Masolo ya basakoli ya Bokonzi
Nsango malamu euti na Norvège
Na Norvège, basakoli ya nsango malamu ya Bokonzi koleka 9 500, bazali komona makambo mingi oyo mazali kopesa esengo. Lokola emonisi yango masolo oyo malandi, bato na motema sembo bazali kondima ete nsango ya Biblia oyo esakolami na ba Témoins de Jéhovah ezali solo mpe ezali koyanola na mabondeli na bango.
◻ Mobali mpe mwasi moko bauti kobalana sika. babondelaki Nzambe asalisa bango na kozwa mokano moko malamu na bomoi na bango. Nsima na poso moko ba Témoins de Jéhovah mibale babetaki na ekuke na bango, mpe mwasi abengaki bango ete bakota na ndako. Mobali abimi kosukola vwatire mpo ete basili koyebisa ye makambo mabe na ntina na ba Témoins de Jéhovah. Lokola mwasi abotamaki na Liban, azalaki na mpasi mpo na kososola monoko oyo bazalaki koloba,mpe ba Témoins balakisaki ye nkombo ya Nzambe na monoko ya Arabe. Nsima na poso mibale, ba Témoins bayaki; mpe mbala oyo lisusu, mobali abimaki mpo na kosukola vuatire, Ba Témoins batunaki mwasi soki akokaki komona malamu ete mobali na ye azala elongo na bango na mbala ekoya mpo ete abongolaka monoko oyo bazali koloba. Alobaki ete akotuna ye.
Ntango ba Témoins bayei kotala bango mpo na mbala ya misato, mobali azalaki lisusu na nzela ya kokima te mpo ete vuatire na ye ezalaki mpenza peto; alandaki lisolo mpe atunaki mituna mingi mpo na kotya bokeseni kati na Ba Témoins de Jéhovah mpe lingomba oyo ezali kotemela mangomba mosusu. Lisolo eumelaki ngonga misato, mpe babalani yango bandimaki brochure moko. Ntango ba Témoins bakendaki, mwasi akendaki kolala, kasi mobali abandaki kotanga brochure mpe kotanga ba versets nyonso. Na katikati ya butu, alamwisaki mwasi na ye mpe alobaki na ye ete: “Osengeli kotanga mokanda oyo.’’ Mwasi alamukaki, mpe bakangaki yango elongo kino na ngonga ya mitano na ntongo. Esosolaki bango ete bamoni solo, basepelaki mingi mpenza mpe babondelaki Jéhovah na kosaleláká nkombo na ye. Ba Témoins babandaki boyekoli ya Biblia ya mbala na mbala elongo na bango, mpe babandaki koyangana na makila. Mobali atikaki mosala na ye ya soda, balongwaki na lingomba na bango mpe bango nyonso mibale batikaki komela makaya. Sikawa, babalani wana basili kozwa batisimo mpe bazali kosalela Jéhovah na esengo elongo na bandeko na bango mibali mpe basi ya mokili mobimba.
◻ Baklisto basi mibale ba Témoins de Jéhovah bazalaki kosakola ndako na ndako, mpe bakutaki mwasi moko oyo amonisaki bosepeli. Abengisaki bango ete bazongela ye na mbala mosusu, mpe atunaki bango lisusu soki akokaki mpe koyebisa basi mosusu ete basangana na lisolo yango. Ntango baklisto basi wana bazongaki, bakutaki basi mosusu minei. Moko kati na bango azalaki mpenza na molende mpo na oyo etali lingomba. Mwasi yango alobaki ete uta bolenge na ye, azali na mposa ya kotosa na etinda na Yesu oyo ya kozalisa bayekoli, yango nde epusaki ye na kokende na Afrike elongo na mobali na ye mpo na kosala na programme moko ebongisamaki mpo na kopesa lisalisi na mikili misusu. Basi nyonso oyo bazalaki wana, bazalaki na makambo mingi ya kotuna, mpe bayokanaki ete batemwe bazongaka kotala bango mbala mibale na sanza. Babengisaki mpe bazalani na bango mosusu, mpe bamoko bakobaki koya nde bamosusu batikaki. Nzokande, oyo azalaki na molende mingi mpo na lingomba na ye, amonaki ete azalaki mpenza koyekola solo. Ntango Pastere na bango alobaki ete akopesa lisalisi mpo na bato na bitumba mpe ete andimaki Trinité, mwasi yango amilongolaki na lingomba. Abandaki koyangana na makita ya ba Témoins de Jéhovah, mpe aumelaki te na kosangana na mosala ya kosakola. Nsima na mwa ntango moke, azwaki batisimo. Na nsuka, mwasi yango asali mbula 30 sikawa wana ezali ye na esengo ya kotosa mpenza na etinda na Yesu oyo ya kozalisa bayekoli.—Matai 28:19.
Jéhovah azali kopambola ba Témoins ya mboka Norvège kati na mosala na bango ya bulee, mpe baoyo bazali koyoka nsango malamu.