Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/4 nk. 8-15
  • Kufa na mwasi na pite mpe na bosoto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kufa na mwasi na pite mpe na bosoto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mwasi ya pite abimisami polele
  • LIBOMBAMI NA MWASI MPE NA NYAMA
  • Mwasi na pite abomami
  • Ekateli ezwami likoló na mwasi na pite mpe na mbindo makasi
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Boyokani kati na lingomba mpe bokonzi ya banazi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Babilone Monene abomami
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Libombami babilone monene, mwasi na pite, azali nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/4 nk. 8-15

Kufa na mwasi na pite mpe na bosoto

“Aleluya! Lobiko, na nkembo, na nguya ezali na Nzambe na biso! Mpo ete bikateli na ye bizali solo mpe sembo. Mpo ete akweisi mwasi na pite yango monene oyo abebisaki mokili na pite na ye; abukanisi ye mpo na makila na baombo na ye.”​—EMONISELI 19:1, 2.

1. Elimboli nini ete mwasi na pite asali pite na “mikonzi na mokili”, mpe ebimisi nini?

NYONSO oyo touti kolobela ezali makambo minene mingi mpe na mabe mpenza. Nzokande, ebongi toyeba ete longola wana, mwasi na pite oyo mama na bosoto, azali kosalaka pite elongo na “mikonzi na mokili”. Atako asili kokwea, azali naino na boyokani ya penepene elongo na mokili mpe azali kopusa bakonzi ya politike mpo na kokokisa mikano na ye. (Yakobo 4:4) Pite oyo na elimo - boyokani mabe oyo Babilone Monene azali na yango elongo na mikonzi na politike - ebendi kufa ya bamilió mingi ya bato bobele mpamba. Mwasi na pite oyo mama na bosoto asili kosala mabe mingi na kokotelaka babundi na ngambo nyonso mibale na boumeli na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba; nzokande, ezali na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba nde masumu na ye “matondaki kino na likolo”. (Emoniseli 18:5) Mpo na nini?

2. (a) Ndenge nini Franz von Papen asalisaki Adolf Hitler na kokamata bokonzi na Alemanye? Nzokande mokonzi ya kala na Alemanye alobaki nini mpo na moto yango mosaleli ya pape? (b) Kati na boyokani (concordat) oyo etyamaki maboko kati na bokonzi ya nazi mpe bakonzi ya lingomba ya katolike na Vatican, makambo mibale mazalaki libombami: yango wapi? (Tala note na nse ya lokasa.)

2 Tokamata ndakisa moko: Nini epesaki nzela na moto na yauli Adolf Hitler ete akoma chancelier (mokonzi)-mpe dictateur-kuna na Alemanye? Ezalaki mayele mabe ya politike oyo mosaleli moko ya pape asalelaki. Engebene Kurt von Schleicher, mokonzi ya kala ya Alemanye, moto yango azalaki “mosúli (traitre) koleka Yuda Mokeliota”. Moto yango nani? Ezalaki bongo Franz von Papen, oyo apusaki lisangá ya Action catholique mpe bazwi ete babundisa kominisme mpe batya Alemanye mobimba na nse na bokonzi na Hitler. Mpo na lifuta, von Papen aponamaki Vice-Chancelier to mokonzi-molandi. Hitler atindaki ye na Rome elongo na bato mosusu mpo na koluka boyokani kati na Bokonzi ya nazi mpe Vatican (mboka ya bakonzi ya Lingomba na katolike). Na libaku yango, pape Pie XI alobaki epai na bato wana bautaki na Alemanye ete azalaki na esengo na komona ete “boyangeli ya Alemanye etambwisami na moto moko oyo aboyi makambo nyonso ya kominisme”, mpe na le 20 Juillet 1933, na boumeli ya molulu moko monene mosalemaki na Vatican, Cardinal Pacelli (oyo nsima mua moke akomaki pape Pie XII) atyaki maboko na boyokani yango to concordata.

3. (a) Mokomi moko na lisolo ya bato akomaki nini na ntina na boyokani kati na bakonzi ya nazi mpe bakonzi ya lingomba ya katolike (Vatican)? (b) Na boumeli ya milulu misalamaki na Vatican, lokumu nini Franz von Papen azwaki? (c) Franz von Papen asalaki nini mpo na kofandisa bokonzi ya ba nazis na Autriche?

3 Mokomi moko na lisolo ya bato akomaki boye: “Boyokani (to concordat) [oyo etyamaki maboko kati na Alemanye mpe Vatican] ezalaki bolongi monene mpo na Hitler. Ezalaki lisungi ya liboso azwaki na libanda ya Alemanye, mpe eutaki na liziba moko eleki kotombwama.” Na boumeli ya milulu misalamaki na Vatican, Pacelli apesaki na von Papen Medayi moko monene na nkombo ya pape Pie IX (grand-croix de l’Ordre de Pie IXb). Kati na mokanda na ye L’Orage approche (ebimisamaki na 1948), Winston Churchill alobaki ete von Papen asalelaki “lokumu na ye ya katolike malamu” mpo na kopusa bakonzi na Lingomba ete bandima banazi oyo bakamataki bokonzi na Autriche. Na 1938, mpo na kokumisa mokolo mobotamaki Hitler, Cardinal lnnitzer atindaki ete bandako-nzambe nyonso na Autriche etelemisa drapo ya nazi liboso na yango, ebeta bangonga na yango mpe bandimi basambela mpo na mokonzi wana na yauli.

4, 5. (a) Mpo na nini bakonzi ya lingomba ya katolike (Vatican) bazali na ngambo monene mpo na makila masopamaki? b) Motindo nini ba episkopo katolike ya Alemanye asungaki Hitler?

4 Na yango, Vatican azali na ngambo monene mpo na ebele na makila masili kosopama. Eteni oyo ya ntina mingi kati na Babilone Monene esalisaki mpenza Hitler ete akamata bokonzi mpe “balendisaki” ye. Bakomaki mosika koleka, kino kondima minyokoli oyo mokonzi wana na yauli azalaki konyokola bato. Na boumeli ya mibu zomi na mibale oyo bokonzi ya nazi eumelaki, pape moloma alobaki eloko te. Na boumeli ya ntango yango, bankoto na bankoto na basoda ya katolike bazalaki kobunda mpe bazalaki kokufa mpo na nkembo ya bokonzi ya nazi, mpe bamilió na bato bazalaki kobomama na gaz kati na bisika oyo Hitler abongisaki mpo na koboma bango.

5 Ba episkopo ya Alemanye bamonisaki polele ete bazali kosimba Hitler. Mokolo oyo Japon, moninga ya Alemanye kati na etumba, abebisaki bamasuwa ya Amerike na mboka Pearl Harbor, zulunalo New York Times ebimisaki rapport oyo: “Likita ya ba episkopo ya katolike ya Alemanye oyo esalemaki na mboka Fulda esengaki ete ‘libondeli esalama mpo na etumba’, libondeli ya ntina oyo esengeli kotangama na ebandeli mpe na nsuka ya likita nyonso na ndako-nzambe. Ezali mpo na kobondela Nzambe ete apambola bibundeli ya Alemanye mpo elonga, abatela mpe bomoi mpe bokolongono ya basoda nyonso. Ba episkopo bapesaki mpe malako epai na basángo mpo ete ata mbala moko na sanza, na boumeli ya sermon moko ya sipesiale ya poso na poso, bakanisa badosa ya Alemanye oyo bazalaki kobunda ‘na mabelé, na mai mpe na likoló’.”

6. Soki bakonzi ya lingomba ya katolike (Vatican) basalaki pite ya elimo te elongo na bakonzi ya nazis, bampasi nini mbele ekokaki kopengolama na mokili?

6 Soki bakonzi ya Lingomba ya katolike oyo bafandi kuna na Vatican baboyaki boyokani nyonso na bokonzi ya nazi, mbele bomoi ya bato mingi ekokaki kobikisama: oyo ya ebele ya bamilió ya basoda mpe ba civils oyo bakufaki na etumba, oyo ya bamilió motoba ya Bayuda babomamaki mpo na ekolo na bango eyinamaki, mpe bomoi​—ya motuya monene na miso ya Nzambe​—ya bankoto ya ba Témoins de Jéhovah, bapakolami to “bampate mosusu”, oyo banyokwamaki makasi mpe mingi na bango bakufaki kati na ba camps de concentration ya banazi.​—Yoane 10:10, 16.

Mwasi ya pite abimisami polele

7. Ntoma Yoane alobi lisusu nini na ntina na mwasi na pite?

7 Esakweli ekomami na Emoniseli elobi solo mpenza! Engebene versets 3 kino 5 na mokapo ya 17, Yoane alobaki na ntina na anzelu: “Akambi ngai kati na elimo kuna na esobe. Namoni mwasi afandi likoló na nyama motane, oyo atondi na nkombo na kotuka, oyo mpe azalaki na mitó nsambo ná maseke zomi. Mwasi alati bilamba motane mwindo na motane mbondo, akembisi nzoto na wolo, na mabanga kitoko, na mangaliti; mpe azalaki na kopo na wolo na loboko na ye etondaki na bosoto mpe na mbindo na pite na ye. Na elongi na ye nkombo na libombami ekomami ete, Babilone monene, mama na basi na pite mpe na bosoto na mokili.”

8. (a) Eloko nini ezali kati na kopo ya wolo oyo mwasi na pite asimbi na loboko na ye? (b) Elimboli nini ete Babilone Monene “alati bilamba motane mwindo na motane mondo, akembisi nzoto na wolo, na mabanga kitoko mpe na mangaliti” to pauni?

8 Awa Yoane atali Babilone Monene penepene. Esika kati na esobe ebongoli solo mwasi yango, katikati na banyama na yauli oyo bafandi kuna. Ndumba oyo monene amonisami polele na eloko ezali kati na kopo oyo asimbi. Kopo yango emonisami na libanda lokola kopo ya motuya, kasi eloko ezali na kati, oyo mwasi yango azali komela, ezali mbindo na miso na Nzambe. Boninga na ye elongo na mokili, mateya na ye ya lokuta, bizaleli na ye ya mabe, komikotisa na makambo ya politike nyonso oyo endimami na Jéhovah te, ye oyo azali “Mosambisi na mabelé mobimba”. (Genese 18:22-26; Emoniseli 18:21, 24) Mpe tala bilamba na motuya oyo alati! Azali na monzele mpo na bandako-nzambe na ye etongami malamu mpe ekembisami na biloko na motuya mpe eumeli bikeke mingi. Na kolandaka elateli ya “mwasi na pite”, basángo bazali kolata barobe ya motuya mingi mpe ya kongala, motane ngwà mpe motane sò.

9. Babilone Monene azali na ngambo ya makila ya banani mpe banani uta ntango molai, mpe na maloba nini Yoane asukisi?

9 Kasi mabe na ye eluti mpo na likambo na makila. Uta kala Jéhovah azali na makambo ya kotuna ye. Mwasi yango na pite asungaki bakonzi mabe oyo basopi makila mingi na eleko na biso, nde lisusu, lisolo na ye na boumeli ya bikeke mingi, etondi na makambo na bosoto mpe na nsomo; azali mobimisi na bitumba ya mangomba, na kosambisama mpe kobomama ya bato oyo ye abengaki bango bapengwi (lnquisition), bitumba mpo na kobengana bapakano na Yelusaleme (croisades) mpe kobomama ya bantoma mosusu mpe ata kufa na Mwana na Nzambe, Nkolo Yesu Klisto, soki tolingi kokende mosika. (Misala 3:15; Baebele 11:36, 37) Tobakisa na makila oyo nyonso makila ya ba Témoins de Jéhovah oyo kala mingi te, basili kobomama to konyokwama makasi na kati na ba camps ya concentration. Tokoki kokamwa te na kotanga ete Yoane asukisi na maloba oyo: “Namonaki mwasi yango alangwi makila na basantu mpe makila na batemwe na Yesu”!-Emoniseli 17:6.

LIBOMBAMI NA MWASI MPE NA NYAMA

10. (a) Motindo nini mwasi na pite azali ntango nyonso konyokola ba Témoins de Jéhovah? (b) Bakonzi na mangomba na Babilone Monene bazali batambwisi ya motindo nini?

10 Yoane ‘akamwaki kokamwa monene’ na komonaka mwasi yango. Ezali ndenge moko mpo na biso lelo. Na bambula ya 1930 mpe 1940, “mwasi na pite” asalelaki lisangá ebengamaki Action catholique mpe mayele mabe ya politike mpo na konyokola mpe kopusa bakonzi ete bapekisa ba Témoins de Jéhovah ya sembo. Kino lelo, bipai binso oyo bopusi na ye ezali naino makasi, Babilone Monene alandi kobundisa, kotya nkaka, kotyola mosala ya ba Témoins de Jéhovah, oyo bazali kosakola nsango malamu ya elikya kati na Bokonzi na Nzambe. Awa basimbi bamilió na bato na boombo kati na mangomba ya Babilone Monene mwasi na pite, bakonzi na mangomba bazali kosala lokola ‘bakufi miso oyo bazali kokamba bakufi miso mosusu’ epai na libulu ya kufa. Mwasi na pite oyo na bosoto akoki ata mokolo moko te koloba lokola ntoma Paulo ete: “Yango wana nazali kotatola na bino lelo oyo ete nazali mpeto na makila na bino nyonso.”​—Matai 15:7-9, 14; 23:13; Misala 20:26.

11, 12. Libombami na “nyama na yauli motane” oyo amemi mwasi na pite elakisi nini, mpe kongengisama nini ba Témoins de Jéhovah bazwaki likoló na libombami yango na 1942?

11 Komonaka ete Yoane akamwi kokamwa monene anzelu alobaki na ye: “Okamwi mpo na nini? Ngai nakoyebisa yo libombami na mwasi yango mpe na nyama na mitó nsambo mpe na maseke zomi oyo azali kokumba ye.” (Emoniseli 17:7) “Nyama” yango elimboli nini? Bambula koleka 600 na kala, mosakoli Danyele amonáká banyama kati na emonaneli, mpe balimbolaki na ye ete banyama yango elakisi “mikonzi”, to bikonzi makasi ya politike awa na mabelé. (Danyele 7:2-8, 17; 8:2-8, 19-22) Yoane amoni awa na emonaneli lisangana ya banguya motindo oyo: “nyama na yauli na langi motane.” Ezali bongo Société des Nations, lisangá oyo bato basalaki na 1920, kasi ekweaki na libulu ya kufa ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki na 1939. Nzokande, “libombami na mwasi yango mpe na nyama na yauli” ezali nini?

12 Na kotambwisama na Nzambe, ba Témoins de Jéhovah bangengisamaki likoló na libombami yango na 1942. Na ntango yango, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki kongala, mpe mingi bakanisaki ete Armagedon eyei. Kasi Jéhovah akanisaki bongo te. Batemwe na ye bazalaki lisusu na mosala mingi liboso na bango! Na likita ya teokratike ya mokili ya sika oyo esalamaki kobanda na le 18 kino na le 20 Septembre 1942, uta na mboka Cleveland (Etats-Unis) oyo ekangisamaki na bamboka mosusu 51 ya Etats-Unis, Nathan Knorr, président ya la Société Watch Tower, asalaki diskur piblike na motó ya likambo “Kimya ya lobi ekoumela ntango molai?” Diskur yango ezalaki kolimbola mokapo ya Emoniseli 17:8, epai elobami na ntina na “nyama na yauli na langi motane” ete “azalaki nde azali te, mpe abelemi kobima na libulu bozindo mpe kokenda kino na libebi”. Molobi alimbolaki ete Société des Nations “azalaki” kobanda na 1920 kino na 1939. Abakisaki ete sikawa “azali te”, mpamba te lisangá yango ekufaki. Kasi nsima na Etumba ya mibale ya mokili mobimba, lisangá yango esengelaki kobima na libulu ya kufa. Ndimbola oyo ezwami na Biblia ekokanaki? Ee. Esalemaki bongo! Na 1945, “nyama na yauli” oyo esangisaki mikili mingi ebimaki na libulu ya kufa na nkombo ya sika ete Organisation des Nations unies.

13. Ndenge nini Babilone Monene elandi kosala pite elongo na “nyama”, elingi koloba O.N.U.?

13 Atako nguya na ye ekitaki na kokwea oyo akweaki, Babilone Monene alandaki kosala pite elongo na “nyama”, elingi koloba O.N.U. Na ndakisa, na Juin 1965, bakonzi na mangomba minene nsambo mabengami ete “ya boklisto” mpe oyo ya boklisto te, bamonisi ya katikati ya motuya ya bafandi ya mokili mobimba, bayanganaki na mboka San Francisco mpo na kokumisa mobu ya ntuku mibale ya O.N.U.c Bobele na mbula wana moko, pape Paul Vl abengaki O.N.U. ete ezali “elikya ya nsuka mpo na boyokani mpe kimya”. Na nsima, pape Jean-Paul ll atombelaki ete “O.N.U. etikala libela elikya ya nsuka mpo na kimya mpe boyengebene”. Na 1986, lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta bazalaki bato ya liboso mpo na kosimba ekateli ya O.N.U. ya kobenga mbula wana ete Mbula ya kimya na mokili mobimba. Kasi kimya ya solo eyaki na mbula yango engebene mabondeli na bango? Wapi! Epai mosusu, mikili oyo basangani na kati na O.N.U. babandi komonisa ete bazali na bolingo ya solo te mpo na mwasi oyo na pite, ndumba monene.

Mwasi na pite abomami

14. Mosala nini ya ntina “nyama” (O.N.U.) akosala, mpe na maloba nini anzelu alobeli yango?

14 Na elaka ekoki, “nyama na yauli motane” akokenda kino libebi. Kasi liboso ete akufa, mpe liboso ete abundisa libota ya Nzambe, O.N.U. akosala naino mosala moko ya ntina mingi. Jéhovah ‘akotya likanisi na ye na motema na nyama na yauli mpe na maseke na ye oyo basili komibongisa na bibundeli makasi’. Litomba nini ekobimisa? Anzelu ya Nzambe azongisi: “Mpe maseke zomi mamonaki yo, bango mpe nyama na yauli bakoyina mwasi na pite, bakobebisa ye, mpe bakozalisa ye bolumbu; bakolia mosuni na ye, mpe bakotumba ye na móto.” “Akumisaki nzoto na ye mpe asepelaki na mosolo”, kasi na ntango yango makambo nyonso makobongwana. Bandako-nzambe na ye ya mineneminene mpe mabelé na ye mingi ekobikisa ye te. Anzelu alobi nde boye: “Yango wana na mokolo moko malozi na ye makoya, na liwa, na kolela, na nzala, mpe akotumbama na móto, mpo ete Jéhovah Nzambe, mosambisi na ye azali makasi.”​—Emoniseli 17:16, 17; 18:7, 8.

15. Bakonzi na politike mibali na mwasi na pite elongo na bato na mombongo bakosala nini ntango akobomama?

15 Ba makango na ye bakonzi na politike bakolela ye, na maloba oyo: “Mawa! Mawa! Mboka yango monene! Babilone mboka makasi! mpo ete na ntango moko kokwea na yo eyei!” Bobele bongo, bato na mombongo oyo bazalaki kozwa misolo milongobani te elongo na ye “bakolela na mawa mingi, mpe bakoloba ete, Mawa! Mawa! . . . mpo ete na ntango moko biloko oyo mingi bisili koya mpamba!”​—Emoniseli 18:9-17.

16. Ekozala boni epai na basaleli na Nzambe ntango mwasi na pite akobomama, mpe na maloba nini Emoniseli esilaki kosakola yango?

16 Kasi ekozala boni mpo na basaleli ya Nzambe? Maloba oyo ya anzelu mazali mpo na bango: “Sepela mpo na mboka yango, yo likoló, na bino babulami, na bantoma, na basakoli, mpo ete Nzambe asili kokatela yango ekateli na ntina na bino.” Babilone Monene ekokwea mbala moko, mpe libela ekobwaka lisusu nsoni likoló na nkombo na Jéhovah te. Kufa na ndumba monene ebongi koyembama na banzembo na elonga mpo na kokumisa Jéhovah. Tala oyo ya liboso kati na banzembo ya makumisi mpo na Jéhovah, banzembo ya esengo oyo ekoyembama na ntango yango: “Aleluya! Lobiko, na nkembo, na nguya [ezali] na Nzambe na biso! Mpo ete bikateli na ye bizali na solo mpe na sembo. Mpo ete akweisi mwasi na pite yango monene oyo abebisaki mokili na pite na ye; abukanisi ye mpo na makila na baombo na ye.”​—Emoniseli 18:20 kino 19:3.

17. Nsima na kufa na mwasi na pite, ndenge nini bikateli na Nzambe bikokokisama kino na oyo ya nsuka?

17 Bikateli na Nzambe bikokokisama nokinoki, wana ete Yesu Klisto, “Mokonzi na bakonzi mpe Nkolo na bankolo”, akonyata “ekamelo na vinyo na nkanda na kongala na Nzambe Mozwi-na-Nguya-nyonso” na Armagedon. Akolimwisa bongo bakonzi mabe mpe baoyo nyonso bakotikala naino na lisangá ya Satana na mabelé. Bandeke bakolya bibembe na bango. (Emoniseli 16:14, 16; 19:11-21) Oyo nde esengo na koyeba ete ntango ebelemi oyo Nzambe akokomba mabelé mpo na kolongola biloko nyonso ya mbindo mpe ya bosoto!

18. Mokanda ya Emoniseli ekosila kokokana na likambo nini?

18 Mokanda ya Emoniseli esuki wana? Te, esuki wana te! Mpamba te, nsima wana ba 144 000 nyonso bakosila kosekwisama mpe kokenda na likoló, libala ya Mwana na Mpate ekosalama. “Mwasi” na ye, alati malamu mpo na mobali na ye, akokotisama kati na “likoló ya sika”. Akokita na yango na elilingi, mpo na kosalisa mobali na ye na kokokisa mokano ya Jéhovah, oyo ya ‘kosala biloko nyonso biloko ya sika’. Kitoko ya elimo ya mwasi yango ezali oyo ya mboka mosantu, Yelusaleme ya Sika, oyo Jéhovah Nzambe Mozwi-na-Nguya-nyonso azali kongengisa yango na nkembo na ye, mpe Mwana na Mpate azali mwinda na yango. (Emoniseli 21:1-5, 9-11, 23) Na ntango yango Emoniseli ekokokana na mobimba na yango nyonso: nkombo ya Jéhovah ekosantisama, Mwana na Mpate (Yesu Klisto) elongo na mwasi na ye (Yelusaleme ya Sika) bakopesa epai na bato na botosi bomoi ya seko kati na Paradis na mabelé.

19. (a) Longola likambo ya kobima na Babilone Monene, esengeli lisusu kosala nini mpo na kozwa lobiko? (b) Libengami nini ya nokinoki bato bakoki naino kondima yango, mpe tosengeli kosala nini?

19 Ozali komona bokosi ya mangomba ya lokuta? Osili kobima na Babilone Monene? Osili kobelema epai na Jéhovah Nzambe na nsima na Yesu Klisto, na komipesaka na motema mobimba epai na ye mpe kozwa batisimo? Matambe oyo masengeli mpo na kozwa lobiko! Awa ntango ebelemi oyo Jéhovah akokokisa ekateli na ye ya nsuka, libengami oyo ezali kopesama nokinoki: “Elimo mpe mwasi na libala balobi ete, Yaka!” Tika ete baoyo nyonso bazali koyanola na libengami oyo bapesa bomoi na bango epai na Jéhovah mpe baloba na molende epai na bamosusu: “Yaka!” Ee, “tika ete moto na mposa na komela aya, mpe oyo azali na mposa akamata mai na bomoi lokola likabo.”! (Emoniseli 22:17) Ntango ezali naino mpo na kondima libengami oyo. Okozala solo na esengo soki otelemi liboso na kiti na bokonzi na Nzambe mpe na Mwana na Mpate lokola mosaleli na Jéhovah amipesi mpe abatisami mpe soki okotikala wana libela. Elaka esili kobelema penepene! Ee, kokokana monene na Emoniseli esili kobelema!

Na nsuka ya boyekoli oyo ya Mosenzeli, motambwisi akotangisa Ekateli oyo elandi mpe akotambwisa boyekoli na yango na lisalisi ya mituna oyo mibongisami mpo na yango. Ekateli yango eyebisamaki kati na mokili mobimba na ntango ya assemblée de district “Boyengebene ya Nzambe” oyo esalamaki na ba Témoins de Jéhovah na 1988. Ekateli yango esukisaki diskur oyo ezalaki na motó ya likambo “Kufa na ‘mwasi na pite’ mpe na bosoto”.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na bantina oyo emonani polele, makambo mibale ya boyokani yango mabatelamaki lokola sekele na eleko wana. Ezalaki kotalela bomoko kati na makambo ya politike mpo na kotelemela Union soviétique mpe mikumba ya basango ya katolike oyo bakotaki kati na mampinga ya Hitler. Kokotisama yango kati na mampinga ezalaki kobuka boyokani oyo esalemaki na Versailles (1919) oyo Alemanye ekangisamaki naino na yango; kobimisa polele boyokani yango mbele esengelaki mpenza kotungisa bato mosusu oyo batyaki maboko kati na boyokani wana.

b Franz von Papen azalaki kati na banazi oyo basambisamaki na Nuremberg (Alemanye), lokola babomi ya bato na ntango na etumba, na nsuka ya bambula 1940. Batikaki ye, nzokande na nsima tribinale moko na Alemanye oyo ezwaki mokumba ya kosilisa bopusi nyonso ya banazi ekatelaki ye etumbu moko monene. Lisusu na nsima, na 1959, azwaki libaku ya kokoma mosali to camérier ya nkuku ya pape.

c Na ntina na likita yango, pape Paul VI alobaki: “Ebongi solo ete likita ya mabondeli mpo na kimya ezala na milulu mibongisami mpo na kokundola mobu ya ntuku mibale oyo mabota batyaki maboko na mokanda mpo na kosala O.N.U.

[Etanda na lokasa 11]

PAPE ALOBAKI ELOKO TE

Kati na mokanda na ye Franz von Papen - Bomoi na ye mpe eleko na ye, ebimaki na anglais na 1939, H. Blood-Ryan ayebisi na bosikisiki mayele mabe oyo mapesaki nzela epai na mosaleli wana ya pape mpo na kotombola Hitler na bokonzi mpe kosenga boyokani kati na Vatican mpe banazi. Tala oyo azali koloba mpo na lolenge ya nsomo oyo basasaki Bayuda, ba Témoins de Jéhovah mpe bato mosusu lokola: “Mpo na nini Pacelli (pape Pie XII alobaki eloko te? Mpamba te amonaki kati na miango ya von Papen mpo na kotonga Saint Empire romain germanique nzela moko ya kozongisa nguya epai na Lingomba ya katolike mpe libaku mpo na Vatican ya kozongela bokonzi ya mokili. . . . Atako Pacelli moko oyo azali lelo kopesa ndema likoló na bamilió na bato kati na elimo, alobaki eloko te mpo na kotemela Hitler oyo azalaki konyokola mpe koboma bato. . . . Wana ezali ngai kokoma makambo oyo, mikolo misato ya kosasa esili koleka, kasi Vatican esali ata libondeli moko ya moke te mpo na bolamu ya milimo na babundi, nzokande ndambo na bango monene bazali bakatolike. Ekozala nsomo mokolo oyo bato yango, wana ekosila bango kotika bokonzi na bango ya mokili, bakomimonisa liboso ya Nzambe na bango, mpe Ye akotuna bango bazongisa monoko. Lilimbisi nini bakosenga? Moko te!”

[Etanda na lokasa 13]

NGAMBO YA VATICAN

Engebene New York Times ya 6 Mars 1988, Vatican (mboka-mokonzi ya bakatolike) ezalaki komona ete ebungisi mosolo mingi koleka na motuya ya 61,8 milió ya badolare mpo na mobu ya 1988. Zulunalo yango ezalaki koyebisa sikisiki: “Moko na makambo oyo epesi nzela na kobimisama ya mosolo mingi wana ezali mpenzampenza elaka oyo epesamaki na 1984 mpo na kozongisa penepene na mosolo 250 milió ya badolare epai na bankolo mosolo ya banke Ambrosiano. Vatican esalaki mpenza boyokani makasi elongo na banke wana ya mboka Milan liboso ya kokwea na yango na 1982.” Na yango, Vatican emikotisaki mobimba kati na likambo wana ya nsoni kino eboyaki na lolendo nyonso kofunda na tribinale to esambiselo ya ltalie bato misato kati na bato na ye ya lokumu mingi, oyo moko azalaki episkopo monene ya Amerike!

[Bililingi na lokasa 10]

Vatican ekaboli elongo na Von Papen mpe Hitler ngambo ya makila oyo masili kosopama.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Photo UPI/Bettmann

[Bililingi na lokasa 13]

Na esika ete basimba bokonzi ya Nzambe ba papes babengaki O.N.U. ‘elikya ya nsuka mpo na kimya’.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

En médaillon: Photos O.N.U.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto