Bilikya kitoko mpo na bato: paradis ya bisengo
“Nzambe mpe apambolaki bango mpe Nzambe alobelaki bango ete, ‘Bobotaka mpe bozala na kobota mingi, mpe kotondisa mokili mpe botia yango na nse na bino; mpe bozala na bokonzi na likoló na mbisi na mai, mpe na ndeke na likoló, mpe likoló na nyama nyonso na bomoi ekotambolaka na mokili.’”—GENESE 1:28.
1, 2. Mpo na ntina nini Jéhovah azali koboma nzoto na bolingo nyonso mpo na bolamu ya bato, mpe mosala nini apesaki epai na Adam?
BIBLIA Mosantu eyebisi biso ete, “Nzambe azali bolingo”. Azali komibanzabanza na bolingo nyonso mpe kozanga koluka litomba na ntina na bato, mpe azali kosala ntango nyonso mpo ete bakoka kozala libela na kolongono malamu ya nzoto mpe kofanda na kimya kati na paradis ya bisengo awa na mabelé. (1 Yoane 4:16; tala Nzembo 16:11) Moto ya liboso ya kokoka, Adam, azalaki na bomoi ya kimya mpe azalaki kosala mosala ya malamu mpe ya kosepelisa Mozalisi ya moto asengaki ye ete atimola to alona elanga kitoko ya Edene, mpe apesaki ye lisusu mosala mosusu, mosala ya sipesiale oyo esengelaki na ye kolonga yango. Ezali yango nde lisolo na Biblia emonisi na maloba oyo:
2 “Jéhovah Nzambe azalisaki na mabelé nyama nyonso na mokili, mpe ndeke nyonso na likoló, mpe ayeisaki yango epai na moto, kotala soko nkombo nini ye akopesa na yango, mpe nkombo epesaki moto nyama moko na moko, ezalaki nkombo na ye. Moto mpe apesaki nkombo na bibwele nyonso mpe ndeke nyonso na likoló, mpe nyama nyonso na lisobe.”—Genese 2:19, 20.
3. Mpo na nini ata Adam ata banyama bazalaki kobanga te?
3 Moto abiangaki mpunda sous, ngombe mobali shôr, meme sèh, ntaba ‘éz, bandeke ‘ôph, ebenga (pigeon) yônah, paon toukki, nkosi ’aryéh ou ’ari, ngombolo dov, makaku qôph, mbwa kèlèv, nyoka nahash, mpe bongo na bongoa. Ntango abelemaki penepene na ebale oyo ezalaki kotiola kati na elanga ya Edene, amonaki mbisi, oyo abengaki yango dagah. Atako azalaki na mondoki te, moto azalaki kobanga banyama yango te, ezala ya mboka to ya zamba, ata mpe bandeke te. Na ngambo na bango, banyama mpe bazalaki kobanga ye te. Bayebaki na mayele na bango ete ye azalaki ekelamu oyo aleki bango. Bazalaki bikelamu na Nzambe, oyo apesaki bango bomoi, mpe moto azalaki na mposa ya kosala bango mabe te to kolongola bango bomoi na bango.
4. Likambo oyo ete Adam apesaki nkombo epai na banyama nyonso ya mokili mpe epai na bandeke emonisi nini, mpe mosala ya lolenge nini yango ekokaki kozala mpo na ye?
4 Lisolo eyebisi biso te boumeli ya ntango oyo bibwele mpe nyama ya zamba bakisa mpe bandeke balakisamaki na moto. Nyonso esalamaki na nse na litambwisi ya Nzambe. Adam azwaki mpenzampenza ntango ya koyekola nyama moko na moko, na kotalelaka bizaleli na yango mpe nzoto na yango oyo ezali kopesa yango likeseni na mosusu, mpe aponaki nkombo oyo ebongi na yango mpenzampenza. Mbala mosusu yango ezwaki ye ntango mingi. Ezalaki solo mosala moko ya kitoko mpo na Adam na komesena mpenza elongo na ebele na bikelamu ya bomoi ndenge na ndenge oyo bizalaki na mabelé, mpe esengelaki na ye makoki mpo na kososola mpe likoki ya koyeba koloba mpo na kolonga kokesenisa moko na moko na bango na kopesaka yango nkombo oyo ebongi na yango.
5-7. (a) Mituna nini mitunamaki solo mpenza? (b) Biyano nini bimonisami kati na lisolo ya bozalisi oyo ekomami na Genese 1:1-25?
5 Kasi na molongo nini bikelamu nyonso wana ya bomoi bizalisamaki? Banyama ya mabelé bazalisamaki liboso to nsima na bandeke? Moto abimaki ntango nini na kotalela bikelamu wana bizalaki na nse na ye? Ndenge nini Nzambe asalaki mpo na kobongisa etando ya mabelé mpo na kobimisa bikelamu na bomoi wana ndenge na ndenge, mpo na kobimisa etando oyo bandeke basengelaki kopumbwapumbwa kati na yango likoló mpenza, mpo na kopesa mai oyo bakomela mpe ndunda oyo bakolia, mpo na kosala pole ya monene mpo na kongengisa mokolo mpe kopesa nzela na moto ete amona, mpe mpo na kosala pole ya moke oyo epesameli mokumba ya kongengisa butu? Mpo na nini mokili mozalaki moi makasi te mpe mpio mingi te, yango ekokaki kopesa likoki epai na moto na kotambola, na kosala mpe kolala kozanga ndako mpe kofanda bolumbu?
6 Moto ayebaki biyano ya mituna oyo te. Elimo na ye ya koluka koyeba makambo ebongaki ezwa biyano ya mayele biuti na liziba oyo epesameli ndingisa oyo eyebaki mpenzampenza makambo nyonso. Mwana wana ya Nzambe atikamaki te kozanga boyebi, kasi ayokaki solo lokola lokumu epesami na mayele mingi na ye na kotalela lisolo monene ya bozalisi lokola yango ekomami kati na Genese 1:1-25.
7 Adam ayokaki botondi mingi mpo na kozwa boyebi ya lisolo kitoko ya bozalisi, lisolo oyo ezalaki kolimbola makambo mingi. Lokola yango ekomamaki, lisolo yango esalisaki ye na koyeba ete bileko misato ya minene bilekaki (oyo Nzambe azalaki kobianga yango mikolo na boyokani na lolenge na Ye ya kotangela ntango) liboso na eleko ya minei ya bozalisi oyo na boumeli na yango abimisaki pole mibale ya minene kati na makoló, pole oyo ekokabola mpo na moto mokolo, ya mokuse mpenza ya ngonga 24. Mokolo oyo ya mokuse koleka oyo bato balingaki koyeba awa na mabelé ekokanaki na ngonga oyo elekaki katikati na kolala nyonso ya pole monene. Adam ayebaki mpe ete asengelaki kozala mpenza na bomoi mibu mingi, mpe na ntembe te abandaki nokinoki kotanga yango. Pole monene oyo ezalaki komonana kati na makoló epesaki ye nzela na kosala yango. Nzokande na kokesena na mikolo ya mosala na bozalisi na Nzambe na mabelé, bileko milai, moto ya liboso ayebaki ete azali na bomoi kati na mokolo ya motoba. Ayokaki naino te lisolo mpo na kosuka ya mokolo yango ya motoba oyo ebongisamaki mpo na kozalisama ya banyama nyonso ya mokili, mpe na kozalisama na moto. Sikawa, abandaki koyeba mpenza na molongo nini banzete ekelamaki, bambisi, bandeke mpe banyama ya mokili. Kasi ye moko, kati na elanga ya Edene, Adam azalaki mpenza nsuka te na makambo nyonso oyo Nzambe akanaki na bolingo nyonso mpo na moto kati na Paradis ya mabelé.
Kozalisama ya mwasi ya liboso
8, 9. (a) Moto ya kokoka amonaki nini katikati na banyama, kasi alobaki nini na nsuka? (b) Mpo na nini ebongaki te ete moto asenga mwasi epai na Nzambe? (c) Na maloba nini lisolo ya Biblia ezali koyebisa kozalisama ya mwasi na liboso?
8 Mobali ya liboso, oyo azalaki na makoki ya kotalatala mpe na elimo ya kokoka, amonaki ete katikati na bandeke mpe banyama ya mokili ezalaki na mibali mpe basi, mpe bazalaki kobotana elongo mpo na kobatela libota na bango. Kasi mpo na ye, ezalaki lolenge moko te. Soki na nzela na kotalatala yango, azwaki mposa ya kozala na mwasi, amonaki moko te oyo abongi na ye kati na banyama, ata kati na makaku ya minene moko azalaki te. Na ntembe te Adam asukisaki ete mwasi azalaki te mpo na ye. Soki te, mbele Nzambe asengelaki komemela ye mwasi yango, boye te? Lokola asalamaki lolenge moko na banyama te, moto ayebaki ete akeseni mpenza na bango. Azalaki mpenza na likoki te ya komipesa biyano na mituna nyonso wana, na kokoma na lolendo mpe na kosenga mwasi epai na Mozalisi na ye. Moto ya kokoka asalaki malamu na kotika esika epai na Nzambe ete atalela likambo yango, mpamba te mwa moke amonaki ete ye asilaki kozwa bikateli na Ye mpo na likambo yango. Mpo na yango mpe likolo na oyo elekaki nsima, lisolo eyebisi boye:
9 “Kasi mosungi mobongi na moto azwamaki te. Bongo Jéhovah Nzambe alalisaki moto mpongi makasi, mpe elalaki ye alongolaki mokwa moko na mopanzi na ye, mpe azipaki esika yango na mosuni. Jéhovah Nzambe azalisaki mwasi na mokwa molongolaki ye na moto, mpe ayaki na ye epai na moto. Moto alobaki ete, ‘Oyo azali sasaipi mokwa na mikwa na ngai, mpe mosuni na mosuni na ngai. Ye akobiangama mwasi, mpo ete ye akamatami na mobali.’ Yango wana moto akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akosangana na mwasi na ye mpe bango bakozala mosuni moko. Mobali mpe mwasi na ye bazalaki bolumbu [bango] nyonso mibale, mpe bayokaki nsoni te.”—Genese 2:20-25.
10. Moto ya kokoka alobaki nini ntango mwasi, ye mpe moto ya kokoka amemamaki epai na ye, mpe yango ekoki komonisa nini?
10 Adam amonisaki bosepeli na ye mozindo ntango mwasi ya kokoka apesamelaki ye lokola mosungi oyo akokani na ye. Alobaki: “Oyo azali sasaipi mokwa na mikwa na ngai, mosuni na mosuni na ngai.” Maloba oyo abimisaki na nsuka na ntango amonaki mwasi na ye, oyo autaki kozalisama, ezali mbala mosusu koyebisa ete azelaki mwa ntango molai liboso na kozwa moninga na ye kitoko. Adam abiangaki mosungi yango oyo akokanaki na ye “Mwasi” (‘ishshah to, na ndimbola na yango ya solosolo mpenza, “moto ya mwasi”), “mpamba te ye akamatami na mobali”. (Genese 2:23, Traduction du monde nouveau, ebimeli ya Anglais ya 1984 oyo ezali na mitindami, maloba mazwami na nse ya lokasa) Adam azalaki na liyoki te ya kozala na bondeko na bandeke mpe na banyama ya mokili oyo Nzambe alakisaki ye mpo ete apesa bango bankombo. Nzoto na ye ekesenaki mpenza na oyo ya bango. Nzokande, mwasi wana azalaki mpenza motindo moko na ye, nzoto lolenge moko na oyo ya ye. Mokwa oyo Nzambe akamataki na mopanzi na ye ebotaki makila ya lolenge moko na oyo ezalaki kotambola kati na misisa na ye. (Tala Matai 19:4-6) Adam azalaki sikawa na moto oyo liboso na ye asengelaki komitambwisa lokola mosakoli ya Nzambe mpe epai na ye akokaki kolimbola lisolo kitoko ya bozalisi.
11-13. (a) Mituna nini mizali kotunama, nsima wana Adam azwaki mwasi? (b) Nzambe akanaki nini mpo na babalani ya liboso? (c) Nini ekokaki kozala bilei ya libota na bato na kokoka?
11 Kasi ezalaki mpo na mokano nini Mozalisi ya moto apesaki ye mwasi? Ezalaki bobele mpo ete azwa nde mosungi oyo azali lokola ye, mwasi ya lolenge na ye mpenza, mpe akoma te kino komitungisa mpo azali ye moko? Lisolo elimboli likambo Nzambe akanaki na koyebisaka biso na maloba nini apambolaki libala na bango:
12 “Nzambe alobaki ete: ‘Tika tozalisa moto na lolenge na biso na elilingi na biso; mpe tika ete bazala na bokonzi na likoló na mbisi na mai, mpe na likoló na ndeke na likoló, mpe na likoló na nyama nyonso, mpe likoló na mokili mobimba, mpe likoló na biloko nyonso bikolandaka na mokili.’ Bongo Nzambe azalisaki moto na elilingi na ye mpenza, na elilingi na Nzambe azalisaki ye; azalisaki bango mobali mpe mwasi. Nzambe mpe apambolaki bango mpe Nzambe alobelaki bango ete: ‘Bobotaka mpe bozala na kobota mingi, mpe botondisa mokili mpe botia yango na nse na bino; mpe bozala na bokonzi na likoló na mbisi na mai, mpe na ndeke na likoló, mpe likoló na nyama nyonso na bomoi ekotambolaka na mokili.’
13 “Nzambe alobaki ete, ‘Tala, nasili kopesa bino ndunda nyonso ekobotaka mbuma, yango ezali na mokili nyonso, mpe nzete nyonso yango ezali na nkona kati na mbuma na kolia, mpe yango ekozala na bino mpo na kolia! Mpe nasili kopesa ndunda nyonso epai na nyama nyonso na mokili, mpe epai na ndeke nyonso na likoló, mpe epai na nyama nyonso ekolandaka na mokili, mpe oyo ezali na mpema na bomoi, ete eliya yango.’ Ezalaki mpe bongo.”—Genese 1:26-30.
Bilikya ya avenire ya babalani ya liboso
14. Mpo ete bapambolamaki na Nzambe, avenire nini efungwamaki liboso na mobali mpe mwasi ya kokoka, mpe basengelaki mpenza kokanisa makanisi nini?
14 Ezalaki mpenza esengo mpo na mobali ya kokoka mpe mwasi na ye, mwasi ya kokoka mpe, na koyoka Nzambe koloba na bango, koyebisa bango likambo oyo azalaki kozela epai na bango mpe kopambola bango! Na lisalisi ya lipamboli na Nzambe, bomoi na bango ekozanga ntina te, kasi bakokoka kosala likambo oyo basengaki bango. Avenire moko kitoko efungwamaki liboso na bango. Kati na efandelo na bango, elanga ya Edene, bilenge babalani bakanisaki na ntembe te na ezalela oyo esengelaki kozala na mabelé ntango bakosila kokokisa mokano ya Nzambe na ntina na bango. Komonaka avenire ya mosika kati na makanisi na bango, bazalaki bobele kokanisa mpo na “elanga ya Edene, epai na ebimelo na moi” te, kasi na mabelé mobimba matondi na mibali mpe na basi kitoko. (Genese 2:8) Motema na bango esengelaki kosepela na likanisi oyo ete bato nyonso bakozala bana na bango, bakitani na bango. Bango nyonso bakozala bato ya kokoka, bato bazangi mbeba na nzoto, bakozala ntango nyonso bilenge, kozalaka na nzoto kolongono, kotondaka na nguya mpe na esengo ya kozala na bomoi. Bango nyonso bakomonisa bolingo ya kokoka kati na bango, bakosambela Mozalisi na bango monene, Tata na bango ya likoló na bomoko, mpe yango ekozala na bomoko elongo na baboti na bango ya yambo. Motema ya mobali na liboso mpe ya mwasi na liboso etondaki na esengo mingi na likanisi ya kosala libota motindo wana!
15, 16. (a) Mpo na nini bilei bisengelaki kozala mingi na ntina na libota na bato? (b) Lokola libota na bato na esengo ekokaki kobakisa motuya na yango ntango nyonso, mosala nini ekozela bango na libanda na elanga na Edene?
15 Bilei bikozala mingi mpo na basangani nyonso ya libota wana na bato oyo ekotondisa mokili mobimba. Adam mpe Eva bazalaki na yango mingi zingazinga na bango, kati na elanga ya Edene. Nzambe apesaki bango bilei ya kitoko mpe oyo etondi na biloko nyonso bisengeli mpo na kotonga nzoto na kozalisaka ndunda ekobotaka mbuma, bakisa mpe banzete oyo ezali kobota mbuma mpo na kolia.—Nzembo 104:24.
16 Lokola motuya na bato ya libota na bango ya esengo esengelaki se kokola, basangani na yango basengelaki kokolisa elanga na mabele oyo mazali zingazinga na Edene, mpamba te maloba na Nzambe mazalaki koyebisa ete na libanda ya elanga yango etimolamaki te, to mpe, ebongisamaki te to mpe lisusu elonamaki te. Yango wana Mozalisi na bango alobaki na bango na ‘kozala na bokonzi’ likoló na mabelé mpe kotondisaka yango.—Genese 1:28.
17. Mpo na nini bilei bikokaki kozala mingi mpo na bato mingi koleka, mpe ezalela nini esengelaki kokola mokemoke wana elanga ekoyeisama monene?
17 Na meko nyonso oyo elanga elingaki koyeisama monene na baloni mpe na babateli na yango ya kokoka, mabelé mayangelami makokaki kobota bilei mingi mpo na bato mingi koleka oyo bakoyikana. Elanga oyo elingaki koyeisama ntango nyonso monene esengelaki kosuka na kotondisa mabelé mobimba, oyo ekozala bongo paradis ya kitoko mpe kotikala libela na libela efandelo ya bato. Kotala yango uta makoló, etando ya mabelé ekokaki kokokana na biju ya kitoko koleka, mpe Mozalisi oyo afandi na likoló alingaki koloba ete yango ebongi mpenza.—Tala Yobo 38:7.
18. Mpo na nini ntina ya kobanga ekokaki kozala te kati na elanga ya Edene oyo epalangani na mabelé mobimba, mpe makambo nini ya kimya masengelaki kozala kuna?
18 Mabelé mobimba esengelaki kozala mpe na kimya lokola elanga ya Edene oyo kati na yango mobali mpe mwasi oyo babalani sika bafandaki. Ntina ya kobanga banyama wana ya mokili mpe bandeke oyo Adam, moto ya liboso azalaki kotalatala mpo na kopesa bango nkombo, ekokaki kozala te. Lokola baboti na bango ya liboso, bafandi nyonso ya kokoka ya Paradis oyo ezingi mabelé mobimba bakokaki kozala na bokonzi likoló na mbisi na mai, likoló na bandeke mpe biloko nyonso ya bomoi oyo bizali kopema awa na mabelé, ezala ata banyama na yauli na zamba. Kotosaka moto, ye oyo ‘azalisamaki na elilingi na Nzambe’ bikelamu wana ya bomoi oyo bizali na nse ya moto mbele bakozala na kimya elongo na ye. Na koyangelaka bango, bankolo na bango oyo bazali na bopolo mpe na kokoka mbele bakopesa nzela na ezalela ya kimya katikati na banyama. Bopusi malamu ya kopesa nzela na kimya oyo elingaki komonisama na bato oyo bazalisami na elilingi na Nzambe ekokaki kosalelama mpe likoló na bikelamu na bomoi oyo bizali na nse ya moto mpo na kobatela bango. Likoló na nyonso, bato ya kokoka basengelaki kozala na kimya elongo na Nzambe, oyo akolemba te na kopambola bango.—Yisaya 11:9.
Nzambe apemi mpo na misala na ye
19. (a) Likambo nini babalani ya liboso bakokaki koyeba na ntina na mokano na Nzambe? (b) Elembo nini Nzambe apesaki mpo na oyo etali ntango to eleko?
19 Na kokanisaka na motindo oyo mbele mabelé makomaki na boyokani na mokano na Nzambe, mobali ya liboso mpe mwasi ya liboso bayebaki ete esengelaki ntango molai mpo na kokokisa mokumba kitoko oyo Nzambe apesaki bango. Ntango boni? Mozalisi na bango mpe Tata na bango ya likoló ayebaki yango. Ayebisaki bango ete mokolo mosusu kati na kolandana monene na mikolo ya kozalisa eutaki kosila, mpe bazalaki na “mpokwa”, to na ebandeli ya mokolo na sika na kotalela lolenge oyo Nzambe ye moko azalaki kotia bileko yango. Mokolo yango ya sika esengelaki kopambolama mpe kopesama na kokokisama ya mokano na peto mpe na sembo ya Nzambe. Moto ya kokoka, mosakoli na Nzambe, asimbaki likambo yango. Tozali bongo kotanga boye kati na lisolo epemami na Nzambe:
20. Lisolo na Biblia elobi boni mpo na “mokolo ya nsambo”?
20 “Nzambe atalaki biloko nyonso bisilaki ye kozalisa, mpe ezalaki malamu mingi. Mpe mpokwa na ntongo ezalaki, oyo mokolo na motoba. Bongo likoló na nse esilaki kosalama mpe ebele na yango nyonso. Na mokolo na nsambo Nzambe asilisaki mosala mosalaki ye, mpe apemaki na mokolo na nsambo na misala nyonso misalaki ye. Nzambe apambolaki mokolo na nsambo mpe abulisaki yango, mpo ete mokolo yango ye apemaki na misala nyonso mizalisaki ye mpe misalaki ye. Likoló mpe mokili mpe biloko na kati na yango ezalaki boye na ntango ezalisamaki yango. Wana esalaki Jéhovah Nzambe mokili mpe likoló.”—Genese 1:31 kino 2:4.
21. (a) Biblia ezali koyebisa ete Nzambe atiaki nsuka na mokolo na ye ya kopema mpe ete mokolo yango mozalaki malamu koleka? Limbola eyano na yo. (b) Mituna nini mizali kotunama?
21 Lisolo na Biblia ezali koyebisa te ete Nzambe atiaki nsuka na mokolo na ye ya kopema, ete amonaki lokola biloko nyonso azalisaki yango malamu koleka, mpe lokola ete ekomaki mpokwa mpe ntongo: mokolo na nsambo. Mpo na kokokana na mikolo motoba ya bozalisi oyo milekaki, mokolo na nsambo esengeli kolobelama lisusu ete yango ezali malamu mingi koleka, mpamba te yango esili naino te. Kasi, lelo oyo, Jéhovah Nzambe akoki koloba ete yango ezali malamu mingi? Ezalaki mpo na ye mokolo ya kopema na kimya? Tokoloba boni mpo na bilikya ya avenire kitoko oyo mobali ya liboso mpe mwasi ya liboso bazalaki na yango mokolo ya libala na bango kati na Paradis? Totala ndenge makambo malekaki na kotalelaka lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bankombo oyo ezali komonana kati na makomi ya hébreu ya mokanda na Genese mpe mikanda misusu mipemami ya Makomami na liebele.
Bozongeli
◻ Longola mosala ya kobatela elanga, mosala nini mosusu Nzambe apesaki epai na Adam, mpe mosala yango ezalaki na monene ndenge nini?
◻ Lisolo ya bozalisi oyo ekomami na Genese 1:1-25 ezalaki koyebisa nini?
◻ Ndenge nini mwasi ya liboso azalisamaki, mpe Adam alobaki nini mokolo ya libala na bango?
◻ Bilikya nini ya avenire babalani ya liboso kati na bato bazalaki na yango?
◻ Ndenge nini Nzambe amonisaki ete mokolo mosusu ya bozalisi eutaki kosila?