Ndenge nini okoki kokima basali na mabe kati na mokili oyo mabebisami na mobulu
OBÁNGAKA kobima na mpokwa? Osengeli nde kokanga maninisa mpe bikuke ya ndako na yo na bifúngeli mibale to misato? Basilá koyiba yo vuatire to veló? Basilá koyiba yo radio ya vuatire na yo? Omiyokaka kati na likámá na bakartyé mosusu?
Soki oyanoli ee na motuna moko to motuna mosusu kati na mituna oyo, boye ozali komeka kokima mabe kati na mokili oyo mabebisami na mobulu. Okoki kosala nini kati na likambo wana? Bíblia ekoki kosalisa yo?
Makanisi ya basali na mabe mpe bisambiselo
Kati na mokili epai mabe mazali kosalema, ezali na bituluku misato ya bato: basali na mabe, la police mpe bato oyo bakozwaka makámá na basali na mabe. Yo moto oyo okoki kozwa likámá wana, osengeli kosala nini mpo na komibatela? Okoki kozala na bopusi likoló na moko na bituluku misato oyo bizali lelo? Na ndakisa, okoki nde kobóngola basali na mabe?
Solo mpenza, basali mingi na mabe basili kokómisa yango lokola mosala na bango. Basili kopona lolenge na bomoi wana, mpo ezali nzela ya mpasi te mpo na kokóma na bozwi. Likanisi na bango ezali oyo ete: “Mpo na nini kosala mosala soko nzela ezali mpo na kobikela na oyo bato mosusu basili kozwa?” Basali na mabe bayebi ete, bato mingi oyo bakokutana na bango, bakopesa bango mbongo kozanga kokakatana. Mpe lokola bazali na likámá mingi te mpo na kokangama mpe kotyama na boloko, tokoki koloba te ete, mpo na bango, kosala mabe ezangi lifuti.
Lisusu, myango ya bisambiselo ezali na mindondó mpe ekozwaka ntango molai. Bamboka mingi ezali na batribinale te, basambisi mpe boloko ezali te. Bisambiselo bitóndi na makambo mingi oyo masengeli kokatama. Makambo mazali koumela mingi na bisambiselo na boye ete yango ekokani na oyo Biblia elobaki, esili koleka mibu 3 000 ete: “Mitema na bana na bato mikani kosalaka mabe, mpo ete etumbu mpo na mabe epesami noki te.” Lokola emonisi yango etinda oyo na Biblia, tokoki kolikya soko moke te mpo na mwango oyo mokokitisa basali na mabe to oyo ekomema bango na kobóngwana.—Mosakoli 8:11.
Boni mpo na etuluku ya mibale, elingi koloba la police? Mwa elikya ezali ya komona ete misala ya la police misukisa ezalela wana? Bango moko bakoyanola ete: mbala mingi mibeko mikokótelaka lotómo ya basali na mabe, ba avocats to balobeli oyo bazangi sembo bakobóngolaka mibeko mbala na mbala mpo na kolóngisa bato oyo bazali na elonga te, bato bazali kosepela te na ebele na misolo oyo misengisami mpo na botongi ya ndako minene ya sika mpo na boloko, mpe basali na la police bazali bobele moke; tokoki bongo kosilisa te nguya oyo ya kosala mabe.
Etikali bobele kotalela etuluku ya misato, bato oyo bakozwaka makámá na basali na mabe, elingi koloba bato nyonso oyo batikali. Tokoki kosala likambo mpo na kolónga mpenza ezalela wana ya mobulu?
Mayele mabongi mpe bososoli
Mokanda ya Masese elobi ete: “Batela mayele na solo mpe bososoli. Ekozala bomoi mpo na molimo mpe kitoko mpo na nkingo na yo. Boye okotambola na nzela na yo na kimya, mpe lokolo na yo ekobeta libaku te.” Toli oyo ekoki kosalelama na mabaku oyo makoki komema moto na kozwa likámá na maboko na basali na mabe. Wapi mwa bandakisa oyo mayele mabongi makozala na ntina kati na likambo oyo?—Masese 3:21-23.
Basali na mabe bazali na etamboli ekokani na banyama ya zámba, nyama na yauli. Bakolukaka bato oyo bazali na matáta te. Balingaka te kozwa likámá na botemeli oyo ekoki komema bango kino kokangisama, soki nde bazali na likoki ya kozwa litomba motindo moko epai na moto mosusu oyo azali na matáta te. Bakolukaka mibangé, bato na maladi, bato oyo babungi nzela to baoyo basosoli likámá wana te. Basali na mabe bakoponaka esika mpe ntango ebongi mpo na kobundisa bato. Ezali kati na makambo wana nde bato oyo bakoki kozwa makama basengeli komonisa mayele mabongi.
Lokola Biblia emonisi yango, bato oyo balingi mabe, mbala mingi bakosalaka misala na bango bobele na molili. (Baloma 13:12; Baefese 5:11, 12) Solo, ezali mbala mingi na butu nde bakozalaka na mposa ya kosala moto moko mabe to koyiba biloko na bato. (Tala Yobo 24:14; 1 Batesaloniki 5:2.) Mpo na ntina wana, moto na mayele akopengola mpenza kotambola na butu na bisika ya makámá. Na New York, engumba oyo etóndi na mabe mingi, ba rapports oyo epesami na la police mokolo na mokolo ezali komonisa ete, mbala mingi bato bakozwaka mabe na butu, mingi mpenza nsima na 22 heures, na ntango bazongaka epai na bango. Basali na mabe bakotambolaka na babalabala oyo ezali na bato te mpo na kosala bato mosusu mabe. Bongo soki olingi kopona komata bus to taxi to mpe kokatisa kartyé ya likámá na makolo, zala na motema molai mpe zela. Soki te okozwa okokutana na likambo moko ya mpasi.
Moklisto moko abetamaki pene na kufa mpe bayibaki ye biloko na ye mpo ete, pene na 22 heures, akatisaki na makolo esika moko ezalaki mpenza na miinda te, na esika ete azela bus. Bato mosusu bazalaki na balabala, kasi basali misato na mabe batyaki motambo mpo na moto yango azangaki ekenge. Moko ayebisaki na bamosusu ete moto abongi kosalelama mabe azali koleka na babalabala. Kozanga koloba, bazingaki ndeko wana mpe bazwaki biloko na ye nyonso. Basalaki noki mpenza na boye ete, ata mozalani moko azwaki ntango te mpo na kokótela ye. Na nsima, moklisto wana alobaki ete: “Mbala ya nsima, nakozela bus.”
Le fin Renard, elenge oyo azalaki koyiba biloko na mabenga mpe na basakosi ya bato, ye oyo charles Dickens alobelaki kati na lisoló na ye Oliver Twist, azalaki bobele ndakisa ezangi likámá na kotalela mpenza bilenge ya kilikili oyo bazali kotambola na babalabala na mikolo na biso. Na kokesena na Le fin Renard, miyibi mpe basali na mabe ya lelo, ata mbula na bango ezali nini, bakotambolaka elongo na mondoki moke to na mbeli mpe bazali pene na kosalela yango. Na bingumba bitóndi na yikiyiki, batamboli to ba touristes oyo babungi nzela, bapaya to baleki nzela oyo bazali kotambola liboso na magazini, bazali bilei mpenza mpo na basali na mabe baoyo bazangi nsoni. Na ntango moke mpenza, basili koyiba eloko oyo emonani liboso na bango! Eloko nini ekoki kobenda elulela ya moyibi? Monyololo na wolo to appareil na yo ya fotó na lolenge oyo ekoki komonana te na ndakisa na kotyáká yango kati na sakosi oyo otye biloko mosusu. Wana ezali komonisa mayele mabongi.
Kozala na ekenge ezali mwango mosusu mpo na kokima mabe. Biblia elobi ete: “Moto na mayele akotambola na miso na motó na ye, nde moto na ebebe akotambola na molili.” (Mosakoli 2:14) Kotalela likebisi oyo na ntina na mabe, ntango tokosalela yango, ekomema biso na komona bato oyo bazali kotelematelema mpamba, kozanga mosala moko. Wana ekotambola yo pembeni ya balabala, omisenzela ete miyibi baleka na nsima te mpe babotola sakosi na yo te. Bamosusu bakotambolaka na veló mpe bakobotolaka bato biloko wana na kolekáká na lombango mpenza pene na bango; kotambola pembeni na balabala te, mingi mpenza soki ozali na sakosi ya monene to sakosi ya moke na maboko. Na bingbunduka, pengola komata na bisika to wagon oyo ezali na bato mingi te. Okozala na libateli malamu na bisika oyo bizali na miinda mpe epai bato bazali mingi. Miyibi balingaka komonana te mpe balingaka bayeba bango te.
Koyibama na ndako ezali mpe motindo mosusu na mabe oyo ekokaki kopengolama mbala na mbala, soki nde bato bakangaki ntina ya likámá yango. Biblia esalelaki na sembo mpenza bokokani oyo: “Bakokótaka na maninisa lokola moyibi.” (Yoele 2:9) Mayele mabongi mazali kotinda biso ete tokangisa bikuke mpe maninisa na bifúngeli makasi. Likebisi oyo lizali ntango nyonso na ntina, ete: eleki malamu komibatela ete likámá lizwa yo te, na esika ete ozwa mayele na nsima na likámá. Ata esengeli na yo kobimisa mwa mosolo mingi mpo na kobongisa bikuke mpe maninisa ya ndako na yo, nzokande yango ekozala mpamba te: ekobatela nzoto na yo mpe biloko na yo.
Osengeli kosala nini na ntango ozwi likámá na basali na mabe?
Esengeli kosala nini soki ozwi likámá na basali na mabe na balabala, atako myango nyonso esilaki kozwa mpo na komibatela? Tya molende ete omilembisa nzoto te mpe kosala mobulu te. Omiloba ete mbala mosusu moyibi azali mpe kobanga mpe akoki kokanisela ba gestes na ngai lolenge mosusu. Meka koloba mpe kokanisa elongo na moto yango, soko apesi nzela (moto yango akoki mpe kozala mwasi). Mbala mingi basali na mabe bakosalaka mobulu te wana ekokutanaka bango na moklisto ya solo. Ata ezaleli nini akozala na yango, komeka kotemela bango te soki basengi bobele mbongo na yo to biloko na yo. Pesa bango eloko bazali kosenga. Biblia ezali koteya biso ete bomoi ezali na motuya mingi koleka biloko nyonso oyo moto akoki kozala na yango.—Tala Malako 8:36.
Simbá bilembeteli ya nzoto ya mosali na mabe, ezala bilamba oyo alati to lolenge na nzoto na ye, kozanga komonisa mayoki ete olingi kokanga elongi na ye. Elobeli na ye ezali lolenge nini? Makambo nyonso wana makozala na ntina na ntango okoyebisa likambo yango epai na la police, mpamba te basali na mabe mingi bakosalelaka bobele mayele moko mpe bakoki bongo kokangama kozanga nkaká.
Esengeli komema ebundeli moko mpo na komibatela? Ekozala likambo na mayele te mpo na moklisto ete amema bibundeli. Moyibi oyo akomona ete ozali koluka ebundeli, akokakatana te na kosala yo mabe: mbala mosusu akozokisa yo to akoboma yo. Lisusu, ndenge nini okolanda etinda na Biblia oyo esengi ‘kozala na kimya elongo na bato banso,’ soki ozali na ebundeli mpo na kotemela mobulu?—Baloma 12:18.
Ezala myango nini okoki kozwa mpo na komibatela, moko te ezali kopesa yo ndanga ete mokolo moko te okozwa likámá na basali na mabe. Na bingumba epai mabe mazali kosalema mingi, bobele koleka mpamba na esika mabe, na ntango moko mabe, ekoki mpo na basalela yo mabe. Kala mingi te, avocat moko, ye moto ya New York, autaki na biro na ye mpo na kokende komela café. Wana ezalaki ye kokóta na magazini, bilenge balekaki kobetáká mindoki na bango. Avocat azwaki lisasi na motó mpe akufaki. “Ntango mpe makambo makanami te” esalaki ete abungisa bomoi. Oyo nde mawa! Elikya moko ezali na komona kosila na mabe oyo epalangani na mokili na mikolo na biso?—Mosakoli 9:11.
Ntango mabe makosila
Esili koleka soko mibu 2 000, Yesu alobelaki libota oyo likomona makambo na mpasi mingi oyo libota mosusu emona te. Na nzela na televizyó mpe na banzela ya kopanza nsango nokinoki, bamilió, to mpe bamiliare na bato bazali mpenza komona mabe oyo mazali kosalema. Mokili ekómi lokola mboka moke, nde bansango ya bikólo nyonso ebóngwani lokola bansango ya mboka moke. Komonáká makambo yango mokolo na mokolo, lokola Yesu alobaki yango, bato mingi bazali ‘kosenzwa na nsomo na kotalela makambo makobima na mokili mobimba.’—Luka 21:26.
Yesu amonaki liboso makambo oyo mabimaki uta 1914, makambo oyo masengelaki kozala ebandeli ya “nsuka na biloko ya ntango oyo.” (Matai 24:3-14) Kasi alobaki lisusu boye: “Wana ekomona bino makambo oyo kobima, boyeba ete Bokonzi na Nzambe ebelemi” (Luka 21:31) Yango elimboli ete na ntango ekoya, boyangeli ya sembo na Nzambe ekobóngola mokili na mbala moko.—Matai 6:9, 10; Emoniseli 21:1-4.
Na nsé na bokonzi wana, bobele basokemi, bato na kimya mpe baoyo bakotosaka Nzambe nde bakozwa bisengo ya paradis oyo ekozala na mabelé. Nini ekokómela babomi bato mpe basali mosusu na mabe? “Bakolimwa mbango lokola matiti; mpe bakokauka lokola matiti mobesu. Mpo ete basali na mabe bakolongolama, nde bango bakotyaka motema epai na Jéhovah bakosangola mokili.” Na nsé na boyangeli na sembo oyo na likoló, mobulu mokozala te, ata mabe mpe ekozala te.—Nzembo 37:2, 9.
Olingi koyeba makambo mingi likoló na elikya oyo epesami na Biblia na ntina na boyangeli ya kimya mpe ya solo na mokili mobimba? Yebisa na ba Témoins de Jéhovah ya mboka epai yo ofandi to kenda na Salle du Royaume oyo ezali pene na esika oyo yo ofandi. Bakozala na esengo ya kosalisa yo ete ososola Biblia, mpe yango ekosalema kozanga lifuti.
[Likanisi ya paragrafe on page 6]
“Basali na mabe bakolongolama, nde bango bakotyaka motema epai na jéhovah bakosangola mokili”
[Bililingi na lokasa 7]
Le fin Renard, moyibi ya biloko na mabenga oyo alobelamaki na charles Dickens, azalaki mosali moko na mabe soko tokokokisa ye na babomi oyo bazali kotambola lelo na balabala
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Graphic Works of GEORGE CRUIKSHANK, by Richard A. Vogler, Dover Publications, Inc.