Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/9 nk. 4-6
  • Molimo etikalaka na bomoi nsima na kufa?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Molimo etikalaka na bomoi nsima na kufa?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Liteya oyo liuti na Biblia te
  • Tokendeke wapi soki tokufi?
  • Lolenge oyo liteya ya Bapakano ekómaki liteya ya lingomba
  • Oyo Biblia ezali koloba na ntina na molimo
    Nini ekómelaka biso soki tokufi?
  • Ozali na molimo oyo ekufaka te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Makanisi na yo mpo na molimo mazali na bopusi likoló na bomoi na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Molimo ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/9 nk. 4-6

Molimo etikalaka na bomoi nsima na kufa?

BASILI kolimbola molimo lokola “eloko moko ya elimo oyo ezali epai na moto, ekabwani na nzoto, ekokufaka te mpe ekosambisamaka mai Nzambe,” mpo na kozwa bolamu to mpo na kozwa etumbu na bomoi oyo ekoya (Le Petit Robert). Ebele na mangomba bazali kondima pene na ndimbola wana. Mokanda La nouvelle encyclopédie catholique (Angl.) elobi ete: “Liteya oyo ete molimo ekufaka te mpe ezali na bomoi nsima na liwa ya moto . . . ezali moko na mateya na moboko na filozofi mpe teoloji ya boklisto.”

Lokola ezali boye, okokamwa mbala mosusu na koyeba ete endimeli wana ya moboko euti na filozofi ya Bapakano. Kala mpenza liboso ya mbotama na Yesu, bato bazalaki kondima ete molimo ezali eloko oyo ekobongwanaka te, eloko oyo ezali na bomoi libanda na nzoto, elingi koloba ezali na bomoi lokola mongoli to lokola elimo moko.

Bagreke babongisaki endimeli yango na maloba ya filozofi. Tala maloba ya Socrate, moto na filozofi oyo ayebani mingi: “Ndakisa soko ete molimo oyo ezali na kokabwana na nzoto na yango ezali peto: ekozala lisusu elongo na nzoto yango te, . . . ekokende epai na nzoto oyo ekokani na yango, epai na oyo emonanaka te, epai na oyo na bonzambe, oyo ekokufaka te mpe oyo na bwanya; ekozala na esika epai kuna ekozwa bolamu, epai kuna kozanga bososoli, bozoba, kobanga . . . bampasi nyonso mosusu oyo ezwaka bato ekozwa ye lisusu te, mpe . . . akolekisa mpenza ntango oyo etikali elongo na Banzambe!”​—Phédon, 80, D, E; 81, A.

Liteya oyo liuti na Biblia te

Ndenge nini endimeli na bapakano oyo ete molimo ekufaka te ekómaki koteyama kati na boklisto ya lokuta mpe na lingomba ya Bayuda?

Mokanda Nouvelle Encyclopédie catholique ezali kolembisa likambo yango wana ezali koloba ete: “Liteya ya kobika na molimo nsima na liwa ezali komonana polele te kati na Biblia.” Esengelaki koloba ete liteya oyo ete molimo ekufaka te ezali komonana ata moke te kati na Biblia! Mokanda yango endimi ete: “Likanisi ya molimo kati na Kondimana na Kala ezali lolenge moko te na oyo ezali na filozofi ya Bagreke mpe filozofi ya ntango oyo.”

Na oyo babengi Kondimana na Kala, liloba na hébreu néphésh, oyo ezali mingimingi kobongolama na “molimo”, ezali kokutama kuna mbala 754. Mpe na oyo babengi Kondimana na Sika, liloba na greke psukhê, oyo ebongolami mpe na molimo, ezali kuna mbala 102. Na kotalela lolenge oyo basaleli maloba yango kati na Biblia, okomona likanisi moko ezali kosimba motema.

Na Genese 2:7, tozali kotanga ete Nzambe apemaki mpema na bomoi kati na zolo ya Adam, mpe ye “akómaki molimo na bomoi (na hébreu néphésh)”. Simba likambo oyo ete: Adam azwaki molimo na bomoi te; kasi akómaki nde molimo. Na maloba mosusu, Adam, ekelamu wana ya sika azalaki molimo. Ezali bongo likambo ya kokamwa te ete mokanda Nouvelle Encyclopédie catholique eloba boye: “Kati na Kondimana na Kala, molimo ezali ndambo na moto te, kasi ezali nde moto mobimba, moto lokola ekelamu na bomoi.”

Ba versets mosusu ezali kondimisa solo wana. Ndakisa, na Levitike 7:20, elobeli “molimo oyo mokolya mbeka ya kimya” (MN). Levitike 23:30 (MN) elobeli ‘molimo nyonso oyo ezali kosala soko mosala nini.’ Na Masese 25:25 (MN), totangi boye: “Lokola mai na mpio epai na molimo molembi, bobele bongo ezali nsango malamu longwa na mboka mosika.” Mpo na kosukisa, na Nzembo 105:18 (MN) elobami ete: “Bazokisaki makaka na ye na minyoto, molimo na ye ekangamaki kati na minyololo.”

Kasi, nani akoki kolya mosuni, kosala mosala, komela mai mpe kokangama na minyololo? Ezali nde ndambo na moto oyo ezali elimo, oyo ekeseni na moto ye mpenza, to mpe ezali moto ye moko? Eyano ezali polele.

Tokosimba oyo ete, ezali te bobele moto ye moko nde azali molimo. Genese 1:20 elobi na biso ete na eleko moko ya kozalisama, Nzambe alobaki boye: “Tika ete mai ezala na milimo mingi na bomoi” MN. Na yango, ata bambisi mpe ezali milimo. Na eleko mosusu ya kozalisama, Nzambe amonisaki ete ‘nyama ya mboka, nyama oyo akolandaka mpe nyama ya zamba’ ezali milimo.​—Genese 1:24; tala Levitike 11:10, 46; 24:18; Mituya 31:28; Yobo 41:21; Ezekiele 47:9.

Na yango, kati na Biblia, liloba “molimo” ezali te komonisa eloko ya elimo oyo ekokabwanaka na nzoto nsima na liwa ya moto. Ezali nde komonisa moto, nyama, to bomoi oyo ezali epai na moko mpe na mosusu.

Tokendeke wapi soki tokufi?

Na polele mpenza, Biblia ezali na boyokani te elongo na liteya wana ya Bapakano oyo engebene yango, moto azali na molimo oyo ekokufaka te. Engebene yo mpenza, nani ateyi solo na likambo yango? Ezali Bapakano, bato na filozofi ya greke, to mpe bato oyo Nzambe asalaki kondimana elongo na bango? Ezalaki mpenza bato na Nzambe, baoyo ye apesaki Liloba na ye lipemami nde bateyaki solo.

Kasi, motuna moko motunami ete: Molimo ekómaka nini nsima na kufa? Mpo ete molimo ezali moto ye moko, ezali polele ete ntango moto akufaka, ezali molimo nde ekufaka.

Na elobeli mosusu, moto oyo asili kokufa azali molimo na kufa. Motuya monene ya ba versets ezali kondimisa yango. Ezekiele 18:4 elobi ete: “Molimo oyo esali lisumu, ekokufa.” Na Basambisi 16:30, (MN) totangi boye: “Mpe Samisona alobaki ete: ‘Tika ete molimo na ngai ekufa esika moko na Bafilistia.’” Ba versets mosusu emonisi ete molimo ekoki kobomama (Genese 17:14 MN), ekoki kotyama mopángá (Yosua 10:37 MN) mpe ekoki konyokwama (Yobo 7:15, MN), to mpe lisusu kozinda na mai (Yona 2:5). Molimo mowei, to mpe molimo mokufi, ezali nde moto oyo akufi.​—Levitike 19:28; 21:1,11.

Milimo na kufa mizali na ezalela nini? Kufa elimboli bobele kozanga bomoi. Biyokeli na biso bikangani na nzoto na biso. Mpo na komona, koyoka mpe kokanisa, esengeli ete miso na biso, matoi na biso mpe boongo na biso esala malamu. Soki miso te, tokoki komona te. Soki matoi te, tokoki koyoka te. Soki boongo te, tokoki kosala eloko moko te. Na ntango moto akokufaka, biloko nyonso wana bitikaka kosala. Akozala lisusu mpe te.

Na boyokani elongo na likambo yango, Mosakoli 9:5, 10 elobi ete: “Nde bakufi bayebi likambo te, . . . mpo ete ezali na mosala te, to na mwango te, to na mayele te, to na boyebi te kati na esika na bakufi, esika ekokenda yo.” Bobele bongo, Nzembo 146:3, 4 elobi ete: “Ndimela bazwi te, to mpe mwana na moto te, mpo ete ayebi kosunga te. Soki elimo na ye ekobima, akozonga lisusu na mabelé; bobele na mokolo yango, kokanisa na ye mpe esili” MN. Na yango, ntango bato (milimo) bakokufaka, bazalaka lisusu te.

Lolenge oyo liteya ya Bapakano ekómaki liteya ya lingomba

Bamosusu bakomituna boye ete: ‘Bongo Kondimana na Sika eteyi te endimeli oyo engebene yango ete molimo ekufaka te?’ Ata soko moke te. Mokanda Nouvelle Encyclopédie catholique elobi ete: “Kondimana na Sika etikali sembo na ntina na bososoli oyo Kondimana na Kala ezali kopesa na ntina na liwa.” Na elobeli mosusu, “Kondimana na Sika” ezali koteya ete molimo ekufaka Yesu Klisto amonisaki ete azali kondima te ete molimo ekufaka te wana etunaki ye boye: “Na Sabata ekoki na kosala malamu to mpe kosala mabe? Ekoki na kobikisa molimo to mpe na koboma yango?” (Malako 3:4 MN). Paulo, ntoma moklisto, amonisaki ete azalaki kondima likanisi oyo “Kondimana na Kala” epesi na ntina na molimo wana etangaki ye Genese 2:7: “Lokola ekomami ete: ‘Adam moto na liboso azalaki molimo na bomoi’.”​—1 Bakolinti 15:45, MN.

Bongo ndenge nini likanisi ya Platon ekómaki liteya ya lingomba? Mokanda Encyclopédie de la religion et de l’éthique (angl.) ya James Hastings elimboli ete: “Ntango nsango malamu na boklisto elandaki makanisi ya Bayuda mpo na kokóta na oyo ya Baloma, likanisi na ntina na molimo na lolenge ya Baebele ebongwanaki na likanisi ya Bagreke, yango ememaki mpe makama na boumeli ya ntango wana.’’ Bateyi ya lingomba balukaki koyeisa nsango na bango “polele epai na bato oyo bazalaki na makanisi ya Bagreke” na kosaleláká “maloba mpe makanisi ya Bagreke.” Bobele bongo, bateyi ya teoloji ya Bayuda babandaki mpe kondimisa kati na mikanda na bango “bopusi makasi oyo ya liteya ya Platon.” encyclopédie juive (Angl.).

Na bongo, liteya ya Biblia na ntina na molimo elongolamaki mpe bakitanyaki yango na liteya oyo emonani mpenza ete euti na Bapakano. Tokoki kolongisa ezalela wana te na kolobáká ete, yango esili kobenda bato mingi epai na boklisto. Na ntango asakolaki na Athènes, epai kuna mpenza makanisi na Bagreke ezalaki mingi koleka, ntoma Paulo apesaki liteya ya Platon te na ntina na molimo. Na kokesene, apesaki nde liteya na boklisto oyo ya lisekwa, ata soko ebele na Bagreke oyo bazalaki koyoka ye bazalaki na mpasi mpo na kondima maloba na ye.​—Misala 17:22-32.

Ya solo, ntoma Paulo asili kopesa biso likebisi oyo na ntina na kosangisa solo ya Biblia mpe mateya ya Bapakano: “Lisangana nini ezali kati na moi mpe molili? Kokokana nini ezali kati na Klisto mpe Beliala?” (2 Bakolinti 6:14, 15). Ntembe ezali te ete, na kopesáká nzela na liteya ya Bapakano ete ekóma moko na miboko ya filozofi ya teoloji na yango, boklisto ya lokuta esili kotyola Nzambe ye moko.

Elikya mpo na bakufi

Moto na moto azali na bonsomi na kondima oyo elingi ye. Kasi, okoki koboya te solo oyo ete, liteya ya kozanga kokufa na molimo euti na Biblia te. Kasi, bato bazali ata na elikya moko te ya kozala na bomoi nsima na liwa?

Nsima wana atunaki ete: “(Moto) akobika nde lisusu?,” Yobo ye moko ayanolaki na motuna na ye, wana apemamaki na elimo na Nzambe: “Yo (Jéhovah) okobyanga mpe ngai nakozongisela yo. Okozala na mposa mpo na mosala ya maboko na yo.” (Yobo 14:14, 15). Na solo mpenza, Biblia ezali kopesa elikya ya lisekwa epai na baoyo nyonso oyo Nzambe asili koboma kati na makanisi na ye. Ye azali kozela na motema likoló, ntango oyo akozongisa basali na ye ya sembo na bomoi, lokola Yobo. Yesu Klisto amonisaki bosolo yango na kolobáká ete: “Bokamwa te na likambo oyo, mpo ete ntango ekoya wana nyonso bazali kati na nkunda bakoyoka mongongo na ye, bakobima baoyo bazalaki malamu kino lisekwa na bomoi; baoyo basalaki yauli kino lisekwa na kosambisama.”​—Yoane 5:28, 29.

Ntango esakweli wana ekokokana, Yisaya 25:8 elaki ete Nzambe “akosilisa kufa libela mpe akokómba mpisoli na bilongi nyonso”. Engebene Emoniseli 21:4, yango elimboli mokili oyo kati na yango “kufa ekozala lisusu te”. Okolinga kozala na bomoi na mokili oyo epai kuna kokunda moto ekozala lisusu te, matanga ekozala te, nkunda te, mayita mpe te, na mokili oyo epai kuna mpisoli ya mpasi ekozala te, kasi bobele mpisoli ya esengo?

Ya solo, mbala mosusu bateyaka yo ntango nyonso ete molimo ekufaka te. Kasi, na koyekoláká Biblia, okoki kozala na kondima na bilaká na yango bikosikolaka.a Okoki mpe koyekola likambo osengeli kosala mpo na kosangola bilikya yango, ezali na kobikaka te lokola molimo oyo ekokufaka te, kasi na kozaláká na “bomoi ya seko” kati na Paradis na mabelé.​—Yoane 17:3; Luka 23:43.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Soki ozali na mposa ya koyekola Biblia, komela bakomi ya zulunalo oyo, to mpe tuna na Salle du Royaume ya Ba Témoins de Jéhovah ya mboka na yo.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto