Mibeko Zomi Milimboli nini mpo na yo?
SANZA MISATO nsima na kosikwama na Ezipito na mobu 1513 liboso na ntango na biso, Bayisraele basalaki camp na kotalana na ngomba Sinaï kati na esobe. Na kobiangama na Jéhovah, mosakoli Moïse abutaki na ngomba, nsima ayokaki Nzambe kopesa elaka ete akosala libota na Yisraele ‘bato na Ye mpenza kati na bato nyonso’. Maloba oyo, Moïse ayaki koyebisa yango epai na Bayisraele na nzela ya mikolo. “Nsima na yango, bato nyonso bazongisaki elongo ete: “‘Tokosala yango nyonso elobi Jéhovah.’”—Exode 19:1-8.
Na nsima, Nzambe atangelaki Moïse Mibeko Zomi, oyo liboso ya koyebisa yango apesaki likebisi oyo: “Ngai nazali Jéhovah, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na mokili ya Ezipito, na ndako na boombo.” (Exode 20:2) Mibeko Zomi oyo mipesamaki epai na Bayisraele, oyo mpo na bango Mobeko ya liboso elobaki: “Okozala na banzambe mosusu liboso na ngai te.”—Exode 20:3.
Nsima na yango, Jéhovah apesaki epai na Moïse mibeko mosusu mpo na Yisraele. (Exode 20:4 kino 23:19) Kosangisa yango nyonso misalaki mibeko soko 600. Ezalaki solo likambo esimbaki motema na koyeba ete anzelu na Nzambe, azalaki kotambola liboso na Yisraele, azalaki kokamba bango na Mokili ya ndaka. (Exode 23:20-22) Jéhovah alobaki ete: “Nakosala misala na kokamwa liboso na bato na yo nyonso, na ndenge misalami na mokili moko te, mpe na libota moko te, mpe bato nyonso kati na bango yo ozali bakotala mosala na Jéhovah, mpo ete ezali likambo na nsomo likosala ngai na yo elongo.” Na nyonso oyo, Nzambe asengaki nini epai na libota na ye? Yango oyo: “Osenzela yango ekolakela ngai yo lelo.” Ya solo esengelaki mpenza kotosa na mibeko nyonso mpe na mitinda nyonso ya Jéhovah.—Exode 34:10, 11.
Oyo Mibeko Zomi elimbolaki mpo na Yisraele
Ezalaki na libateli na Nzambe nde Bayisraele bakimaki boombo na Ezipito, mpe mpo na bango nkombo na Nzambe ezwaki ndimbola ya sika: Jéhovah akomaki Mobikisi na bango. (Exode 6:2, 3) Na ntina yango, mobeko na misato ezalaki na ndimbola moko spesiale mpo na bango, mpo epekisaki bango kotanga nkombo na Nzambe mpamba.—Exode 20:7.
Kasi ezali boni mpo na mobeko ya minei, oyo etali sabata? Etinda oyo elobelaki makasi ntina ya kozala na limemya mpo na biloko na bulee, yango nde Jéhovah amonisaki liboso ntango atiaki “mokolo na kopema” na likambo litalaki kolokota mana. (Exode 16:22-26) Lokola Bayisraele mosusu batosaki nokinoki te, Jéhovah akundolaki bango malamumalumu etinda yango. “‘Tala! Jéhovah apesi bino sabata.’ (. . .) Bongo bato batosaki sabata mokolo na nsambo.” (Exode 16:29, 30) Na nsima, Jéhovah amonisaki ete ebongiseli yango ezalaki kotalela bobele ye na bango moko ntango alobaki: “Ezali elembo libela kati na ngai na Yisraele.”—Exode 31:17.
Sikawa talela mobeko na zomi, oyo ekokani na mosusu te, oyo epekisaki kolula. Tala mobeko oyo moto moko akokaki kotosisa yango te. Moyisraele mokomoko asengelaki kozongisa monoko epai na Nzambe na ye, Jéhovah, oyo azali kotala motema na mokomoko mpo na kososola mikano na yango.—Exode 20:17; 1 Samwele 16:7; Yilimia 17:10.
Babongolaki likanisi na bango
Yesu Klisto, oyo abotamaki na libota na Yisraele, alobaki na bayekoli na ye ete: “Bokanisa te ete nayei mpo na koboma Mibeko ya Moïse mpe mateya ya basakoli ya Nzambe. Nayei mpo naboma te, kasi mpo nakokisa yango.” (Matai 5:17; Boyokani ya sika) Epai na Baebele baklisto, ntoma Paulo akomaki: “Mibeko mizali bobele elilingi na makambo malingi koya, mizali lolenge na solo na makambo na sembo te.” (Baebele 10:1) Soki ozalaki Moebele oyo abongwanaki kozala moklisto, ndenge nini okokaki kokanga ntina na likebisi oyo? Basangani mosusu na lisangá ya liboso ya boklisto bakanisaki ete bankama na mibeko oyo Nzambe apesaki na nzela na Moïse, elongo na Mibeko Zomi, misengelaki kotosama. Kasi likanisi yango ezali malamu?
Totala oyo ntoma Paulo alobaki na Bayuda oyo bakomaki baklisto na régió ya Galatia: “Biso mpenza tobotami Bayuda, tobotami bapakano mpe bato na masumu te, nde toyebi ete moto akolonga na nzela na Mibeko te kasi na nzela na kondima Klisto Yesu. Biso mpe tosili kondima Klisto Yesu tolongi mpo na kondima Klisto Yesu nde mpo na Mibeko te. Mpo ete moto ata moko te akolonga na Mibeko.” (Bagalatia 2:15, 16) Ya solo, likambo ya kondimama sembo epai na Nzambe ezalaki kotalela botosi ya kokoka mpo na Mibeko na Moïse te, mpo ete likambo yango ekokaki kokokisama soko moke te kati na ezalela ya kozanga kokoka na bomoto. Lisusu ntoma Paulo alobaki ete: “Bango nyonso bataleli misala na Mibeko balakelami mabe, mpo ekomami ete: ‘Moto na moto oyo akotosaka makambo nyonso makomami na mokanda te mpe akosalaka yango te alakelami mabe.’ . . . Klisto asikoli biso na elakeli mabe na Mibeko awa ekomaki ye eloko elakelami mabe mpo na biso.”—Bagalatia 3:10-13
Soki Bayuda oyo bakomaki bayekoli na Yesu bazalaki lisusu na nse na elakeli mabe na Mibeko te, bongo esengisamaki epai na baklisto kotosa mibeko nyonso mipesamaki epai na Yisraele? Ntoma Paulo akomaki epai na Bakolose ete: “[Nzambe] alimbisi biso bikweli na biso nyonso mpe abomi mokanda mokomami na ntina na biso mpo na kokweisa biso. Alongolaki yango na nzela, wana abakisaki yango na nzete na kufa [na Klisto].” (Bakolose 2:13, 14) Ntembe ezali te ete mingi, kati na baklisto ya liboso, babongolaki likanisi na bango mpe bandimaki ete “bakangwaki na Mibeko”. (Baloma 7:6) Wana ezalaki bango na kondima kati na mbeka na lisiko na Yesu, oyo esukisaki Mibeko mpe kobandisa “kondimana ya sika” oyo esakolamaki, bazalaki na elikya ya komonana ete bazali sembo na miso na Jéhovah.—Yilimia 31:31-34; Baloma 10:4.
Oyo Mibeko Zomi milimboli mpo na biso
Na yango, tokoloba ete Mibeko Zomi, oyo ezali eteni na moboko na Mibeko na Moïse, ezali na ntina moko te mpo na baklisto? Ezali bongo te! Atako baklisto bazali lisusu na nse na Mibeko Zomi te, nzokande mizali ntango nyonso kopesa mitinda malamu mingi, lokola mitinda mosusu na Mobeko na Moïse. Na ndakisa, Yesu alobaki ete mibeko mibale mileki monene mizali: kolinga Nzambe mpe mozalani na yo. (Levitike 19:18; Deteronome 6:5; Matai 22:37-40) To lisusu, ntango apesaki toli epai na baklisto ya Rome, ntoma Paulo atangaki mibeko, ya motoba, ya nsambo, ya mwambe mpe ya zomi, nsima abakisaki ete: “Mibeko mobimba mikokisami na liloba moko ete: ‘Olinga mozalani na yo lokola yo moko.’”—Baloma 13:8, 9.
Soki bongo, eteni na Liloba na Nzambe oyo ebiangami Mibeko Zomi ezali na ntina nini lelo? Ezali komonisa lolenge nini Nzambe azali kotalela makambo. (2 Timoté 3:16, 17) Tala ndenge ezali kosalema:
Mibeko minei ya yambo mizali kolobela makasi mikumba na biso liboso na Jéhovah. Engebene mobeko na liboso, na mikolo na biso Nzambe azali kosenga lisusu bokangami ya makasi epai na ye. (Matai 4:10) Engebene mobeko na mibale, moko te na basambeli na ye asengeli kosalela bikeko. (1 Yoane 5:21) Engebene mobeko na misato, tosengeli kosalela nkombo na Nzambe na lolenge ya malamu, ebongi mpe komemya yango mikolo nyonso. (Yoane 17:26; Baloma 10:13) Engebene mobeko na minei, bomoi na biso mobimba esengeli kotongama likoló na makambo na bulee. Mpo na makambo yango, tokoki kopema, to ‘kobatela sabata’, na esika ya kozala na etamboli ya bokosi.—Baebele 4:9 10.
Engebene mobeko na mitano, kotosa baboti ezali ntango nyonso likambo na ntina oyo ezali kobatela bomoko ya libota, mpe ezali komema mapamboli ya Jéhovah. Lisusu, oyo “lilako na liboso lizali na elaka” ezali kopesa elikya kitoko! Ya solo, mobeko yango epesami bobele te mpo ete ‘ezala na yo malamu’, kasi lisusu mpo ‘ete oumela na mokili ntango molai’. (Baefese 6:1-3) Lokola tozali kobika na “mikolo na nsuka” ya biloko mabe na ntango oyo, bilenge oyo bazali kokumisa baboti na bango engebene mokano na Nzambe, bazali na elikya ya koumela seko na mokili.—2 Timoté 3:1; Yoane 11:26.
Bolingo mpo na bazalani ekopekisa biso kosala makambo ya mabe epai na bango lokola koboma (mobeko na motoba), kosala ekobo (mobeko na nsambo), koyiba (mobeko na mwambe) mpe matatoli na lokuta (mobeko na libwa). (1 Yoane 3:10-12; Baebele 13:4; Baefese 4:28; Matai 5:37; Masese 6:16-19) Mpo na oyo etali makanisi na biso na nse ya motema, mobeko na zomi, oyo ekweisi kolula, ezali kokundola biso likambo oyo: Jéhovah alingi ete tozala ntango nyonso na makanisi malamu liboso na ye.—Masese 21:2.
Mibeko Zomi mizali kopesa biso mateya kitoko mpenza! Lokola mitongami likoló na mitinda na bonzambe oyo mikonuna te, tosengeli kotalela yango lokola bokundoli kitoko mpo na mokumba na biso ya kolinga Nzambe mpe bazalani na biso.—Matai 22:37-39.
[Elilingi na lokasa 6]
Kufa na Yesu elimbolaki nsuka na Mibeko na Moïse, elongo na Mibeko Zomi oyo mipesamaki mpo na Bayisraele na ngomba Sinaï.