Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/2 lok. 29
  • Mituna na batangi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna na batangi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masolo mosusu
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Ozali na likanisi ya Nzambe na ntina na masanga?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Bokatikati na likambo etali komɛla masanga
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mbuma oyo etamboli mokili mobimba
    Lamuká!—2006
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/2 lok. 29

Mituna na batangi

◼ Moklisto asengeli koboya komela cafe to ti, mpo ete yango ezali na cafeline, oyo ekoki kolagwisa?

Biblia ezali kolobela mpo na cale to mpo na ti te. Nzokande, mitinda yo mizwami na kali na yango mikoki kosalisa moklisto ete azwa ekateli soko akomela to akomela le café to ti.

caféine ekoki kolangwisa mpe kozala na bopusi likolo na makanisi mpe na nzoto. Mokolo na mokolo bato bazali komela bamilio na bakopo na café mpe ti. likambo yango nde epusaki docteur Melvin Konner koloba ete caféine “ezali mbala mosusu eloko na kolangwisa oyo bomeli na yango epalangani mingi koleka kati na mokili”. Ekoki kosala ete moto azua mpɔngi te, kobakisa makasi to adrénaline mpe kosala ete motema ebeta mbangu. kopesa mbongwana na makambo mosusu kati na nzoto. Lokola caféine ezali eloko ekoki kolangwisa ezali yango te nde ekosala ete moklisto aboya bimeli nyonso oyo ezali na caféine na kati, ezala bimeli lokola cafe, ti, coca to pepsi, maté (ezali lolenge moko ya ti) to bilei lokola chocolat.

Alcool ezali mpe eloko oyo elangwisaka, kasi Makomami malobi nini mpo na yango? Biblia endimi ete vinyo (to masanga mosusu oyo mazali na alcool) ekoki kosepelisa motema na moto’ to ezali kolendisa moto oyo azali na mawa mingi. (Nzembo 104:15; Masese 31:6, 7) Nzokande, Liloba na Nzambe elobi te ete basambeli nyonso na losambo ya solo basengeli koboya masanga nyonso oyo mazali na alcool. Oyo ezali kokweisa ezali nde komela masanga yango na kolekisa ndelo. oyo ezali bongo molangwa.​—Deteronome 21:18-21; Masese 20:1: Hosea 4;11; 1 Bakolinti 5:11-13; 1 Petelo 4:3.

Bato mosusu bazali koloba ete moto akoki kozala moombo ya caféine, Tokoloba nini mpo na yango? Mingi kati na baoyo bazali na momesano ya komela café. ti to maté bazali kokolisa mwa ezalela ya kolinga yango mingi, atako naino eyebani te soki ezali boombo ya solo engebene minganga. Ata bongo bazali koyoka ete bazangi eloko (bazali kooka mpasi na moto to koyoka mposa ya kosanza), soki bameli naino kopo na bango ya cafe te to ya ti te ndenge bameseni. Wana mpe, tomikundola oyo Biblia ezali koloba mpo na masanga oyo mazali na alcool. Atako bato mingi bakomi balangwi ya solo ya masanga, epekisami na baklisto te komela masanga na bokatikati. Yesu amelaki vinyo, mpe asalaki vinyo na ekamwiseli na ntango ya elambo na libala.​—Matai 26:29; Yoane 2:3-11.

Ekoki kozala ata bongo ete moklisto amoni ete ezali likama mpo na ye noki akokoma moombo na caféine. Soki akomi na ezaleli ya kosilika mpo azangi kopo ya care to ya ti oyo amesani komela, akomitalela mbala mosusu ete, mpo na ye, koboya yango ezali komonisa ’’komipekisa”. (Bagalatia 5:22, 23.) Lokola Biblia ezali kosɛnga te koboya masanga oyo mazali na caféine. ezali likambo litali moto ye moko mpo na kozwa likatami soki akomela to akomela te cafe to ti. Kasi, moklisto oyo akomelaka yango asengeli kozala na bokatikati.​—Tala Tito 2:2.

Ezali mpe ntina kozala na komipekisa soki moto alingi kopengola makama oyo makoki koyela ye mpo na bokono. Mingimingi bato bazali kozua maladi mpo bazali komela mingi mpe ntango nyonso biloko oyo ezali na boike mingi ya caféine (na nzela ya komelaka cafe, ti, bimeli oyo bisalami na cola to bimeli mosusu to bilei). Nzokande, mpo na bolukiluki nyonso oyo ezali kotalela makama oyo caféine ezali koyeisa bolukiluki mosusu ezali komonisa ete ezali bongo te.

Likambo oyo ete ezali likanisi malamu kozala na bokatikati to komipekisa elobelami makasi na Biblia mpo na mafuta na nzoi. Bilei oyo epesaka makasi na nzoto. ezali malamu, mpe kolya yango ezali malamu lokola kasi yango ekeseni na kobenda milinga. (1 Samwele 14:26, 27; Matai 3:4) Nzokande, moto akoki kobela maladi soki alei mafuta na nzoi mingi. Biblia ezali kopesa likebisi oyo: ’’Omoni mafuta na nzoi? Lia ndambo na yango oyo ekoki na yo ete otonda na yango te mpe osanza yango te.”​—Masese 25:16, 27.

Bato mosusu bazali oyo bakoki kolia mafuta na nzoi soko moke te. Bobele bongo, bato mosusu basengeli koboya alcool. caféine. miliki to bilei mosusu mpe masanga mpo na bokono na bango. Bato mosusu bamoni malamu koboya komela yango to kolia yango na likatami na bango moko to mpo na lolenge oyo biloko yango bizali kotalelama na esika oyo bango balandi mpo bakoka kobɛtisa bato libaku te. Likatami na bango lizali kokundola biso maloba oyo na ntoma Paulo: ‘Soko bilei bizali libaku epai na ndeko na ngai, ngai nakolia mosuni lisusu soko moke le ete nabensa ndeko na ngai libaku te.”​—1 Bakolinti 6:13.

Mpo na yango, ezali malamu ete moko na moko asala engebene ekateli na ye, kozanga kopusa bamosusu ete balanda likatami na ye. Ntoma Paulo akomaki: “Tika te ete molei atiola ye oyo aboyi kolia; tika mpe te ete ye oyo akokilaka afunda ye oyo azali kolia mpo ete Nzambe ayambi ye. Yo ozali nani wana akosambisaka mosali na moto mosusu?”​—Baloma 14:3, 4.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto