Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/10 nk. 16-20
  • Ndenge nini kokima bilobaloba mabe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini kokima bilobaloba mabe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tozala na limemya mpo na boongó oyo Nzambe apesaki biso
  • Tomemya Nzambe mpe Liloba na ye
  • Lisalisi ya libondeli
  • Bolingo esilisaka bilobaloba
  • Limemya ekopusa biso na kobwaka bilobaloba
  • Misala kitoko mipekisaka bilobaloba mabe
  • Bokeba na bilobaloba mabe!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Kotɔnga ezali mpenza mabe?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Nasala nini ntango bazali kotɔnga ngai?
    Mituna oyo bilenge batunaka
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/10 nk. 16-20

Ndenge nini kokima bilobaloba mabe

“E Jéhovah, tia mokengeli na monoko na ngai; batela ekuke na bibebu na ngai.​—NZEMBO 141:3.

1. Wapi makoki ya servo to boongó oyo Nzambe apesaki biso?

JÉHOVAH apesaki biso enama moko ya kokamwa kati na nzoto na biso: Ezali boongó to servo. Mokanda Masini monene (Angl.) ezali kolobela yango na maloba oyo: “Ata ba ordinatere oyo ebongisami malamumalamu ezali mpamba liboso na boongó ya moto oyo makoki na yango mpe misala na yango ezali mpenza na ndelo te . . . Ebele na bilembo oyo bizali kolekaleka kati na boongó na yo ntango nyonso bizali kokotisa ebele na makambo ya kokamwa. Bilembo yango bizali koyebisa makambo ya nzoto na yo ezala ya kati to ya libanda. . . Na ntango wana bilembo mosusu bizali kososola makambo makomeli boongó, bizali kobimisa mayoki, kokundola makambo ya kala, makanisi to mikano oyo ekokamba moto na kozwa bikateli. Nokinoki bilembo biuti na boongó na yo bizali kolakisa na biteni mosusu ya nzoto na yo eloko nini esengami na bango kosala. Bobele na ntango yango, ata yo ozali koyeba yango te, boongó na yo ezali kotala malamu kopema na yo, makila na yo, moto ya nzoto na yo mpe makambo mosusu ya ntina oyo nzoto na yo esengeli kosala.”​—Lokasa 326.

2. Motuna nini esengeli kotalelama?

2 Ntembe ezali ata moke te, tosengeli mpenza te kosalela likabo monene wana ya Nzambe lokola ebwakelo na bosoto (poubelle). Nzokande, tokosalela boongó na biso na lolenge mabe soki tozali koyoka mpe kopalanganisa bilobaloba. Ndenge nini tokoki kobwaka lolenge wana na maloba mpe kosalisa bato mosusu na kosala motindo moko?

Tozala na limemya mpo na boongó oyo Nzambe apesaki biso

3. Mpo na nini moklisto ya solo akolinga soki moke te koyoka to kopalanganisa bilobaloba mabe?

3 Soki tozali na limemya mpo na boongó oyo Nzambe apesaki biso, tokoyoka te mpe tokopalanganisa bilobaloba te. Elimo na Jéhovah ekopusa moto te na kotia likebi na maloba motindo wana to na kosalela lolemo na ye mpo na kozokisa ata nani. Liloba na Nzambe elobi nde boye: “Tika ete moto mabe alongwa na nzela na ye mpe moto na masumu alongwa na mabanzo na ye.” (Yisaya 55:7) Elimo ya moto mabe etondi na makanisi mabe, mpe azali pene mpo na kotonga moto na sembo. Kasi okoki koyoka maloba motindo oyo te kati na monoko na baoyo bazali mpenza kotia likebi monene na elimo oyo Nzambe apesaki bango.

4. Soki tozali komemya na boongó na biso mpe likoki ya koloba, ndenge nini tokosalela elimo na biso mpe lolemo na biso?

4 Soki tozali komemya elimo na biso mpe lolemo na biso na motindo mobongi, tokosalela yango te mpo na kosepelisa nzoto oyo ezangi kokoka. Tokobatela nde makanisi na biso mpe maloba na biso na nivo moko etombwami mpenza. Tokokoka kotika bilobaloba soki tomipesi kati na libondeli epai na Ye oyo makanisi matombwami koleka oyo ya biso. Ntoma Paulo azali kopesa toli oyo: “Makambo nyonso na solo [ya lokuta te to matongi te], makambo nyonso na lokumu [ya mbindo te], makambo nyonso na sembo [ya mabe te to ya kopesa mpasi te], makambo nyonso na mpeto [ya kotuka te to mpe kokanisela moto mabe te], makambo nyonso na boboto [kozala moyini te to moto ya koyokisa bato nsoni te], makambo nyonso na lokumu malamu [mde na lokumu mabe te] soko malamu ezali [kasi mbeba te] mpe soko kosanzolama ezali [kasi likambo ekweisami te], bokanisaka makambo yango.”​—Bafilipi 4:8.

5. Mpo na Paulo, baklisto bamonaki nini mpe bayokaki nini?

5 Paulo abakisaki: “Yango eyekoli bino mpe eyambi bino mpe eyoki bino mpe emoni bino epai na ngai, bosalaka yango; mpe Nzambe na kimya akozala na bino elongo.” (Bafilipi 4:9) Mpo na Paulo, makambo nini bato oyo ye akomelaki bamonaki mpe bayokaki? Makambo na peto mpe ya kolendisa. Ayebisaki bango te bilobaloba ya nsima na ntina na Ludia to Timote. Ezali solo ete Paulo azalaki koyoka te mpe kopalanganisa te bansango to makambo etali bankulutu ya Yelusalemea. Limemya oyo azalaki na yango mpo na elimo oyo Nzambe apesaki ye ezalaki mpenzampenza kosalisa ye na kokima bilobaloba nyonso. Soki tozali solo komemya elimo mpe lolemo oyo Jéhovah apesaki biso, tokolanda ndakisa na ye.

Tomemya Nzambe mpe Liloba na ye

6, 7. (a) Na maloba nini Yakobo azali komonisa mabe ya lolemo oyo epekisami te? (b) Likambo nini ekokoma te soki tozali komemya Nzambe mpe Liloba na ye?

6 Limemya ya solo mpo na Nzambe mpe mpo na Liloba mosantu na ye ekosalisa biso mpo na kotika bilobaloba. Ee, limemya yango ekobenda biso na kolanda toli ya moyekoli Yakobo, oyo alobelaki mpo na lolemo. (Yakobo 3:2-12) Soki moto moko akoki kopekisa lolemo na ye, akozala na mpasi te mpo na kopekisa nzoto na ye mobimba, lokola nsinga kati na monoko na mpunda esalisaka mpo na kotambwisa ye. Lokola mwa moto moke ekoki kozikisa zamba mobimba, ndenge moko mpe mwa eteni moke ya nzoto oyo ezali bongo lolemo ekoki mpe kozala moto oyo ezali kozikisa bomoi mobimba. Yakobo akomaki ete, moto akoki kolakisa nyama ya zamba, ndeke, nyama oyo ekolandaka na mabelé, nyama minene ya mai na monana, “nde moto te ayebi kopekisa malamu lolemo na ye”. Atako bongo, wana ezali ntina te ekopusa biso na kozanga kosala milende mpo na kotika bilobaloba.

7 Yakobo abakisi ete lolemo ezali kobimisa lipamboli mpe kolakelama mabe kati na monoko bobele moko. Yango ebongi te, mpamba te liziba moko ekoki te kobimisa mai kitoko mpe mai ya bololo. Nzete na mosuke ekoki kobota bilaya te, mpe mai ya mungwa ekoki kopesa mai ya kitoko te. Ya solo, ntango nyonso baklisto bakozala bato ya kozanga kokoka, bakolonga te kopekisa lolemo na bango na makambo nyonso. Na bongo tosengeli kozala bato ya mitema mawa epai na bato oyo bakosalela biso mabe nde babongoli motema, kasi yango epesi nzela te na bilobaloba. Soki tozali mpenza komemya Nzambe mpe Liloba na ye, tokosala nyonso ekoki na biso mpo na kozala na lolemo ya kozokisa te.

Lisalisi ya libondeli

8. Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa biso na kobwaka bilobaloba mabe?

8 Lisenginya ya koyoka bilobaloba mabe, mpe kopalanganisa yango na nsima, ekoki kozala makasi mingi. Na bongo soki kala okweaki na lisenginya yango, okoki te kosenga epai na Nzambe ete alimbisa yo mpe asalisa yo? Yesu ateyaki biso na kobondela boye: “Mpe kendisa biso na komekama te, kasi bikisa biso na mabe.” (Matai 6:13) Baklisto oyo bazali mpenza kosambela Nzambe na motema moko ete atika bango te na makambo ya komekama motindo wana ya mabe, bakokwea te na motambo wana ya Satana; bakobatelama liboso na motongi monene.

9. Soki tomekami mpo na kotonga moto moko, libondeli nini tokoki kosala?

9 Soki tomekami mpo na kotonga moto moko, tokoki kosala libondeli oyo: “E Jéhovah, tia mokengeli na monoko na ngai; batela ekuke na bibebu na ngai.” (Nzembo 141:3) Tokozala na likama ya kobungisa elikya nyonso ya bomoi na seko soki topesi nzela na komekama mpe tomekoli Diable na kozala motongi oyo atondi na koyina, mokosi mpe mobomi. (Yoane 8:44) Ntoma Yoane akomaki: “Moto na moto oyo akoyinaka ndeko na ye azali mobomi na bato, mpe toyebi ete moto na moto oyo akobomaka bato azali na bomoi na seko koumela kati na ye te.”​—1 Yoane 3:15.

Bolingo esilisaka bilobaloba

10. Na esika ya kolobaloba na ntina na bamosusu, nyongo nini tozali nde na yango mpo na kozongisela bango?

10 Ya solo, biso banso tozali na eloko ya kopesa epai na bazalani na biso, kasi mpenza te koyina oyo ezali kobota bilobaloba. Paulo akomaki ete, “bozalaka na nyongo epai na moto moko te, bobele nyongo na kolingana”. (Baloma 13:8) Tosengeli kozongisa nyongo yango mokolo na mokolo, na esika ya koloba mabe mpo na baninga mpe kobebisa lokumu na bango. Soki tozali koloba ete tolingi Jéhovah, tosengeli te kotonga moko na bandeko na biso kati na kondima, mpamba te “ye oyo akolingaka ndeko na ye te, awa esili ye komona ye, akolonga kolinga Nzambe te, oyo amoni naino ye te”.​—1 Yoane 4:20.

11. Lisese ya bampate mpe bantaba oyo Yesu apesaki ezali koteya biso nini na ntina na bilobaloba mabe?

11 Kati na lisese na ye ya bampate mpe bantaba, Yesu alobaki na bato oyo bakokani na bantaba ete makambo oyo basalaki epai na bandeko na ye, ezali epai na ye nde basalaki yango. Okolinga kolobaloba mpo na Klisto? Soki olingi koloba mabe te mpo na Nkolo na yo, koloba mabe te mpo na bandeko na ye bapakolami. Kosala libunga motindo moko te lokola bantaba, oyo “bakobomama libela”. Soki olingi bandeko na Yesu, monisa yango na makambo oyo ozali koloba na ntina na bango.​—Matai 25:31-46.

12. Masese 16:2 elobi nini, mpe bopusi nini yango esengeli kobimisa likoló na makanisi na biso, misala na biso mpe maloba na biso?

12 Lokola biso banso tozali bato na masumu mpe tozali na mposa ya mbeka na lisiko na Yesu, soki moto moko alingi kolobaloba mabe mpo na biso, akozwa makambo mingi mpo na koloba. (1 Yoane 2:1, 2) Ya solo, ekoki kozala ete tozali komimona lokola nde tokoka. “Nzela nyonso na moto ezali peto na miso na ye, nde Jéhovah akomeka milimo.” Bimekeli na Nzambe bibebisami na koponapona te. (Masese 16:2; Misala 10:34, 35) Jéhovah azali komeka elimo na biso, azali kotalatala makanisi na biso mpe mikano oyo ezali kopusa biso na kokanisa, na kosala mpe na koloba lokola tozali kosala yango. Tolingi mpenza te amona ete, tozali komikosa na kokanisa nde tozali peto mpe ete tozali kotalela bamosusu lokola bazali mbindo mpe babongi na kopamelama. Lokola Jéhovah, tosengeli komonisa ete tozali na koponapona te, komimonisa bato na motema mawa mpe na bolingo.

13. (a) Lokola ‘bolingo ezali na motema petee mpe na boboto’ na nini yango ekoki kosalisa biso mpo na kobwaka bilobaloba mabe? (b) Biteni nini ya bolingo ekopekisa biso kotonga ndeko moko oyo azwi mokumba oyo biso tozali na yango te kati na lisangá?

13 Kati na 1 Bakolinti 13:4-8, Paulo amonisi likanisi oyo ekoki kosalisa biso na kobwaka bilobaloba. Akomaki: “Bolingo ezali na motema petee, bolingo ezali na boboto.” Ekoki kokoma ete moklisto mwasi moko oyo azali kozwa minyoko mpo mobali na ye azali moklisto te, apesi biso mbote na esengo te. To mpe, mbala mosusu bamoko bazali na mwa bolembu, mpo na kolongono mabe ya nzoto na ndakisa. Bolingo esengeli te kopusa biso na kozala na motema molai mpe komonisa boboto epai na bato yango, na esika ya kotonga bango? ‘Bolingo ezali na zuwa te, bolingo ezali na lolendo te, ekomibimbisaka te.’ Na yango, soki moklisto moko azwi mokumba oyo biso tozali na yango te kati na lisangá, bolingo ekopekisa biso na kotyola ye, na koloba ete ye akoki te mpo na mokumba oyo bapesi ye. Bolingo ekopekisa biso mpe na komikumisa mpo na makambo oyo tozali kosala, kotyolaka bongo baoyo bazali na mikumba mingi te.

14. Mitindo misusu nini ya bolingo mikopusa lolenge na biso ya koloba mpo na bamosusu?

14 Paulo alobi lisusu ete ‘bolingo ekosalaka na nsoni te, ekolukaka malamu na yango mpenza te, ekobombaka nkanda te’. Na esika ya koloba maloba ya nsoni, likambo oyo ezali mabe mpo na moklisto, tosengeli kotika nzela ete bolingo epusa biso na koloba malamu mpo na baninga mpe kokanisa na matomba na bango. Ezalela motindo wana ekopekisa biso na kosilika mpe na koloba mabe mpo na bazalani na biso na ntina na mabe oyo basaleli biso, ezala ya solo to ekanisami bobele kokanisama. Lokola ‘bolingo ekosepelaka mpo na masumu te nde ekosepelaka na makambo na solo’, ekopekisa biso na komipesa na bilobaloba, ata mpo na banguna oyo bazali konyokolama.

15. (a) Lokola ‘bolingo ekondimaka makambo nyonso mpe ekolikiaka makambo nyonso’, wana esengeli kozala na bopusi nini likoló na biso? (b) Nini ekosalisa biso na kokangama na lisangá ya Jéhovah, ata soki bamoko bazali kofinga yango?

15 Bolingo ‘ekondimaka makambo nyonso, ekolikiaka makambo nyonso’; ezali yango Liloba na Nzambe elobi; ezali kopusa biso na kosepela na bilei ya elimo epesami na “moombo na sembo”, mpe kokanga matoi na maloba na lokuta mpe ya kotuka ya bapengwi. (Matai 24:45-47; 1 Yoane 2:18-21) Lokola ‘bolingo ekoyikaka mpiko na makambo nyonso mpe ekosuka te’, ezali kosalisa biso mpe na kotikala na lisangá na Nzambe, ata soki “bandeko na lokuta” to bato mosusu bazali kofinga yango to kofinga basangani na yango.​—Bagalatia 2:4.

Limemya ekopusa biso na kobwaka bilobaloba

16. Ndenge nini Paulo atalelamaki epai na bandeko ya lokuta na Kolinti?

16 Limemya mpo na bandeko na biso baklisto ezali kosalisa biso mpe na kobwaka bilobaloba. Mpo ete Nzambe andimi bango, biso tosengeli kotonga bango te. Tokokana soki moke te na “bandeko na lokuta” oyo Paulo akutanaki na bango. Bazalaki mpenza koloba maloba mabe na ntina na ye. (2 Bakolinti 11:26) Bapengwi bafingaki ye mpe lokola. (Tala Yuda 3, 4) Na Kolinti, bamoko bazalaki koloba: ‘Mikanda na ye mizali na bozito mpe na makasi, nde motindo na nzoto na ye ezali na bolembu mpe koloba na ye ezali mpamba.’ (2 Bakolinti 10:10) Balobaka boye te mpo na moto oyo olingi solo.

17. Maloba ya motindo nini Diotelefe azalaki koloba na ntina na ntoma Yoane?

17 Totalela likambo ya ntoma Yoane, oyo Diotelefe azalaki kotonga. Yoane alobi: “Nakomaki mwa mokanda epai na lingomba [lisangá]. Kasi Diotelefe, oyo asepeli kozala moto na liboso na bango, alingi koyamba biso te. Na bongo, soko nakoya, nakokanisa makambo makosalaka ye, awa ezali ye kolobaloba makambo mabe na ntina na biso.” (3 Yoane 9, 10) Ezalaki mpenza mabe mingi na koloba motindo wana; mpo na biso, soki tozali koyoka to kopalanganisa maloba ya motindo wana, tosengeli kotika kosala bongo nokinoki.

18. Na nini ezalela ya Demitele ekesenaki na oyo ya Diotelefe, mpe bopusi nini bokeseni yango esengeli komema likoló na etamboli na biso?

18 Mpo na kolendisa limemya na makambo oyo mazali sembo, Yoane alobaki na Gayo: “Oyekola makambo mabe te kasi makambo malamu. Ye oyo akosalaka malamu azali moto na Nzambe; ye oyo akosalaka mabe asili komona Nzambe te. Demeteli azui matatoli malamu na bato nyonso mpe na solo lokola. Biso mpe tozali kotatola, mpe oyebi ete matatoli na biso mazali solo.” (3 Yoane 1, 11, 12) Mokomoko kati na biso asengeli komituna: Nazali Diotelefe molobalobi, to Demeteli moto na sembo? Soki tozali komemya bandeko na biso baklisto, tokoloba maloba mabe te na ntina na bango, likambo oyo mbele ekopesa epai na bamosusu nzela na kotalela biso lokola batongi.

19. Ndenge nini bandeko ya lokuta balukaki kobebisa lokumu ya Charles Russell?

19 Bandeko na lokuta bazalaki bobele na ekeke ya liboso te. Na ba 1890, bato bazangi bolingo oyo basanganaki na lisanga ya Nzambe bamekaki kobotola litambwisi to bokonzi ya Société Watch Tower. Bayangaki mwango mabe mpo na Charles Russell kati na mokano ya kolongola ye na esika ya président ya la Société. Nsima na koimaima na boumeli ya mibu mibale, mwango wana mabe ebimaki polele na 1894. Bifundeli na lokuta oyo bilobamaki na ntina na Russell bitalelaki mpenzampenza kozanga kolongobana na ye kati na mombongo lokola elobaki bango. Bifundeli mo- susu wana na lokuta bizalaki komonisa makanisi ya babandisi na yango: balingaki kobebisa lokumu ya Russell. Baklisto oyo bazalaki na elimo ya koponapona te basalaki ankete mpe bayaki komona ete Russell azalaki na ye na likambo te. Mwango wana mabe oyo ezalaki na mokano ya “kopumbusa M. Russell mpe mosala na ye” elongaki ata moke te. Na yango, lokola ntoma Paulo, Russell atumolamaki na bandeko ya lokuta, nzokande emonanaki ete komekama wana eutaki na Satana, mpe bayangi na mwango mabe batalelamaki ete babongi te mpo na kokoba kozala elongo na baklisto.

Misala kitoko mipekisaka bilobaloba mabe

20. Ezaleli nini ya bilenge basi mosusu bakufela-mibali ezalaki kolelisa ntoma Paulo?

20 Paulo ayebaki ete bilobaloba ebimaka mbala mingi na kozanga mosala, kasi ebimaka te epai na moto oyo amipesi na mosala. Amonaki mabe na ndenge bilenge basi oyo bakufela-mibali bakomaki na momeseno ya “kotambolatambola na bandako ya bato; kasi abakisaki ete oyo eleki mabe, bakomaki bato ya songisongi, balingaka kokota na makambo oyo etali bango te mpe balobaka makambo oyo basengeli koloba te”. Mono ezalaki nini? Mosala ya peto. Paulo akomaki: “Yango wana, nalingi ete bilenge basi oyo bakufela-mibali babala lisusu, babota bana mpe babatela bandako na bango mpo ete banguna na biso bazwa nzela ya kolobela biso makambo ya mabe te.”​—1 Timote 5:11-14, Kondimana ya Sika.

21. Na nini maloba makomami kati na 1 Bakolinti 15:58 mazali kosalisa biso na kokima mitambo oyo mikokangaka moto kati na bilobaloba mabe?

21 Ntango mwasi azali mama ya libota, azali kobokola bana engebene mikano na Nzambe mpe azali kosala misala misusu ya lokumu, akozala lisusu na ntango mingi te mpo na kolobaloba to koyoka maloba ya bagoigoi oyo makoki kobongwana mpo na kokoma matongi. Mibali mpe bakozala na ntango moke mpo na koloba maloba motindo wana soki bazali komipesa na misala kitoko. Soki ‘tozali ntango nyonso na mosala mingi kati na Nkolo’, tokopengola kozanga nkaka mitambo oyo mikokangaka moto kati na bilobaloba. (1 Bakolinti 15:58) Mingimingi mpenza soki tozali kosangana na motema moko kati na mosala ya boklisto, na makita ya lisangá mpe na misala mosusu ya bulee, elimo na biso ekotalela bobele makambo na elimo, na motindo boye ete tokokoma balobalobi te oyo bazangi mosala to bato oyo bazali komikotisa na makambo ya bato mosusu.

22. Engebene Masese 6:16-19, ndenge nini Nzambe azali kotalela batongi?

22 Na kolandaka kokokisa misala na kobanga Nzambe mpe na kolukaka na kopesa matomba ya elimo epai na bazalani na biso, tokozala baninga ya sembo, kasi batongi te oyo bazangi bosembo. (Masese 17:17) Mpe soki tobwaki bilobaloba mabe, tokozwa Moninga oyo aleki baninga nyonso: Jéhovah Nzambe. Toyeba lisusu ete makambo nsambo mayinami epai na ye: “Miso na lolendo, lolemo na lokuta, maboko masopi makila na mosembwi, motema mozali kobanzabanza misala mabe, makolo makopotaka mbango kosala masumu, motatoli na lokuta oyo akolobaka maloba na sembo te, mpe ye oyo akoyeisa kowelana kati na bandeko.” (Masese 6:16-19) Motongi alekisaka ndelo mpe alobaka makambo ndenge yango ezalaki te; batongi bazali bongo na lolemo na lokuta. Maloba na bango mabendaka baoyo balingá masolo. Mingimingi ebimisaka mobulu. Nzokande, soki tozali koyina makambo oyo Nzambe ayini, tokobwaka bilobaloba, oyo ezali na likama ya kopesa mpasi na moto na sembo mpe kopesa nde esengo epai na motongi monene, Satan le Diable.

23. Ndenge nini tokoki kosepelisa motema ya Jéhovah na nzela ya maloba na biso?

23 Na bongo tosepelisa motema na Jéhovah. (Masese 27:11) Tosenzela ete toloba te maloba oyo ye azali koyina, toboya koyoka matongi mpe tosala nyonso esengeli na biso mpo na kobwaka bilobaloba mabe. Na lisalisi ya Jéhovah, Nzambe na biso mosantu, ntembe ezali te, tokolonga.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ata na mikolo na biso, ezali mabe koyoka mpe kopalanganisa masolo ya kokamwisa (mbala mingi mazangi moboko) na ntina likambo oyo bandeko ya Collège central to bamonisi na bango basalaki to balobaki.

Bozongeli

◻ Motindo nini libondeli ezali kosalisa biso na koboya kotonga bazalani na biso?

◻ Ndenge nini 1 Bakolinti 13:4-8 ezali kosalisa biso na kobwaka bilobaloba mabe?

◻ Ndenge nini limemya mpo na biso moko ezali kosalisa biso na kobwaka lisenginya nyonso ya kolobaloba mabe na ntina na bandeko na biso baklisto?

◻ Na nini toli oyo epesami kati na 1 Bakolinti 15:58 ezali kosalisa biso na kokima mitambo oyo mikangaka moto kati na bilobaloba mabe?

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 17]

Photo du service américain des Eaux et Forêts

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto