Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/8 nk. 10-15
  • Nzambe alingi ete moto azala na bomoi ya esengo kati na paradis

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe alingi ete moto azala na bomoi ya esengo kati na paradis
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Libombami ezali te na ntina na bomoi ya moto
  • Elikya ya bomoi na seko
  • Bandimbola ya ntina mingi
  • Bobele ye moko, kasi atondi na esengo
  • Nzambe asalaki mobali ná mwasi ya liboso
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Liwa mpe lisekwa ya Yesu—Ekoki komemela yo nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Bilikya kitoko mpo na bato: paradis ya bisengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mokano ya Nzambe mpo na mabele ezali nini?
    Kondima ya solosolo—Ekosalisa yo ozala na bomoi ya esengo
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/8 nk. 10-15

Nzambe alingi ete moto azala na bomoi ya esengo kati na paradis

“Jéhovah Nzambe akamataki moto mpe atiaki ye na elanga na Edene kotimola yango mpe kobatela yango.”​—GENESE 2:15.

1. Na ebandeli, mokano na Nzambe epai na bato na botosi ezalaki nini?

NA EBANDELI, mokano ya Mozalisi ezalaki, mpe ezali ntango nyonso, ete bato na botosi banuna te, kasi babatela libela nguya mingi ya bolenge, ete bakwea na mokakatano te, kasi bazala ntango nyonso na misala kitoko mpo na kokokisa, ete balingana kati na bango na motema moko mpe na bolingo ya solo mpenza, na mokuse bazala na bomoi kati na makambo ya kokoka—kati na paradis!​—Genese 2:8; tala Luka 23:42, 43.

2. (a) Moto ya liboso asalaki nini ntango ayebaki ete azali na bomoi? (b) Ntango nini moto ya liboso akelamaki, epai wapi, mpe na eleko nini ya mobu?

2 Mpo na kondima likambo yango, tozonga na eleko oyo Adam azalisamaki, na eleko oyo atalaki nzoto na ye malamumalamu mpe biloko nyonso oyo azalaki komona, koyoka mpe kooka zongazonga na ye, mpe na eleko oyo ayebaki ete azalaki na bomoi. Engebene Mitango ya Biblia Mosantu, likambo yango esalamaki esili koleka penepene na mibu 6 000, na 4 026 liboso ya ntango na biso, na région moko ya mokili ebengami lelo Turquie, kati na sud-ouest ya epai oyo bazali kobenga lelo Asie, penepene na mai minene Efalata mpe Tigre, elingi koloba na Nord ya etando ya mabelé. Ekokaki kozala penepene na 1er Octobre, mpamba te manaka ya kalakala ezalaki kobanda kotanga mikolo penepene na date wana.

3. (a) Na lolenge nini moto azalisamaki? (b) Nkombo nini moto ya liboso ayaki kozwa, mpe ndimbola na yango ezalaki nini?

3 Moto ya liboso azalisamaki na lolenge ya kokoka, azalaki na binama nyonso kati na nzoto na ye, azalaki na kolongono malamu ya nzoto mpe na bizaleli ya kokoka. Nkombo oyo bazali kobengela ye mbala na mbala kati na lisolo ya Biblia, ‘Adhama, ezali kobenda likebi na biso likoló na eloko oyo ye asalamaki na yango. Na yango, m’abelé, to mputulu, epai oyo ye azwamaki ebengamaki ’adhamah. Tozali bongo na likoki ya kokanisa ete liloba oyo ekomaki mpenzampenza nkombo ya moto yango ya liboso, Adam, elimboli “moto azwami na mabelé”. Oyo kosutuka ya lolenge nini ezalaki mpo na Adam ntango abandaki kopema, akomi moto azali na makanisi mpe na mayele!

4. Kati na makambo nini ya kokamwa moto ya liboso amimonaki te ntango azalisamaki? (b) Na bongo azalaki mwana ya nani te?

4 Ntango moto yango ya liboso, Adam, akomaki na bomoi, abandi kososola mpe akomi na mayele, mpe afungolaki miso, amimonaki te liboso na ntolo moko etondi na nsuki, katikati na maboko milai mpe na nguya ya mokomboso to makaku epai oyo asengelaki koyambama, na kotombolaka miso mpo na kotala ye mpe kobengaka ye na bolingo nyonso ete mama. Moto ya liboso, Adam, abotamaki te na lolenge oyo ezangi koyebana. Ayokaki liyoki ya bondeko ata moko te elongo na makaku, ata nsima na mikolo,. ntango amonaki makaku moko mpo na mbala ya liboso. Mokolo ya kozalisama na ye, eloko moko te emonisaki ete azalaki mokitani, nkoko moko ya makaku to ya ekelamu mosusu ya motindo moko. Moto ya liboso, Adam, asengelaki bongo komitungisa na ntina na lolenge oyo ye ayaki na bomoi? Te.

5. Likambo nini Adam ayebaki malamu mpo na elanga oyo ekokani na parc epai oyo azalaki, mpe mpo na ye moko?

5 Toyebi ete Adam akokaki komituna ndenge nini biloko kitoko nyonso oyo bizingaki ye bizalisamaki. Amimonaki kati na elanga oyo ekokani na parc, paradis moko oyo ye asalaki te mpe abongisaki te. Ndenge nini yango ebimaki? Lokola azalaki na mayele ya kokoka, na likoki ya kososola, alingaki mpenza koyeba yango. Nzokande, azalaki ata na ekspérianse moko te ya kala. Ayebaki ete amisalaki te, amikolisaki ye moko te. Amikomisamaki te na lolenge oyo azalaki na makoki na ye moko.​—Tala Nzembo 100:3; 139:14.

6. Mayoki nini Adam ayokaki mpenzampenza na komimonaka na bomoi kati na efandelo ya kokoka ya mabelé?

6 Mbala mosusu, na ebandeli moto ya liboso, Adam, atiaki likebi mingi na ekspérianse wana ya sika mpe ya esengo ya kozala na bomoi kati na efandelo ya kokoka ya mabelé mpo na komituna nini ezali ebandeli na yango mpe ntina ya bomoi na ye ezali nini. Lokola akokaki komipekisa te mpo na kobimisa esengo na ye, amonaki ete maloba mazalaki kobima kati na monoko na ye. Amiyokaki koloba lokota ya bato, kotalatala biloko kitoko oyo azalaki komona mpe koyoka. Ezalaki mpenza esengo mpo na kofanda kati na paradis yango! Nzokande lokola azalaki na esengo ya komona mpo na mbala ya liboso biloko mingi na kotalaka, na koyokaka, na kookaka mpe na kosimbaka nyonso oyo ezalaki kozinga ye, mituna mitondaki ye kati na makanisi. Soki tozalaki na esika na ye, nyonso ekokaki komonana liboso na biso lokola ekangisami kati na libombami, libombami oyo tokaki koyeba yango te na nzela na biso moko.

Libombami ezali te na ntina na bomoi ya moto

7. Mpo na nini Adam amitungisaki ntango molai te wana amimonaki na bomoi kati na paradis?

7 Moto ya liboso, Adam, amitungisaki ntango molai te mpo na ezalela oyo azalaki kati na yango, kozala na bomoi mpe ye moko, kozanga moto mosusu oyo azali komonana mpe oyo akokani na ye kati na paradis. Ayokaki mongongo moko, moto moko koloba na lokota oyo ye azalaki koyoka. Kasi ezalaki nani? Azalaki komona te moto oyo azalaki koloba. Mongongo ezalaki kouta na efandelo ezangi komonana mpe ezalaki koloba na ye. Ezalaki mongongo ya Mozalisi na ye, mongongo na Oyo akelaki ye. Mpe akokaki koyanola na kosalelaka lokota moko wana. Na bongo abandaki kolobana elongo na Nzambe, Mozalisi. Azalaki na mposa ya radio te, lokola bazali kosala yango na mikolo na biso, mpo na koyoka mongongo ya Nzambe. Nzambe asololaki na ye kozanga ete asalela eloko mosusu, moto oyo ye azalisaki.

8, 9. (a) Na mituna nini Adam akokaki kozwa eyano, mpe likebi nini mpe libateli nini euti epai na tata bamonisaki ye yango? (b) Eyano nini Tata ya likoló apesaki epai na Adam?

8 Kobanda ntango wana moto ayebaki ete azali ye moko te, yango epesaki ye elikya. Akokaki kotuna mituna mingi oyo mizalaki kotungisa ye epai na Moto azangi komonana oyo azalaki kolobana na ye. Nani azalisaki ye, ye mpe paradis wana ya bisengo? Mpo na nini atiamaki kuna, mpe asengelaki kosala nini mpo na bomoi na ye? Bomoi yango ezalaki na ntina? Moto wana ya liboso, Adam, atalelamaki mpe abatelamaki mpenzampenza lokola mwana, mpamba te azwaki biyano ya kosepelisa mpo na mituna na ye. Esengo nini ezalaki mpo na Mozalisi na ye, Ye oyo apesaki ye bomoi, Tata na ye ya likoló, na koyoka ye kobanda koloba, kobimisa maloba na ye ya liboso! Oyo esengo nini azalaki na yango na koyoka mwana na ye kolobana na ye! Motuna na ye ya liboso esengelaki mpenzampenza kozala boye: “Ndenge nini nazalisamaki?” Tata ya likoló ayanolaki na esengo nyonso mpe andimaki ete moto wana ya liboso azalaki mwana na ye, “mwana na Nzambe”. (Luka 3:38) Jéhovah amimonisaki lokola Tata ya moto na liboso, Adam. Tala, na mokuse, eyano oyo Adam azwaki epai na Tata na ye ya likoló mpe oyo ye apesaki na nsima epai na bakitani na ye:

9 “Na ntango yango Jéhovah Nzambe asalaki moto na mputulu na mokili, mpe apemaki kati na zolo na ye mpema na bomoi, mpe moto akomaki molimo na bomoi. Jéhovah Nzambe akonaki elanga epai na ebimelo na ntango, kati na Edene, mpe kuna atiaki moto oyo ye asalaki Jéhovah akolisaki na mokili nzete nyonso ezali kitoko na kotala, mpe yango ezali malamu na kolia; atiaki mpe nzete na bomoi kati na elanga, mpe nzete na koyeba malamu mpe mabe. Ebale ebimaki na Edene mpo na kopolisa elanga, mpe yango ekabwanaki na esika yango mpe ekomaki mingala minei.”​—Genese 2:7-10b.

10, 11. (a) Makambo nini Adam ayekolaki mpenzampenza, kasi mituna nini mizalaki lisusu kotunama? (b) Biyano nini Tata na likoló apesaki epai na Adam?

10 Adam, oyo elimo ezalaki ya kolamuka mpe ya sika, azwaki na esengo nyonso biyano wana ya kosepelisa. Sikawa ayebaki ete autaki te na efandelo ezangi komonana epai kuna Mozalisi na ye azalaki koloba, kasi asalamaki uta na mabelé epai azalaki kofanda, ete autaki na mputulu. Ezali Jéhovah nde azalaki Tata na ye, Liziba ya bomoi na ye. Azalaki “molimo na bomoi”. Mpo ete azwaki bomoi epai na Jéhovah Nzambe, azalaki “mwana na Nzambe”. Banzete oyo ezalaki kozinga ye kati na elanga ya Edene ezalaki kobota bambuma kitoko mpo na bilei, oyo akokaki kolia mpo na kobatela bomoi na ye, mpo na kotikala molimo ya bomoi. Kasi mpo na nini asengelaki kozala ntango nyonso na bomoi, mpe mpo na nini atiamaki na mabelé, kati na elanga ya Edene? Lokola azalaki moto ya kokoka, ya mayele, oyo azalaki na makasi na nzoto, azalaki na ntina malamu ya koyeba yango. Soki te, ndenge nini akokaki kokokisa mokano ya bomoi na ye mpe kosepelisa Mozalisi na ye mpe Tata na ye na kosalaka mokano na Ye? Biyano na mituna oyo ya ntina bizali kozwama kati na maloba oyo malandi:

11 “Jéhovah akamataki moto mpe atiaki ye na elanga na Edene kotimola yango mpe kobatela yango. Jéhovah Nzambe alakaki moto ete, ‘Yo okoki kolia mbuma na nzete nyonso na elanga, nde mbuma na nzete na koyeba malamu mpe mabe okoki kolia yango te. Mpamba te mokolo okolia yango okokufa solo.’”​—Genese 2:15-17.

12. Mpo na bolamu nini Adam asengelaki kotondo Mozalisi na ye, mpe ndenge nini asengelaki kokumisa Nzambe?

12 Adam atondaki Mozalisi na ye mpo na mosala ya ntina oyo apesaki ye kati na elanga kitoko wana ya Edene. Sikawa ayebaki mokano ya Mozalisi na ye, mpe asengelaki kosala likambo moko na mabelé mpo na Ye. Azalaki sikawa na mokumba, oyo ya kotimola elanga na Edene mpe ya kobatela yango, kasi ekozala mosala ya kosepelisa. Na kokokisaka yango, asengelaki kobatela elanga ya Edene na lolenge moko oyo ekopesa lokumu mpe nkembo epai na Ye oyo asalaki yango, Jéhovah Nzambe. Soki mosala na ye epesi ye nzala, Adam akoki kolia bambuma na nzete ya elanga kino akotonda. Akozongisa nguya na ye mpe akokoba kofanda na esengo libela na libela seko.​—Tala Mosakoli 3:10-13.

Elikya ya bomoi na seko

13. Elikya nini moto ya liboso azalaki na yango, mpe mpo na nini?

13 Kofanda seko? Esengelaki kozala elikya moko oyo ekokaki kondimisama te mpo na moto ya kokoka. Kasi mpo na nini te? Mozalisi na ye azalaki mpenza na likanisi te ya koboma elanga wana ya Edene oyo ebongisamaki kitoko koleka. Mpo na nini asengelaki kolimwisa mosala na ye, nzokande yango ezalaki kitoko mpe ezalaki komonisa malamu mosala kitoko na ye ya bozalisi? Na bosolo nyonso, azalaki na likanisi ya kosala bongo te. (Yisaya 45:18) Mpe lokola elanga oyo eleki nyonso esengelaki ntango nyonso kolonama, esengelaki moloni mpe mobateli lokola moto ya kokoka Adam, abatela yango. Soki aliaki te mbuma oyo epekisamaki ya “nzete na koyeba malamu mpe mabe”, mbele moto wana ya kokoka alingaki kokufa te. Akokaki koumela seko.

14. Likambo nini ekokaki kopesa nzela na Adam mpo na kofanda seko kati na Paradis?

14 Adam azalaki na likoki ya koumela seko kati na elanga ya Edene, na Paradis. Akokaki kosepela mpo na libela, bobele soki akotosa libela Mozalisi na ye, ete alia te mbuma oyo ye apekisaki. Nzambe alingaki ete moto ya kokoka azala ntango nyonso na botosi mpe aumela seko. Epekiseli ya kolia mbuma ya “nzete na koyeba malamu mpe mabe” ezalaki te mpo na kobengela ye liwa, kasi bobele mpo na komeka botosi ya kokoka ya moto epai na Tata na ye. Ezalaki kopesa epai na moto likoki ya komonisa bolingo na ye mpo na Nzambe, Mozalisi na ye.

15. Mpo na nini Adam akokaki kozala na elikya ya kozala na avenire moko kitoko mpe kozwa bolamu ya Mozalisi na ye?

15 Kozwaka esengo na koyeba ete abimaki mpenza pwasa te kasi azali na Tata na likoló, kongengisamaka mpenza mobimba likoló na ntina ya bomoi na ye mpe kozalaka na esengo ya kozala na elikya ya kofanda seko kati na Paradis, moto ya kokoka amonaki ete avenire moko kitoko efungwami liboso na ye. Azalaki kolia bambuma ya banzete oyo ezalaki malamu mpo na bilei, mpe azalaki kosimba te “nzete na koyeba malamu mpe mabe”. Alingaki komitika na maboko ya Mozalisi na ye mpo na koyeba oyo ezali malamu. Mosala na ye, oyo ezalaki bongo ya kotimola elanga na Edene, ezalaki mpasi te. Ezalaki ya kosepelisa, mpe moto na kokoka azalaki kosala yango.

Bandimbola ya ntina mingi

16-18. “Mabombami” nini Adam azwaki mposa ya koluka koyeba yango te, mpe mpo na nini?

16 Kongenga ya moi elimwaki ntango pole monene, oyo Adam akokaki komona kotambola na yango kati na likoló, ekendaki kolala. Molili eyaki, mpe butu ekomaki, mpe sanza ebandaki komonana na miso na ye. Sanza ebangisaki ye te; ezalaki engengiseli ya moke oyo ezalaki komonana na butu. (Genese 1:14-18) Na ntembe te ba lucioles (nyama mike oyo epelisaka móto na mikondo na yango) bazalaki kotambola kati na elanga na kongengisaka mwa pole ya moke, lokola miinda ya mike oyo mizali kongenga.

17 Ntango butu ekokaki mpe molili eyaki, Adam ayokaki mposa ya kolala, lokola banyama oyo bazalaki kozinga ye. Wana elamukaki ye, ayokaki lisusu nzala, mpe aliaki oyo tokoki kobenga petit déjeuner (molei ya ntongo) na koliaka na mposa mpenza bambuma ya banzete oyo azwaki ndingisa ya kolia.

18 Nsima na kozwa nguya, kozongelaka mpenza makasi na nzela na bopemi malamu na butu, atiaki likebi na ye epai na mokolo ya mosala oyo mozalaki kozela ye. Ntango azalaki kotalatala matiti oyo mazingaki ye, akanisaki te ete asengelaki koyeba libombami oyo, bikeke mingi na nsima, basengelaki kobenga la photosynthèse. Na nzela na libombami yango, eloko oyo ekopesaka langi ya pondu na makasa, oyo ebengami ete Klorofile, ezali kosalela kongenga ya moi mpo na kobotisa bilei mpo na moto mpe nyama. Lisusu, ezali komela gaz carbonique oyo yango ezali kobenda mpe ezali kobimisa oxygène oyo bato mpe banyama bazali kopema. Mosala yango ezali mbala mosusu libombami monene mpo na moto, nzokande Adam azalaki mpenza na mposa te ya koyeba yango. Ezalaki ekamwiseli ya Mozalisi na moto, oyo azalaki kokanga ntina na yango mpe azalaki kosala yango mpo na bolamu ya bikelamu na ye ya bomoi oyo atiaki na mabelé. Mpo ete mayele na ye ya kokoka ekokisa mosala na yango, ekokaki bongo na moto ya liboso na koyeba ete ezali Nzambe, Mozalisi, oyo azalaki kokolisa banzete, mpe ete apesaki ye mokumba ya kobatela mitindo na bomoi oyo na banzete oyo ezalaki kobima kati na elanga ya Edene.​—Tala Genese 1:12.

Bobele ye moko, kasi atondi na esengo

19. Atako Adam amonaki ete azali ye moko, kozanga moto oyo akokani na ye awa na mabelé, likambo nini asalaki te?

19 Moto akomaki na nsuka te mpo na oyo etali koteyama epai na Tata na ye ya likoló. Azalaki kobatela elanga ya Edene kozanga kosungama mpe kosalisama na moto moko oyo akokani na ye. Mpo na oyo etalaki lolenge na ye, lolenge ya bato, azalaki ye moko. Nzokande amipesaki te na koluka moto oyo akokanaki na ye, mpo na kozala na ye elongo. Asengaki mpe te epai na Nzambe, Tata na ye ya likoló, ete apesa ye ndeko moko ya mobali to ndeko moko ya mwasi. Kozanga komonana ya bato mosusu ebulunganisaki makanisi na ye te to epimelaki ye esengo ya kozala na bomoi te mpe ya kosala te. Azalaki kosepela na boninga ya Nzambe.​—Tala Nzembo 27:4.

20. (a) Likambo nini epesaki esengo mpe bosepeli mingi epai na Adam? (b) Mpo na nini ezalaki likambo ya kotungisa te mpo na Adam na kolanda kofanda ye moko lolenge yango? (c) Lisolo oyo elandi ekolobela nini?

20 Adam ayebaki ete Tata na ye ya likoló azalaki kotala ye mpe azalaki kosepela na mosala oyo ye azalaki kosala. Esengo na ye ya monene ezalaki ya kosepelisa Nzambe na ye mpe Mozalisi na ye, oyo nkembo na ye ezalaki komonana kati na misala nyonso kitoko ya bozalisi oyo mizalaki kozinga ye. (Emoniseli 15:3) Kolanda ntango nyonso kozala na bomoi ya motindo wana ezalaki likambo ya mpasi te mpo na moto yango oyo azalaki mpenzampenza na bokatikati, ye oyo akokaki kosolola elongo na Nzambe. Nzambe apesaki ye mosala moko ya malamu, ya kosepelisa, mosala oyo ekomemela ye bosepeli mpe esengo ya monene. Lisolo oyo elandi ekolobela mingi mapamboli mpe bilikya ya avenire oyo Mozalisi apesaki epai na Adam kati na Paradis.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Liloba oyo euti na lisolo ya kozalisama na lokota ya ebandeli, kati na Biblia Mosantu.​—Genese 1:26, Traduction du monde nouveau, ebimeli ya Anglais na 1984 oyo ezali na mitindami, note ezwami na nse ya lokasa.

b Mosakoli Moïse, oyo akomaki makambo oyo kati na mokanda ya Genese na ekeke ya zomi na motoba, liboso ya ntango na biso, abakisaki na ntina na ebale wana ya Edene bandimbola oyo ya sikisiki, na boyokani na makambo oyo bayebaki na eleko na ye:

“Nkombo na moko ezali Pisoni. Oyo ezali kozinga mokili mobimba na Hawila, esika wolo ekozwama. Wolo na mokili yango ezali malamu; bedeliumi mpe mabanga na soama mazali wana. Nkombo na mongala na mibale ezali Gihona. Yango ezingeli mokili mobimba na Kusi. Nkombo na oyo na misato ezali Hidekele. Yango etamboli epai na ebimelo na ntango longwa na Asulia. Mongala na minei ezali Pelata.”​—Genese 2:11-14.

Bozongeli

◻ Mpo na nini Adam amitunaki ntango molai te soki azalisamaki lolenge nini?

◻ Mokumba nini Nzambe apesaki na Adam, mpe ndenge nini ye ayambaki yango?

◻ Elikya nini ya avenire epesamelaki epai na moto ya kokoka, mpe mpo na nini?

◻ Mpo na nini Adam alekisaki bomoi na ye te na koluka koyeba mabombami?

◻ Mpo na nini Adam abongisaki esengo na ye te ntango amonaki ete azali bobele ye moko lokola moto na mabelé?

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 10]

Photo NASA

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto