Mituna na batangi
◼ Ezali malamu mpo na moklisto na kosala bokila to na kolóba mbisi?
Makambo ndenge na ndenge mabimisami mbala mingi na bokila masangisami na mayoki mozindo. Likambo ya malamu mpo na baklisto ezali ete basala makasi mpo na kokanga ntina mpe kotosa likanisi ya Jehovah Nzambe mpo na likambo yango, lokola yango eyebisami kati na Biblia.
Nzambe apesaki bokonzi epai na bato ezala likoló na banyama ya “zamba”, mpe banyama ya “mboka”. Na ebandeli bato bazwaki ndingisa ya Mozalisi te na koboma banyama mpo na kolya. mpe mbala mosusu bazalaki koyoka mposa na yango te. (Genese 1:24. 29, 30) Ezali bobele nsima na mpela nde Nzambe apesaki bango ndingisa ya kolya mosuni na nyama, nsima na kobimisa ”bomoi na yango—makila na yango” malamu. (Genese 9:3, 4.) Yango esengelaki kozala bongo ata mpo na mosuni ya nyama ya mboka to ya zamba.
Bayisraele bazalaki na banyama, na ndakisa bameme mpe bangombe, oyo bazalaki koboma ntango basengelaki kolya mosuni. Bazalaki kosala bokila mpe koloba mbisi mpo na komileisa. (Deteronome 12:20-24; 14:4-20) Yango wana Nzambe akokaki koloba na maloba ya elilingi ete. asengelaki ‘kobianga baluki mingi na mbisi mpo baluka basaleli na ye mpe bato mingi na bokila mpo ete balanda bango’. (Yilimia 16:16 MN.) Mibu mingi na nsima, Yesu aponaki balobi na mbisi mpo ete bakóma bamama mpe ye moko akambaki misala na kolóba mbisi.—Matai 4:18-22; 17:27; Luka 5:2-6; Yoane 21:4-7.
Wana ekomaki ye mobange, tata na mabota Yisaka asengaki ete balambela ye nyama kitoko mpo na kolya, mwana na ye Yakobo azwaki ekateli ya koboma bangombe mibale ya mike mpo na kolamba bilei yango. Esau, ye, akendaki bokila mpo na komemela tata na ye nyama ya zamba. Tosimba ete, elako azalaki na banyama ya mboka. Yisaka asengaki ete babomela ye nyama ya zamba. Tosimba lisusu ete bana na ye nyonso mibale babomaki banyama oyo esengelaki mpo na bilei na bango moko te, kasi mpo na moto mosusu.—Genese 27:1-19.
Bazalaki koboma banyama te bobele mpo na mosuni na yango. Mposo na yango ezalaki kosalelama mpe mpo na kosala bilamba (2 Mikonzi 1:8; Malako 1:6; Baebele 11:37) Bayisraele bazalaki mpe kosala babulangeti mpo na komibatela mpe biloko mosusu ya ndako na lisalisi ya bamposo mpe mikuwa na banyama, ata banyama oyo etangamaki ete ezali mbindo, oyo ezalaki kolyama te.—Exode 39:33, 34; Mituya 24:7; Basambisi 4:19: Nzembo 56:8.
Mobeko na Nzambe oyo ezali kosenga ete makila na banyama oyo ebomami esopama na nse, esengeli kokundwela babomi na nyama ete bomoi ya nyama euti epai na ye: esengeli bongo kosalelama na limemya kasi na bopolo te. (Levitike 17:13) Ezali komonana polele ete, Nimerode azalaki koboma banyama mpe azalaki komikumisa mpenza mpo na mayele na ye, mpo na bonene mpe na motuya ya banyama oyo abomaki, to mpo na mito na nyama oyo mbala mosusu azalaki komizwela. Azalaki “moluki makasi na nyama liboso na Jehovah”.—Genese 10:9.
Motindo moko, moklisto moko akoki kolona mposa ya kosala bokila mpe koboma banyama, to koloba mbisi. Na kososolàka mitema na bango. babomi mingi na nyama mpe balobi mingi na mbisi bayaki koyeba ete bazalaki kooka “esengo ya koboma”. Ezalela wana ezali na boyokani na botyoli nyonso ya bomoi na nyama. Yango wana, atako epekisami te mpo na koboma nyama to koloba mbisi (ezala ete nyama abomami to akamatami mpo ete moto mosusu akoka kolya yango to mpo na mokano mosusu ya malamu), ekozala mabe mpo na moklisto ete asala yango na likanisi motindo moko na oyo ya Nimerode. Nzokande, likama ezali bobele te ya kozala na esengo ya kosala bokila, ya koboma to na kozwa motó moko ya nyama.
Mosenzeli ya 15 Octobre 1984 ezalaki bongo kolimbola ntina oyo baklisto ya solo bazali komema to mpe kozala na monduki te mpo na kobela to komibatela liboso na bato mosusu. (Pages 17-20) Nsima na kokanisa likoló na toli oyo, batemwe mosusu babongolaki lolenge na bango ya kolalela ata komeka kozala na minduki ya bokila. Ntalo monene bazwaki ekateli ya kobwaka yango to mpe kobomba yango malamumalamu. Baklisto wana balingaki komonisa te ete bazali na lolendo mpo na mindoki na bango to mpe kotya konfianse na bango kati na yango. Lisusu, koboya kozala na yango to kobomba yango malamumalamu ekoki kobikisa na likama. Na bongo minduki oyo mibomaka mikoki mpenza te kozala kati na maboko ya bana, oyo bakoki kozokisa makasi to koboma moto moko, to mpe te kati na maboko ya moto oyo azali na bobangi mingi to oyo anyokwami na makasi.—Tala Masese 22:3.
Ekoki kozala ete baklisto mosusu balinga kolya motindo na nyama ya zamba boye to motindo na mbisi boye, mpe engebene bango, mwango malamu mpo na komizwela bilei yango ezali se na nzela ya bokila to na kolóba. Bamosusu balingaka kozwa mopepe to kosepelisa nzoto na kokendáká bokila kati na zamba, to kominanolaka na kolekisa mwa bangonga na koloba kati na kimya. Lokola Biblia ekweisi misala wana te, ntina ya kosambisa moninga ezali te mpo na koyeba soko asepelaka na yango to te. Nzokande, ndakisa na Yisaka mpe ya bana na ye emonisi ete tosengeli kokomisa yango likambo monene te na koluka koyeba nani akolya nyama ya zamba to mbisi.—Matai 7:1-5; Baloma 14:4.
Ezali kokabama ete ntoma Petelo azalaki mpenza molobi monene na mbisi. Penepene na liboke monene ya mbisi, Yesu, oyo autaki kosekwa, asalisaki ye na kotalela mayoki na ye na ntina na mbisi mpe mosala ya kolona mbisi. Atunaki ye: “Simona. mwana na Yoane, olingi nde ngai koleka oyo?”Yoane 21:1-3, 9-15 La Tour de Garde ya 1er novembre 1988, page 31.
Motindo moko, soki moklisto azwi ekateli na lisosoli nyonso malamu mpo na kokende bokila to kolɔba mbisi, asengeli kotosa molɔngɔ ya makambo na ye oyo azali kotya na esika ya liboso. Na ndakisa, soki kokende bokila to koloba mbisi ekwei mokolo oyo likita ya lisangá ebongisami, asengeli kosala nini? To mpe lisusu, maloba na ye mazali komonisa ete azali na lolendo mpo na bolongi na ye kati na bokila to na koloba mbisi? Soki, libaku emonani ete, moklisto moko oyo ateli azwi ekateli ya kosala bokila to ya koloba mbisi, ezali malamu ete akoka koloba na nguya nyonso ete: “Ee, Nkolo, yo oyebi ete nazali na bolingo mpo na yo (koleka misala oyo).”—Yoane 21:16.