Mosika te mabelé ekokóma Paladiso!
“Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama. Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.”—Matai 6:9, 10.
LIBONDELI wana, oyo bato mingi bayebi na nkombo Tata wa biso to Libondeli ya Nkolo, ezali kopesa bato elikya moko monene. Na ndenge nini?
Ndenge Libondeli ya Nkolo emonisi yango, Bokonzi ya Nzambe ekokokisa mpenza mokano ya Nzambe awa na mabelé, ndenge kaka ezali kosalema na likoló. Nzokande, mokano ya Nzambe ezali ya kozongisa mabelé oyo Paladiso. (Emoniseli 21:1-5) Bokonzi ya Nzambe ezali mpenza nini, mpe ndenge nini ekozongisa mabelé oyo Paladiso?
Guvɛrnema ya solo
Bokonzi ya Nzambe ezali mpenza guvɛrnema ya solo. Mpo guvɛrnema ezala, esɛngaka bayangeli bázala, mibeko ezala, mpe bato oyo bakoyangelama bázala. Bokonzi ya Nzambe ekokisi makambo nyonso wana? Yoká biyano oyo Biblia epesi na mituna misato oyo elandi:
Banani bakoyangela na Bokonzi ya Nzambe? (Yisaya 33:22) Yehova Nzambe atyá mwana na ye, Yesu Klisto, mokambi ya Bokonzi na ye. (Matai 28:18) Na litambwisi ya Yehova, Yesu aponi mwa ndambo ya bato “na mabota nyonso mpe na minɔkɔ nyonso mpe na mikili nyonso mpe na bikólo nyonso,” oyo ‘bakoyangela mabelé’ elongo na ye.—Emoniseli 5:9, 10.
Mibeko nini Bokonzi ya Nzambe etyá? Mibeko mosusu esɛngaka mpenza bato básala likambo boye to boye. Yesu amonisaki mobeko oyo eleki monene ntango alobaki boye: “‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.’ Wana nde komandema oyo eleki monene mpe ya liboso. Ya mibale, oyo ekokani na yango, ezali oyo: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’”—Matai 22:37-39.
Mibeko mosusu epekisaka bato ya Bokonzi ya Nzambe kosala likambo boye to boye. Na ndakisa, Biblia elobi polele boye: “Bómikosa té! Ézala bato oyo basalaka makambo ya soni, baoyo basambelaka banzambe ya bikeko, baoyo batambolaka na basi to mibali ya bato, mibali oyo balalaka baninga na bango mibali, ézala bamiyibi, bato ya lokoso ya mbongo, baoyo balangwaka masanga, baoyo bafingaka baninga, to pe baoyo babotolaka bato biloko; bango nyonso bakokóma bato ya Bokonzi ya Nzambe té.”—1 Bakolinti 6:9, 10, Bible na lingala ya lelo oyo.
Banani bazali koyangelama na Bokonzi ya Nzambe? Yesu alobaki ete bato ya Bokonzi ya Nzambe bazali lokola bampate. Alobaki boye: “Bakoyoka mongongo na ngai, mpe bakokóma etonga kaka moko, na mobateli kaka moko.” (Yoane 10:16) Mpo na koyangelama na Bokonzi ya Nzambe, moto asengeli te koloba kaka ete alandaka Yesu, mobateli ya mpate oyo aleki malamu, kasi asengeli mpe kosala oyo Yesu azali kosɛnga. Yesu alobaki boye: “Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai, ‘Nkolo, Nkolo,’ nde bakokɔta na bokonzi ya likoló, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló.”—Matai 7:21.
Na yango, bato oyo bazali koyangelama na Bokonzi ya Nzambe basalelaka mpe bakumisaka nkombo ya Nzambe, Yehova, kaka ndenge Yesu azalaki kosala. (Yoane 17:26) Batosaka mobeko oyo Yesu apesaki ya koyebisa basusu “nsango malamu . . . ya bokonzi.” (Matai 24:14; 28:19, 20) Mpe balinganaka mpenza.—Yoane 13:35.
Ekobebisa “baoyo bazali kobebisa mabelé”
Makambo oyo ezali kosalema na mokili lelo oyo ezali komonisa ete mosika te Bokonzi ya Nzambe ekomema mbongwana monene awa na mabelé. Ndenge nini toyebi yango? Esili koleka mbula nkóto mibale, Yesu apesaki elembo moko oyo esangisi makambo ebele oyo esengelaki komonisa ete “bokonzi ya Nzambe ekómi pene.” (Luka 21:31) Ndenge tomonisaki yango na lisolo oyo eleki, makambo ya elembo yango ekómi komonana polele na mokili mobimba.
Nini ekoya na nsima? Yesu ayanoli boye: “Na ntango wana ekozala na bolɔzi moko monene oyo esalemá naino boye te banda na ebandeli ya mokili tii sikoyo, ɛɛ ekosalema lisusu mpe te.” (Matai 24:21) Likambo yango ekouta epai ya bato te. Nzambe nde akosala yango mpo na “kobebisa baoyo bazali kobebisa mabelé.” (Emoniseli 11:18) Bato ya mabe, oyo misala na bango ya mabe ebebisi mabelé “bakolongolama na mokili.” Kasi basembwi, oyo bazali kosalela Yehova na ndenge alingaka “bakotikala.”—Masese 2:21, 22.
Yehova azali mpenza na ntina ya kosala bongo. Mpo na nini? Tótala naino ndakisa oyo: Kanisá ete ozali na ndako ya biteni mingi oyo bato bafutelaka. Bafuteli mosusu bazali na etamboli malamu mpe bayebi kofanda na bato; bafutaka malamu mpe babatelaka ndako malamu. Kasi, bamosusu bazali makambo mabe mpe balukaka kaka bolamu na bango moko; balingaka kofuta ndako te mpe bazali mpenza kobebisa yango. Okebisi bango mbala na mbala, kasi bazali kobongwana te. Okosala nini? Lokola ezali ndako na yo, na ntembe te okobengana bafuteli wana ya mabe.
Ndenge moko mpe, lokola Yehova Nzambe nde akelá mabelé mpe biloko nyonso oyo ezali na kati na yango, azali na lotomo ya kopona soki nani abongi kofanda na mabelé. (Emoniseli 4:11) Yehova alobi ete mokano na ye ezali ya kolongola bato mabe na mabelé mpo bazali koboya kosala mokano na ye mpe konyokola basusu.—Nzembo 37:9-11.
Mabelé ekozonga Paladiso
Mosika te, Bokonzi ya Nzambe oyo etambwisami na Yesu Klisto ekoyangela mabelé. Yesu abengaki eleko yango “bozalisi lisusu.” (Matai 19:28) Bomoi ekozala ndenge nini na Paladiso? Talá bilaka ya Biblia oyo elandi:
Nzembo 46:9. “Ye akosukisa bitumba kino nsuka ya mokili.”
Yisaya 35:1. “Lisobe mpe esika ekauki ekosepela, lisobe ekoyoka esengo, ekobimisa [fololo] ya habeselete.”
Yisaya 65:21-23. “Baponami na ngai bakosepela kino ntango molai mpo na misala ya mabɔkɔ na bango. Bakosala mosala ya mpamba te, bakobota bana mpo na nsɔmɔ ya pwasa te.”
Yoane 5:28, 29, (hf). “Ntango ekoya wana nyonso bazali kati na nkunda bakoyoka mongongo [ya Yesu], mpe bakobima.”
Emoniseli 21:4. “[Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.”
Mpo na nini tosengeli kondima?
Ondimaka bilaka ya Biblia? Biblia esakolaki ete bato mingi bakondima yango te. Elobi boye: “Na mikolo ya nsuka basɛki bakoya . . . kotamboláká engebene bamposa na bango moko mpe kolobáká ete: ‘Wapi kozala na ye oyo elakamaki? Kutu, banda mokolo bankɔkɔ na biso balalá na kati ya liwa, makambo nyonso ezali kokoba kaka ndenge ezalaki banda na ebandeli ya bozalisi.’” (2 Petelo 3:3, 4) Kasi, basɛki wana bazali mpenza komikosa. Tótala makambo minei oyo ekoki kotinda yo ondima bilaka ya Biblia:
(1) Na ntango ya kala, Nzambe abomaki bato mabe. Mpela ya ntango ya Noa ezali mpenza ndakisa monene.—2 Petelo 3:5-7.
(2) Liloba ya Nzambe esakolaki na bosikisiki makambo oyo ezali kosalema lelo oyo na mokili.
(3) Ezali solo te ete “makambo nyonso ezali kokoba kaka ndenge ezalaki banda na ebandeli ya bozalisi.” Mokili ebebi na ndenge moko ya nsɔmɔ. Bomoi ekómi mpasi, bizaleli ya bato ebebi, mai, mopɛpɛ mpe bazamba ebebi makasi.
(4) “Nsango malamu . . . ya bokonzi” ezali kosakolama sikoyo na mokili mobimba mpe yango ezali komonisa ete mosika te “nsuka ekoya.”—Matai 24:14.
Batatoli ya Yehova bazali kosɛnga yo oyekola na bango Biblia, Liloba ya Nzambe, mpo oyeba makambo mingi na ntina ya elikya ya kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekoyangelama na Bokonzi ya Nzambe. (Yoane 17:3) Ya solo, etikali moke mabelé oyo ekóma kitoko mpenza. Yo mpe okozala na mokili yango?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 7]
Baoyo bazali koloba ete bomoi ekotikala kaka ndenge ezali lelo oyo bazali mpenza komikosa
[Elilingi na lokasa 8]
Yo mpe okozala na mokili yango?