‘Bozwa kopema na bino‘
“Boya liboso na ngai, bino nyonso bozali kolemba mpe bomemi mikumba . . . bokozwa kopema mpo na milimo na bino. Mpo ete ekanganeli na ngai ezali na motau mpe mokumba na ngai ezali na bozito te.”—MATAI 11:28-30.
1, 2. Uta kala bomoi na moto ezali ndenge nini, mpe yango ezali na bokeseni ndenge nini na oyo Nzambe akanaki na ebandeli?
Toyebi ete biloko nyonso bizali kolela mpe komona mpasi elongo kino na ntango oyo, lokola na mpasi na kobota mwana.” Tala oyo mobali moko akomelaki baninga na ye bafandaki na Rome esili koleka bikeke mingi. (Baloma 8:22) Uta ntango yango, kolela mpe bampasi ya libota mobimba ya bato ezali kaka kobakama. Bisika nyonso, bokabwani, bobola, kobomana mpe nzala, ezali koboma bato mingi. Mpo na ebongiseli na nkita oyo ezangi bosembo, bamilió na bato bazali na mosala te, na ndako te, mpe bopusi ya Satana ezali kolembisa milende oyo ezali kosalema mpo na koteya bana nzela ya malamu.
2 Kasi mbala mosusu ekoki kozala ntango maladi mpe bonunu ezali kolembisa moto mpe kobebisela ye makoki na ,ye nde ntango wana makambo mazali kobeba koleka. Moto akotikala bobele kimbambala. Bampasi ya nsomo, oyo ezali koumela poso mingi, basanza mingi, mbala mosusu bambula mingi, ezali kopesa mpasi mingi na motema mpe ekobimisa mpisoli. Oyo nde mawa! Mpo na bomoi ya mpasi ya moto, mokonzi na mayele na kala alobaki: “Mikolo na ye nyonso ezali mpasi mpe mosala na ye ezali mawa.” (Mosakoli 2:23; 4:1) Ya solo, bomoi oyo tozali na yango lelo ezali yango te oyo Nzambe akanaki na ebandeli.—Genese 2:8, 9.
3. Nzambe azalisaki moto na makoki nini, kasi ndelo nini emonani mpo na matomba yango lelo?
3 Jéhovah Nzambe azalisaki moto ya kokoka, elongo na makoki nyonso ya kosepela solosolo na bomoi. (Deteronome 32:4, 5) Kanisa bobele na elengi ya kolya bilei kitoko, kopema mopepe kitoko mpe kotala na esengo kolala kitoko na moi. “Namoni mosala oyo Nzambe apesi na bana na bato ete basala yango”, elobaki kala mokonzi na mayele oyo tolobelaki liboso. “Asalaki nyonso na kitoko na kati na ntango na yango. . . . Nayebi ete eloko mosusu eleki oyo te ete basepela mpe ete basala malamu naino bazali na bomoi, mpe ete moto na moto alia mpe amela mpe ayoka esengo mpo na malamu na mosala na ye nyonso. Yango ezali likabo na Nzambe.”—Mosakoli 3:10-13.
4. (a) Ndenge Yesu amonaki yango, bato mingi bazali na mpasi ya ndenge nini? (b) Libyangami nini na kobondisa Yesu apesaki, mpe yango ezali kobimisa mituna nini?
4 Kasi na mawa nyonso, ezali bato moke nde bazali kosepela na biloko kitoko oyo Nzambe asalaki mpo na bato nyonso! Yesu Klisto ayebaki lolenge na bomoi ya mpasi na bato. Biblia elobi: “Bibele mingi bayaki epai na ye, mpe na esika moko na bango bazalaki na batengumi, na bato batambolaka te, na bato bakufi miso, na bato bakolobaka te mpe bamosusu mingi, balalisi bango na makolo na ye.” Yesu ayokaki mawa mingi mpo na baoyo nyonso bazalaki na mpasi. (Matai 9:36; 15:30) Mokolo moko, apesaki libyangami oyo na kobondisa: “Boya epai na ngai, bino nyonso bozali kolemba na mosala mpe bozali na bozito mpe nakopemisa bino. Bokamata ekanganeli na ngai, mpo ete ngai nazali na bopolo mpe na motema mosokemi, mpe bokozwa kopema mpo na milimo na bino.” (Matai 11:28, 29) Maloba oyo ezali solo na kolendisa. Kasi kopema ya ndenge nini Yesu alobelaki? Mpe ndenge nini tokoki kozwa yango?
Solo oyo ezali kopemisa
5. Na maloba nini Yesu amonisaki eloko nini ezali kopesa bonsomi ya solo mpe kopema mpo na milimo na biso?
5 Na elambo na Mingombo, soko sanza motoba liboso na liwa na ye, Yesu amonisaki ndenge nini kozala na bonsomi mpe, na nzela na yango, kozwa kopema ya solo. Epai na baoyo bandimelaki ye, Yesu alobaki: “Soko bino bokoumela kati na liloba na ngai, bokozala bayekoli na ngai na solo, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.” (Yoane 8:31, 32) Ezali solo ya lolenge nini Yesu alobelaki? Ekosikola biso na nini? Bayoki na ye bazalaki baombo na nini?
6. (a) Ntembe nini bakonzi na mangomba babimisaki, mpe mpo na nini? (b) Na ndimbola nini biso nyonso tozali baombo?
6 Banguna na ye bakonzi na mangomba bakataki Yesu maloba, mpe balobaki na ye: “Tozali bana na Abrahame mpe kino lelo oyo tozalaki baombo na moto te. Mpo na nini ozali koloba ete: ‘Bokozala bansomi’?” Batemeli oyo Bayuda bazalaki komikumisa mpo na libula na bango. Ata soki ekolo na bango ezalaki mbala mingi na nse na biyangeli na bapaya, Bayuda bazalaki koboya kobengama ete bazali baombo. Kasi Yesu amonisaki na lolenge nini bazalaki baombo, na maloba oyo: “Solo solo nalobi na bino ete: moto na moto oyo akosalaka masumu azali moombo na masumu.” Ya solo, bayoki na ye bazalaki ‘basali na masumu’, ndenge moko biso lelo, mpo ete tobotamaki na lisumu uta na baboti na biso ya liboso. Kasi Yesu apesi elaka oyo: “Soko nde Mwana akosikola bino, bokozala bansomi na solo.”—Yoane 8:33-36; Baloma 5:12.
7. Ndenge nini moto akoki kozwa bonsomi ya solo, mpe solo oyo ezali kosikola biso ezali nini?
7 Na yango tokoki kozwa bonsomi ya solo bobele na nzela na Mwana na Nzambe, Yesu Klisto, oyo apesaki bomoi na ye ya bomoto mpe ya kokoka lokola mbeka mpo na kosikola biso. Mbeka oyo nde ezali kosikola biso na masumu oyo ekomemaka kino liwa mpe bobele mbeka yango ezali kofongola epai na biso elikya ya kozala na bomoi na seko na kolongono ya kokoka mpe esengo mingi kati na mokili ya sika na sembo oyo Nzambe akosala. (Yoane 3:16; 1 Yoane 4:10) Solo oyo ezali kosikola biso ezali oyo ezali kotalela Yesu Klisto mpe mokumba na ye kati na kokokisama na mikano na Nzambe. Ezali Bokonzi, mpo na yango Klisto azali Mokonzi, yango nde ekokokisa mokano na Nzambe mpo na mabelé. Ntango nyonso Yesu apesaki litatoli mpo na solo oyo.—Yoane 18:37.
Ndenge nini solo ezali kobondisa
8. Ndakisa nini emonisi lolenge oyo solo ezali kobondisa?
8 Mpo na komonisa lolenge oyo solo ebondisaka, tozwa ndakisa ya mwasi moko oyo bayebisi ye na monganga ete azwi kanser oyo ekolaka noki. Motema na ye ekotutama na ekizame oyo, mpo mwasi yango akokanisa mpo na mpasi ya maladi oyo mpe liwa. Kasi, nsima, akei kotala monganga mosusu mpe asalisi baekizame mosusu oyo emonisi ete ekizame ya liboso ezalaki libunga, to abikaki na ndenge moko ya ekamwiseli. Kanisa naino kobondisama monene mwasi oyo akoyoka na motema na ye. Oyo nde kopema mpo na molimo na ye!
9. Kobondisama nini Yesu apesaki epai na bato na koteyaka bango solo?
9 Bobele bongo, ntango Yesu ayaki awa na mabelé, bato banyokwamaki na makambo na bonkoko ya mpamba na ntango wana. Mpo na Bakomeli mpe Bafalisai baoyo bazalaki ntina na makambo yango, Yesu alobaki: “Bazali kokanga mikumba na bozito mpe bakotia yango na mapeka na bato nde bango mpenza balingi kotombola yango ata na mosapi na bango te.” (Matai 23:4; Malako 7:2-5) Oyo nde kobondisama mpo na bato ntango Yesu ayebisaki bango solo oyo ekokaki kosikola bango na makambo oyo na bonkoko ezalaki konyokola bango! (Matai 15:1-9) Ezali mpe ndenge moko lelo.
10. Mikumba nini ya kilo bato mingi bamemaki, mpe moto azali komiyoka ndenge nini na kobwaka yango ntango ayekoli solo?
10 Mpo na mateya ya lokuta ya mangomba, oyo ezali solo bozito, mbala mosusu kala ozalaki kobanga konyokwama kati na lifelo ya móto to na epongelo nsima ya liwa na yo. To, soki mwana na yo akufaki, mbala mosusu ozalaki na mpasi mingi na motema na koyoka sango moko alobelaki yo ete ezali Nzambe nde azwaki ye mpo azalaki na mposa na anzelu moko lokola ete Nzambe azali na mposa na mwana na yo koleka yo moko. Bakonzi mosusu ya mangomba bazali koloba mbala mosusu epai na baoyo bazali kobela ete maladi na bango ezali etumbu euti na Nzambe. Na yango, ezali mpenza ebondiseli na koyekola solo ya Biblia oyo ezali kosikola na mateya nyonso oyo ya lokuta mazali kotuta mitema na bato. Ezali solo kokitisa mitema!—Mosakoli 9:5, 10; Ezekiele 18:4; Yoane 9:2, 3.
11. (a) Wapi moko na mikumba mileki kilo, mpe nini ezali kopesa nzela na kokitisa yango? (b) Kobondisa nini Yesu amemaki epai na bato na masumu ntango azalaki awa na mabelé?
11 Moko kati na mikumba mileki kilo mingi ezali komikweisa oyo moto azali na yango kati na mayoki mpo na masumu oyo asili kosala. Ezali kobondisama na koyeba ete masumu yango makoki kopetolama na nzela na motuya na mbeka oyo Klisto apesaki mpo na kosikola biso. Biblia ezali kondimisa biso ete ‘makila na Yesu mapetoli biso na masumu nyonso’. (1 Yoane 1:7) Ata soki makambo oyo tosala mazali mabe ndenge nini, soki tokobongola motema solosolo, mpe kotika yango, tokoki kozala na kobondisama,‘ kopema oyo lisosoli malamu ezali kopesa mpe kondimisama ete Nzambe akokanisa lisusu masumu na biso te. (Nzembo 103:8-14; 1 Bakolinti 6:9-11; Baebele 10:21, 22) Yesu abondisaki bato oyo bazalaki kotungisama na masumu, basi na pite mpe bakongoli na mpako, ndakisa lokola Zakai! Na libaku azwaki mpo na kolia na bango elongo, Yesu abondisaki bango na nzela na solo ya Biblia.—Luka 5:27-32; 7:36-50; 19:1-10.
12. (a) Mpasi nini ezalaki konyokola bamosusu kati na baoyo Yesu abondisaki? (b) Na ekeke ya liboso, epai na nani Yesu amonisaki na ndenge ya kokamwa ete azali “nzela, mpe solo, mpe bomoi?
12 Bato mosusu mingi banyokwami na maladi, kobulungana na makanisi mpe mawa mingi na motema mpo na kufa ya molingami. Kasi Yesu abondisaki baoyo nyonso ‘bazalaki kolemba mpe bazalaki na mikumba’ mpo na bampasi oyo. (Matai 4:24; 11:28, 29) Abikisaki mwasi moko oyo, na boumeli na mbula 18, alukaki lisalisi epai na minganga kasi ezalaki mpamba. Abikisaki mpe mobali moko oyo azalaki kobela esilaki koleka bambula 38, mpe mosusu oyo azalaki mokufi miso banda kobotama amonaki. Kanisa mpo na kobondisama bato oyo bayokaki ntango Yesu abikisaki bango! (Luka 13:10-17; Yoane 5:5-9; 9:1-7) Ya solo, baoyo nyonso bazalaki koya epai na Yesu na kondima bazalaki nde koya epai na liziba na solo, na kobondisama na solo mpe na bomoi. Epai na mwasi mokufeli-mobali oyo azwaki mwana na ye bobele moko longwa na liwa mpe epai na baboti na elenge mwasi oyo na mibu 12 asekwisamaki, Yesu amonisaki na lolenge ya kokamwa mpenza ete azali “nzela, mpe solo, mpe bomoi”.—Yoane 14:6; 17:3; Luka 7:11-17; 8:49-56.
13. Epai na nani Yesu alakisaki ete biso tobelema mpo na kozwa lisalisi, mpe ekobimisa nini soki tolandi toli na ye?
13 Ezali solo ete mbala mosusu okutanaka na mikakatano minene koleka oyo yo moko okoki kolonga yango te. Yesu alakisaki biso ete tobelema epai na Jéhovah mpo na kozwa lisalisi, lokola ye moko asalaki yango (Luka 22:41-44; Baebele 5:7). Soki tozali kobelema ntango nyonso epai na Nzambe kati na libondeli, tokozala na mayoki ndenge moko na mokomi na Nzembo, oyo akomaki: “Jéhovah akumisama, ye oyo akomema mikumba na biso mokolo na mokolo, ye Nzambe na kobika na biso!” (Nzembo 55:22; 68:19) Ya solo, boyebi na solo ezali kopesa kopema ya solo. Ezali kopusa biso pembeni na Jéhovah mpe ezali kosalisa biso na kososola ete na lisalisi na ye tokoki kolonga mikakatano oyo mileki makasi.
Kobondisama na elikya ya Bokonzi
14. Eloko nini esimbaki Yesu kati na komekama na ye? Eloko nini tozali na yango mposa mpenza soki tolingi kozwa kopema mpo na milimo na biso?
14 Mpo na kozwa kopema ya solo mpo na milimo na biso, tosengeli kozala na elikya makasi. Ezali elikya nde esimbaki Yesu. Mpo na yango Biblia elobi: “Mpo na esengo etiami liboso na ye, ayikeli nzete na mpasi mpiko, atioli nsoni na yango mpe azali kofanda na loboko mobali na kiti na bokonzi na Nzambe.” (Baebele 12:2) Yesu asimbamaki na elikya kitoko, oyo ya kosantisa nkombo ya Tata na ye na kotikalaka sembo mpe komimonisa ete abongi mpo na kozala Mokonzi na Bokonzi na Nzambe. Soki tobateli malamu elikya na biso, oyo ya kozala mokonzi elongo na Klisto na Likoló to kozala moko na bayangelami na ye kati na Paradis na mabelé, tokoyika mpiko kozanga mpasi kati na mosala na Nzambe. Elikya oyo ezali mpenza na ntina mingi mpo ete tokoka kozwa kopema mpo na milimo na biso.—Baloma 12:12.
15. Mbele tokokaki kozala na elikya nini mpo na bomoi na ntango ekoya soko elikya ya Bokonzi ekokaki kozala te?
15 Elikya nini ya bomoi tokokaki kozala na yango kozanga elikya ya Bokonzi? Mingimingi molai ya bomoi ya moto ezali ya mibu 70 to 80. Mpe bambula yango ezali koleka nokinoki, mpe moto nyonso oyo asi akoli akoki kotatola yango! Ezali solo ntango Biblia ezali koloba boye mpo na bomoi: “Yango ekosila noki, mpe biso tokopombwa.” (Nzembo 90:10) Ata bongo, tolingi ete mikolo na biso mizala molai. Tolingi kotikala na bomoi. Makambo ya kosala mazali mingi, makambo mingi ya kosepela na yango.
16. Mpo na kozwa kopema to kobondisama mpo na milimo na biso tosengeli kosala nini?
16 Ezali bongo likambo na ntina mingi ete tobelema na kondima nyonso epai na “Klisto Yesu, elikya na biso”. (1 Timoté 1:1) Yesu alobaki boye: “Oyo ezali mokano na Tata na ngai: ete moto na moto oyo akomona Mwana mpe akondima ye akozwa bomoi na seko.” (Yoane 6:40, 51) Tondimi yango? Soki tolingi kozwa kopema mpo na milimo na biso, tosengeli kosala bongo. Tokoki koleka na nzela mosusu te. Ee, tosengeli kolata na “motó ekoti na elikya na lobiko”. (1 Batesaloniki 5:8; tala Baebele 6:19.) Elikya oyo esengeli kobatela elimo na biso, makanisi na biso. Soki ndenge boye te tokotungisama mingi na bozito mpe mabanzo kino kotika solo, mpe na yango tokobungisa bomoi na seko. Mpo na kozwa kopema mpo na molimo na yo, omisenzela bongo ete elikya na yo kati na Bokonzi ezala ntango nyonso makasi.
Kobondisama oyo ezali kozwama na kokokisaka mosala na Nzambe
17. (a) Tosengeli lisusu kosala nini mpo na kozwa kopema to kobondisama, mpe mpo na nini ezali likambo ya kilo te mpo na biso? (b) Kondima ekanganeli na Klisto elimboli nini?
17 Kasi mpo na kozwa kopema to kobondisama, esuki te bobele na kobelema epai na Yesu. Mpamba te ye abakisaki: “Bokamata ekanganeli na ngai likolo na bino [to bomitia elongo na ngai na nse na ekanganeli na ngai] mpe boyekola na ngai, mpo ete ngai nazali na bopolo mpe na motema mosokemi; bokozwa kopema [to kobondisama] mpo na milimo na bino. Mpo ete ekanganeli na ngai ezali na motau mpe mokumba na ngai ezali na bozito te.” (Matai 11:29, 30) Kokumba ekanganeli elingi koloba kosala mosala. Kasi awa Yesu asengi te ete tokumba ekanganeli biso moko mpe tosala mosala biso moko. Te, abengi biso ete tokumba ekanganeli yango elongo na ye. Na yango, kondima ekanganeli oyo Yesu azali kopesa biso elimboli komipesa epai na Nzambe, kolakisa yango na kozwa batisimo, nsima kokokisa mikumba misengami na bayekoli na Klisto. Kasi ekanganeli wana ya kozala moyekoli na Klisto ekoki kopesa kobondisa to kopema ndenge nini?
18. (a) Mpo na nini kondima ekanganeli na Klisto ezali kopesa kopema? (b) Na likambo nini mosala ya kosakola ezali kopesa biso esengo mpe kobondisa?
18 Kondima ekanganeli na Klisto ezali kopesa kobondisama to kopema mpo ete Yesu azali na bopolo mpe na motema mosokemi. Lokola azali na makanisi mabongi, moto akozala na motema mokiti na kosalaka elongo na ye, na nse na ekanganeli elongo na ye. Ayebi bandelo na biso mpe bolembu na biso. “Ekanganeli na ngai ezali na motau”, alobi bongo. Ya solo, ekanganeli ya kozala moyekoli, ezali kosenga kosangana na mosala, mosala bobele ya kosakola mpe koteya oyo Yesu akokisaki mpe oyo alakisaki yango na bayekoli na ye ya liboso. (Matai 28:19, 20; Misala 1:8) Koloba na bazalani na biso mpo na Nzambe na biso na bolingo, mpo na Mwana na ye mpe mpo na Bokonzi ezali mosala ya kobondisa. Ezali mpe ebondiseli koyebisa epai na bazalani ete bakoki kozala na bomoi na seko kati na Paradis! Mpe tozali koyoka esengo mingi ntango bazali kondima nsango na bomoi ya Bokonzi mpe bazali kosangana na biso mpo na kosalela Jéhovah Nzambe!—1 Timoté 4:16.
19. Na mikolo na biso, mpo na nini bankulutu basengeli kokanisa malamu likolo na toli oyo Moïse azwaki epai na bokilo na ye ya mobali?
19 Bamilió na bato oyo basopani epai na lisangá ya Jéhovah na bambula oyo eleki bazali na mposa ya kozwa lisalisi mpo bandima ekanganeli na Klisto, yango ebakisi mokumba na mosala mpo na basakoli na Bokonzi mpe na baoyo bazali kotambwisa bango. Babateli mpate oyo ya elimo bakoki kokanisa mpo na litomba na toli oyo bokilo na Moïse apesaki ye: “Oyo ozali kosala ezali malamu te. Yo mpe bato na yo elongo bokomilembisa, mpo ete likambo oyo eleki nguya na yo. Yo moko okoki kosala yango te.” Na yango, Moïse alendisamaki apona mibali oyo bazali na makoki mpe bakabola elongo na ye mokumba na kotambwisa bato. Toli oyo ebimisaki matomba. (Exode 18:17-27) Lelo, formation malamu ezali kobimisa mibali mingi oyo bazali na makoki, “makabo epai na mibali”, baoyo bakoki kosangana na mosala etali kotambwisa bampate, mpo ete bankulutu na lisanga balemba te.—Baefese 4:8, 16.
20. Eloko nini Yesu Klisto mpe Tata na ye bazali kozela epai na biso?
20 ta Klisto alendisaki bayekoli na ye kosala na makasi nyonso, ezala ye ezala Tala na ye bazali kosenga te epai na biso makambo oyo maleki makasi na biso. Ntango bato mosusu batiolaki Malia, ndeko mwasi na Lazare, mpo na oyo asalelaki ye, Yesu apamelaki bango na maloba oyo: “Botika ye. . . . Ye asali eloko ekokaki na ye kosala.” (Malako 14:6-8; Luka 13:24). Yango nde Jéhovah mpe Yesu bazali kozela epai na biso: ete tosala oyo ekoki na biso. Mosala ya boklisto motindo oyo ezali mpasi te kasi ebondiseli. Mpo na nini? Mpo ezali kopesa esengo ya solo uta sikawa mpe elikya ya solo ya kozwa matomba ya seko na ntango ezali koya.
21. (a) Mokumba na Klisto oyo ezali na bozito te, ezali nini, mpe nini nde ezali kobakisa kilo na mosala ya kosakola? (b) Tosengeli kobatela ekateli nini, mpe tokoki kolikya nini mpo na ntango ezali koya?
21 Ya solo, Satana akosala nyonso mpo tonyokwama, lokola asalaki bongo na Yesu Klisto, oyo azali elongo na biso na nse na ekanganeli. (Yoane 15:20; 2 Timoté 3:12) Kasi tobosana te ete mokumba na Yesu ezali na bozito te. Ezali botemeli ya Satana mpe bato na ye nde ezali kobakisa kilo na mosala na biso. Mokumba na Yesu ezali bobele kokokisa mibeko na Nzambe, yango mpe ezali na bozito te. (1 Yoane 5:3) Na yango, totikala na nse na ekanganeli na Yesu Klisto, elongo na ye, na komipesa na mosala ya kosakola mpe ya koteya, ndenge ye moko asalaki yango. Engebene elaka na ye, soki tokosala bongo ‘tokozwa kopema to kobondisama mpo na milimo na biso’.
Bozongeli
◻ Engebene Baloma 8:22, libota mobimba ya bato ezali kati na ezalela nini?
◻ Na mitindo nini boyebi na solo ezali kobondisa?
◻ Mpo na nini elikya na Bokonzi ezali kobondisa mpenza?
◻ Ekanganeli na Yesu ezali nini, mpe mpo na nini ezali motau?
◻ Mokumba nini tosengeli komema mpo tozwa kobondisama to kopema?