Bazulunalo oyo ezali kosakola Bokonzi ya Nzambe
1 Lokola tozali Batatoli ya Yehova, toyebani mpenza mpo na molende na biso ya kosakola Bokonzi ya Nzambe. Na yango, bazulunalo, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! oyo tozali kokabola, ezali na ntina monene mpo na kosalisa bamilio ya bato ete báyeba mikano ya Nzambe. Nsango na yango ezali mpenza nsango malamu mpamba te ezali kolobela Bokonzi ya Nzambe oyo ekouta na likoló, lokola elikya bobele moko mpo na bato.
2 Bazulunalo yango elobelaka mpenza mikakatano ya bato—na oyo etali mayoki, na bisika bafandi, mpe na makambo ya elimo. Na ntango oyo bizaleli malamu kati na mokili mpe kati na libota ezali kobeba bipai nyonso, bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ezali kosalisa bato ete bábongisa lolenge ya bomoi na bango na komonisáká bango lolenge ya kosalela mitinda ya Biblia. Tokosepela kolakisa bazulunalo yango na sanza ya Máí mpe ya Yúni.
3 Yango ezali mpenza kosepelisa bato: Bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ezali kobima na nkota minene oyo elobamaka na bato mingi koleka kati na mokili. Mpo na yango, bazulunalo na biso eyebani mingi mpenza. Talá mwa bantina oyo bazulunalo yango ezali mpenza kosepelisa bato:
◼ Elobaka makambo na bosembo mpe na bosolo, emonisaka polele bokeseni kati na mabe mpe malamu.
◼ Epesaka elikya ete Paladiso ya bosembo ekosalema na mikolo mizali liboso, mpe elikya yango ezwi moboko na elaka oyo Nzambe apesi ya koyangela mabelé na nse ya Bokonzi na ye.
◼ Ezali na masolo mingi ya ndenge na ndenge, oyo bato bazalaka na mposa na yango, mpe yango esepelisaka bato ya bipai nyonso mpe ya mimeseno nyonso.
◼ Masolo na yango ezalaka na bosikisiki, eteyaka bizaleli malamu, elobaka solo, ezalaka na koponapona te mpe eyokanaka na bindimeli ya lokuta te.
◼ Bililingi na yango kitoko ebendaka likebi ya bato noki, mpe ekomeli na yango ya pɛtɛɛ esalaka ete botángi esalema na bolɛmbu nyonso.
4 Kabolá yango mingi koleka: Mpo ete okabola bazulunalo yango mingi koleka, osengeli mpenzampenza kosala makasi ete obongisa maloba na yo ya kobanda lisolo, manaka na yo, mpe mosala na yo ya kosakola. Ekozala malamu ete otalela lisusu mpe osalela makanisi oyo malobelamaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya Máí 1997.
5 Yebá malamu makambo mazali kati na bazulunalo: Ntango ozali kotánga nimero mokomoko, kanisá bato oyo bakoki kosepela na yango. Luká masolo to mikapo ya sikisiki oyo okoki kolobela na ntango okobanda lisolo. Kanisá motuna moko oyo okoki kosalela mpo na kobanda lisolo mpe kolamwisa mposa mpo na lisolo yango.
6 Bongisá maloba ya kobanda lisolo na kotaleláká molobani na yo: Bongisá maloba ya pɛtɛɛ mpo na kobanda lisolo mpe oyo okoki koyokanisa yango liboso na mobali, mwasi, mokóló, to elenge, ezala moto oyo oyebi ye to mopaya.
7 Omilɛngɛlɛkɛ ntango nyonso mpo na kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!: Lokola ezalaka mpasi te mpo na kokɔtisa bazulunalo yango na sakosi ya monene to ya moke, to na libenga, tokoki komema mwa ndambo ntango tozali kosala mobembo to kosomba biloko. Tólakisa yango na bandeko na biso, na bazalani na biso, na baninga na biso ya mosala, na baninga na biso ya kelasi, to na balakisi. Moto na moto amityela mokolo moko na pɔsɔ mpo na kopesa litatoli na bazulunalo.
8 Talelá bazulunalo ete ezali na motuya: Bazulunalo yango esilaka ngala te. Nsango na yango esilaka nguya mpo na boumeli ya ntango te. Na ntembe te, soki tomonisi milende mpenza mpo na kokabola bazulunalo nyonso oyo tozali kozwa, libombo na biso ekotondana te na bazulunalo oyo eumeli mingi.
9 Litatoli na balabála epesaka matomba: Yango ezali moko na myango malamu mpenza mpo na kokabola bazulunalo epai na bato mingi mpenza. Na mikolo oyo bakendeke kosomba biloko, basakoli mosusu basalelaka mwa ntango moke oyo bazalaka na yango mpo na kopesa litatoli na balabála.
10 Teritware ya mimbongo ebotaka mbuma: Mingimingi, tokutanaka na bakóló magazini ntango topesaka litatoli na bamagazini. Bato mingi oyo batekaka bazalaka na limemya, mpe mingi kati na bango basepelaka kozwa bazulunalo. Tólakisa masolo ya bazulunalo oyo mabongi mpenza na bango.
11 Kozala na bato oyo bazwaka bazulunalo ezali libaku malamu: Lokola bazulunalo yango ebimaka mbala mibale na sanza, ebongi mpenza ete tózongaka kotika banimero ya sika epai na bato oyo balingaka kotánga yango. Tosengeli kosala mbala na mbala bozongeli ya sika, bobele mpo na kotika bazulunalo te, kasi mpe mpo na kokolisa bosepeli ya moto yango mpo na Biblia. Kozala na bato oyo bazwaka bazulunalo ezali libaku malamu mpo na kobanda boyekoli ya Biblia.
12 Tósala mingi koleka na sanza ya Máí mpe ya Yúni: Bamilio ya batángi oyo bazali na botɔ́ndi basili kotyela Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! motema. Lokola bazulunalo yango ezali kosakola na mpiko nyonso koya ya Bokonzi ya Nzambe, tosengeli kozwa likatami ya komema yango mpe kolakisa yango na mabaku nyonso. Tiká ete na sanza ya Máí mpe ya Yúni, tókabola bazulunalo yango mingi koleka!