Ozali na molimo oyo ekufaka te?
Nzoto na biso ezalaka kaka mosuni mpe makila to ezalaka mpe na eloko mosusu oyo emonanaka te? Bomoi esukaka soki tokufi to ezalaka na eloko moko na kati ya nzoto na biso oyo etikalaka na bomoi?
MANGOMBA eteyaka makambo ndenge na ndenge na oyo etali bomoi nsima ya liwa; kasi mingi na yango euti na likanisi moko oyo: soki moto akufi eloko moko oyo ezalaka na nzoto na ye etikalaka na bomoi. Bato mingi balobaka ete “eloko” yango ezali molimo. Yo mpe okanisaka bongo? Tozalaka na molimo na kati ya nzoto na biso? Molimo ezali nini? Bato bazalaka na molimo oyo ekufaka te? Ezali na ntina mingi tóyeba malamumalamu ndenge oyo tosalemá!
“Moto akómaki molimo ya bomoi”
“Molimo” ezali nde eloko moko oyo ezalaka na nzoto mpe soki moto akufi ebimaka mpe ekobaka kozala na bomoi? Buku moko oyo elimbolaka Biblia (Holman Illustrated Bible Dictionary) elobi ete “mbala mingi, molimo elimbolaka moto ye moko.” Na ndakisa, Genese 2:7 elobi boye: “[Yehova] Nzambe asalaki moto na putulu ya mokili, mpe apemaki kati na zolo na ye mpema ya bomoi, mpe moto akómaki molimo ya bomoi.” Adama, moto ya liboso, azalaki molimo.
Bavɛrsɛ mosusu ya Biblia emonisi mpe ete “molimo” ezali nde moto. Na ndakisa, Biblia elobeli molimo oyo ezali kosala mosala. (Levitike 23:30, NW) Biblia elobeli mpe molimo oyo ezali koyoka mpasi, kosilika, kozanga mpɔngi, mpe konyokwama na makanisi. (Basambisi 16:16 NW; Yobo 19:2; Nzembo 119:28; Misala 2:43; 1 Batesaloniki 5:14) Baloma 13:1 emonisi mpe ete molimo ezali nde moto; elobi boye: “Tiká ete molimo nyonso etosaka bakonzi oyo bazali liboso.” Na 1 Petelo 3:20 tozali kotánga boye: “Na mikolo ya Noa, . . . bato moke, elingi koloba, milimo mwambe, bamemamaki kozanga likama na mai.” Bavɛrsɛ yango emonisi te ete molimo ezali eloko moko oyo etikalaka na bomoi ntango moto akufi.
Ezali boni mpo na banyama mpe banzete? Ezali mpe milimo? Tótalela ndenge oyo Biblia elobeli kozalisama ya banyama. Nzambe alobaki boye: “Tiká mai etondana mpenza kotondana na milimo ya bomoi.” Na mokolo oyo elandaki Nzambe alobaki lisusu boye: “Tiká mabelé ebimisa milimo ya bomoi na mitindo na yango, nyama ya mboka mpe nyama oyo elandaka mpe nyama ya zamba ya mabelé na motindo na yango.” (Genese 1:20, 24, NW) Na yango, bikelamu nyonso ya bomoi, elingi koloba bato mpe banyama bazali milimo. Kasi, esika moko te Biblia elobi ete banzete ezali milimo.
Liloba “molimo” esalelamaka mpe na ndimbola mosusu. Na Yobo 33:22 tozali kotánga boye: “Molimo na ye ebɛlɛmi na nkunda, bomoi na ye epai ya babebisi.” Na vɛrsɛ yango liloba “molimo” mpe “bomoi” elakisi eloko moko. Na yango, “molimo” ekoki mpe kolimbola bomoi oyo moto azali na yango. Yango wana, mpo na kolobela banguna oyo bazalaki koluka koboma Moize, Biblia elobi ete “bato nyonso oyo bazalaki koluka molimo na [ye].” (Exode 4:19, NW) Lisusu, mpo na Yesu Klisto, Biblia elobi boye: “Mwana ya moto ayaki . . . kopesa molimo [bomoi] na ye lisiko na esika ya bato mingi.”—Matai 20:28.
Ndimbola oyo Biblia epesi mpo na “molimo” ezali mindɔndɔ te mpe ezali bongolabongola te. Liloba yango ekoki kolimbola moto to nyama to mpe bomoi ya ekelamu moko. Ndenge tokomona yango, ndimbola yango eyokani malamu na likambo oyo Biblia elobi ekómelaka molimo na ntango ya liwa.
‘Molimo oyo asali lisumu akokufa’
Biblia elobi boye: “Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.” (Ezekiele 18:4) Ntango mosakoli Eliya anyokwamaki mingi “abandaki kosɛnga ete molimo na ye ekufa.” (1 Mikonzi 19:4, NW) Yona mpe “azalaki ntango nyonso kosɛnga ete molimo na ye ekufa.” (Yona 4:8, NW) Nyonso wana ezali komonisa ete ntango moto akufi, molimo mpe ekufi; molimo ezali te eloko moko oyo etikalaka na bomoi ntango moto akufi. Lokola moto azali molimo, soki akufi elimboli ete molimo nde ekufi.
Kasi ndenge nini tokoki kolimbola bavɛrsɛ ya Biblia oyo elobeli molimo moko oyo ebimaki to molimo moko oyo ezongaki? Mpo na likambo oyo ekómelaki Laele na ntango azalaki kobota, Biblia elobi ete, “ezalaki molimo na ye kolongwa (mpo ete akufaki) ye abyangaki nkombo na ye Bene-Oni, nde tata na ye abyangaki nkombo na ye Benyamina.” (Genese 35:18) Mpo na lisekwa ya mwana ya mwasi oyo akufelá mobali, 1 Mikonzi 17:22 elobi boye: “[Yehova] ayokaki mongongo ya Eliya mpe molimo ya mwana [ezongelaki, NW] ye mpe abikaki.” Nyonso wana emonisi nde ete molimo ezali eloko moko oyo emonanaka te mpe oyo ekoki kobima to mpe kokɔta na nzoto?
Tóbosana te ete ndimbola mosusu ya liloba “molimo” ezali “bomoi.” Na yango, koloba ete molimo ya Laele ezalaki kobima elimboli ete bomoi na ye ezalaki kosuka. Kutu, Babiblia mosusu ebongoli maloba “molimo na ye ezalaki kobima” na “bomoi na ye ezalaki kobima” (Knox) to mpe “liboso ya kokata motema” (Bible na Lingala ya lelo). Ndenge moko mpe na lisolo ya mwana ya mwasi oyo akufelá mobali, bomoi ya mwana yango nde ezongaki.—1 Mikonzi 17:23.
Moto azali molimo
Biblia emonisi polele ete moto azali na molimo te, kasi azali nde molimo. Lokola moto azali molimo, soki akufi asengeli kosekwisama mpo azonga lisusu na bomoi. Biblia elaki boye: “Bókamwa te mpo na yango, mpamba te ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo [ya Yesu] mpe bakobima, baoyo basalaki makambo ya malamu bakobima mpo na lisekwa ya bomoi, baoyo bazalaki na momeseno ya kosala makambo ya mabe mpo na lisekwa ya kosambisama.” (Yoane 5:28, 29) Elaka yango nde elikya ya solosolo mpo na bakufi, kasi te liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te.
Ezali mpenza na ntina koyeba malamumalamu soki lisekwa elimboli nini mpe bolamu oyo yango ekomemela bato! Ezali mpe na ntina kozwa boyebi ya Nzambe mpe ya Klisto, mpamba te na libondeli moko Yesu alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo oyekola Biblia mpo oyeba Nzambe, Mwana na ye, mpe bilaka na Ye. Tolendisi yo osolola na Batatoli ya Yehova to okomela babimisi ya zulunalo oyo.
[Bililingi na lokasa 4]
Bango nyonso bazali milimo
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Ntaba: CNPC—Centro Nacional de Pesquisa de Caprinos (Sobral, CE, Brasil)