Nani abongi kobéngama Labi?
MOTAMBOLI-MOPAYA oyo amizelaki soko moke te na kokutana na likambo ya boye azalaki na elikya mingi te ya kokóma na libándá ya mpɛpo na ntango malamu. Bankámá ya bapolisi bazalaki kolakisa nzela wana ezalaki bango kokɛngɛla baleli koleka 300000 oyo batondanaki na balabála minene ya engumba Yelusaleme. Zulunalo The Jerusalem Post ebéngaki yango “kémbi monene ya bokundi na motindo oyo mbala mingi esalemaka bobele mpo na baprezidá, bakonzi to bakonzi mabe.” Nani akokaki kokumisama na ebele ya bato bongo, kobulunganisáká mbokamokonzi ya Israël na boumeli ya bangonga mingi? Labi moko ya lokumu. Mpo na nini etɛlɛmɛlo ya labi ezali kopesama limemya mpe lokumu kati na Bayuda? Ntango nini liloba “labi” ebandaki kosalelama mpo na mbala ya liboso? Yango ebongi mpenza kosalelama mpo na nani?
Mose azalaki labi?
Kati na losambo ya Bayuda nkombo oyo ezali na lokumu mingi koleka ezali Mose, moyokanisi ya kondimana ya Mibeko ya Yisalaele. Bayuda oyo bamipesi na makambo ya losambo babéngaka ye “Mose ‘Labi na biso.’” Nzokande, epai moko te kati na Biblia Mose abéngami na nkombo ya lokumu “Labi.” Ya solo, liloba “labi” ezwami soko moke te kati na Makomami ya Liebele. Bongo, lolenge nini Bayuda babandaki kobénga Mose na lolenge yango?
Engebene Makomami ya Liebele, mokumba mpe lotómo ya koteya mpe kolimbola Mibeko epesamaki na bakitani ya Alona, banganga na libota ya Lewi. (Levitike 10:8-11; Deteronome 24:8; Malaki 2:7) Nzokande, na ekeke ya mibale L.T.B., mbongwana moko ya malɛmbɛ ebandaki kati na losambo ya Bayuda, oyo kobanda wana ebongolaki makanisi ya Bayuda.
Na ntina na mbongwana wana ya elimo, Daniel Jeremy Silver akomi kati na búku na ye A History of Judaism (Lisoló ya makambo ya kala ya losambo ya Bayuda) ete: “Na ntango [wana] etuluku moko ya bakomeli mpe banganga-mayele oyo bazalaki banganga te babandaki kotɛmɛla lotómo oyo bobele banganga bazalaki na yango ya kolimbola Torah [Mibeko ya Mose]. Bango nyonso bandimanaki ete banganga bazalaki na ntina lokola basáli kati na Tempelo, kasi mpo na nini bobele bango nde basengelaki kozwa bikateli ya nsuka na makambo matali Torah?” Banani nde babandaki kotɛmɛla lotómo oyo ezalaki bobele mpo na kelasi ya banganga? Ezalaki Bafalisai, etuluku moko ya sika kati na losambo ya Bayuda. Silver alobi lisusu ete: “Mpo na Bafalisai, moboko mpo na kondimama na biteyelo na bango motalelaki kokokisa masɛngami, kasi te likambo ya kobotama [kozala mokitani ya banganga], mpe babimisaki etuluku ya sika ya Bayuda oyo basengelaki kozala bakonzi ya lingomba.”
Na ekeke ya liboso T.B., baoyo bazwaki mapɔlɔ́mi na biteyelo wana ya Bafalisai bayaki koyebana lokola bateyi, to bankóló, ya mibeko ya Bayuda. Lokola elembo ya limemya, Bayuda mosusu babandaki kobénga bango “moteyi na ngai,” to “nkóló na ngai,” na Liebele, labi.
Bobele kosalelama ya nkombo yango epai na Mose nde ekokaki kopesa yango ndimbola ya solosolo, mpamba te, atalelamaki lokola moteyi oyo aleki monene kati na lisoló ya makambo ya Bayuda. Likambo yango elɛmbisaki mingi mokumba ya banganga nzokande etombolaki bopusi ya bokonzi ya Bafalisai oyo ezalaki sé kokóla. Na yango, koleka mibu 1500 nsima ya kufa na ye, Mose ayaki kotángama “Labi.”
Komekola Nkóló
Atako mbala mosusu bibele bazalaki kosalela liloba “labi” (“nkóló na ngai”) mpo na kobénga bateyi mosusu oyo bazalaki komemya bango, mbala mingi liloba yango lizalaki kosalelama mpo na kobénga bateyi oyo bayebanaki mingi kati na Bafalisai, “bato ya bwanya.” Na kobebisama ya tempelo na mobu 70 T.B. oyo esukisaki bokonzi ya bonganga, balabi ya Bafalisai bakómaki bakambi mpenza ya lingomba ya Bayuda. Etɛlɛmɛlo makasi oyo bakómaki na yango ekólisaki motindo moko ya losambo etongami zingazinga na bato ya bwanya ya balabi.
Kolobeláká eleko wana ya mbongwana na ekeke ya liboso T.B., Profɛsɛrɛ Dov Zlotnick alobi ete: “‘Kolanda bato ya bwanya,’ ekómaki na ntina mingi koleka koyekola Torah.” Jacob Neusner, nganga-mayele Moyuda alobaki lisusu ete: “‘Moyekoli ya bato na bwanya’ azali mwanakelasi oyo amipesi makasi epai na labi moko. Asali bongo mpamba te alingi koyekola ‘Torah.’ . . . Bayekolaka Torah na nzela ya mibeko te, kasi na komonáká lolenge mibeko mikɔtisami na bomoto, kati na bikelá mpe misala ya bato na bwanya oyo bazali naino na bomoi. Bazali kolakisa mibeko na makambo oyo bazali kosala, kasi te bobele na oyo bazali koloba.”
Adin Steinsaltz, nganga-mayele ya Talmud andimisi likambo yango, wana akomaki ete: “Bato na bwanya bango moko bazalaki koloba, ‘Esengeli koyekola ata masoló na bango elongo na bato, masɛki, to maloba nyonso oyo bato na mayele babimisi yango.’” Esengelaki koyekola bango kino meko nini? Steinsaltz amonisi ete: “Ndakisa moko ya kolekisa ndelo na likambo yango ezali ya moyekoli oyo, engebene lisoló, abatamaki na nsé ya mbeto ya moteyi monene na ye mpo na komona lolenge nini asalaka wana azali elongo na mwasi na ye na mbeto. Ntango batunaki ye ntina na biyébayéba na ye, elenge moyekoli yango ayanolaki ete: ‘Ezali Torah mpe esengeli koyekola yango,’ likanisi oyo endimami na balabi mpe bayekoli na bango ete esengeli kozala bongo.”
Na kotyáká likebi mingi likoló na balabi na esika ya Torah—wana bazalaki koyekola Torah na ndakisa ya balabi—kobanda ekeke ya liboso T.B., losambo ya Bayuda ekómaki lingomba oyo etyami moboko likoló na balabi. Moto akobɛlɛma na Nzambe na nzela ya Liloba lipemami oyo likomami te, kasi na nzela ya ndakisa ya nkóló, ya labi. Na yango, likebi elongwaki na Makomami mapemami mpe etyamaki likoló na mibeko mpe likoló na bonkɔ́kɔ ekomami te oyo balabi yango bazalaki koteya. Uta eleko yango, makomi ya Bayuda, na ndakisa Talmud, emipesaka mingi na maloba, na masoló, mpe na etamboli ya balabi na esika ya maloba ya Nzambe.
Esika ya balabi na boumeli ya bikeke
Atako bazalaki na bokonzi mpe bopusi monene, balabi ya ntango ya kala bazalaki kozwa mosolo te na mikumba na bango ya lingomba. Búku Encyclopaedia Judaica elobi ete: “Labi ya eleko ya Talmud . . . akesanaki mosika na oyo ya mikolo na biso. Labi ya eleko ya Talmud azalaki molakisi mpe molimboli ya Biblia mpe ya Mibeko mikomami te, mpe azalaki ntango nyonso kosala mosala ya mosuni mpo na kosimba bomoi na ye. Ezalaki bobele na eleko ebéngami Moyen Âge nde balabi bakómaki . . . bateyi, basakoli, bakonzi ya lingomba to etuluku ya Bayuda.”
Ntango balabi babandaki kobongola etɛlɛmɛlo na bango na mosala mopesami lifuti, basusu kati na bango batɛmɛlaki likambo yango. Maimonide, labi ya lokumu mingi ya ekeke ya 12 oyo azalaki kobikela na mosala na ye ya monganga, akweisaki balabi motindo yango polele. “Bakataki bango moko motuya ya mosolo oyo bato to bituluku basengelaki kopesa mpe basalaki ete bato bákanisa, na libúngá nyonso, ete ezalaki mobeko mpe likambo malamu kosalisa [na mosolo] bato ya bwanya mpe banganga-mayele mpe baye bazali koyekola Torah, ete Torah na bango ezalaki mosala na bango. Kasi nyonso wana ebongi te. Ezali ata na liloba moko te, ezala kati na Torah to kati na maloba ya bato ya bwanya, oyo ezali kondimisa yango.” (Commentary on the Mishnah, Avot 4:5) Kasi likebisi ya Maimonide etosamaki te na balabi oyo babimaki na nsima.
Ntango losambo ya Bayuda ekɔtaki na eleko na biso, ekabwanaki na bituluku ya baye balingi mbongwana, baye baboyi mbongwana, mpe baye bakangami na bindimeli ya kala. Mpo na ebele na Bayuda bindimeli mpe misala ya lingomba mikómaki nsima ya makambo mosusu. Na yango, etɛlɛmɛlo ya balabi elɛmbisamaki. Mbala mingi, labi akómaki motambwisi ya lisangá oyo atyami, oyo azali kosala lokola moteyi mpe mopesi toli mpo na basangani ya etuluku na ye. Nzokande, kati na bituluku bibéngami ba Hasidim oyo baleki kobatela bonkɔ́kɔ, likanisi ya labi lokola nkóló mpe ndakisa ekólaki kútu makasi koleka.
Talá maloba ya Edward Hoffman kati na búku na ye na ntina na etuluku ebéngami Hasidim Chabad-Lubavitch: “Ba Hasidim ya liboso bazalaki mpe koloba makasi ete libota na libota ya bato lizalaka na mokambi moko Moyuda, zaddik [moyengebene], oyo azali ‘Mose’ ya ntango na ye, oyo bwanya mpe bokangami na ye epai na basusu eleki ya bato banso. Etuluku nyonso ya ba Hasidim ezalaki kokanisa ete na nzela na bobángi Nzambe oyo ezali na ye, Rebbe [“labi” na lokótá Yiddish] na bango akokaki kútu kosala ete bikateli ya Mozwi-na-Nguya-Nyonso bibongwana. Akumisamaki te bobele lokola ndakisa kati na masukúlu na ye ya kopesa emoniseli, kasi lisusu bizaleli na ye (na elobeli mosusu, ‘lolenge na ye ya kokanga nsinga ya sapato na ye’) bizalaki komonana mpo na kotombola bato mpe kolakisa myango mibombami ya kobɛlɛma na Nzambe.”
“Bino bóbyangama Labi te”
Yesu, Moyuda ya ekeke ya liboso oyo abandisaki losambo ya boklisto, azalaki na bomoi ntango likanisi ya Bafalisai litali balabi libandaki kokɔtela losambo ya Bayuda. Azalaki Mofalisai te, mpe akɔtaki na biteyelo na bango te, nzokande ye mpe abéngamaki Labi.—Malako 9:5; Yoane 1:38; 3:2.
Wana azalaki kokweisa momeseno ya balabi kati na losambo ya Bayuda, Yesu alobaki ete: “Bakomeli mpe Bafalisai bazali kofanda na kiti na Mose. Balingi bisika na lokumu kati na bilambo mpe bifandelo na liboso kati na zando mpe kobyangama Labi na bato. Bino bóbyangama Labi te, zambi moko azali molakisi na bino, bino nyonso bozali bandeko.”—Matai 23:2, 6-8.
Yesu akweisaki ezaleli ya bokaboli kati na bakonzi ya lingomba mpe basangani mosusu ya lingomba, oyo ebandaki kokóla kati na losambo ya Bayuda. Atɔndɔlaki momeseno ya kopesa lokumu loleki monene oyo ebongi na bato te. Alobaki na mpiko nyonso ete: “Moko azali molakisi na bino.” Moko yango ezalaki bongo nani?
Mose, “oyo [Yehova] ayebaki miso na miso” mpe oyo bato na bwanya bango moko bazalaki kobénga ye “Labi na biso,” azalaki moto na kozanga kokoka. Ye moko mpe asalaki mabungá. (Deteronome 32:48-51; 34:10; Mosakoli 7:20) Na esika ya kotombola Mose lokola ndakisa eleki monene, Yehova ayebisaki ye ete: “Nakotɛmisa bango mosakoli lokola na yo longwa na kati na bandeko na bango, mpe nakotya maloba na ngai na monɔkɔ na ye, mpe ye akolobela bango makambo nyonso oyo ekolakela ngai ye. Soko mpe moto nani akoyoka maloba na ngai te oyo ekoloba ye na nkombo na ngai, mbɛ ngai mpenza nakokata likambo na ye.”—Deteronome 18:18, 19.
Bisakweli ya Biblia bizali komonisa ete maloba wana makokanaki epai na Yesu, Masiya.a Yesu azalaki te bobele “lokola” Mose; kasi azalaki monene koleka Mose. (Baebele 3:1-3) Makomami mazali komonisa ete Yesu abotamaki moto ya kokoka, mpe na kokesana na Mose asalelaki Nzambe kasi “akwei na masumu te.”—Baebele 4:15.
Tólanda ndakisa
Boyekoli ya mozindo oyo Bayuda bamipesi mpo na koyekola misala mpe maloba nyonso ya balabi ebɛlɛmisi bango na Nzambe te. Atako moto azangi kokoka akoki mbala mosusu kozala ndakisa ya bosembo, soki toyekoli mpe tomekoli mokomoko na misala na ye, tokomekola mabungá mpe kozanga kokoka na ye elongo na bizaleli malamu na ye. Na motindo mobongi te tokopesa nkembo epai na ekelamu na esika na Mozalisi.—Baloma 1:25.
Kasi Yehova asili kopesa Ndakisa mpo na bato. Engebene Makomami, Yesu azalaki na bomoi liboso ete abotama lokola moto. Ya solo, abéngami “elilingi na Nzambe, oyo akomonanaka te.” (Bakolose 1:15) Lokola asalaki na likoló na boumeli ya mibu nkóto nkóto lokola “kapita-mosáli” ya Nzambe, Yesu azali ye oyo abongi mpenza kosalisa biso na koyeba Yehova malamu.—Masese 8:22-30; Yoane 14:9, 10.
Yango wana, Petelo akomaki ete: “Klisto mpe ayokaki mpasi mpo na bino; atikeli bino elakiseli ete bóbila na matambe na ye.” (1 Petelo 2:21) Ntoma Paulo alendisaki baklisto na “kotala Yesu, ye [“Mosaleli ya liboso,” NW] mpe Mosukisi na kondima [“na biso,” NW].” Alobaki lisusu ete “kati na ye Klisto mabonza nyonso na mayele mpe na boyebi masili kobombama.” (Baebele 12:2; Bakolose 2:3) Ezali na moto mosusu te—ata mpe Mose te to moko te ya bato na bwanya ya Balabi—abongi kotyamela likebi motindo oyo. Soki ezali na moto oyo tosengeli komekola ye penepene, ezali bongo Yesu. Basaleli ya Nzambe bazali na mposa te ya nkombo ya lokumu lokola labi, mingi mpenza engebene ndimbola na yango ya mikolo na biso, kasi soki ezali na moto oyo abongi kobéngama Labi, ezali bongo Yesu.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na bilembeteli mingi oyo bimonisi ete Yesu azalaki Masiya oyo alakamaki, talá mwa búku Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?, nkasa 24-30, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 28]
© Brian Hendler 1995. All Rights Reserved