Mpo na nini mabe ekomi mingi?
MOKANDA moke ebimisamaki na guvernemá ya Angleterre eyebisi ete “eteni monene ya bambeba ezali makambo matali bobebisi biloko”. Nzokande, na Grande-Bretagne, makambo mabe koleka oyo basaleli bato (lokola koboma to kozokisa) engebene rapport moko ezali, “lolenge ya mabe oyo ebakisami mingi koleka”, atako ezali komonisa bobele 5% ya bambeba.
Ezalela oyo ezali komonisa bokoli monene ya mabe to bobomi. Mbala na mbala, bazulunalo, radio mpe televizio na mokili mobimba ezali kosakola nsango mpo na bobotoli, ya moyibi oyo esalelami na lisalisi ya monduki, ya kosangana na basi na makasi mpe ya makambo mosusu ya mobulu, oyo mbala mingi ezali kolobelama mingi koleka nsango ya bobomi to mabe ezangi mobulu. Na bongo, ezali komonana ete, okoki kobomama to biloko na yo bikoki kobebisama. Kasi mpo na nini? Eloko nini ezali kopusa bato bakoma bato mabe?
Babomi mingi na bato bazelaka ete libaku moko epesamela bango mpo na kosala mabe. Na yango, biyangeli mingi bizali kosala makasi mpo na kopekisa kobakisama ya mabe na kolendisaka bacitoyens ete bakengelaka mingi mpo na koyeba oyo ezali koleka zongazonga na bango. Atako myango oyo mizali mpo na kokebisa liboso misala ya koboma bato, miango yango mizali kopekisa bato ete bazala batioli na mibeko te? Soko moke te.
Boyekoli mingi ezali kosalema mpo na koyeba babomi na bato. Liloba na Nzambe, Biblia, epesi likanisi moko ya ntina mpo na makanisi ya mobomi ntango ezali kokebisa bilenge likoló na baoyo bazali koloba na mongongo ya kopengwisa ete: “Yaka na biso! Tokokende kobombama mpo tosopa makila. [Toboma] moto na sembo bobele mpamba. Tomela bango lokola ekosalaka ewelo, bakita mobimba lokola bango bakokoma na libulu. Tokomona biloko nyonso na motuya, tokotondisa ndako na biso na biloko bipunzami. Sala na biso elongo, tozala na libenga moko!” (Masese 1:11-14) Ya solo, lokoso, bilulela mpe koluka biloko ya mosuni ezali nde ntina mpo na bobomi na bato to mabe oyo ezali kosalema.
Bomeli bangi mpe bisengo ezali mpe na bopusi likoló na makanisi ya bato mingi na ekeke oyo ya 20. Bato yango basengeli koluka mbongo mpo na kokokisa bamposa na bango, bazali kosala nyonso ata soki yango ezali kosenga kozokisa moto, ata nkutu koboma moto. Na “ntango na mpasi” oyo ezali koleka noki, ezali solo ete bato oyo “makolo na bango mabengani mabe, bakopota mbango ete batangisa makila”, bazali kobakama mingi koleka.—2 Timoté 3:1, 3, 4; Masese 1:16.
Koboma bato to kobebisa biloko, ezali “libunga monene mpo na bizaleli malamu, mpe mibeko”. Tozali kobika na ntango oyo bizaleli malamu bisili kobeba. Ntoma Paulo akebisaki baklisto ya Efese likoló na bato oyo ‘bakotambolaka na makanisi na bango na mpamba, ekaniseli na bango ezali na molili, batangolami mosika na bomoi na Nzambe mpo na kozanga boyebi kati na bango, na ntina na makasi na mitema na bango. Bazali koyoka mawa te.” Tosengeli kosala nyonso lelo mpo na koyoka likebisi oyo.—Baefese 4:17-19.
Kopalangana ya ba films oyo ezali kolakisa kobomana ya nsomo, kokumisama ya bitumba mpe kolandela na lokoso nyonso bisengo ya mabe ezali mpe kobimisa babomi to basali na mabe mosusu, na kotiaka bongo bato oyo bazali na likambo te na likama. Nzokande, ezali na eloko mosusu oyo ezali komikotisa katikati na mokakatano oyo etali bongo koboma bato. Eloko yango ezali nini?
Ezali nde moto: Satan le Diable. Nkanda na ye ezali kopelisa moto ya mobulu mpe ya kobomana na ndenge ya ligboma oyo emonisami na mokili ya lelo. (1 Yoane 5:19; Emoniseli 12:12) Mokano ya Satana ezali ya kopengwisa bato nyonso na nzela ya Nzambe ya solo, Jéhovah. Ata bongo, lokola bisakweli ya Biblia bimonisi yango, ata soko Diable akolonga mpo na bato mingi akoki soko moke te kobebisa bosembo ya basali ya solo ya Nzambe. Na nsuka, akobomama. Nzokande, ata soki alimwi, kobomana to mabe ekozala lisusu te? Na ngambo mosusu, nsuka ya mabe ekomi pene?