Babilone monene, kobomama na yango
“Na elongi na ye nkombo na libombami ekomami ete, Babilone Monene, mama na pite na bosoto na mokili.” “Yango wana na mokolo moko malozi na ye makoya, na liwa, na kolela, na nzala, mpe akotumbama na móto, mpo ete Jéhovah Nzambe mosambisi na ye azali makasi.”—Emoniseli 17:5; 18:8.
TOZALI na lotomo ya komituna na ntina na ndimbola ya maloba oyo ntoma Yoane akomaki na ekeke ya liboso ya ntango na biso. “Mama na basi ya pite” azali nani? Lisumu nini asalaki liboso na Nzambe mpo ete asambisa ye na nkanda nyonso boye? Ntembe ezali te ete kokokana ya bisambiseli na Nzambe epai na Babilone Monene, ndumba ya kokamwisa, ekolimbola kobomama na ye. Mpo na yango, ebongi na biso mpenza koluka koyeba mwasi na pite yango azali nani mpe kotalela na sikisiki likambo oyo etumbu na ye ekoki kozala na yango likoló na bomoi na biso.—Emoniseli 18:21.
Babilone Monene azali komonisa nani to mpe ezali nini? Biblia ezali koyebisa ete asalaki pite elongo na mikonzi ya mokili mpe ete bato na mombongo basalaki mombongo elongo na ye. (Emoniseli 18:3) Na bongo akoki komonisa ebongiseli ya politike te to mpe mombongo monene te. Na ntina yango, nkombo to titre ya “mama na basi na pite” ezali mpenzampenza kotalela eteni ya nguya ya misato ya mokili. Babilone Monene ezali bongo eloko mosusu te bobele lisangá ya mokili mobimba ya mangomba na lokuta oyo matambwisami na Satanaa!
Mituna oyo mizali naino kotunama: Mpo na nini, ntango nini mpe ndenge nini Babilone Monene akobomama? To, mpo na koloba malamu, mpo na nini, ntango nini mpe ndenge nini mangomba ya lokuta makolimwa awa na mabelé?
Etamboli ya boklisto ya mokili oyo ezangi koyokana na boklisto ya solo
Soki totaleli lisolo ya mangomba na lokuta, maloba wana ya esakweli ya Kala mazali kozwa esika kati na makanisi: “Mpo ete bakoni mopepe mpe bakobuka mopepe mokolekaleka.” (Hosea 8:7) Maloba oyo mayokani elongo na ekateli elandi oyo eyebisamaki na ntoma Paulo: “Bomizimbisa te; Nzambe akokosama te. Soko moto akokona nini, akobuka bobele yango.” (Bagalatia 6:7) Na bongo mangomba na lokuta makonaki nini kati na mokili mobimba, mpe eloko nini bakobuka?
Yesu Klisto ateyaki ete bayekoli na ye basengeli bobele kolinga bazalani na bango te, kasi lisusu banguna na bango. (Matai 5:43, 44) Kotangaka Makomami na liebele, Paulo alimbolaki kozanga nkaka motindo oyo baklisto basengeli kosalela banguna na bango, na maloba oyo: “‘Kasi soki moyini na yo akoyoka nzala, leisa ye bilei. Soko akoyoka mposa na mai, melisa ye. Mpo ekosala yo boye, ozali kotia makala na móto likoló na motó na ye’. Tika te ete mabe mazongisa yo nsima, yo zongisa mabe nsima mpo na malamu.”—Baloma 12:20, 21.
Nzokande, lisolo ya mangomba na boklisto ya mokili oyo esalami bobele na koyina mpe na bosopi makila. Bapambolaki to bapesaki nzela na ba croisades ya kala mpe ya sika (bitumba mpo na kobengana bapakano na Yelusaleme), elongo na makambo nyonso oyo mabimaki nsima na bitumba yango na ndakisa lokola kobotola biloko ya bato, kosangana na basi na makasi mpe koboma bato. Yango wana, na ndakisa, bakonzi ya lingomba na katolike bapesaki lipamboli na bango na mobulu oyo ltalie fasciste akendaki kosala na Ethiopie na (1935) mpe na “croisade” ya Franco na boumeli ya etumba ya bana mboka bango na bango oyo esalamaki na Espanye (1936-1939).
Mpo na kosilisa matata oyo mazalaki kobima mpo na makambo matali Nzambe bazalaki kosalela nkoni mpo na kotumba bato. Nsima na kobimisa libongoli na ye ya “Kondimana na Sika” na anglais, William Tyndale akakemisamaki likoló na nzete mpe batumbaki ye na 1536. Koleka ekeke moko liboso, wana epusamaki bango na elimo ya kozongisa mabe mpo na mabe, bakonzi na mangomba bakundolaki, na kolandaka maloba ya pape Martin 5, mikwa ya Wycliffe, mobongoli mosusu ya Makomami, mpe yango mibu 44 nsima ya liwa na ye. Ezalaki kati na mokano nini? Mpo na kozala na esengo ya kotumba yango. Na ntango ya ba ankete to bolukiluki (inquisition) oyo esalemaki na lingomba ya katolike, bankoto na Bayuda mpe na “bapengwi” babotolaki bango biloko na bango, babetamaki mpe batumbamaki na móto ya nkoni - nyonso wana balobaki ete basalaki yango na nkombo na Klisto! Na etinda ya mokonzi moko ya misioni Jean Calvin, téolojié ya Espanye Michel Servet, oyo bakatolike mpe baprotestá banyokolaki, abomamaki nsima na kotumbama likoló na nzete. Na ntango ya bitumba mibale ya mokili mobimba oyo bikesenisaki ekeke ya ntuku mibale, bakonzi na mangomba ya “boklisto” ya mokili oyo bapambolaki mampinga na basoda nzokande ba omonyé oyo balingi ekolo bazalaki kolendisa basoda na kobunda.
Kokesena nini elongo na boklisto ya solo! Mpamba te, ntoma Paulo akomaki: “Na bongo, lokola baponami na Nzambe . . . bomilatisa mitema na mawa, na boboto, na kosokema, na bopolo, na mitema na petee. Soko moto moko azali na moto mosusu likambo, boyikanaka mpiko, bolimbisanaka. Pelamoko Klisto alimbisi bino, bino mpe bobele bongo. Nde likoló na nyonso, bomilatisa bolingo oyo ezali ekanganeli ekoki mpenza.”—Bakolose 3:12-14.
Paulo akomaki boye epai na baklisto ya Rome: “Bozongisa mabe mpo na mabe te; bolikya mpo na yango emonani sembo na miso na bato nyonso. Soko ekokoka, mpe lokola ezali likambo na bino, bozala na bato nyonso kimya. Balingami, bobukanisa mpo na bino mpenza te, kasi tika esika mpo na nkanda na Nzambe. Pelamoko ekomami ete, ‘Jéhovah alobi ete, Kobukanisa ezali likambo na ngai, ngai nakofuta.’ (Baloma 12:17-19) Soki totaleli na nzela na mitinda na Biblia, kozanga bolongi ya boklisto na mokili oyo emonani polele. Alonaki likunya mpe bokosi, akobuka libebi.
Lisolo ya mangomba ya mokili
Babilone Monene ezali kosangisa te bobele mangomba oyo mazali ya boklisto. Mangomba minene nyonso mazali na mwa ndambo ya ngambo kati na bobomi oyo esalemi na mwasi mabe wana na pite. Na yango, lingomba ya bajaponé oyo ebengami shintõ ezali mpe na ndambo ya mokumba kati na elimo ya kolinga ekolo mpe ya bonyama oyo mampinga na basoda ya bajaponé bamonisaki na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Engebene mokomi na masolo ya bato Paul Johnson, “mpo na kolendisa kobatelama na ye kati na mokili ya likunya mpe ya kowelana” oyo eyangelami na mibeko ya etamboli na mindele, bamonaki malamu na kobimisa “lingomba ya Leta mpe mibeko oyo misengelaki kotambwisa bato nyonso, shintõ mpe bushidõ [“nzela ya mobundi”]. . . . Babongisaki losambo ya Empereur (Mokonzi monene), mingimingi mpenza kati na mampinga, mpe kobanda na mibu 1920, buku moko ya mibeko mpo na ekolo mobimba, kokumin dotoku, eteyamaki kati na biteyelo nyonso”. Likambo nini emonanaki? Na 1941, ntango Japon ebwakaki bombe na mboka Pearl-Harbor mpe emikotisaki na mbala moko na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, “shintõ, . . . oyo ezalaki losambo ya mibale, ya kala mpe enuni, ekomaki esaleli ya Boyangeli moko ya sika oyo eboyaki bikonzi nyonso mosusu kati na mboka. Na yango, likambo na kosekisa nzokande ezali kopesa mpasi, lingomba, oyo esengelaki kopekisa makambo mabe ya eleko wana, esalelamaki mpo na kopambola yango.”
Mpo na bokabwani ya lnde oyo esalamaki na 1947, bokabwani oyo esalamaki mpo na bantina ya matata oyo mabimaki mpo na makambo matali losambo, mokomi na masolo ya bato Johnson akomi: “Penepene na bato 6 milió bakimaki bipai na bipai mpo na kobikisa bomoi na bango. . . . Na eleko yango, bakanisaki ete penepene na bato milió moko mpe milió 2 bakufaki. Mitango oyo miuti kosalema sikawa mimonisi ete bakufi bazalaki kati na 200 000 kino 600 000.” Lelo mpe lisusu bazali kokoba na koboma bato mpo na bantina na makambo matali losambo kati na mikili ya bahindou. Ba harijan, babola oyo kala babengamaki ete bato bakoki kosimba bango te, mbala mingi bazali kobomama na bituluku ya babomi oyo bibongisami na bazwi oyo bazali bankolo ya mboka.
Hindouisme esangisami esika moko na misala na soloka. (Emoniseli 18:23) Mokomi Sudhir Kakar-ye moto na lnde azali koloba mpo na “kozimbisama mpe limemya ya bahindous nyonso mpo na losambo ya bilimu mabe (bondoki) mpe mpo na baoyo bazali kosalela yango”. Abakisi: “Bato basalelaka myoto mpo na koyeba makambo, bandoki, bato bamonaka makambo mazali koya, sãdhu [“mosantu oyo azali na bomoi na esika na ye moko”], fakirs [bato oyo bazali kotambola esika na esika mpo na kosala maji] mpe bato mosusu oyo bamikomisa banzambe bazali kosepela na bango mingi, mpamba te bazali kotalelama lokola ete bazali mpenza penepene ya bosolo nyonso oyo eleki.”—lndia Today ya le 30 avril 1988.
Lisusu, bahindous, ba sikhs mpe basambeli ya mangomba mosusu ya Asie bazali mbala na mbala komipesa na bitumba oyo ezali kosila te, bitumba oyo moko na moko na mangomba yango ezali komema likunya na yango, bowelani mpe liwa. Wana ezali bobele ndambo mosusu ya mbuma oyo Babilone Monene aboti.
Epai mosusu, bitumba, bobomi mpe monyokoli oyo ekomami kati na mikanda ya lisolo ya ntango na biso ezali kopesa litatoli moko te ya lokumu na ntina na losambo ya Bayuda. Soki totaleli mobulu oyo basangani ya hassidisme (lingomba moko euti na judaïsme) babimisaki mbala mosusu mpo na koboma basangani ya mangomba mosusu ya Bayuda mpe oyo ya Bayuda te ebongi mpenza te mpo na kondimama liboso na Nzambe.
Ntango bazali kotalela lisolo ya lisangá na mangomba ya mokili mobimba, bazali komona kozanga nkaka bantina oyo Mosambisi monene azali na yango mpo na koboma Babilone Monene. “Kati na ye makila na basakoli, na bapetwi mazwami, na makila na bango nyonso babomamaki na mokili.” (Emoniseli 18:24) Mpo na komikotisa na yango kati na bitumba ya mokili mpe ya bingumba mike, mangomba na lokuta emikumbisaki ngambo ya makila ya “baoyo nyonso babomami awa na mabelé” liboso na Nzambe.
Na kotalela ngambo oyo Biblia ekumbisi ye, Babilone Monene abongi na kobomama mpo na pite oyo asali kati na elimo na boumeli ya bikeke, elongo na mikonzi ya mokili, ná ngambo na ye kati na makila oyo masopanaki na ntango ya bitumba, mpe na misala na ye ya soloka. Tala ntina Jéhovah akanaki nsuka ya lisangá ya mokili mobimba ya mangomba na lokuta, lisangá ya Satana.—Emoniseli 18:3, 23, 24.
Mangomba na lokuta makolimwa ndenge nini
Mokanda na Emoniseli mozali koyebisa kobomama ya Babilone Monene na elobeli moko ya elilingi mpenza. Ezali kotangama boye kati na Emoniseli 17:16: “Mpe maseke zomi mamonaki yo, bango mpe nyama bakoyina mwasi na pite, bakobebisa ye, mpe bakozalisa ye bolumbu; bakolia mosuni na ye, mpe bakotumba ye na móto.” “Maseke zomi” malimboli banguya nyonso ya politike oyo ezali lelo kosala kati na mokili mobimba. Nyonso ezali kopesa maboko na O.N.U., “nyama na yauli ya langi motane ngwa”, yango moko elilingi ya ebongiseli na politike ebebisami na makila mpe etambwisami na Diable.—Emoniseli 16:2; 17:3b.
Engebene bisakweli ya Biblia, banguya na politike oyo ezali na boyokani elongo na O.N.U. ekobalukela lisangá ya mokili mobimba ya mangomba na lokuta mpe ekopanza yango. Lingomba na lokuta moko te ekobika. Biyangeli mosusu bisilaki kobanda na komonisa likunya na bango epai na mangomba ya lokuta mpo na bokoti na yango kati na makambo ya politike mpe ya bomoi na bato. Mikili misusu ya socialiste baponaki kozala ba athées (bato oyo bandimaka Nzambe te) mpe bazongisaki mangomba na esika oyo ezangi lokumu, lokola yango ezali koleka na Albanie, to na molongo ya bisaleli mpamba, na Russie mpe na Chine na ndakisa. Epai mosusu, bakonzi na politike bazali koyina makasi teoloji oyo eteyami mpo na kosikola oyo basángo mosusu ya katolike bazali kopalanganisa kati na mikili ya bobola. Misusu mpe bazali kotemela mangomba oyo mazali komikotisa kati na makambo matali kokabola bamposo ya nzoto. Ata katikati na mikili oyo emilobi ete mizali ya bonsomi, bakonzi mosusu ya politike bazali kosilika mpo na bokoti ya bakonzi na mangomba kati na makambo ya politike mpe oyo matali bomoi na bato.
Etikali sikawa toyeba soki makambo nini mosusu makomema banguya ya politike ya mokili mobimba mpo na koboma mangomba na lokuta. Nzokande, likambo moko ezali solo: kobomama ya Babilone Monene na banguya ya politike ekozala bobele elembo ya mokano na bango moko te, kasi mpe oyo ya Nzambe. Emoniseli 17:17 ezali koloba mpo na yango: “Mpo ete Nzambe atiaki na mitema na bango ete basala mokano na ye, mpe ete bandimana na kopesa nyama bokonzi na bango, kino ekokoka maloba na Nzambe.”—Tala Yilimia 51:12, 13.
Kosala libunga te na kokanisa ete kobomama ya Babilone Monene ekozala bobele elembo ya likunya ya bato na politike liboso na bokoti ya mangomba kati na makambo na bango mpe na lolendo na yango. Bakonzi yango, atako bakosala yango na bolingo na bango moko te, bakozala bisaleli oyo Nzambe akosalela mpo na kolongola losambo ya lokuta na mabelé mobimba. Ee, “mpo ete libondo na masumu na ye likomi kino na likolo, mpe Nzambe asili kokanisa misala mabe na ye”.—Emoniseli 18:5.
Jéhovah asilaki kokana ete mangomba na lokuta oyo matondi na lolendo masengeli kosambwisama. Esakweli ezali koloba: “Na motindo ekumisaki ye nzoto na ye mpe esepelaki ye na mosolo, bopesa ye mpasi na mawa bobele bongo. Mpo ete na motema na ye alobi ete, Nakofanda mokonzi mwasi, nakufeli-mobali te, mpe nakomona mawa soko moke te; yango wana na mokolo moko malozi na ye makoya, na liwa, na kolela, na nzala, mpe akotumbama na móto, mpo ete Nkolo Nzambe mosambisi na ye azali makasi.”—Emoniseli 18:7, 8.
Akobomama ntango nini?
“Mokolo se moko” yango, eleko mokuse oyo ekomona kobomama ya nokinoki ya Babilone Monene, ebelemi. Na bongo, kobomama na ye ekozala ebandeli ya “mokolo na kobukanisa ya Nzambe na biso”. (Yisaya 61:2) Na nsima, Armagedon etumba ya sembo ya Nzambe, ekobimela bato. Makambo oyo mabandaki kobima kati na mokili kobanda 1914 mazali ebele na bilembo oyo bizali komonisa ete ntango ezali se koya mokuse mpo na ebongiseli ya biloko na Satana. Elakisi ete boyangeli ya Bokonzi na Nzambe ebelemi.—Luka 21:32-36; Emoniseli 16:14-16.
Likambo nini basambeli ya solo ya Nzambe basengeli kosala na ntango ya kobomama ya Babilone Monene? Mokanda ya Emoniseli ezali koloba: “Sepela mpo na mboka yango, yo likoló, na bino bapetwi, na bantoma, na basakoli, mpo ete Nzambe asili kokatela yango ekateli na [ntina na] bino.” (Emoniseli 18:20) Esengo ekozala kati na molongo mobimba ntango nkombo ya Jéhovah ekosantisama mpe ete mokano na ye mokokokisama. Na yango esakweli ezali koloba: “Na nsima na makambo oyo nayokaki mongongo lokola mongongo na ebele monene na bato kati na likoló koloba ete: ‘Aleluya! Lobiko, na nkembo, na nguya [ezali] na Nzambe na biso! Mpo ete bikateli na ye bizali na solo mpe na sembo. Mpo ete akweisi mwasi na pite yango monene oyo abebisaki mokili na pite na ye; abukanisi ye mpo na makila na baombo na ye.’—Emoniseli 19:1, 2.
Kobomama ya Babilone Monene, oyo ekolandana na kobomama ya biteni mosusu ya ebongiseli ya Satana epai na Nzambe, ekolimbola bolamu ya seko mpo na basambeli ya solo ya Nzambe mpe mpo na baoyo, mingi bakosekwisama awa na mabelé. Maloba na Yesu oyo malandi makokokana solo: “Soko bino bokoumela kati na liloba na ngai, bokozala bayekoli na ngai na solo, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.”—Yoane 8:31, 32; Emoniseli 19:11-21.
Uta sikawa basambeli ya solo basili kosikolama na mateya ya lokuta ya mangomba oyo matiolaki Nzambe na boumeli nyonso ya lisolo na bato. Kati na mokili ya sika oyo elakami, mokili oyo boyengebene ekomonana mingi koleka, bakokoka kozala na bomoi kozanga kobanga liwa, mpamba te “Nzambe ye moko akozala na bango elongo. Mpe akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka”. (Emoniseli 21:3, 4) Babilone Monene, lisangá ya mokili mobimba ya mangomba na lokuta oyo etambwisami na Satana, ekozala kati na makambo na liboso oyo masili koleka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na bilembo mosusu oyo bitali koyebana ya Babilone Monene, tala Mosenzeli ya 1er avril 1989.
b Mpo na bandimbola likoló na bililingi yango mpe misusu oyo bizwami kati na mokanda ya Emoniseli, tala mokanda ebengami La Révélation: le grand dénouement est proche!, ebimisamaki na la Société Watch Tower.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
“Likambo ya kosekisa mpe ya mawa, mangomba, oyo masengelaki kopekisa makambo mabe ya eleko wana, masalelamaki mpo na kopambola yango.
[Elilingi na lokasa 4]
Wycliffe mpe Tyndale banyokolamaki mpo babongolaki Biblia.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Engebene makomi ya kala ya Bibliothèque