Masolo ya basakoli ya bokonzi
Bamonaki ntina ya kobongwana
Bato mabe, ata babomi na bato, bakoki kobongola etamboli na bango? Eloko nini ekoki kosalisa bango ete basala bongo? Moto akoki kobongwana mbala moko; ndakisa ezali likambo ekomelaki Saulo moto na Tarse oyo, nsima na konyokola baklisto, ye moko akomaki moklisto mpe ayebanaki nsima na nkombo ya ntoma Paulo. (Bagalatia 1:13, 14; 1 Timoté 1:13) Na mokili ya Kenya mpe mokili ya Argentine bapesi rapport na makambo lokola oyo na kobongwana ya kokamwa.
◻ Elenge mobali moko, oyo azalaki moko kati na etuluku ya bato mabe, etuluku oyo ezalaki kotia mobulu kati na région ya Nairobi, atindamaki lokola monongi na ouest ya Kenya mpo na koyekola mabaku ya kobuka ba banke. Azwaki esika ya kolala epai na mobali moko mobangé, epai amonaki liboke ya ba Réveillez-vous! ya kala. Amipesaki na kotanga yango, kino abosanaki libela mikano na ye. Nsima na kotanga yango nyonso, asengaki epai na mobangé oyo banimero mosusu, mpe ayebisaki ye ete azwaka mokomoko na nzela ya poste nsima ya poso mibalemibale. Kobanda ntango wana, elenge mobali oyo azalaki kosenga mikolo nyonso epai na mobangé wana akende na poste kotala soki bazulunalo eyei. Bobele na ntango yango, azwaki likatami ya kotika etamboli na ye mabe, abandaki kosalela makambo oyo azalaki koyekola kati na bazulunalo mpe azwaki ekateli ya kokoma Témoin de Jéhovah. Abandaki ata koloba epai na bazalani ete azalaki Témoin de Jéhovah. Nsima, ntango pionnier spécial moko azalaki kosakola na quartier yango, akamwaki ndenge akutanaki na elenge mobali oyo azalaki komiloba ete azali temwe. Mobali oyo abandaki koyekola Biblia, akolaki, mpe lelo oyo azali pionnier permanent. Boyebi ya solo na Biblia epesaki ye ntina ya kobongola bomoi na ye.
◻ Na mokili ya Argentine, mobali moko, ye mpe, azwaki ntina ya kotika mobulu. Na boumeli ya mbula ntuku mibale azalaki konyokola mwasi na ye, oyo azali Témoin de Jéhovah. Eyebisami ete atimolaki libulu moko kati na jardin na ye mpe apikaki ekulusu nsima na libulu yango mpo ete akanaki koboma mpe kokunda wana, mobali oyo azalaki koyiba basoso na ye. Bazalani na ye nyonso bazalaki kokima ye mpo na ezaleli na ye ya mabe.
Mokengeli ya circonscription akendeki kotala mobali oyo mpe asengaki ye ete akoka koyekola Biblia elongo na ye. Mokengeli akamwaki ntango mobali oyo ayanolaki ye ete akosepela mingi mpo na likambo yango. Temwe oyo ayekolaki elongo na ye brochure Sepela na bomoi ya seko na mabelé! Mobali oyo asalaki bokoli kati na boyebi ya Biblia mpe kati na mayele na elimo. Sikawa, azali kosangana mbala nyonso na makita nyonso. Azali kosepela na makita mpe na boninga ya batemwe kino alobaki: “Nalingi kozala elongo na bango.”
Mobali oyo asalaki mpenza mbongwana kino ete bazalani na ye batunaki epai na mwasi na ye soko monganga nani asalisaki ye. Ntango ayebisaki bango ete abongwanaki mpo ete azalaki koyekola elongo na Ba Témoins de Jéhovah, moko kati na bazalani na bango akamwaki mingi kino asengaki Biblia moko. Mosusu asalaki abonema na moko na baperiodike na biso.
Boyebi ya solo na Biblia epesaki epai na mibali oyo ntina ya kosala mbongwana ya bomoi. Boyebi yango ekoki kosalisa moto nyonso oyo azali koluka bomoi oyo ezali na ntina lelo, mpe bomoi ya seko kati na mokili ya sika elakami na Nzambe.—Yoane 17:3.