“Atondi na bankombo na kotuka”
EMONISELI, to Buku ya mibombamo, mokanda na Biblia elobeli mpo na emononeli moko, oyo ya “nyama na yauli motane oyo atondaki na bankombo na kotuka mpe azalaki na mitó nsambo na maseke zomi”.Elobami ete, nyama oyo, azali na bomoi mpo na mwa ntango, nsima akei na libulu mozindo epai kuna akobima lisusu. (Emoniseli 17:3, 8) Peryodike oyo ozali kotanga esila mbala na mbala komonisa ete nyama oyo na langi motane ezali Lisangá na Mabota (Société des Nations), nsima lisangá oyo ezwaki esika na yango, elingi koloba ONU. Kasi mpo na nini nyama oyo na langi motane “atondi na bankombo na kotuka”?
Mokanda na boyokani ya libosoliboso ya Lisangá na Mabota, boyokani oyo esalamaki na kolanda makanisi mapesamaki na Ba Anglais elongo na Ba Américains, eyebisamaki polele le 14 février 1919. Mokolo na mibale elandaki, tala makambo makomamaki na nse na motó na likambo: “Lisangá ya kimya”, ebimisamaki na zulunalo Times ya Londres: “Tozali na ntina ya kosepela na kokuta kati na mokanda na boyokani makanisi mingi ezali ya Ba Anglais mpe bayangelami na bango. . . . Tokoki kino koloba ete ezali nde mokanda na mokili mobimba oyo eleki ntina oyo ebimisamaki naino te.” George Thayer, ministre ya liboso ya lingomba babengi congrégationaliste na mboka Cincinnati (Etats-Unis), alobaki mpo na mokanda yango lokola “maloba kitoko koleka, oyo naino makomama te, mazali kolakisa mokano mpe mposa ya bafandi na mabelé oyo bangengisami”. Mokanda na boyokani oyo ekumisamaki ata na ba radio to bazulunalo oyo esalelaka monoko ya Anglais te. Zulunalo moko ya France L’homme libre, ekomaki: “Ezali Biblia te, kasi ekoki koleka yango, mpo ezala Biblia ezala évangeliste moko naino bapekisi bato kobomana te. Oyo ezalaki bobele makanisi ekomi makambo ya solo.” Zulunalo mosusu ya français, Victoire, elobelaki yango lokola “makasi oyo eleki oyo esangisami esika moko oyo naino esalami te uta ebandeli ya mokili mpo na kosala ete makanisi malamu mpe bosembo eyangela mokili”.
Nsima na kosalema ya Lisangá na Mabota, tala oyo général Jan Smuts, moko na bamonisi ya Grande-Bretagne na lisangá yango akomaki: “Mokanda na boyokani ezali moko na mikanda minene oyo esalami kati na lisolo na moto. . . . Esengeli kokokisa mikano na yango, mpo, mwango mosusu ezali te mpo na kobikisa avenire ya mokili. . . . Moko moko na mabota oyo bakangani na yango te bakomitia na nsima ya elembo oyo na nse na yango mposo nyonso na bato ekokende liboso kino bolongi ya lisangá oyo mpo na kimya.”
Bilikia nyonso oyo bikokisamaki te ntango bitumba ya Mibale na mokili mobimba ebimaki na 1939. Lisangá na mabota elongaki te. Ezalaki bobele lisangá esalami na bato baoyo bazangi kokoka. Ezali mpe ndenge moko na lisangá oyo ezwaki esika na yango, ONU. Nzokande, mokolo oyo batiaki loboko na mokanda na mibeko ya ONU, lisolo moko na kati ya zulunalo New York Times emonisaki lisangá yango ete ezali “nzete na kimya” mpe elobaki: “Elikya monene ebotami. . . . Makambo minene makoki koya.” Bobele bongo, bakonzi na mangomba babiangaki ONU ete ezali “elikya bobele moko”, “Elikya ya nsuka” mpo na kimya.
Ezali nde kotuka na kopesa na bibongiseli to masangá na bato kokokisama na makambo oyo bobele Bokonzi na Nzambe ekoki kokokisa yango. Ezali mpo na yango Biblia esakoli ete nsima ya mwa ntango mokuse, ONU ekobomama”. Ya solo, bobele boyangeli na Nzambe ya likoló mpe ya kokoka nde ekoki komemela bato kimya oyo ekoumela.—Emoniseli 17:11, 12; Yisaya 9:6, 7; Daniele 2:44.