Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/5 lok. 32
  • Bato bazali koluka solo ya Biblia na Yisraele bazwi mbano

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bato bazali koluka solo ya Biblia na Yisraele bazwi mbano
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Masolo mosusu
  • “Batikaki te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Nani abongi kobéngama Labi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Esengeli molende mpo na kotosa mobeko ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/5 lok. 32

Lisolo ya basakoli ya Bokonzi

Bato bazali koluka solo ya Biblia na Yisraele bazwi mbano

NA Yisraele lokola mpe na mikili misusu, bato mingi bazali komona ete milende oyo bato bazali kosala mpo na kotya kimya oyo ekoumela mpe kopesa elikya mpo na avenire, ezali se mpamba. Ba Témoins de Jéhovah 370 ya mboka kitoko wana esika makambo mingi ya kala masalemaki, bazali kosakola elikya kitoko epai na baoyo bazali koluka Nzambe. (Yisaya 55:2, 3) Ba rapports oyo elandi euti na filiale ya la Société Watch Tower na Tel-Aviv emonisi ete Nzambe azali kopesa mbano epai na bato bazali koluka solo ya Biblia.

“Basambeli oyo bamipesi na mangomba mpe batondi na mobulu bazali lisusu kotungisa biso te, mpe milende na bango mpo na kobulunganisa makita na biso mizali se kobalukela bango. Yango emonisami na likambo oyo ekomelaki babalani Baruse oyo basili kopusana na mbula mpe bazalaki koyangana na etuluku moko ya ba adventiste, kasi basepelaki te na makambo oyo bazalaki koteya bango. Bazalaki komona monyokoli moko te oyo, engebene bisakweli, esengelaki kokesenisa boklisto ya solo. Mokolo moko, bamonaki zulunalo moko ya kala ekomamaki na lokota roumain mpe ezalaki koyebisa mobulu makasi oyo liboke moko na bato esalaki na ndako ya la Société (filiale) mpe na Salle du Royaume oyo ezali na Tel-Aviv. Lokola balingaki koyeba likambo yango na mozindo, bakendaki na engumba yango na makolo mpe na boumeli ya ngonga minei bakotaki banzela mingi kino bayaki komona ndako yango oyo elobelamaki kati na lisolo ya zulunalo. Basepelaki na kozwa biyano na mituna na bango mpe bafandaki wana mpo na koyangana na likita ya boklisto oyo esalamaki na mpokwa. Basepelaki na kokutana na ba Témoins oyo balobaka russe. Uta ntango yango, bazali koyekola Biblia. Wana boyebi na bango ezali kobakisama, bazali mpe kondima ete basili komona mpenzampenza eloko oyo bazalaki koluka: solo!

“Tala likambo mosusu: Témwe moko asakolaki nsango malamu epai na tata moko ya libota oyo azalaki elenge, kasi tata yango aboyaki mpo andimaki te ndimbola nyonso oyo epesamelaki ye, asepelaki te na nsango ya Bokonzi. Mwa bambula na nsima, mwana mwasi ya mobali yango akweaki maladi, mpe baninga na ye oyo bazalaki na biyambayamba balobaki na ye ete maladi yango ekokaki kouta na mezouza oyo ezalaki na ekuke ya ndako na ye. Batindaki ye ete atalisa yango epai na nganga-nzambe, mobali yango andimaki toli yango. Epai mosusu abondelaki Nzambe na bosolo nyonso ete asalisa ye na komona solo.

Wana ezalaki ye kokenda epai na nganga-nzambe, mobali yango azwaki likanisi ya kolekana na dispensaire mpo na kozwa nkisi oyo monganga akomelaki ye. Kuna akutanaki na nani? Akutanaki na Temwe oyo asakolaki ye nsango malamu esilaki koleka mwa bambula. Temwe alobaki na ye ete azalaki na likanisi ya koleka na dispensaire te na mpokwa wana, kasi ayaki koyeba pwasa ete azalaki na mposa ya eloko moko. Bango mibale bafandaki elongo, mpe basololaki na boumeli ya ngonga mibale, mpe mobali yango andimaki kobanda koyekola Biblia. Abandaki koyangana na makita, akolaki na ndenge esengeli, mpe amikomisaki na Eteyelo ya mosala ya Nzambe. Mwa nsima, abandaki kosakola nsango malamu, mpe sikawa asili kobatisama. Atikalaki lisusu kokenda epai na nganga-nzambe te!’

Bato oyo bazalaki koluka solo ya Biblia bazwaki mpenza mbano. mpamba te bamonaki eloko ya motuya koleka wolo oyo epetolami.​—Masese 3:13-18.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto