Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/4 nk. 16-17
  • Ekateli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ekateli
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Masolo mosusu
  • Babilone monene ngambo na yango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • “Nsango ya esengo” na mokanda ya emoniseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Kobikisama na ntango na komonana na Yesu Klisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Emoniseli mpe yo
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/4 nk. 16-17

Ekateli

Na ntembe te assistance na assemblée “Boyengebene ya Nzambe” ekoleka oyo etangamaki na mobu mozalaki liboso. Na mobu wana, bato 6 443 597 bayanganaki na bisika 1098 kati na mokili mobimba mpe bato 93 822 bazwaki batisimo. Nsima na diskur “‘Mwasi na pite’ mpe na bosoto” oyo esalamaki na ntango ya ba assemblées nyonso “Boyengebene ya Nzambe” basakolaki kobima ya mokanda moko ya bankasa 320, na ekangeli moko ya makasi mpe na bililingi kitoko, na minoko koleka 20, La Révélation: le grand dénouement est proche! Molobi alobaki epai na bayoki: “Bozanga te kosalela mokanda oyo ya sika kati na boyekoli na bino moko mpe na makita ya lisangá. Bosalela yango mpe mpo na koyebisa na bato ya mokili ete Babilone Monene asili kokweisama, ete mabota bazali pene ya kobomama na Armagedon mpe ete tokomona kokokisama monene ya Emoniseli ntango Bokonzi na Jéhovah oyo etambwisami na Klisto mpe mwasi na ye ekoyangela mabelé. Bokozala na esengo ya kozala batemwe ya makambo oyo, ‘mpamba te elaka ezali penepene’!”​—Emoniseli 1:3.

Biso baoyo tozali kobika uta 1914 “na mokolo ya Nkolo” mpe na eleko oyo Nzambe azali kosambisa mokili, tozali kosepela awa tozali na libaku malamu eleki nyonso, oyo ya kosalela Nkolo Moyangeli Jéhovah na nse na bokonzi na Yesu Klisto, oyo Jéhovah asili kopona ye Mokonzi na bakonzi. (Emoniseli 1:10) Na motindo na biso ya ba TEMOINS DE JEHOVAH, tolobi boye:

1) TOZALI KOMONA MABE ndenge Babilone Monene, mpe mingimingi boklisto ya mokili oyo, ebwaki nsoni mingi likoló na nkombo ya Nzambe ya solo bobele moko, Jéhovah. Mpo na biso, kozongelaka maloba makomami na Emoniseli 4:11, TONDIMI na motema mobimba ete: “Jéhovah, Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo, na lokumu, na nguya.”

2) TOZALI KOMONA MABE ndenge boklisto ya mokili oyo elandi koteya mateya mautaki na Babilone: trinité, kozanga kokufa ya molimo, minyokoli kati na móto ya lifelo, epongelo ya móto, losambo ya bikeko, lokola oyo ya Marie mpe ekulusu. Na boyokani na Emoniseli 22:18, 19, BISO TOZALI NTANGO NYONSO KOLANDA se Liloba na Nzambe ekomami mpe tokangami na makambo nyonso mazali kati na yango.

3) TOZALI KOMONA MABE mpo na bafilozofi mpe misala mabe mizangi koyokana na mokano na Nzambe oyo epalangani mingi kati na boklisto ya mokili oyo, ndakisa évolution, kozongisa makila, kosopa zemi, lokuta, lokoso mpe kozanga kolongobana. Na losambo na biso mpe lolenge ya bomoi na biso, TOLINGI KOKUMISA Mozalisi na biso, Jéhovah Nzambe, Mozwi-na-Nguya-nyonso, oyo banzela na ye ezali “sembo mpe solo” engebene Emoniseli 15:3.

4) TOZALI KOMONA MABE ndenge boklisto ya mokili oyo eboyi koyoka malako oyo Yesu apesaki na masangá nsambo engebene Emoniseli mokapo 2 mpe mokapo 3, malako kati na yango akweisaki misala mabe lokola kokabwana na mangomba mikemike, kosambela bikeko, pite, bopusi ya Yezabele, kozanga móto mpe kozanga kokengela. Kasi biso, TOLINGI KOYOKAMELA MPE KOTOSA makambo nyonso oyo “elimo elobi na masangá”.

5) TOZALI KOMONA MABE ndenge pite mpe bosoto mosusu etondi kati na boklisto ya mokili oyo mpe epai na bakonzi na yango. Tondimi mpenza ekateli ya Jéhovah ekoki kobongwana te, oyo eyebisami na Emoniseli 21:8 epai elobami ete baoyo nyonso bazali kosalaka na bosoto, basali pite, bato na lokuta mpe basali na mabe mosusu, soki bakobongola motema te bakobomama nyee. TONDIMI NA MOTEMA MOBIMBA mitinda ya bizaleli malamu mizwami na Biblia na ntina etali kosangana, libala mpe bomoi ya libota.

6) TOZALI KOMONA MABE mpo na pite ya elimo oyo bakonzi na mangomba na Babilone Monene bazali kosala uta bikeke mingi na kokotelaka bakonzi ya politike kati na mokano ya kozwa nguya mpe bozwi, mpe konyokola bato. TOZWI EKATELI YA KOSALISA bato ya motema sembo ete balanda toli ya anzelu na Emoniseli 18:4: “Bino bato na ngai bobima na ye.”

7) TOZALI KOMONA MABE mpo na makila mingi oyo masopami na boumeli ya bitumba kati na yango bato 100 milió mpe koleka basili kobungisa bomoi, bobele na ekeke oyo ya ntuku mibale. Ngambo monene ya makila yango ezali mpo na pite oyo ndumba monene azali kosala elongo na bakonzi na politike. TOSEPELI na koyeba ete elaka ebelemi oyo Nzambe akokokisa ekateli na ye likoló na Babilone Monene, na motindo eyebisami polele kati na Emoniseli 18:21-24.

Biso baoyo tozali ba Témoins de Jéhovah, TOZALI NA ESENGO MPE NA LIBAKU MALAMU ya kosakola na mokili ete na 1914 “bokonzi ya mokili ekomaki bokonzi ya Nkolo na biso [Jéhovah] mpe ya Klisto na ye”. (Emoniseli 11:15) TOZWI EKATELI ete tokolanda kosakola kozanga kobanga bikateli oyo Jéhovah asili kokamata likoló na Babilone Monene mpe kokebisa bato ete Armagedon, etumba ya Nzambe ebelemi. TOZWI EKATELI ya kosakola na mongongo makasi mpe “na mabota nyonso, na mikili nyonso, na minoko nyonso mpe na bikolo nyonso” nsango malamu engebene yango “likoló ya sika mpe mabele ya sika” etikali moke ekopesa bolamu epai na bato ya botosi. (Emoniseli 14:6; 21:1) TOSEPELI na komona ete na nzela na mosala oyo ya kosakola, ebele monene ya bato koleka milió misato bauti na mikili nyonso basangani sikawa na biso kati na mokili mobimba. Elongo na anzelu oyo azali kopumbwa katikati na likoló, tolobi boye biso banso ete: “Banga Nzambe mpe pesa ye nkembo, mpo ete ntango na kosambisa na ye eyei. Bosambela ye oyo asalaki likoló, na nse, na mai monene, na mitó na mai.”​—Emoniseli 14:7.

Mituna mpo na boyekoli ya “Ekateli”:

1. Ba Témoins de Jéhovah bazali kosepela na nini?

2. Mpo na mokomoko na bapwɛ nsambo ya Ekateli oyo, loba (a) eloko nini ba Témoins de Jéhovah bazali komona yango mabe (b) ekateli nini bakamati to eloko nini bandimi?

3. (a) Esengo nini mpe libaku malamu nini ba Témoins de Jéhovah bazali na yango? (b) Bazwi ekateli nini? (c) Nini lisusu tozwi ekateli ya kolanda kosala? (d) Esengo nini bazali na yango elongo, mpe basangisi mingongo na bango na koloba maloba nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto