Kimya na mokili ekolimbola mpenza nini?
KIMYA na mokili mobimba na lolenge Nzambe azali kotika bitumba te to kotika kosala bibundeli ya nikleere te. Yango euti na kokanisa yango, ezali bobele lolenge oyo Biblia ezali kosalela liloba “kimya”.
Na ndakisa kati na Makomami na liebele (“Kondimana na Kala”). liloba na liebele mpo na kimya ezali shalom. Liloba oyo ekokani na yango esalelami na Genese 37:14, epai kuna nkoko na mabota Yakobo asengi na mwana na ye Yozefe ete: “Kenda kotala soko bandeko na yo bazali nzoto malamu mpe soko etonga ezali malamu, mpe ozonga na nsango epai na ngai’.”a Shalóm esɛlelami lisusu na Genese 41:16, epai kuna ebongolami na liloba “kozala malamu”.
Na yango, lolenge Biblia ezali kosalela liloba yango, kimya ya solo ezali bobele kotika koboma te, kasi etaleli lisusu kolongono malamu ya nzoto, kobatalema malamu, kozala malamu. Nimero ya Mosenzeli oyo euti koleka emonisaki ete bato bazali na makoki te ya kotya kimya. Ezali bobele Yesu Klisto, ’’Nkolo na kimya” nde akokoka makambo nyonso mpe akotya kimya ya solo na mabelé. (Yisaya 9:6, 7). Na ndakisa tala oyo Biblia esakoli na Nzembo 72:7, 8 mpo na boyangeli na ye: “Na mikolo na ye, moyengebene akozala malamu, kimya mpe ekoyikana na ntango nyonso ekoumelaka sanza. (Bato oyo akoyangela MN) bakozala longwa na mai monene epai moko bobele na mai monene epai mosusu, longwa mpe na ebale kino ndelo na mokili mpenza.” Kanisa mwa moke: kolongono malamu ya nzoto, libateli mpe kozala elamu na mokili mobimba! Boyokani moko ya politike ekoki kokokisa likambo oyo soko moke te. Bobele Bokonzi na Nzambe nde ekoki yango, mpe ekokokisa makambo mosusu koleka. Biblia ezali na bisakweli na kosepelisa oyo ezali komonisa biso ndenge kimya ekozala na mokili mobimba. Totalela bamoko na bisakweli yango.
Lolenge Nzambe akolongola bibundeli!
Nzembo 46:8, 9 (MN) elobi: “Boya kotala misala na Jéhovah oyo asali bikamwiseli kati na mokili. Ye asilisi bitumba kino nsuka na mokili. Abukibuki litimbo mpe akatikati likonga; atumbi mpe makalo kati na móto.” Maloba “litimbo”, “likonga” mpe “makalo (chars)” ezali elilingi ya bibundeli to ba machine ya lolenge nyonso na bitumba Na yango, Jéhovah akosala oyo eleki kokitisa motuya na bibundeli to kosilisa bibundeli nyonso. Mpo na ye akolongola mpo na libela bibundeli ya nikleere, ba canons, ba tanks, ba lance—misiles, ba grenades, ba bombes au plastic, minduki mpe ba pistolets; nyonso oyo ekoki mpenza kolongola kimya na mokili!
Nzokande, ezali te bibundeli yango moko nde ezali kobimisa bitumba. Yango ebimaka mingimingi mpo na ezaleli ya koyina, ya lokoso mpe ya mobulu oyo ya bato na kozanga kokoka. (Tala Yakobo 4:1-3). Na yango, Bokonzi na Nzambe ekolongola makambo oyo ezali mpenza kobimisa bitumbu na kosilisáká makanisi wana mabe epai na bato. Ndenge nini? Na nzela na ebongiseli ya koteya kati na mokili mobimba. “Mokili ekotonda na boyebi na Jéhovah lokola mbonge ekozipaka mai—na—monana.”—Yisaya 11:9.
Na yango, wana “bakolakisama na Jéhovah”, bato bakozala lisusu na bokabwani na mposo te, oyo ezali ntina na matata, na koyina mpe na kotyola bamosusu. (Yoane 6:45). “Nzambe akokabolaka bato te” mpe bafandi na mokili bakomonisa ezalela na ye wana ya kozanga koponapona bikolo. (Misala 10:34) Bokonzi ekolongola makambo nyonso oyo makoki kobimisa matata na kolongolaka bandelo ya bikolo. ’’Longwa na mai monene epai moko bobele na mai monene epai mosusu kino ndelo na mokili”, bato nyonso bakokata seleka ya kotikala sembo mpe kotosa boyangeli na Klisto, na bolingo mpe na botondi na bango mpenza.—Nzembo 72:8.
Mpo ete kimya motindo wana ekoka koumela, Bokonzi na Nzambe ekolongola mpe nguya oyo eleki monene, oyo ezali kokabola bato na boumeli na lisolo na bato: lingomba ya lokuta. (Sofoni 2:11) Bato bakosangana kati na losambo na Nzambe ya solo bobele moko. (Yisaya 2:2, 3) Bondeko ekozala bipai nyonso na mokili.
Kimya kati na libota
Na yango, kimya ya mokili mobimba ekozala na ntina nini soko mabota ekokoma lokola bisika ya bitumba epai kuna kofinga, maloba na kozokisa to matumoli mazali kobima ntango nyonso, lokola yango ezali kosalema kati na mabota mingi lelo? Kati na mabota mosusu, kozanga kolobana ezali nde kobomba koyinana makasi.
Na yango, kimya ya solo etali mpe kimya kati na libota. Na nzela na ebongiseli ya mateya oyo ekopesama na Bokonzi na Nzambe, babalani nyonso bakoyekola kozala na bolingo mpe kozala na limemya moko epai na mosusu (Bakolose 3:18, 19), bana mpe bakoyekola ‘kotosa baboti na bango na makambo nyonso’. (Bakolose 3:20.) Bana na botomboki, baoyo bakolembisaka baboti na bango to mpe kotungisa bango, bakozala te. Botosi ekozala mobeko, mpe kosalana elongo ekozala lilako. Bana bakosepelisa baboti mpe kozala na bango elongo ekopesa esengo mingi.
Lelo oyo, bopusi ya makambo na nkita ezali kobakisa matata kati ya libota, mpamba te mbala mingi tata na mama basengisami na kosala mingi. Kasi na nse na boyangeli na Klisto, mabota makosikwama na bozito ya makambo matali ntalo makasi ya bandako na kofutela, bampako ya ndenge na ndenge mpe kozanga mosala. Moto nyonso akozala na mosala ya kosepelisa mpe oyo ekokokisa bamposa na ye. Moto moko te akozanga ndako. Tala ndenge esakweli na Yisaya 65:21-23 elobeli makambo yango: “Bakotonga ndako mpe bakofanda na yango . . . . Bakotonga te ete mosusu afanda; bakokona te ete mosusu alya. . . . baponami na ngai bakosepela kino ntango molai mpo na misala na maboko na bango. Bakosala mosala na mpamba te, bakobota bana mpo ma nsomo na pwasa te; mpamba te bakozala bakitani na bapambolami na Jéhovah, mpe bana na bango elongo na bango.”
Kanisa naino ete ozali na bomoi kati na esika oyo ozali komona makambo ya mabe te, esika oyo ozali koyoka te makelele mpe nsolo na biloko oyo bibebisami kati na engumba moko! Kanisa ete ozali na bomoi na mabelé kitoko mabelé na yo moko oyo elonami, ebongisami mpe ebatelami na lolenge ya kokoka. Kanisa ete, mopepe kitoko ezali kopepa na elongi na yo, matoi na yo mazali koyoka lisusu te makelele makasi ya bato mpe ya miziki to ya biloko mosusu ndenge na ndenge, kasi ekomi nde koyoka mongongo kitoko ya biloko bizalisami. Ezali solo ete bato oyo bazali na bozwi bazali lelo oyo kosepela na ndambo na biloko yango. Kasi, na nse na Bokonzi na Nzambe, bato nyonso bakosepela na makambo oyo mazali kopesa bomoi na kimya. Babola bakozala lisusu te, bato na bosenga ya bilei bakozala lisusu te to bato oyo bapimelami lotomo soko na makambo nini.—Nzembo 72:13, 14, 16.
Biblia epesi lisusu elaka oyo: “Bato mabe bakolongolama na mokili.” (Masese 2:22). Yango elimboli kolongolama ya mabe, Soko mwana na yo ya moke akokende kosakana na libanda, okobanga te ete moto mabe abombami na molili mpo na kosala ye mabe, batambwisi na mituka balangwi to bituluku na bilenge bameli drogue oyo bazali kotambola mpo na kosala mabe. Mwana na yo akosakana na esengo nyonso mpe na kimya.
Kimya mpe bolamu na yo moko
Na nsuka, ezali na likambo etali bolamu na yo moko. Ata soko mabelé ezali paradis, yango ekosilisa te bampasi oyo ebimisami na kanser to bampasi oyo etali rhumatisme. Mpo na kozala na kimya ya solo, esengeli ete mpasi, maladi mpe liwa elongolama. Likambo yango ekoki kosalema? Wana ezalaki ye na mabelé, mbala mingi Yesu Klisto amonisaki ete azali na makoki ya kosilisa mpasi na bato. (Matai 8:14-17) Na kozalaka moyangeli uta likoló, Klisto akosala bikamwiseli na mabelé mobimba. Biblia epesi elaka oyo ete: “Na ntango yango, miso na bakufeli miso ekofungwama, mpe matoi na bimimi makozipwama. Na ntango yango motengumi akopumbwa lokola mboloko mpe lolemo na ebubu (baba) ekoyemba na esengo.”—Yisaya 33:24; 35:5, 6.
Nzokande, oyo Yesu Klisto akosala mpo na kolongola mpasi na bato ekosuka bobele wana te. Ntoma Paulo alimboli nini ekozala mokano na bokonzi na Klisto: “Mpamba te ekoki na ye ete azala na bokonzi kino ekotya ye bayini nyonso na nse na makolo na ye. Moyini oyo akobukana na nsuka ezali kufa.” (1 Bakolinti 15:25, 26). Yango elimboli kobongisama ya mabe nyonso oyo liwa ememaki epai na bato, uta ebandeli. Yesu Klisto ye moko alobaki yango ete: “Mpo ete ntango ekoya wana nyonso bazali kati na nkunda (na kokanisama) bakoyoka mongongo na ye (Klisto), mpe bakobima”. (Yoane 5:28, 29). Ebele na bato oyo bazalaki na bomoi mpe basilaki kokufa kati na mpasi, bakoki bongo kozala na kimya oyo ekotyama na mokili mobimba.
Bongo yo, okosepela na kimya wana? Ba Témoins de Jéhovah basengi yo ete ekoka koyekola makambo mingi oyo Biblia ezali koteya mpo na lisolo oyo’.b Elikya ya kimya na mokili mobimba ezali kopesa esengo mingi koleka, oyo moto asengeli kozanga te. Yeba ete soko osali milende ya koyekola mpe kosalela Liloba na Nzambe, “Nzambe na kimya akozala na yo elongo”, seko na seko!—Bafilipi 4:9.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na elobeli ya polele mpenza,ekolobama boye,’’Keda kotala soko bandeko na yo bazali na kimya mpe soko etonga ezali na kimya.
b Jehovah akosilisa bitumba ’’ kino ndelo na mokili”
[Elilingi na lokasa 6]
Babalani nyonso bakoyekola kofanda na kimya
Ba Témoins de Jéhovah ya mboka na yo bakoki kosalisa yo na nzela na boyekoli na Biblia epai na yo mpe ekofuta eloko te.