Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/6 nk. 22-27
  • Tolɔba bato na mai nyonso ya mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tolɔba bato na mai nyonso ya mokili
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kolɔba bato: ntembe mpo na mokili mobimba
  • Mosala ya kolɔba mbisi mozali kokóla kati na mokili
  • Bango nyonso basangani na mosala yango
  • Makambo mapesi nzela na bokóli
  • Tokoki nde komibongisa malamu?
  • Tózala balɔbi na bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mosala ya koluka mbisi na Mbu ya Galile
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Molubá mpe mbisi, elimboli nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/6 nk. 22-27

Tolɔba bato na mai nyonso ya mokili

“Na yango, soki nazali kosakola nsango malamu, ezali mpo na ngai likambo na komikumisa te, kasi yango esɛngisami na ngai. Ee, mawa na ngai soki nakosakola nsango malamu te!”​—1 BAKOLINTI 9:16, MN.

1, 2. (a) Banani bazali mpenza kolónga ntembe oyo elobelami na 1 Bakolinti 9:16, mpe mpo na nini oyanoli bongo? (b) Mokumba nini ba Témoins de Jéhovah basili kondima yango?

NA EKEKE oyo ya ntuku mibale, banani bazali mpenza kolónga ntembe oyo Paulo alobelaki na maloba oyo matangami awa likoló? Bamilió na bato nini oyo bazali kokenda na mokili mobimba mpo na kosakwela mibali mpe basi oyo bazali “kobanza mposa na bango ya elimo?” (Matai 5:3, MN) Banani bazali na likámá ya kokɔta bolɔkɔ mpe ya kokufa, mpe bazali kokutana na yango na mikili mingi, mpo na kotósa etinda na Klisto ezwami na Matai 24:14?

2 Lisoló na bato liyanoli, ete: ezali ba Témoins de Jéhovah. Bobele na mbula oyo euti koleka, Batemwe koleka bamilió minei bakendaki ndako na ndako, wana ezalaki bango ‘kosakola nsango malamu’ kati na mikili mpe bateritware 211, mpe na minoko koleka 200. Awa tolobeli te etuluku moke ya bamisionere oyo babongisami mpo na mosala yango, mpamba te ba Témoins de Jéhovah bazali komiyoka ete bazali na mokumba ya kosakola mpe koteya ndako na ndako, mpe yango na mbala nyonso oyo libaku limonani. Mpo na nini bazali na mposa ya koyebisa bindimeli na bango epai na bato mosusu? Mpamba te bamoni ete kozala na boyebi ekopesaka mokumba.​—Ezekiele 33:8, 9; Baloma 10:14, 15; 1 Bakolinti 9:16, 17.

Kolɔba bato: ntembe mpo na mokili mobimba

3. Teritware ya kolɔba mbisi esengeli kozala na etando nini?

3 Tokoki koloba ete, mosala wana monene ya kolɔba mbisi mosuki te bobele na mwa bibale to mabéké, ata mpe na mai monene. Mpo ete, lokola Yesu apesaki etinda, esengeli kosakolama “kati na mabota nyonso.” (Malako 13:10) Liboso na komata epai na Tata na ye, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Bokenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, bobatisa bango na nkombo na Tata, na Mwana mpe na elimo santu, mpe bolakisa bango ete batósa makambo nyonso oyo nasili kolaka bino. Mpe tala, ngai nazali na bino elongo mikolo nyonso kino nsuka na biloko ya ntango oyo.”​—Matai 28:19, 20, MN.

4. (a) Likambo nini likamwisaki bayekoli ya liboso ya Yesu, baoyo bazalaki Bayuda? (b) Likanisi ya ba Témoins de Jéhovah ezali nini na ntina na etando ya mosala na bango ya kosakola?

4 Ntango mosala wana moyebisamaki, ezalaki na bopusi makasi epai na bayekoli na Yesu, baoyo bazalaki Bayuda. Basengelaki kotindama epai na Bapakano ‘na mbindo’ na mabota nyonso mpe kolakisa bango. Ezalaki likambo ya ntina ete batalela lisusu lolenge na bango ya kokanisa mpo na koyokanisa yango na likanisi oyo mpe kokokisa mokumba oyo mapesamaki na bango. (Misala 10:9-35) Kasi bakokaki kopɛngola yango te; Yesu alobaki na bango kati na lisese ete: “Elanga, ezali mokili.” Tala mpo na nini ba Témoins de Jéhovah bazali lelo kotalela ete, lotómo na bango ya kolɔba mbisi ezali na mokili mobimba. Ata ndelo moko te ya “kati na mai yango” ekoki kopekisa mosala oyo bazwi yango epai na Nzambe. Mbala mosusu, kati na mikili oyo mizali na bonsomi ya losambo te, esengeli na bango kozala na mayele mingi. Atako bongo, bayebi ete mosala yango mosengeli kokokisama nokinoki. Mpo na nini bongo? Mpo ete makambo mazali kosalema na mokili mpe kokokisama ya bisakweli ya Biblia elakisi ete mosala wana ya kolɔba mbisi na mokili mobimba, mokómi na eteni na yango ya nsuka.​—Matai 13:38; Luka 21:28-33.

Mosala ya kolɔba mbisi mozali kokóla kati na mokili

5. Motindo nini na bato oyo bazali koyamba malamu mosala ya balɔbi mbisi na mokili mobimba?

5 Mingi na bapakolami, batuki na libula ya Bokonzi, “balɔbamaki” kati na mabota liboso ya mobu 1935, date oyo tokoki koloba ete motuya na bango mokokaki. Na yango, kobunda 1935, ba Témoins de Jéhovah bazali koluka “bato na komikitisa” baoyo “bakosangola mokili,” engebene Makomami. (Nzembo 37:11, 29) Bato yango bazali “kokimela mpe kolela na ntina na makambo nyonso ya mbindo mazali kosalema.” Bazali komitya na nsé na boyangeli ya Bokonzi na Nzambe liboso ete “bolózi monene” eyela ebongiseli ya biloko mabe mpe na mbindo ya Satana, mpe ete basambeli na ye babwakama kati na “litumbo ya mɔ́tɔ makasi,” oyo elimboli kobebisama libela.​—Ezekiele 9:4; Matai 13:47-50; 24:21.

6, 7. (a) Meko nini ezwamaki na 1943 na ntina na mosala ya kosakola na mokili mobimba? (b) Yango ebimisi matomba nini?

6 Matomba mazali nde kozwama na mosala ya kolɔba mbisi oyo mozali kokokisama awa na mabelé mobimba kino sikawa? Totika ete makambo masalemaki mamonisa yango. Na 1943, wana Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki makasi, bandeko bapakolami na sembo baoyo bazalaki na biro monene ya ba Témoins de Jéhovah, na Brooklyn (New York), basosolaki ete mosala monene ya kolɔba mbisi mosengelaki kosalema kati na mokili mobimba. Na yango, bazwaki meko nini?a​—Emoniseli 12:16, 17.

7 Na 1943 la Société Watchtower afungolaki eteyelo ya bamisionere oyo ebéngami Galaad (na Liebele: “eboké na batatoli”; Genese 31:47, 48), oyo ebongisaki bamisionere monkámá na boumeli ya sanza motoba, mpo ete batindama lokola balɔbi mbisi na elilingi na mabelé mobimba. Na eleko wana, ezalaki bobele na Batemwe 126 329 baoyo bazalaki kolɔba bato na molende kati na mikili 54. Nsima na mbula zomi, mituya wana mikómaki mingi mpenza, kino na Batemwe 519 982 kati na mikili 143! Ya solo mpenza, Eteyelo ya Galaad ebimisaki balɔbi mbisi, mibali mpe basi ya molende, baoyo bandimaki kokenda kokutana na mimeseno mikeseni mpe na komesena na bateritware ya sika mpo na kolɔba mbisi. Na yango, bankɔto mingi na bato ya motema sembo bayambaki solo. Bamisionere, mpe Batemwe ya mikili wana baoyo basalaki elongo na bango, batyaki moboko mpo na bokóli kitoko oyo bozali komonana lelo.

8, 9. (a) Bandakisa nini tokoki kotanga mpo na mosala monene oyo mokokisami na bamisionere? (b) Bokóli nini ya kokamwa oyo bamisionere basili komona yango kati na bilanga na bango ya mosala? (Tala mpe Annuaire des Témoins de Jéhovah 1992.)

8 Mingi na basembwi na kala oyo babimaki na bakelasi ya liboso, bazali kino lelo na mikili ya bapaya, atako bakómi na mibu koleka 70, to koleka ntuku 80. Ndakisa moko epesameli biso na Eric Britten, oyo azali na mibu 82, mpe Christina, mwasi na ye, baoyo bazwaki mapolomi na bango na kelasi ya 15 na Galaad, oyo esalemaki na 1950, mpe kino lelo oyo bazali bobele na Brezile. Na ntango bakendaki na mboka wana, ezalaki bobele na Batemwe 3 000. Lelo oyo, Batemwe bazali koleka 300 000. Na ntembe te, na Brezile, ‘oyo moke esili kokóma libota na makasi,’ mpamba te mosala ya kolɔba mosili kopesa matomba.​—Yisaya 60:22.

9 Bongo tokoki koloba boni mpo na bamisionere oyo bazali na Afrika? Mingi na bango basili komesena na bizaleli bikeseni mpe bazali na bolingo mingi epai na bato oyo bango bakutaki kuna. Tozali na ndakisa ya ndeko John mpe ndeko Eric Cooke mpe basi na bango, Kathleen mpe Myrtle, baoyo bazali sikawa na Afrique du Sud. John mpe Eric bazwaki mapolɔmi na bango na kelasi ya mwambe, oyo esalemaki na 1947. Basalaki na Angola, na Zimbabwe, na Mozambique mpe na Afrique du Sud. Mwa ndambo na bamisionere bakufaki na maladi, mosusu na bitumba mpe minyoko, lokola Alan Battey mpe Arthur Lawson, baoyo bakufaki na etumba ya banamboka oyo eutaki kosalema na Libéria. Atako bongo, mbisi mingi ezwami na mai ya Afrika. Batemwe koleka 400 000 bazali bipai na bipai na etando wana monene ya mokili.

Bango nyonso basangani na mosala yango

10. Ba pionniers bazali kokokisa mosala nini oyo mobongi kokumisama, mpe mpo na nini?

10 Kasi, esengeli koyeba ete soki motuya ya bamisionere mokómi mwa bankɔto mingi, nzokande basakoli mpe ba pionniersb bazali lelo na motuya ya bamilió. Bazali kokokisa mosala moleki monene na kosakola nsango malamu na mokili. Na 1991, ezalaki na mwayene ya ba pionniers mpe basali na zongazonga koleka 550 000. Oyo nde motuya monene soki tokanisi ete Batemwe nyonso wana ya sembo bazali kotya molende mingi mpo na kolekisa mwayene ya bangonga 60 kino 140 sanza na sanza na mosala wana ya kolɔba mbisi! Mingi na bango, bazali koboma nzoto mpe kobimisa misolo mingi. Kasi mpo na nini bazali kosala yango? Mpo ete balingi Jéhovah Nzambe na bango na motema na bango mobimba, na elimo na bango mobimba, na molimo na bango mobimba mpe na makasi na bango mobimba, mpe ete balingi bazalani na bango lokola bazali komilinga bango moko.​—Matai 22:37-39.

11. Nini emonisi mpenza ete elimo ya Jéhovah ezali kokokisa mosala na yango kati na libota na ye?

11 Tokoki koloba boni mpo na bamilió misato na ndambo na Batemwe mosusu oyo bazali ba pionniers te, nde atako bongo, bazali kopesa nyonso oyo ekoki na bango kati na mosala ya Jéhovah, na kotalela ezalela ya makambo na bango? Ezali basi na mabala, mpe bamama oyo bazali na bana mike, nzokande, bazali kolekisa mwa ntango na bango ya motuya mingi na mosala ya kolɔba mbisi na mokili mobimba. Mingi bazali mibali oyo basili kobala to batata oyo bazali kosala mosala ya mosuni oyo mozali kozwa bango mokolo mobimba; atako bongo, bazali kobómba ntango, na wikende mpe na mpokwa, mpo na kolakisa solo epai na bato oyo bayebani na bango te. Ezali lisusu na ebele monene ya minzemba​—basi mpe mibali—​mpe bilenge, baoyo bazali kosangana na mosala ya kosakola mpe bazali kopesa litatoli mpo na solo na nzela ya etamboli na bango. Lingomba nini mosusu lizali na bato koleka bamilió minei baoyo, sanza na sanza kozanga lifuti, bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe bosili kotyama? Ya solo, wana ezali elembeteli ete elimo ya Jéhovah ezali kokokisa mosala na yango!​—Nzembo 68:11; Misala 2:16-18; tala Zakaria 4:6.

Makambo mapesi nzela na bokóli

12. Mpo na nini bato bazali koyamba solo, mpe bato boni bazali kosala yango?

12 Mbula na mbula, mosala yango monene ya kosakola mozali kobimisa matomba malamu. Na 1991, koleka Batemwe 300 000 ya sika bazwaki batisimo na kozindisama mobimba kati na mai. Motuya wana mokokani na masangá koleka 3 000 oyo moko na moko ezali na Batemwe 100! Lolenge nini makambo nyonso oyo mazali kokokisama? Tomikundola oyo Yesu alobaki: “Moto akoki koya epai na ngai bobele soko akobendama na Tata oyo atindi ngai; . . . Ekomami kati na Basakoli ete: ‘Bango nyonso bakolakisama na Jéhovah.’ Moto na moto asili koyoka mpe ayekoli epai na Tata, akoya epai na ngai.” Ezali bobele na milende na bato te nde mosala ya kolɔba mbisi na mokili mobimba moyambami malamu. Jéhovah azali komona ezalela ya mitema na bato, mpe azali kobenda baoyo babongi na yango epai na ye.​—Yoane 6:44, 45, MN; Matai 10:11-13; Misala 13:48.

13, 14. Batemwe mingi bazali komonisa ezaleli nini eleki kitoko?

13 Nzokande, mpo na kobenda bato epai na ye, Jéhovah azali kosalela balɔbi na bato. Ezaleli na bango epai na bato yango mpe epai na bateritware kati na yango bazali kosakola, ezali na ntina mingi. Ezali elendiseli na komona ete ntalo monene ya basakoli bazali kotósa maloba oyo ya ntóma Paulo epai na Bagalatia, ete: “Totika te kosala makambo mazali malamu, mpo ete tokobuka na ntango ekoki, soki tokolɛmba te.”​—Bagalatia 6:9, MN.

14 Batemwe mingi ya sembo bazali kosakola nsango malamu uta bambula mingi na kotaleláká malamumalamu makambo mazali kobima na mokili. Bamonaki ebandeli mpe kokwea ya boyangeli ya Nazi, ya Fascisme, mpe ya biyangeli mosusu ya bakonzi mabe. Basusu bamonaki ebele na bitumba oyo bisalemaki uta 1914. Bamonaki wana bayangeli ya mokili batyaki bilikya na bango kati na Lisangá ya Mabota, mpe na nsima kati na Lisangá ya Mabota Masangani. Bamonaki wana mosala ya Jéhovah mopekisamaki na mikili mingi mpe, na nsima, bamonaki ntango yango endimamaki lisusu na Leta. Na boumeli ya bambula wana, ba Témoins de Jéhovah batikaki te kosala makambo mazali malamu, kati na yango mosala ya kolɔba bato. Oyo nde ndakisa kitoko ya bosembo!​—Matai 24:13.

15. (a) Likambo nini lizali kosalisa biso na koyokanisa masoló na bamposa ya teritware na biso ya mokili mobimba? (b) Na likambo nini mikanda mizali kosalisa yo kati na mokumba na yo?

15 Ezali na makambo mosusu mapesaki nzela na bokóli oyo kati na mokili mobimba. Na yango, balɔbi na bato balóngaki komimesenisa na bamposa ya teritware na bango. Bato na bonkoko bokeseni, na mangomba mpe na minoko mikeseni, bakendaki kofanda na mikili mikeseni, mpe yango esalisaki ba Témoins de Jéhovah na kokolisa bososoli oyo bazalaki na yango na ntina na nyonso wana. Oyo eleki mpenza, lisangá ya mokili mobimba likólisi mingi mpenza mosala ya kosakola na kobungisáká Biblia mpe mikanda mikolimbolaka Biblia na minoko koleka 200. Les Saintes Ecritures​—Traduction du monde nouveau ebimisami sikawa, na mobimba to na ndambo na yango, na minoko 13, kati yango monoko ya Tchèque mpe ya Slovaque. Brochure Sepela na bomoi ya seko na mabele! ebimisami sikawa na minoko 198, kobanda na monoko Albanais kino na monoko Zoulou, mpe enyatami na motango ya bamilió 72. Mokanda Le plus grand homme de tous les temps mosili kobimisama na minoko 69. Mpo na mokanda L’humanité à la recherche de Dieu, oyo ebimisami na minoko 29, elakisi mwa makanisi likoló na ebandeli mpe motindo na bindimeli ya mangomba minene ya mokili mpe ezali lisungi ya ntina mingi kati na mosala ya kolɔba mbisi na mokili mobimba.

16. Lolenge nini bandeko mosusu bazali kokokisa mposa oyo emonani na mikili misusu?

16 Likambo nini mosusu lipesi nzela na bokóli ya mosala na mokili mobimba? Bankɔto mingi na basakoli bayanolaki na ‘libyangi ya Makedonia.’ Lokola Paulo andimaki kotika Asie Mineure mpo na kokenda na Makedonia, na Mpótó, Batemwe mingi bandimaki libyangi na Nzambe mpe bakendaki kati na mikili mpe bateritware epai mposa ezali mingi mpo na basakoli na Bokonzi, mpo na bankulutu mpe basaleli na misala. Basalaki lokola balɔbi mbisi oyo, komonáká ete esika bazali kolɔba ekómi na balɔbi mingi, bakei na mai mosusu epai kuna balɔbi bazali mingi te, nde mbisi ezali mingi.​—Misala 16:9-12; Luka 5:4-10.

17. Tozali na bandakisa nini ya baklisto oyo bayanoli na ‘libyangi ya Makedonia’?

17 Bakelasi ya Eteyelo na bamisionere ya Galaad, oyo euti kosalema kala mingi te, eyambaki bayekoli oyo bautaki longwa na mikili ya Mpótó, baoyo bayekolaki Lingelesi mpe basili komipesa mpo na kokokisa mosala na bango kati na mikili misusu, epai na bato bazali na bonkoko bokeseni na oyo ya bango. Bobele bongo, na nzela ya Ecole de formation ministérielle, ntalo monene ya bandeko mibali minzemba bazali kozwa kobongisama monene ya sanza mibale mpe nsima na yango, bazali kotindama mpo na kolendisa masangá mpe ba circonscriptions. Bateritware mosusu ya malamu mpo na kolɔba mbisi ezali kofungwama sikawa na Europe de l’Est mpe kati na bikólo ya kala ya Union soviétique.​—Tala Baloma 15:20, 21.

18. (a) Mpo na nini ba pionniers bazali ntango nyonso basali ya makoki? (b) Lolenge nini bakoki kosalisa basangani mosusu ya lisangá?

18 Eteyelo mpo na ba pionniers, oyo ba pionniers permanents bakɔtaka, ezali lisungi mosusu kati na mosala ya kolɔba mbisi na mokili mobimba. Na boumeli ya poso mibale oyo bazali koyekola mokanda Bongenga lokola miinda kati na mokili, oyo ebongisami bobele mpo na ba pionniers, bayekoli bazali koselingwa lisusu malamu kati na mosala ya kosakola na koyekoláká masoló lokola “Tolanda nzela ya bolingo,” “Tomekola Yesu, ndakisa na biso,” mpe “Toluka koteya malamu.” Masangá nyonso mazali na esengo mingi na kozwa ebele na balɔbi mbisi oyo bazali na makoki mpo na mosala ya ndako na ndako mpe mpo na kobongisa ebele ya balɔbi mbisi mosusu kati na mosala yango monene.​—Matai 5:14-16; Bafilipi 2:15; 2 Timoté 2:1, 2.

Tokoki nde komibongisa malamu?

19. Na ndakisa ya ntóma Paulo, lolenge nini tokoki kobongisa lisusu koleka mosala na biso ya kosakola?

19 Na ndakisa na Paulo, tolingi komonisa bokasi mpe kokenda sé liboso. (Bafilipi 3:13, 14) Ntóma amesenaki na bato ya motindo nyonso mpe na ezalela ya makambo nyonso. Ayebaki kobimisa masoló makokaki koyokanisa ye na balobani na ye mpe, ayebaki kososola elongo na bango na kotaleláká makanisi na bango mpe ezalela ya makambo na bango. Tokoki kobanda boyekoli ya Biblia na kotyáká likebi na motindo oyo moto azali koyamba nsango ya Bokonzi mpe na koyokanisáká lisoló na biso na bamposa na ye. Lokola tozali na ebele na mikanda mpo na koyekola elongo na bato, tokoki kolakisa ye mokanda oyo mokokani na makanisi na ye. Makoki na biso ya koyokanisa masoló na makanisi ya bato mpe lolenge na biso ya kotalela bango ezali mpe makambo ya ntina mpo na kozwa matomba na mosala ya kolɔba mbisi.​—Misala 17:1-4, 22-28, 34; 1 Bakolinti 9:19-23.

20. (a) Mpo na nini mosala na biso ya kolɔba mbisi mozali mpenza na ntina mingi na eleko na biso? (b) Mokomoko kati na biso azali na mokumba nini lelo?

20 Mpo na nini mosala moleki kitoko ya kolɔba mbisi na mokili mobimba mozali mpenza na ntina mingi na eleko na biso? Mpo ete, lokola yango emonisami na bisakweli ya Biblia oyo bikokanaki na makambo na kala mpe lelo oyo, ezali polele ete ebongiseli ya mokili mobimba ya Satana, ezali kokende epai na nsuka na mabe. Na bongo, biso ba Témoins de Jéhovah tosengeli kolanda kosala nini? Masoló misato ya boyekoli mazwami kati na zulunalo oyo, mamonisi ete tozali na mokumba ya kolɔba mbisi na mɔ́tɔ nyonso mpe na molende, kati na ndambo na mai ya mokili oyo epesameli biso. Biblia epesi biso elikya makasi ete Jéhovah akobosana te milende oyo tozali komonisa kati na mosala yango. Paulo alobaki ete: “Nzambe azangi sembo te ete abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bosili komonisa mpo na nkombo na ye, wana bosalelaki basantu mpe bozali sé kosalela bango. Nde tolingi ete moto na moto kati na bino amonisa etingya ete atonda na elikya kino nsuka.”​—Baebele 6:10-12, MN.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Tala mokanda La Révélation: le grand dénouement est proche! oyo ebimisami na la Société Watchtower, nkasa 185, 186.

b “Mosakoli pionnier . . . Témoin de Jéhovah oyo asakolaka ntango nyonso.”​—Webster’s Third New International Dictionary.

Bozongeli

◻ Mpo na nini ba Témoins de Jéhovah bazali kotalela ete esika ya mosala na bango ya kolɔba mbisi ezali na mokili mobimba?

◻ Mapamboli nini mazwami na Eteyelo ya bamisionere ya Galaad mpo na mosala ya kolɔba mbisi?

◻ Wapi mwa makambo oyo mapesaki nzela na bokóli ya ba Témoins de Jéhovah?

◻ Lolenge nini mokomoko kati na biso akoki kobongisa lisusu koleka mosala na ye ya boklisto?

[Etanda na lokasa 24]

MATOMBA YA KOLOBA MBISI NA MOKILI MOBIMBA

Mbula Mikili Batemwe

1939 61 71,509

1943 54 126,329

1953 143 519,982

1973 208 1,758,429

1983 205 2,652,323

1991 211 4,278,820

[Elilingi na lokasa 25]

Mosala ya kotatola mozali ntango nyonso kokisama kati na balɔbi mbisi na libéké ya Galilai

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto