaka bozui ya libota ya elenge mobali. Na Sri Lanka, yango ezali bongo te: ezali baboti ya elenge mwasi nde bakopesa na fiansé ya mwana na bango makabo mpo na libala lokola biju, biloko mosusu, ndako to mpe mbongo. Mpo ete libula libima te na libota, ekosalamaka mingi ete, bandeko ya penepene babalana.
Na bamboka mingi ya Afrike, mosolo mpo na libala ezali kati na masengami maye makokokisa mpe makondimisa kontra ya libala. Tata moko Monigeria oyo akomaki pene na kobalisa mwana na ye ya mwasi, alimboli boye: “Epai na ba Igbos, kofuta mosolo mpo na libala ezali na ntina mpo ete libala endimama. Ntango bazwi mosolo ya libala, libota ya elenge mwasi bamonisi ete bandimi libala yango. Ezali na motindo yango nde bakoyeba ete bato boye babalani. Ezali mpo na ntina wana nde ata libala oyo esalemi na ndako-nzambe to na miso na Leta, ekondimama na bato te soko mosolo ya libala mopesami naino te”.
Bopusi likoló ya Tata
Epai na bato wana ya Afrika, kofuta mosolo mpo na libala ezalaka kala elembo ezalaki komonisa ete mobali akoki mpo na kotambwisa libota. Bandeko na ye bakokende epai ya baboti ya elenge mwasi, mpo na koyokana bobele mpo na mosolo oyo ekopesama mpo na libala. Kasi, na mikolo na biso, makambo mabongwani na mikili mingi. Mpamba te, ntango oyo, batata bazali koluka nde komatisa mosolo ya libala. Na Nigéria, mosolo esengami ekobanda na motuya motyami na mibeko ya mboka, moye mokokani na 490 000 Z., kino 5 950 000 Z. Ntango mosusu, bakozela baboti ya mwana mobali bapesa makabo to mbongo liboso ete bakutana mpo na mbala ya yambo. Bongo na Zaïre, esengeli lisusu kofuta mpo na “kofungola monoko ya tata” elingi koloba mpo na kozwa nzela ete andima kotalela ntalo ya libala ya mwana na ye ya mwasi. Ekomaka ete, ata nsima ya kozua mwa ndambo ya mbongo tata akosenga lisusu mbongo mpe makabo.
Ezaleli ya motindo boye elendisaka lokoso. Nzokande, Biblia elobi: “Mposa na mosolo ezali ntina na mabe nyonso.” (1 Timoté 6:10) Mpo na lokoso, okoki kokoma mobotoli mpe kozanga kondimama na Nzambe. Biblia elobi lisusu, “moto na pite te mpe moto na bosoto te mpe moto na elulela te (ye mosambeli na bikeko), azali na libula kati na bokonzi na Klisto mpe na Nzambe”.—Baefese 5:5; tala Masese 20:21; 1 Bakolinti 5:11; 6:10.
Yango emonisi ete, mabe ezali te na kopesa mosolo ya libala epai na tata mpo na kokanisela ye na ndenge akopesa mwana na ye ya mwasi, oyo ye abokolaki mpe ateyaki. Elenge mobali, akoki kozua yango lokola elembo ya botondi mpo na mateyo oyo fiansé na ye asili kozua. Kasi, baboti mosusu balingi ete bazongisela bango mosolo nyonso babimisaka, na kokanisaka ete ntango bana na bango ya basi bakobala, bakosalisa bango lisusu te na kobokola bana mosusu ya mike oyo batikali. Bazali kosenga mosolo mingi lokola soki nde bana na bango ya basi bakomi biloko ya kotekisa. Nzokande, ezali mokumba ya baboti ete bateya bana na bango na ndenge malamu. Basengeli kosepela na ndenge bakokisi mokumba na bango, kasi bakoluka kozwela yango matomba te, ezala na lokumu to na kosengaka mosolo mingi mpo na libala. Na esika ya kotinda baboti mpo na kokanisa na matomba ya mosuni oyo bakoki kozwa na nzela ya bana na bango, Biblia elobi: “Mpamba te ebongi te . . . ete bana babombela baboti biloko, kasi baboti babombela bana mpenza”.—2 Bakolinti 12:14.
Batata mosusu oyo bamilobaka ete bazali baklisto, bakosengaka epai na ye oyo akozala bokilo na bango, ye mpe moklisto lokola bango, mosolo oyo ekokani na bozui na ye te. Na ndakisa, batata mosusu basili koboya mosolo ya moke oyo euti na moklisto, mpo na kondima mosolo ya mingi ya bato ya mokili! Bamosusu bazali kotika likambo ya koyokana mpo na mosolo ya libala na maboko ya bandeko na bango oyo bazali baklisto te, baoyo bakosenga mosolo mingi mpenza. Soko bayokani noki te mpo na mosolo ya libala, yango ekoki kopusa bilenge mibale na pite. Esalamaka ndenge yango epai na bato ya mokili. Na yango, soko baboti ya elenge mwasi baboi mosolo moke oyo elenge mobali akani kopesa, mbala mingi emonanaka ete, lokola batungisami, bilenge bazali kokangisa bango monoko, elenge mwasi azali kokoma na zemi.
Baklisto bakoki kosala bongo te. Liloba ya Nzambe epekisi pite, mpe baye bakosalaka yango bakoki kobimisama na lisangá. (1 Bakolinti 6:9; Baebele 13:4) Tata oyo mwana na ye ya mwasi, asali pite, asengeli kopamelama; mpe yango ekoki kozala na bopusi mabe mpo na ezaleli na ye kati na lisangá. Bobele bongo, ekozala ezaleli na moklisto te soki tata moko akondima mosolo mpo na libala epai na moto na mokili, ata ezali mingi mpo na kopesa ye mwana na ye ya mwasi, oyo asili komipesa na Nzambe. Tata motindo wana akokokisa masengami te mpo na kozua mikumba na lisangá. Baboti oyo bazali baklisto bakolinga ete bana na bango balendisama na kati ya lisangá mpe bakosalisa bango mpo ete bazala na ezalela ya peto. Bakolinga ete bana na bango ya basi basala libala ya esengo “kati na Nkolo”, elongo na mobali oyo azali mpe kolinga Jéhovah mpe akotosaka na bozindo mibeko mpe mitinda na ye.—1 Bakolinti 7:39.
Ezali ezaleli na moklisto te na kokanisaka ete mosolo mpo na libala ezali nzela ya kozwa mbongo na móto ya mwana, na kosengaka ntalo mingi koleka. Tata oyo azali moklisto asengeli komibatela na lokoso mpe na moyimi mpamba te, yango ekobebisa elimo na ye mpe makambo na ye kati na lisangá.—1 Bakolinti 6:9, 10.
Na esengo, batata baklisto mingi bazali komonisa bokatikati ntango basengaka mosolo mpo na libala, mpe bakoki kokumisama mpo na yango. Bamosusu bamoni malamu na kosenga ata eloko te, na koboyaka kobebisa momesano to kobimisa mikakatano ya elimo.
Mosolo mpo na libala mpe babalani
Mbala mingi, ezali lokoso ya elenge mwasi nde ekotinda baboti batia ntalo ya mosolo mpo na libala. Na ndakisa, elenge mwasi oyo alingi bobele libala ya motuya mpe ya lokumu, akotungisa baboti na ye mpo ete mposa na ye ekokana, to mpe lisusu, elenge mosusu alingi ete, liboso akende na ndako ya libala, ebongi baboti basombela ye biloko ya ndako ya motuya. Mpo na kosepelisa mwana na ye ya mwasi, tata akoki komona malamu ete abakisa mosolo mpo na libala.
Elenge mobali oyo afuti bilambo ya motuya mingi to mpe biloko ya ntalo eleki ndelo, akobanda libala na banyongo mèkè. Liloba ya Nzambe lilobi boye: “Nde mayele mauti na likolo . . . esosolaka noki”. Bilenge babalani bakoki kosenzela na “etambweli na bango ya bato na bososoli, eyebana na bato nyonso” na kobongisaka libala oyo ekobakisela moto moko te mokumba monene mpo oyo etali mosolo.—Yakobo 3:17; Bafilipi 4:5.
Ntango abali, mwasi akoki kobanda komeka bolingo ya mobali na ye, na kotalelaka mosolo oyo epesamaki mpo na libala. Soko mobali apesaki mosolo moke, mwasi akozala ntango nyonso komitungisa. Akoki komiloba ete, mobali akokakatana te mpo na kobengana ye soko alembi ye, mpamba te, abebisaki na ye mosolo mingi te. Ezali solo ete mibali bazongisaka basi na bango epai ya baboti mpo na ntina mingi ekeseni; na ndakisa, mpo ete azali ekomba, to mpo azali na elimo ya lipanda. Kozanga koyeba, baoyo bazali koloba epai na elenge mobali oyo afuti mosolo mingi ya libala ete: “Osombi mwasi”, bazali kolendisa ezaleli yango. Soko afutaki ebele na mosolo, akoki kotalela mwasi na ye lokola mosali na ye oyo asombaki, kasi lokola moninga oyo akangani na ye te. Bobele bongo batata babimisaki bantina mingi mpe bazongisaki mosolo oyo bazwaki mpo na libala mpe basengaki epai na bana na bango ya basi ete balongwa na ndako ya mobali.
Bamosusu bakolobaka ete, motuya monene ya mosolo mpo na libala, mokopesa nzela te na makambo motindo wana; mpo ekozala mpasi mingi na kozongisa ebele na mosolo. Mpo na bango, soko basengi mosolo mingi mpo na libala, yango ekopekisa libala ya nokinoki; ekopesa mpe ntango mpo ete mobali akoka kobomba mosolo mokoki mpo na kobala. Mpe bazali kokanisa ete, makambo wana makokembisa mobali, makobongisa ye na kokumba mikumba, makosala bikanganeli malamu.
Atako mbala mosusu likanisi yango ekoki kozala solo, libala ya baklisto ekosimbama na makambo ya mosuni te. Bosembo ya mobali bozali kouta te na kobangaka ete noki akobungisa mosolo na ye, soki libala ekabwani. Nzokande, ebongi na ye atosa etinda oyo ya Biblia: “Oyo nde Nzambe asili kotonga, tika te ete moto akangola yango”. (Matai 19:6) Na esika ya kotalela mwasi na ye lokola eloko asombi, mobali asengeli nde ‘kopesa ye lokumu’. (1 Petelo 3:7) Yesu alobaki ete, mobali mpe mwasi bakokoma “mosuni moko” na libala na bango. (Matai 19:5; Genese 2:24) Biblia epesi toli na mobali ete alinga mwasi na ye, na kobongisaka ye lokola akosalaka mpo na nzoto na ye moko. (Baefese 5:28, 29) Likambo ya ntina ezali boye ete bolingo ya mobali ekomonisama na lolenge azali kobatela mwasi na ye na mikolo milandi mokolo ya libala. Ata mobali apesi mosolo ya libala to apesi te; soko azali kobongisa mwasi na ye mpe azali kolakisa ye bolingo ya bosembo; tokotya lisusu ntembe na bolingo ya mobali epai ya mwasi na ye?
Ntalo ya mosolo mpo na libala ekoki lisusu kobebisa ezalela ya mobali epai ya ba bokilo na ye. Soko afutaki bango mosolo mingi, akoki kokanisa ete, azali lisusu na mokumba te epai na bango, ata soko bazali kokelela. Nzokande, Biblia elobi: “Nde soko mwasi-akufeli-mobali azali na bana to bana na bana na ye, bongo bayekola kosalela Nzambe kati na ndako na bango mpenza liboso, mpe bazongisa mwa makabo epai na baboti. Mpo ete oyo ekosepelisa Nzambe”. (1 Timote 5:4) Baklisto bazali kolanda toli oyo, kasi mikakatano mikoki koingela soko, epai ya mobali, ndimbola ya mikumba na ye ebebisami, na likanisi oyo ete asilaki kofuta mosolo mpo na libala.
Likanisi malamu
Makambo mosusu makosalamaka na ntango ya kopesa mosolo mpo na libala, makoki kobimisa makama epai ya fiansé ya elenge mwasi oyo azali moklisto, nzokande baboti na ye bazali baklisto te. Bakoki kosenga fiansé ya elenge mwasi ete asangana na milulu ya losambo na bankoko mpe na endimeli ya kozanga kokufa na molimo. (Mosakoli 9:5, 10; Ezekiele 18:4) Kasi, akoki nde kosalela yango, bongo andimama lisusu na Nzambe, mpe azwa lipamboli libombami mpo na baye basili kopetola milimo na bango na kotosaka solo? (1 Petelo 1:22; Emoniseli 18:4) Liboso na masengami ya motindo boye, moklisto oyo amipesa na Nzambe, asengeli kozala na ekateli ya kotosa Nzambe liboso na kotosa bato”.—Misala 5:29.
Maloba nyonso tosili koyoka, oyo mapesi toli mpo na kokima lokoso, mpo na kokeba na pite, mpe mpo na kobala bobele mondimi, mazali lisusu na ntina na ntango ekozala ete libota ya fiansé ya mobali nde basengeli kofuta mosolo mpo na libala. Elenge mwasi moklisto, na baboti na ye, bakoki komitika kotambwisama te na mibeko ya mokili mpo na kopona mobali. Kobala moto ya mokili ezali elembo ya kozanga botosi epai na Nzambe. Na nzela ya Moïse, Nzambe alobaki na Bayisraele: “Okobala kati na bango te (bapakano). Kopesa bana basi na yo epai na bana mibali na bango te, to kokamata bana basi na bango mpo na bana mibali na yo te. (Kolimbola 7:3, 4; 1 Bakolinti 7:39) Solo mpenza, ekozala kopengwa ntango bilenge baklisto basi to mibali, bakolekisa mayebisi na bango na bazulunalo, mpo na koluka mobalani oyo akosepelisa bango. Basengeli koluka mobalani malamu kati na bandeko na bango baklisto, mibali mpe basi.
Lokola libala ezali ebongiseli ebulisami na Jéhovah, ebongi totambwisama na Liloba na ye. Bolingo ya mozindo mpo na Jéhovah, mpo na bana na biso, mpe mpo na baninga na biso baklisto, ekopusa biso na koboya misala nyonso mikotelemela oyo ezali sembo mpe malamu. (Nzembo 119:105; Baebele 4:12) Jéhovah akolanda kopambola baoyo bazali komitika komitambwisa na Liloba na ye, mpo na kozua makatami matali bobele mosolo mpo na libala te, kasi lisusu, makambo nyonso ya bomoi na bango.—Masese 10:22.