Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/9 nk. 24-27
  • Bózala na bokatikati ntango bozali kosɛnga mbongo ya libala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bózala na bokatikati ntango bozali kosɛnga mbongo ya libala
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mitinda ya Biblia oyo emonisi bokatikati
  • Nani akosɛnga mbongo ya libala?
  • Bóboya bizaleli oyo ebongi na baklisto te
  • Bato oyo bazali na makambo makasi te
  • Kozala na bokatikati epesaka matomba
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Mosolo ya libala mpe baklisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • “Libala ya bonkɔkɔ” na Ghana
    Lamuká!—1997
  • Lolenge ya komibongisa mpo na libala oyo ekolónga
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/9 nk. 24-27

Bózala na bokatikati ntango bozali kosɛnga mbongo ya libala

LELO oyo, lokola mpe na ntango oyo Biblia ezalaki kokomama, na bamboka mosusu basɛngaka ete mobali apesa naino mbongo ya libala liboso ya kokamata mwasi. Ntango Yakobo alukaki kobala mwana ya Labana ayebisaki ye boye: ‘Nakosalela yo mbula nsambo mpo na Laele mwana na yo ya nsima.’ (Genese 29:18) Lokola Yakobo alingaki Laele, apesaki mbongo oyo ekokani na lifuti ya mbula nsambo ya mosala! Labana azwaki mbongo, kasi akosaki Yakobo, abalisaki ye naino Lea, mwana na ye ya liboso. Ata mpe na nsima, Labana akobaki kosalela Yakobo makambo na bosembo te. (Genese 31:41) Lokola Labana azalaki kozwa biloko ya mosuni na motuya mingi koleka, bana na ye ya basi bazalaki lisusu komemya ye te. Batunaki ete: “Biso totalami na ye lokola bapaya te? Mpo ete ye asili kotɛkisa biso mpe abebisi mosolo nsima na biso.”​—Genese 31:15.

Lokola na mokili ya lelo bato bazali na mposa ya biloko mingi ya mosuni, baboti mingi bazali lokola Labana. Basusu kutu bazali mabe koleka Labana. Zulunalo moko ya Afrika eyebisi ete, “batata mosusu bazali kobalisa bana na bango bobele mpo na lokoso na bango.” Mikakatano ya kozwa mbongo mpe epusaka baboti mosusu bámona bana na bango ya basi lokola biloko ya kotɛkisa mpo na kozwa mwa mbongo.a

Baboti mosusu balingaka kobalisa bana na bango ya basi noki te, mpo bazelaka mobali oyo azali na mbongo mingi. Likambo yango ekoki kobimisa mikakatano minene. Mopanzi-nsango moko na Afrika ya Ɛsti akomaki boye: “Bilenge mibali bamonaka malamu kokima na bilenge basi. Basalaka bongo mpo bakokoka te kopesa ebele ya biloko oyo babokilo ya matata basɛngaka na libala.” Kosɛnga mbongo ya libala mingi ekoki komema bato ete bákwea na pite. Bilenge mibali mosusu mpe bazali kobɛta motó mpo na kobala mwasi, kasi yango ezali kokɔtisa bango banyongo mineneminene. Mopesi-toli moko na Afrika ya Sudi alobaki ete: “Baboti basengeli kozala na bokatikati. Basengeli kosɛnga mbongo mingi te. Bato oyo babalani sika bazalaka na mposa ya mbongo mpo na kobikela. Mpo na nini kotɔbɔla libenga ya elenge mobali?”

Ndenge nini baboti baklisto bakomonisa ete bazali na bokatikati ntango bazali kosɛnga mbongo ya libala? Yango ezali lisɛki te, mpamba te Biblia ezali kosɛnga ete: “Tiká ete ezaleli na bino ya bokatikati eyebana na bato nyonso.”​—Bafilipi 4:5.

Mitinda ya Biblia oyo emonisi bokatikati

Soki baboti baklisto bakosɛnga mbongo ya libala to bakosɛnga yango te, wana ezali likambo ya bango moko. Kasi soki basepeli kosɛnga mbongo, basengeli kolanda mitinda ya Biblia. Liloba ya Nzambe elobi: “Ezaleli na bino ezanga mposa na mosolo.” (Baebele 13:5) Soki moboti moklisto atosi etinda oyo te ntango azali kosɛnga mbongo ya libala, akomonisa polele ete azali ndakisa malamu te. Mibali oyo bazali na mikumba na lisangá ya boklisto basengeli kozala na “makambo makasi te,” ‘baluli na mosolo te’ to “[bato ya lokoso oyo balukaka litomba ezangi kolongobana te, NW].” (1 Timote 3:3, 8) Moklisto oyo azali kosɛnga mbongo ya libala na lokoso nyonso, mpe aboyi komisembola na likambo yango, akoki ata kobimisama na lisangá.​—1 Bakolinti 5:11, 13; 6:9, 10.

Na ntina na mikakatano oyo ebimaka mpo na lokoso, baguvernema mosusu etii mibeko na oyo etali mbongo ya libala. Na ndakisa, mobeko moko na ekólo Togo na Afrika ya Wɛsti elobi ete mpo na libala “moto akoki kopesa mbongo to biloko. To akoki mpe kopesa na mbongo, na biloko.” Mobeko yango ebakisi ete: “Mbongo ya libala ekoki koleka F CFA 10 000 to (dolare 20) te.” Biblia ezali mbala mingi kosɛnga baklisto ete bátosaka mibeko ya Leta. (Tito 3:1) Atako Leta ezali kotindika na makasi te ete bato bátosa mobeko yango, moklisto ya solo asengeli kotosa yango. Na ndenge yango, akozala ntango nyonso na lisosoli malamu na miso ya Nzambe mpe akobɛtisa bato mosusu libaku te.​—Baloma 13:1, 5; 1 Bakolinti 10:32, 33.

Nani akosɛnga mbongo ya libala?

Lolenge ya kosɛnga mbongo ya libala na bamboka mosusu ekoki kobuka motinda oyo ya Biblia. Nzokande etinda yango ezali na ntina mingi. Biblia elobi ete tata nde azali mokonzi ya libota. (1 Bakolinti 11:3; Bakolose 3:18, 20) Na yango, baoyo bazali na mikumba na lisangá basengeli kozala mibali oyo bazali ‘kobatela bana na bango mpe ndako na bango mpenza malamu.’—1 Timote 3:12.

Nzokande, momeseno ya mboka ekoki kozala ete bandeko ya tata nde basengeli kosɛnga mbongo ya libala. Bobele bandeko yango nde basɛngaka ndambo ya biloko oyo ekopesama. Yango etyaka komekama na mabota ya baklisto. Mpo na kotosa bonkɔkɔ, batata mosusu batikaka bandeko na bango oyo bazali bandimi te ete básɛnga mbongo ya libala mingi. Likambo yango esalaka mbala mosusu ete elenge mwasi moklisto abalana na moto oyo azali mondimi te. Kosala bongo emonisi ete azali kotosa te toli oyo elobi ete moklisto asengeli kobala, “kasi [bobele] kati na Nkolo.” (1 Bakolinti 7:39) Tata oyo azali kotika bandeko na ye oyo bazali bandimi te ete bázwa ekateli oyo ekobebisa bolamu ya elimo ya bana na ye, tokoki koloba mpo na ye ete azali ‘kobatela ndako na ye mpenza malamu’ te.​—1 Timote 3:4.

Ezali boni soki tata moklisto akozala te na esika mbongo ya libala ya mwana na ye ekopesama, ndenge yango ekómelaki Abalayama, tata ya mabota oyo azalaki kobanga Nzambe? (Genese 24:2-4) Soki baponi moto mosusu aloba na nkombo na ye, tata moklisto asengeli komindimisa ete moto yango akolanda malako oyo eyokani na mitinda ya Biblia, malako oyo esɛngi kozala na bokatikati. Lisusu, liboso ya kokende kosɛnga mbongo ya libala, baboti baklisto basengeli kokanisa malamumalamu. Bakopesa nzela te ete mibeko makasimakasi ya bonkɔkɔ ezala na bopusi na ekateli na bango.​—Masese 22:3.

Bóboya bizaleli oyo ebongi na baklisto te

Biblia eboyi lolendo mpe “[enzombo ya kolakisa bikolo oyo ozali na yango, NW].” (1 Yoane 2:16; Masese 21:4.) Kasi, bato mosusu na kati ya lisangá bamonisaki bizaleli wana ntango ya kopesa mbongo ya libala. Basusu bamekolaka bato ya mokili wana bazali komikumisa ete basɛngi mbongo mingi ya libala. Kutu, filiale moko ya la Société Watch Tower na Afrika elobi ete: “Mibali mosusu bapesaka babokilo na bango lokumu te na boboto oyo bamoniselaki bango. Bapesaka basi na bango kilo te mpo babalaki bango na ‘mbongo moke.’”

Baklisto mosusu bakómi na lokoso ya kosɛnga mbongo ya libala mpe yango ezali kobimisa mikakatano minene. Na ndakisa, lapolo moko euti na filiale mosusu ya la Société Watch Tower elobi boye: “Ezalaka mpasi mpo bandeko mibali oyo bazali minzemba bábala to mpo bandeko basi bámona mibali oyo bakotuna bango libala. Bandeko mingi bakómi kokwea na pite mpe kobimisama na lisangá mpo na likambo yango. Bandeko mosusu bazali kokende koluka wolo to diama oyo bakoki kotɛkisa mpo na kozwa mbongo ya kobala mwasi. Yango ekoki kozwa bango mbula moko to mibale to mpe koleka. Mpe mbala mingi bazali kolɛmba na elimo mpamba te bakabwani mosika na bandeko mpe na lisangá.”

Mpo na kopɛngola mikakatano ya ndenge wana, baboti baklisto basengeli kolanda ndakisa ya bato oyo bakɔmɛli na kati ya lisangá. Atako azalaki moboti te, ntoma Paulo azalaki na makambo makasi te epai ya baninga na ye bandimi. Aboyaki komemisa bato mosusu kilo ya mpambampamba. (Misala 20:33) Ya solo, baboti baklisto basengeli kokanisa ndakisa na ye oyo ezangi moimi ntango bazali kotalela likambo ya mbongo ya libala. Yango wana, na kopemama na elimo na Nzambe Paulo akomaki: “Bandeko, [bólanda ndakisa, NW] na ngai mpe bótala epai na bango bazali kotambola kobila elakiseli ezwi bino kati na biso.”​—Bafilipi 3:17.

Bato oyo bazali na makambo makasi te

Na makambo ya libala, baboti baklisto mingi bapesaki ndakisa ya malamu, bazalaki na makambo makasi te. Talá ndakisa ya Joseph na mwasi na ye Mae, oyo bazali basakoli ya ntango nyonso.b Bafandaka na moko ya Bisanga Salomon epai kuna makambo ya mbongo ya libala ebimisaka mikakatano mingi. Mpo na kopɛngola mikakatano yango, Joseph na Mae bazwaki bibongiseli mpo ete mwana na bango ya mwasi Helen abala moto ya esanga ya pembeni. Basalaki mpe bongo mpo na Esther, mwana na bango mosusu ya mwasi. Joseph asɛngaki bokilo na ye Peter mwa mbongo moke ya libala. Ntango batunaki ye mpo na nini asalaki bongo, Joseph alobaki: “Nalingaki komemisa bokilo na ngai kilo te, mpo azali mobongisi-nzela.”

Batatoli ya Yehova mingi na Afrika bapesaki ndakisa malamu, bazali na makambo makasi te. Na bamboka mosusu, mbala mingi bandeko ya tata mpe ya mama ya mwasi basɛngaka mbongo mingi liboso kutu ya kosɛnga mbongo ya libala. Mpe mpo na komonisa ete alingi mpenza mwasi na ye, mobali akopesa elaka ete ntango leki ya mwasi na ye akobala, ye nde akopesa mbongo ya libala yango.

Kasi, tótala ndakisa ya Kossi na mwasi na ye Mara. Mwana na bango ya mwasi Beboko oyo abalanaki na mokɛngɛli-motamboli moko ya Batatoli ya Yehova na mikolo mileki. Liboso ya libala na bango, bandeko ya mosuni batyaki baboti ya Beboko molunge ete básɛnga mbongo ya libala mingi, mpamba te batyaki motema na mbongo yango. Kasi, baboti wana balingaki te. Nzokande, basololaki mbala moko na bokilo na bango ya mobali, basɛngaki ye mbongo mingi te mpo na mwana na bango ya mwasi. Bazongiselaki bilenge babalani wana katikati ya mbongo yango mpo ete bábongisa feti ya libala na bango.

Ndakisa mosusu kaka na ekólo wana ezali ya elenge mwasi moko Motatoli, nkombo na ye Itongo. Na ebandeli, baboti na ye basɛngaki mbongo mingi te mpo na libala na ye. Kasi bandeko ya mosuni balobaki ete bábakisa mbongo. Matata ebimaki, mpe emonanaki lokola ete bandeko bazelaki ete bápesa bango mbongo kaka ndenge balingaki. Atako azalaka nsɔninsɔni, Itongo atɛlɛmaki mpe na limemya nyonso alobaki ete akobala kaka Sanze oyo azali moklisto ya molende, ndenge bayokanaki liboso. Na nsuka, alobaki ete: “Abu pia” (elingi koloba “Makambo esili”) mpe afandaki. Mama na ye Sambeko oyo azali moklisto akɔtelaki ye. Matata ezalaki lisusu te, mpe libala esalemaki ndenge bayokanaki.

Baboti baklisto, oyo bazali na bolingo, bazali na makambo oyo bamibanzabanzaka na yango mingi koleka litomba na bango moko na mbongo ya libala. Mobali moko na ekólo Cameroun ayebisi boye: “Bokilo na ngai ya mwasi alobaka na ngai ntango nyonso ete eloko nyonso oyo nalingaki kopesa ye mpo na mbongo ya libala, nasalela yango mpo na kosunga mwana na ye ya mwasi.” Baboti ya bolingo bamibanzabanzaka lisusu na ntina na bolamu ya elimo ya bana na bango. Na ndakisa, bótala Farai na mwasi na ye Rudo, bafandaka na ekólo Zimbabwe mpe balekisaki mbula mingi na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Atako basalaka te, babalisaki bana na bango mibale ya basi na mbongo moke mpenza. Mpo na nini? Balingaki ete bana na bango bábala mibali oyo balingaka solo Yehova. Balobaki ete: “Eloko totalelaki na motuya mingi ezalaki ezaleli ya elimo ya bana na biso ya basi mpe ya babokilo na biso.” Ezali mpenza libɔndisi! Babokilo oyo bamibanzabanzaka na bolingo nyonso mpo na bolamu ya elimo mpe ya mosuni ya bana na bango oyo babalá babongi kopesamela longonya mingi.

Kozala na bokatikati epesaka matomba

Joseph na Mae oyo bafandaka na Bisanga Salomon bazwaki mapamboli mpo bamonisaki boboto mingi ntango babalisaki bana na bango ya basi. Bongo, babokilo na bango bakɔtaki banyongo te. Kutu, bana yango na mibali na bango bazwaki likoki ya kolekisa bambula mingi na mosala ya kopalanganisa nsango ya Bokonzi. Kokanisáká makambo yango, Joseph alobi: “Bikateli oyo ngai na libota na ngai tozwaki ememeli biso mapamboli mingi. Ya solo, na bantango mosusu bato oyo basosolaki likambo yango te bazalaki kotungisa ngai, kasi nazali na lisosoli malamu mpe nasepelaka ndenge namonaka bana na ngai bazali makasi na mosala ya Yehova. Bango moko bazali na esengo. Ngai na mwasi na ngai mpe tozali na esengo mingi koleka.”

Litomba mosusu ezali bongo boyokani malamu oyo okozala na yango na babokilo. Na ndakisa, Zondai na Sibusiso, basalaka na filiale ya la Société Watch Tower na ekólo Zimbabwe na basi na bango oyo bazali bandeko na mosuni. Dakarai, bokilo na bango ya mobali azali mosakoli ya ntango nyonso. Ntango asengelaki kosɛnga mbongo ya libala alobaki ete akozwa nyonso oyo bakopesa ye. Zondai na Sibusiso balobi: “Tolingaka bokilo na biso mingi mpe tosalaka nyonso ekoki mpo na kosunga ye soki akeleli.”

Ɛɛ, kozala na bokatikati na ntango ozali kosɛnga mbongo ya libala ebakisaka bolamu na libota. Na ndakisa, babalani ya sika bakokɔta banyongo te. Yango ekosalisa bango bábanda libala malamu. Yango epesaki mpe nzela na babalani mingi ya sika ete bálanda koluka mapamboli na elimo, lokola kozala mosaleli ya ntango nyonso kati na mosala ya kosakola mpe ya kozalisa bayekoli oyo esengeli kosalema na lombangu. Na nsuka, yango epesaka nkembo epai na Yehova Nzambe, Mobandisi ya libala oyo atondi na bolingo.​—Matai 24:14; 28:19, 20.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na bamboka mosusu makambo ezalaka ndenge mosusu. Baboti ya mwasi nde bapesaka baboti ya mobali biloko.

b Topesi bango nkombo mosusu.

[Etanda na lokasa 27]

BAZONGISAKI MBONGO YA LIBALA

Na bamboka mosusu, batyolaka mwasi oyo abali mpe baboti na ye soki basɛngaki mbongo mingi te mpo na libala. Yango wana, lolendo mpe mposa ya kotombola lokumu ya libota epusaka basusu básɛnga mbongo ya libala mingi. Libota moko na Lagos, mboka mokonzi ya ekólo Nigeria esalaki ndenge mosusu. Dele, bokilo na bango ya mobali alobi:

“Libota ya mwasi na ngai elongolaki ngai na mokumba oyo bonkɔkɔ etyelaka bato mpo na milulu oyo esalemaka ntango bapesaka mbongo ya libala, na ndakisa kosomba bilamba ya ntalo. Ata ntango topesaki mbongo ya libala, molobeli ya libota na bango atunaki boye: ‘Bolingi kokamata elenge moseka oyo lokola mwasi boyei kobala to lokola mwana na bino ya mwasi?’ Libota na ngai mobimba eyanolaki ete: ‘Tolingi kokamata ye lokola mwana na biso ya mwasi.’ Nsima na yango, bazongisaki mbongo na biso ya libala kaka na anvɛlɔpi oyo totyaki yango.

“Kino lelo oyo, nasepelaka na ndenge babokilo basalaki na libala na biso. Yango epusaka ngai ete nazala na limemya monene mpo na bango. Bizaleli na bango ya elimo epusaka ngai natalela bango mpenza lokola bandeko na ngai ya motema. Yango ezali lisusu na bopusi likoló na ndenge natalelaka mwasi na ngai. Nakolisi bolingo ya mozindo epai na ye mpo na motindo oyo libota na ye eyambaki ngai. Ntango tozali na mwa mokakatano, nalingaka te ete ekóma monene. Soki nakanisi kaka libota na ye, natyolaka mbala moko mokakatano oyo ebimi.

“Libota na ngai na libota na ye bazali na boyokani makasi. Ata sikoyo, nsima ya mbula mibale banda tobalanaki, tata na ngai atindaka mwa biloko na libota ya mwasi na ngai.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto