Mabele ekobikisama na libebi
Mbala moko kati na lisolo na bato,Nzambe asili kobikisa mabelé na likama oyo bato balingaki kobebisa yango. Ezalaki na ntango na Noa, na nzela ya mpela ya mokili mobimba Tozali na lisolo moko te oyo ezali komonisa ete na eleko wana bato babebisaki ezingelo na bango elingi koloba mai, mabelé mpe mopepe. Kasi mokili ebebaki na lolenge mosusu kino ete Nzambe amonaki ete asengelaki koyeisa bitumbu makasi.
Biblia elobi boye: “Mokili ezalaki mabe na miso na Nzambe mpe mokili etondaki na (mobulu). Nzambe atalaki mokili mpe yango ezalaki mabe mpenza, mpamba te bato nyonso babebisaki nzela na bango na mokili.” (Genese 6:4, 11, 12) Na solo, na mikolo na Noa, Nzambe atalelaki mokili lokola ete ebebisami na ntina na mobulu mpe na mabe ya bato.
Ndenge moko, ntango bayisraele ya kala babandaki kofanda na Mabelé ya ndaka, Nzambe apesaki bango likebisi oyo: ‘Bokoyeisa mokili mofandi bino na yango mbindo te, mpo ete makila eyeisi mokili mbindo . . . Mpe bokoyeisa mokili mbindo te.’ (Mituya 35:33, 34). Na yango, mokili ya Kanana eyeisamaki mbindo mpo bafandi na yango bazalaki koboma bato. Ndakisa ya nsomo ezali oyo ete, bazalaki kopesa bana na bango lokola mbeka epai na banzambe na bango.
Bakanana bazalaki kosala pite mingi mpe na ntina na yango Nzambe akanaki mabe mpo na mboka wana. Alobaki epai na Bayisraele ete: “Bomibebisa na makambo oyo (bizaleli na mbindo) te, mpo ete na makambo oyo nyonso mabota oyo mazali ngai kobimisa liboso na bino bamibebisaki. Mpe mokili (ekómaki mbindo) . . . mpe mokili esanzaki bato bafandi na yango.” (Lévitike 18:24, 25). Pite mpe kosopa makila ebebisaki mokili ya Kanana kino ete Nzambe abomaki mabota ya Bakanana.
Kobebisama ya mabelé
Kasi, ezali boni na mikolo na biso? Tozali kobika na ntango oyo mobulu ezali kosalema mingi, kosopa makila mpe pite. Atako moto azali kosala nyonso mpo na komeka kobongisa mabe oyo esalemi na mabelé, na mai mpe na mopepe, akokoka kozongisa na bomoi te bato soko milió nkama oyo bakufaki na bitumba ya ekeke ya ntuku mibale, soko mpe bamilió na bato oyo bazali kobomama na bato mabe to bato oyo bakufaki na nzala baoyo motuya eyebani te. Akokoka mpe te kosekwisa bamilió ya ba bébés oyo bazali kobomama na ntina na kosopa bazemi, baoyo motuya na bango ezali 40 milió kino 60 milió mbula na mbula. Tokoki kotya ntembe ete mokili ebebisami te na miso na Nzambe na makambo oyo nyonso kozanga kolobela pite oyo epalangani mingi lelo?
Makanisi malamu mamonisi ete esengeli Nzambe aya kobikisa mabelé na misala ya bato oyo mizali kobebisa yango, mpe bisakweli na Biblia bindimisi likambo yango. Kasi Nzambe akosala nini? Biblia elobi ete ‘akobebisa baoyo bazali kobebisa mokili’. (Emoniseli 11:18; tala Matai 24:3-14) Lokola mokoló ndako akoki kobengana mofuteli ndako oyo azali kobebisa yango, ndenge moko Nzambe “akobengana” baoyo bazali kobebisa mabelé, eloko kitoko oyo ye azalisaki.
Biblia elobi: “Kasi bato mabe bakolongolama na mokili; mpe bato na masumu bakopikolama wana.” (Masese 2:22). Etumba na Nzambe oyo akoyeisa na mikolo mikoya, Biblia ebengi yango Armagedon. (Emoniseli 16:16) Yesu mpe abyangaki yango ‘bolozi monene, lokola emonanaki longwa na ebandeli te, ekobima mpe boye lisusu te’. (Matai 24:21.) Yango ekozala monene koleka mpela.
Ezali likatami oyo eleki makasi to ezangi bosembo? Te, mpamba te, lokola Nzambe azali Mozalisi na mabelé, azali na lotomo ya koloba nani asengeli kofanda na yango. Azali mpe na lotomo ya kosambisa moto mpo na misala na ye ya mabe. Epai mosusu, soki Nzambe apesi nzela na moto ete alanda lolenge na ye ya komitambwisa kozanga kopesa ye etumbu, mabelé ekobeba mpo na bato nyonso mpe ekokoka te ete moto afanda na yango. Epai mosusu, na ‘kobebisáká baoyo bazali kobebisa mabelé’, Nzambe akobatela libula oyo ya mabelé mpo na baoyo bayebi kosepela na yango. Biblia epesi elaka oyo: “Basembwi (nde) bakofanda na mokili, mpe bato malamu bakotikala na yango.”—Masese 2:21.
Na lisalisi na Nzambe, ebelé na bato bazwaki makasi ya komimonisa basembwi mpo ete balingi kobatelama mpo na kozwa litomba na biloko bizalisamaki na Nzambe. Bazali mpe kolanda mitinda na bizaleli malamu ya Nzambe oyo etombwami, mpe baboyi mobulu nyonso mpe koboma na lolenge na yango nyonso. Na yango, bazali kobebisa mokili te.
Mabelé oyo ebikisami na libebi
Bato yango bazali na elikya ya esengo na komona mabelé, oyo sikawa ebebisami, ekobongwana paradis kitoko, oyo kati na yango ata nzoto na bango nkutu ekolongwa mpe ekopetolama na mabe nyonso mauti na masumu. Mpo na kokokisa likambo yango, mokanda ya nsuka na Biblia mozali kokokanisa bibongiseli oyo Nzambe azwaki na ‘ebale na mai na bomoi’. Na bipai nyonso mibale ya ebale yango, “ezalaki na nzete na bomoi kobotáká mbuma na mitindo zomi na mibale, sanza na sanza kobotáká mbuma na sanza, mbuma na sanza. Nkasa na nzete ezali mpo na kobikisa bato na mabota”.—Emoniseli 22:1, 2.
Emonaneli yango na esakweli endimisi biso ete Nzambe akobikisa na libebi mabelé mpe bato oyo bafandi na yango. Bimonaneli mosusu ya esakweli bisili kopesa biso makanisi mpo na koyeba ndenge mabelé makozala ntango ekobongwana. Na ndakisa, tala esakweli ya mosakoli Yisaya, oyo ekomamaki na maloba kitoko: “Esobe mpe esika ekauki ekosepela, esobe ekoyoka esengo, ekobimisa fololo (lokola safran). Ekobimisa fololo mingi mpenza, ekosepela na esengo mpe na nzembo.” (Yisaya 35:1, 2) Na ntango wana, kobebisama na mai na monana ekozala lisusu te, kobebisama na mabelé na elanga to kobebisama ya mopepe ekozala lisusu te.
Likambo lileki lisusu ntina ezali boye ete, mabelé makobebisama lisusu te na mobulu, na kobomana to pite mpe te. Bobele baoyo bazali kotósa Nzambe, mitinda na ye mpe biloko oyo ye azalisi nde bakotikala (Emoniseli 21:7,). Yoka sikawa nini ekozala matomba na kokamwisa na makambo oyo nyonso: “(Nzambe) akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, (na matanga), na kolela na mpasi, lisusu mpe te. Mpo ete makambo na liboso masili koleka. . . . ‘(Tala), nakozalisa biloko nyonso biloko na sika.’”—Emoniseli 21:4, 5.
Oyo nde nsuka kitoko! Tozali na esengo ya koyeba ete mosika te, Nzambe ‘akobebisa baoyo bazali kobebisa mabelé’! Mpe bilaka oyo bipemami bizali kopusa biso ete tozala na mposa ya kosalela Nzambe oyo akobikisa mabelé na libebi mpe akobongola yango ezala paradis, efandelo mpo na bato oyo bazali sembo!
[Likanisi ya paragrafe on page 6]
Biblia elobi ete Nzambe ‘akobebisa baoyo bazali kobebisa mabele’.—Emoniseli 11:18.