Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/2 lok. 28
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Bokosi na ntina ya mikuwa”
  • “Maboko matɔndi na makila”
  • “Na Kaisala biloko na Kaisala”
  • Tópesa na Kaisala biloko na Kaisala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • “Bófuta mpako epai na baoyo bakoki kozwa mpako”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Ezali mpenza kozanga bosembo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/2 lok. 28

Makambo mazali koleka na mokili

“Bokosi na ntina ya mikuwa”

Ezali na titre oyo nde Le Monde, zulunalo moko ya France oyo abimaka mokolo na mokolo, emonisaki likambo ya paléontologue indien (moto moko ya lnde oyo ayekolaka mikuwa) oyo, ’’uta mibu 20 . . . azalaki kokosa baninga na ye likoló ya esika oyo ye ezalaki kozwa mikuwa oyo mizalaki ya kopesa bango ete bayekola yango.’’ Balobi ete ’lokuta” yango ezalaki oyo ete, azalaki kotindela bango mikuwa oyo azalaki kozwa na Etats​—Unis, na Afrika, na Tchécoslovaquie mpe na Grande-Bretagne, bongo azalaki koloba ete euti na bangomba ya Himalaya. Moto yango na sianse asili kokoma mikanda mingi koleka 300 likoló na mikuwa oyo mizalaki ye kokundola. Ezali bongo paléontologue moko ya Australie nde ayei komonisa frode yango kati na zulunalo Nature, zulunalo moko ya Grande-Bretagne. Amitunaki boye ete: “Ndenge nini bokundoli na biloko na lokuta etyamaki ntembe na bato na sianse te na boumeli na ntango molai?”

Engebene zulunalo Le Monde, tokoki kolimbola likambo yango boye ete, mingi kati na bato ya sianse baboyaka kobimisa mabombami Engebene lisolo wana ya zulunalo Le Monde. “lokuta’’ yango na ntina na mikuwa ebebisi “pene na makambo nyonso oyo bakundoli na ntina na mabelé na Himalaya [na mibu 20 oyo euti kolekal ekoka kosalelama te’’.

Solo, likambo oyo ya frode kati na sianse ezali kotinda biso te na kotalela bato nyonso ya sianse na lolenge yango. Nzokande, yango ezali lisusu kopesa elembeteli ete, ntango makanisi ya paléonthologie (boyekoli ya mikuwa) atelemeli bosolo na makambo mazwami na Biblia, mbala mingi yango ezalaka bobele “makanisi na bongolabongola na oyo ezali bango kobenga ’Sianse’ to ‘Boyebi’, kasi ebongi na nkombo yango te”, engebene maloba ya ntoma Paulo.​—1 Timoté 6:20, libongoli ya Kuen.

“Maboko matɔndi na makila”

Na colombie, bato minene oyo ba zwi mbongo mingi na nzela ya drogue bazali kozwa bilenge mibali na mosala mpo na koboma banguna lo mpo na kobangisa bale ya politike mpe bato nyonso. Ntango atunamaki na bapanzi nsango ya Tiempo, zulunalo oyo ebimaka mbala moko na poso na mboka colombie, moko na ba sicarios elingi koloba babomi oyo bazali kofutama mpo na yango. alobaki ete ‘ezali mpenza mpasi na kokanga motema mpo na koboma moto’. Ndenge nini bamilembisaka lisosoli na bango? Tala oyo ezali ye kolimbola: “Nayebi ete kati na mibeko na Nzambe, ezali na mobeko oyo epekisi koboma moto. Kasi ngai nasengeli koboma mpo na kozwa mosolo ya kobikela. Nazali koboma kozanga komilongisa kati na lisosoli na ngai, mpamba te nazali na mposa na mosolo yango. Bozali koyeba te ete nazali kosala mosala mpo ete esengeli kobika malamu na lolenge mokolo mosusu? . . . Liboso na kokende koboma moto moko, nabondelaka Nzambe mpe Ngondo Maria ete babatela ngai.”

Tozali na ntembe te ete bateolojié katolike bakondima motindo na maloba wana ya komilongisa te. Atako bongo, bakonzi na mangomba balongisaki etumba na bibundeli na komonisaka yango “lokola nzela oyo ebongi mpo na kosilisa monyoko oyo moleki ndelo mpe mozalaki koumela”. Soko batéolojie bazali kolongisa mobulu oyo mosalemi mpo na kotemela bokesene bouti na politike, tosengeli kokamwa lisusu ete bakatolike mosusu, lokola sicario wana. balongisa kobomama ya bato likoló na bokesene oyo bouti na nkita? Oyo nde likama bobele kosilisa ngenga ya Liloba na Nzambe!

Na butu oyo bokesene makasi bolingaki kosalema na kokangama na Yesu Klisto, na kosambisama mpe kobomama na ye, Yesu aboyaki kosala ata lolenge nini na mobulu Alobaki na Petelo boye ete: “Baoyo nyonso bakosimba mopanga, bakokufa na mopanga.” (Matai 26:52.) Ndenge nini bato oyo bazali kosala mobulu bakoki mpenza kolikya ete Nzambe Mozwi-na-Nguya​—Nyonso ayoka bango na mabaku motindo wana, nzokande esakweli ya Yisaya elobi mpenza boye: ’‘Ata bokobondela mabondeli mingi mpenza nakoyoka te. Maboko na bino matɔndi na makila.”​—Yisaya 1:15.

“Na Kaisala biloko na Kaisala”

Koboya kofuta mpako ezali ezalela ekoli makasi na mikili mingi. Ndakisa na Espanye, zulunalo El Diario Vasco ezali komonisa ete bato oyo bazali kosomba mpe kotekisa balopango bazali ntango nyonso kokosa likoló ya ntalo oyo balekisaki to basombaki. Nzokande mosombi mpe moleki bakoyokana mpo na kotya ntalo ya moke kati na mokanda oyo mozali kolakisa ete eloko yango esombami. Ntango bakofutisa mpako, taxe ekofutama na kotalelaka motuya mokomami kati na recu ya lopango. Zulunalo EI Diario Vasco ayebisi maloba ya José Maria Segura Zurbano. mokongoli na mpako oyo alobaki ete, ata basangani mpenza te na lokuta wana, na ntango bakomaka motuya oyo eloko esombami, bakongoli na mpako bayebaka mpenza ete ntalo boye epesami ezali solo te. Nzokande Zurbano alongoli bato mosusu na misala wana: “Na mboka mobimba bato nyonso bazali kokosa, longola bobele ba Témoins de Jéhovah. Wana ezali bango kosomba to koteka eloko, motuya oyo mozali bango kopesa ezali mpenza solo.”

Ba Témoins de Jéhovah bayebani na lolenge na bango ya koloba solo mpe na kosala na bosembo. Bayebi boye ete Jéhovah Nzambe alingi ete bamonisa bizaleli yango na makambo nyonso matali kosomba mpe kotekisa Nzambe ezali koyina ”lolemo na nkuta” mpe “motatoli na lokuta oyo ekolobaka maloba na sembo te”. Mpo na oyo etali kofuta mpako. Yesu Klisto asili kopesa motinda epai na bayekoli na ye ya solo. oyo ete: “Bopesa na Kaisala biloko na Kaisala. mpe na Nzambe biloko na Nzambe.”​—Masese 6:6-19; Malako 12:17.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto