Biloko na motuna na evanzile na Luka
YESU KLISTO, Mwana na Jéhovah ayebanaki mingi mpo na ezaleli na ye ya kokabola mpasi elongo na bamosusu. Na yango ebongaki ete Luka mokomi na evanzile alobela mingi ezaleli na kokabola mpasi elongo na bamosusu, ezaleli na koyokela bato mawa mpe ezaleli na komipesa mpo na kotalela matomba na bamosusu. Kokomáká bongo na ntina na Bayuda mpe na bapakano, asalaki lisolo moko na kolendisa mpenza mpo na bomoi na Yesu awa na mabelé.
Makambo mosusu na Evanzile oyo mamonisi ete mokomi na yango azali moto ayekola: lolenge na ye ya kobanda, ekomeli na ye ya bato na mayele, to vokabilere mingi na ye oyo esalelami. Yango ekokani na likambo oyo ete Luka azalaki monganga oyo ayekola mingi. (Kol. 4:14) Atako akomaki mondimi nsima na liwa na Yesu, akendaki elongo na ntoma Paulo kino na Yelusaleme nsi- ma na mobembo ya misato ya ntoma lokola misionere. Na yango ezali nde nsima na kokangama na ntoma Paulo kati na engumba mpe kotiama na ye na boloko kuna na Césarée, Luka oyo azalaki molukiluki malamu asangisaki makambo na kotunaka batemwe oyo bamonaki na miso na bango mpe na nzela ya kotanga mikanda ya masolo na bato. (1:1-4; 3:1, 2) Mbala mosusu akomaki evanzile na ye na Césarée na boumeli na mibu mibale oyo ntoma Paulo azalaki na bokolo, ekoki kozala penepene na mobu 56 mpe 58 ya ntango na biso.
Mwa makambo makesenisi yango
Bikamwiseli motoba oyo Yesu asalaki bikomami bobele kati na evanzile na Luka. Bikamwiseli yango bizali oyo: Bokangi mbisi na kokamwisa (5:1-6); kosekwa na mwana mobali na mwasi moko mokufeli mobali na Naina (7:11-15); kobikisama na mwasi moko agumbamaki mokongo (13:11-13); kobikisama na mobali moko oyo azalaki na maladi makovimbisaka nzoto (14:1-4); kopetolama na bato na maba zomi (17:12-14); mpe kobikisama ya litoyi na moombo na nganga monene.—22:50, 51.
Mwa masese mosusu mayebisami bobele na Luka, lokola masese oyo: bato mibale ya nyongo (7:41-47); Mosamalia malamu (10:30-35); Nzete na figi ezangi mbuma (13:6-9); elambo monene na mpokwa (14:16-24); mwana oyo abungaki nzela (15:11-32); Mozwi mpe Lazare (16:19-31); mwasi akufeli mobali mpe mosambisi mabe.—18:1-8.
Makambo mosusu mazali kobenda likebi
Monganga Luka azali na bolingo mingi mpo na basi, bana mpe mibangé. Ezali bobele ye nde moto alobelaki bokomba na Elisabeth, ndenge azwaki zemi mpe kobotama na Yoane, ezali bobele ye nde akomaki lisolo na komonana na anzelu Gabriel epai na Marie. Na nsai nyonso, Luka ayebisi ete Elisabeth ayokaki mwana kopombwa na libumu na ye ntango Marie asololaki na ye. Lisusu ezali Luka nde asololi mpo na kokatama ngenga na Yesu mpe komonisa ye na temple, epai bamonaki Simeona mpe Ana bango nyonso mibale bakomaki mibangé koleka. Na nsuka, ezali kati na evanzile oyo ekomami na Luka nde tozali kozwa bandimbola sikisiki mpo na bomwana ya Yesu mpe ya Yoane Mobatisi.—1:1 kino 2:52.
Kolobelaka mpo na mwasi mokufeli mobali na Naina oyo azalaki na mawa mingi mpo na liwa ya mwana na ye ya mobali bobele moko, Luka alobi sikisiki ete Yesu “ayokelaki ye mawa” mpe azongisaki elenge mobali yango na bomoi. (7:11-15) Likambo mosusu ya kolendisa, ezali oyo ya Zakai, mokolo na bakongoli mpako, lisolo yango ezali bobele na Evanzile na Luka. Zakai, moto mokuse, amataki na nzete mpo na komona Yesu. Akamwaki mingi ntango Yesu ayebisaki ye ete akofanda epai na ye mokolo wana. Luka amonisi ete vizite na Yesu epesaki bolamu mingi epai na moyambi na ye oyo azalaki na esengo mingi.—19:1-10.
Ekomamaki na loboko na monganga
Evanzile oyo ezali na maloba mingi oyo mazali na elobeli ya minganga mpe mazali komonana te, to makomami te na lolenge yango, epai na bakomi mosusu na Makomami na greke na boklisto. Kasi esengelaki komizela na kokuta na elobeli ya minganga lokola mokomi na yango azali monganga.
Na ndakisa, bobele Luka nde alobi sikisiki ete mama ya mwasi na ntoma Petelo azalaki na “fièvre moko makasi”. (4:38, Boyokani ya sika) Alobi lisusu ete: “Mpe mobali moko oyo atondaki na maba!” (5:12) Bakomi mosusu na evanzile batangaki bobele maba na mobali oyo, kasi monganga Luka te, ye amonisi ete maladi yango ekolaki mingi.
Toluka koyeba mwa bizaleli na ntango yango
Luka ayebisi ete nsima na kobotama na Yesu, Marie “azingaki ye na bilamba.” (2:7) Engebene bizaleli na ntango yango, bazalaki kosokola mpe kopakola mongwa na nzoto ya mwana abotami sika, mbala mosusu mpo na kokausa mpe koyeisa mposo makasi. Mpe bazalaki kozinga ye mwa moke lokola bazalaki kosala na nzoto ya mowei, kati na bilamba oyo ezalaki petepete mpe molai. Bazalaki bongo kobatela nzoto ezala alimá mpe na moto. Na kozingaka mwana nzoto mobimba tii na motó, kotika bobele elongi, ezalaki mbala mosusu mpo na komesenisa mwana apemaka na nzela ya zolo. Komantere moko na ekeke ya 19 oyo ezali kolobela mpo na ezaleli motindo oyo ezali kotanga likambo moto moko amonaki oyo akendaki na Bethléhem: “Namemaki mwana moko moke kati na maboko na ngai. Nzoto na ye ezalaki makasi wana elingamaki kati na elamba ya petepete ya pembe mpe motane. Maboko na makolo ekangisamaki na nzoto, mpe motó na ye ezipamaki na elamba ya motane mpe ya petepete oyo etikaki bobele elongi.”
Evanzile oyo ekomami na Luka emonisi biso lisusu bizalelli bitali kokunda bato na ekeke na liboso. Yesu azalaki penepene na porte na mboka Naina, wana amonaki ete “bazali komema mokufi na libanda, ye mwana bobele moko na mama na ye (mokufeli mobali)”, mpe “ebele monene na bato na mboka bazalaki na mwasi elongo.” (7:11, 12) Ya solo, kokunda bibembe ezalaki kosalama libanda na mboka, mpe baninga na mowei bazalaki komema ebembe kino na nkunda. Sanduku na ebembe ezalaki lokola mbeto, mbala mosusu esalamaki na kekele, esimbamaki na banzete oyo mibali minei bakokaki kokumba yango na mapeka na bango mpo na kokenda na esika ya kokunda elongo na bato mosusu bazali kolanda yango na kotambolaka malembe.
Kati na lisese mosusu oyo Luka akomi, Yesu alobelaki mpo na mobali moko oyo miyibi babetaki ye makasi mpe Mosamalia moko ya motema malamu ‘akangaki bampota na ye mpe asopaki mafuta mpe na vinyo na kati na yango’. (10:34) Lolenge oyo ya kosalisa bampota ezalaki kosalelama mingi. Mafuta na olive ezalaki kolembisa mpe kokitisa mpasi na mpota. (Yisaya 1:6) Kasi mpo na vinyo, mokanda moko na monganga (The Journal of the American Medical Association) elobi boye: “Na Grèce vinyo ezalaki nkisi oyo esalelamaki mingi. (. . .) Hippocrate de Cos (460-370 liboso na ntango na biso.) (. . .) azalaki kosalela mingi vinyo, mpe azalaki kosalela yango mpo na kosokola bampota, kokitisa fièvre, kolekisa libumu mpe kosokola masuba.” Kati na lisese na ye, Yesu amonisi ete vinyo ezali na makoki ya koboma bamikrobe mpe kosokola mpota, mpe makoki oyo mafuta na olive ezali na yango mpo na kobikisa. Ya solo, liteya na lisese oyo ezali ete tokomimonisa solo moninga ya mozalani soki tozali na bizaleli na koyokela bato mawa. Ezali lolenge oyo nde tosengeli kosalela bazalani na biso.—10:36, 37.
Mateya na komikitisa
Bobele Luka nde ayebisaki lisese oyo kati na yango Yesu amonisi babiangami oyo bazalaki koluka esika na lokumu na elambo. Na kala, na ntango ya elambo, babiangami bazalaki kofanda ya kolala likoló na bakiti minene (divans) oyo ezalaki zingazinga na mesa na ngambo misato na yango, kotikaka bongo ngambo ya minei polele mpo ete basali bakoka koleka. Mbala mingi, kiti moko ezalaki kozwa bato misato, moko na moko azalaki kotala liboso na mesa, kopikaka libolongo ya loboko na ye na mwasi mpe koliaka na loboko na mobali. Engebene esika oyo efandaki ye na kiti, mobiangami azalaki na esika na lokumu mingi, na lokumu moke to esika na nsuka. Oyo azwaki esika na nsuka na kiti ya misato azalaki kozwa bilei na nsima. Yesu alobaki: ‘Soko obiangami na elambo kenda kofanda na yo na kiti na nsima mpe mobiangami na yo akoloba na yo ete: “Moninga leka kuna na liboso.” Bongo lokumu ekozala na yo na miso na bato nyonso bazali kolya na yo elongo.’ (14:7-10) Ya solo, tozala na komikitisa kozanga ete tomitombola liboso na bamosusu. Nkutu, na koyebisaka liteya na lisese, Yesu alobaki: “Moto nyonso oyo akomikumisa akokitisama, mpe oyo akomikitisa akokumisama.”—14:11.
Liteya mosusu na komikitisa, oyo ezali lisusu bobele na Evanzile na Luka, ezali lisese oyo kati na yango Yesu amonisi mokongoli na mpako moko mpe Mofalisayi, bango nyonso mibale bazali kobondela na kati na temple. Kati na makambo mingi malobamaki, Mofalisayi alobi: “Nakokilaka mbala mibale poso na poso.” (18:9-14) Mobeko esengaki kokila bobele mbala moko na mbula (Lévitike 16:29), kasi Bafalisayi bakendeki mosika na mobeko oyo. Mobali na lisese azalaki kokila mokolo na mibali na poso, mokolo oyo ekanisami ete Moïse amataki na ngomba Sinaï mpo na kozwa mabanga mibale na Litatoli. Elobami ete ekoki kozala akitaki na ngomba mokolo na mitano na poso. (Exode 31:18; 32; 15-20) Mofalisayi atangaki kokila na ye mbala mibale na poso mpo na kolakisa ete azalaki kosambela Nzambe. Kasi lisese oyo esengeli kopusa biso tozala na komikitisa, kasi komilakisa te lokola Bafalisayi.
Biloko na motuya oyo na Evanzile na Luka bizali koyeisa yango mokanda oyo ekeseni na misusu mpe etondi na mateya mingi. Makambo oyo makomami kati na mokanda yango mazali kokundola biso makambo ya ntina mingi ya bomoi na Yesu awa na mabelé. Evanzile oyo ezali mpe kosalisa biso ete toyeba bizaleli mosusu ya ntango wana. Kasi, mingimingi, tokomizwela matomba soki tolandi mateya matali koyokela bato mawa mpe komikitisa oyo mamonisami malamu kati na Evanzile na Luka, monganga molingami.