Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/11 nk. 18-20
  • Ozalaka na boboto epai ya basusu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozalaka na boboto epai ya basusu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokomi mpe misionɛrɛ
  • Ndenge oyo azwaki makambo oyo akomaki
  • Moninga ya mokangami
  • Mokanda ya Biblia nimero 42—Luka
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • “Leká na masedonia”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Mokanda ya Biblia nimero 44​—Misala
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Théophile ya Antiɔkia azalaki nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/11 nk. 18-20

Luka​—Molingami mpe moninga ya mosala

LUKA ayebaki ete azalaki na likama lokola azalaki moninga ya ntoma Paulo, oyo azalaki mokangami mpo na kondima na ye. Emonanaki ete bakokaki kokatela Paulo etumbu ya liwa. Kasi, na ntango wana ya mpasi, Luka azalaki elongo na ntoma Paulo. Ezalaki na Loma, na mobu 65 ya ntango na biso (T.B.).​—2 Timote 4:6, 11.

Bato oyo batángaka Biblia bayebi nkombo Luka mpamba te ye nde akomaki Evanzile ya Luka. Luka asalaki mibembo mingi elongo na Paulo; kutu ntoma yango abengaki ye “monganga molingami” mpe ‘moninga ya mosala.’ (Bakolose 4:14; Filemona 24) Biblia elobi makambo mingi te mpo na Luka; etángi nkombo na ye kaka mbala misato. Nzokande, soki otaleli makambo oyo Biblia elobi mpo na Luka, na ntembe te yo mpe okomona ntina oyo Paulo azalaki kosepela na moklisto yango ya sembo.

Mokomi mpe misionɛrɛ

Evanzile ya Luka mpe mokanda ya Misala ya Bantoma etindamaki epai ya Teofili, yango emonisi ete Luka nde akomaki mikanda yango oyo epemami na Nzambe. (Luka 1:3; Misala 1:1) Ata na esika moko te Luka elobi ete azalaki elongo na Yesu ntango azalaki awa na mabelé. Kasi, alobaki ete makambo oyo akomaki, azwaki yango epai ya bato oyo bamonaki yango na miso mpe ‘alandelaki makambo nyonso malamumalamu uta na ebandeli.’ (Luka 1:1-3) Na yango, ekoki mpenza kozala ete Luka akómaki moyekoli ya Klisto nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B.

Bato mosusu bamonaka ete Luka azalaki moto ya Antiokia ya Sulia. Balobaka ete mokanda ya Misala elobeli na molai makambo oyo esalemaki na engumba yango mpe elobi ete moko kati na “mibali nsambo ya lokumu ya malamu” azalaki “prozelite moko ya Antiokia”; nzokande elobeli te bingumba ya bamosusu. Ya solo, tokoki koloba te ete lolenge oyo Luka alobeli Antiokia ekoki mpo na kondimisa biso ete azalaki moto ya engumba yango.​—Misala 6:3-6.

Atako mokanda ya Misala etángi nkombo ya Luka te, na bavɛrsɛ mosusu asaleli maloba lokola “biso” mpo na komonisa ete azalaki ntango makambo mosusu ezalaki kosalema. Ntango Luka alobelaki mobembo oyo Paulo asalaki ná baninga na ye na Asie Mineure, alobaki boye: “Balekaki pene na Misia mpe bakitaki na Toloasi.” Na Toloasi, Paulo azwaki emonaneli ya moto moko ya Masedonia oyo abondelaki ye ete: “Leká na Masedonia kosalisa biso.” Luka abakisi boye: “Nzokande na ntango kaka amonaki emonaneli wana, tolukaki nzela ya kokende na Masedonia.” (Misala 16:8-10) Lokola Luka akómaki kosalela maloba “biso” emonisi ete akɔtaki na molɔngɔ ya baninga ya Paulo banda na Toloasi. Kobanda wana, Luka asalelaki liloba “biso” mpo na kolobela mosala ya kosakola na Filipi; yango emonisi ete ye mpe asanganaki na yango. Akomaki boye: “Na mokolo ya sabata tobimaki na libándá ya ekuke pembeni ya ebale moko, epai tozalaki kokanisa ete esika ya mabondeli ezalaki; mpe tofandaki mpe tobandaki koloba na basi oyo bayanganaki.” Nsima na yango, Lidia mpe bato nyonso ya libota na ye bandimaki nsango malamu mpe bazwaki batisimo.​—Misala 16:11-15.

Bakutanaki na botɛmɛli na Filipi, epai Paulo abikisaki mwana mwasi moko oyo azalaki kosakola makambo ekoya na lisalisi ya “demo moko ya kosakola makambo oyo ebombamá.” Ntango bankolo na ye bamonaki ete elikya na bango ya kozwa mbongo ebebi, bakangaki Paulo ná Silasi; na nsima bamisionɛrɛ yango babɛtamaki mpe babwakamaki na bolɔkɔ. Emonani ete Luka akangamaki te, mpamba te amonisi te ete ye mpe azalaki kati na bango. Ntango babimaki na bolɔkɔ, “[Paulo ná Silasi] balendisaki [bandeko] mpe bakendaki.” Luka asalelaki lisusu liloba “biso” mwa mosika, ntango Paulo azongaki lisusu na Filipi. (Misala 16:16-40; 20:5, 6) Ekoki kozala ete Luka atikalaki na Filipi mpo na kotambwisa mosala ya kosakola.

Ndenge oyo azwaki makambo oyo akomaki

Ndenge nini Luka azwaki makambo oyo akomaki na Evanzile na ye mpe na mokanda ya Misala? Lokola Luka asaleli liloba “biso” na masolo mosusu ya mokanda ya Misala, emonisi ete asalaki mobembo elongo na Paulo banda na Filipi tii na Yelusaleme, epai bakangaki lisusu ntoma Paulo. Na mobembo yango, Paulo ná baninga na ye balekisaki mwa mikolo na Kaisalia elongo na Filipo mopalanganisi ya nsango malamu. (Misala 20:6; 21:1-17) Ekoki kozala ete Luka ayebaki ndenge oyo nsango malamu ekɔtaki na Samalia na nzela ya Filipo, moto ya liboso oyo asakolaki kuna. (Misala 8:4-25) Kasi, banani bayebisaki Luka makambo mosusu?

Na ntembe te, na boumeli ya mbula mibale oyo Paulo alekisaki na bolɔkɔ na Kaisalia, Luka azwaki libaku ya kolukaluka makambo mpo na kokoma evanzile na ye. Kaisalia ezalaki mosika te na Yelusaleme, epai Luka akokaki kotánga mikanda oyo elobeli molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu. Luka akomaki makambo mingi ya bomoi mpe mosala ya Yesu oyo baevanzile mosusu elobeli te. Moto moko ya mayele atángaki makambo soki 82, oyo ezali kaka na Evanzile ya Luka.

Ekoki kozala ete Elizabeti, mama ya Yoane Mobatisi, nde ayebisaki Luka lisolo ya kobotama ya Yoane. Mbala mosusu mpe Luka ayebaki lisolo ya mbotama mpe bomwana ya Yesu epai ya Malia, mama ya Yesu. (Luka 1:5-80) Ekoki kozala ete ayokaki lisolo ya ebele ya mbisi oyo bayekoli bakangaki na ndenge ya likamwisi epai ya Petelo, to Yakobo, to Yoane. (Luka 5:4-10) Masese mosusu ya Yesu ezali kaka na Evanzile ya Luka; na ndakisa lisese ya Mosamalia ya motema malamu, ya ekuke ya moke, ya dalakima ya ebende, ya mwana ya kilikili, mpe ya mozwi mpe Lazalo.​—Luka 10:29-37; 13:23, 24; 15:8-32; 16:19-31.

Luka azalaki kosepela mingi na bato. Alobelaki mbeka oyo Malia apesaki mpo na kopɛtolama, lisekwa ya mwana ya mwasi moko oyo akufelá mobali, mpe mwasi oyo apakolaki makolo ya Yesu mafuta. Luka atángi bankombo ya basi oyo bazalaki kosalela Klisto mpe alobi ete Malata ná Malia bayambaki Yesu epai na bango. Evanzile ya Luka elobeli mpe kobikisama ya mwasi moko oyo agumbamá mpe ya mwasi oyo azalaki na maladi oyo evimbisaka nzoto, mpe ya kobikisama ya bato 10 oyo bazalaki na maba. Luka alobeli mpe Zakai, mobali moko ya mokuse oyo amataki na nzete mpo amona Yesu, mpe mosali-mabe oyo abongolaki motema, oyo babakaki na nzete pembeni ya Klisto.​—Luka 2:24; 7:11-17, 36-50; 8:2, 3; 10:38-42; 13:10-17; 14:1-6; 17:11-19; 19:1-10; 23:39-43.

Evanzile ya Luka elobeli mpe ndenge oyo Mosamalia ya motema malamu akangaki bampota ya moto oyo asalisaki. Na ntembe te, lokola Luka azalaki monganga, yango wana alobelaki biloko oyo Mosamalia asalelaki; alobi ete Mosamalia asopaki vinyo na mpota yango, apakolaki yango mafuta, mpe akangaki yango bande.​—Luka 10:30-37.

Moninga ya mokangami

Luka azalaki komibanzabanza mpo na ntoma Paulo. Ntango Paulo azalaki na bolɔkɔ na Kaisalia, Guvɛrnɛrɛ Felikisi apesaki mitindo ete ‘bápekisa ata moko te ya bato ya Paulo kosalela ye.’ (Misala 24:23) Emonani ete Luka azalaki kati ya bato oyo bazalaki kosalela Paulo. Lokola Paulo azalaki ntango nyonso nzoto kolɔngɔnɔ te, ekoki kozala ete “monganga molingami” azalaki kopesa ye nkisi.​—Bakolose 4:14; Bagalatia 4:13.

Ntango Paulo asɛngaki akende kosamba epai ya Kaisala, Guvɛrnɛrɛ Fesitusi atindaki ntoma yango na Loma. Luka azalaki elongo na Paulo na mobembo molai wana tii na Itali mpe akomaki ndenge masuwa na bango ezindaki. (Misala 24:27; 25:9-12; 27:1, 9-44) Paulo akomaki mikanda mingi na ndako oyo azalaki kofutela ntango azalaki mokangami na Loma, mpe alobelaki Luka na mikanda mibale. (Misala 28:30; Bakolose 4:14; Filemona24) Baumelaki kuna mbula mibale mpe ekoki mpenza kozala ete Luka akomaki mokanda ya Misala na eleko yango.

Makambo mingi etali mosala ya Nzambe ezalaki kosalema na ndako ya Paulo na Loma. Kuna, Luka ayebanaki na baninga mosusu ya Paulo, na ndakisa Tisike, Alisitake, Malako, Yusutusi, Epafalasi mpe Onezime.​—Bakolose 4:7-14.

Ntango Paulo akangamaki mpo na mbala ya mibale, amonaki ete bakoboma ye; Luka amonisaki bosembo mpe mpiko na ndenge azalaki elongo na Paulo atako basusu basundolaki ye. Luka atikaki Paulo te atako azalaki na likama ete bákanga mpe ye. Mbala mosusu Luka azalaki mokomeli ya Paulo, ekoki kozala ete ye nde akomaki maloba oyo: “Kaka Luka nde azali elongo na ngai.” Masolo ya kala elobaka ete mwa moke na nsima, bakataki Paulo motó.​—2 Timote 4:6-8, 11, 16.

Luka azalaki na elimo ya komipimela mpe ya komikitisa. Azalaki komikumisa te mpo na bakelasi oyo atángaki mpe abendaki likebi likoló na ye te. Akokaki komipesa na mosala na ye ya monganga, kasi aponaki kotya Bokonzi na esika ya liboso. Na ndakisa ya Luka, tiká tómipesa na kosakola nsango malamu mpe kosala na komikitisa nyonso mpo na nkembo ya Yehova.​—Luka 12:31.

[Etanda na lokasa 19]

TEOFILI AZALAKI NANI?

Luka akomaki evanzile na ye mpe mokanda ya Misala mpo na Teofili. Na evanzile, abengi ye “Teofili moto ya lokumu mingi.” (Luka 1:3) “Moto ya lokumu mingi” ezali titre oyo bazalaki kopesa bato ya mbongo mpe bakonzi ya Baloma. Ntango ntoma Paulo asololaki na Fesitusi, guvɛrnɛrɛ ya Yudea, abengaki ye na titre ya ndenge wana.​—Misala 26:25.

Emonani ete Teofili ayokaki nsango malamu ya Yesu mpe asepelaki na yango. Luka azalaki na elikya ete evanzile yango ekosalisa Teofili ‘ayeba mpenzampenza bosolo ya makambo oyo bateyaki ye na monɔkɔ.’​—Luka 1:4.

Richard Lenski, moto moko ya mayele na monɔkɔ ya Grɛki, amonisi ete ekoki mpenza kozala ete Teofili azalaki naino mondimi te ntango Luka abengaki ye “moto ya lokumu mingi,” mpamba te “na mikanda nyonso ya boklisto, . . . ata moklisto moko te abengami na titre ya ndenge wana.” Na nsima, ntango Luka akomaki mokanda ya Misala, abengaki ye lisusu “moto ya lokumu mingi” te, kasi akomaki kaka ete: “E! Teofili.” (Misala 1:1) Lenski abakisi boye: “Ntango Luka akomelaki Teofili evanzile na ye, mobali yango ya lokumu azalaki naino moklisto te, kasi azalaki kaka kosepela na mateya ya boklisto; nzokande, ntango Luka atindelaki ye mokanda ya Misala, Teofili asilaki kokóma mondimi.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto