Ozali nde kolanda kotambola kati na solo?
“NAZALI na esengo eleki oyo te: . . . ete bana na ngai balanda kotambola kati na solo.” (3 Yoane 4, MN) Ezali boye nde ntomá Yoane alobaki pene na nsuka ya bomoi na ye molai. Mpiko ya ‘bana na ye’, baoyo ye amemaki na “solo”, ezalaki kosepelisa ye mingi mpenza. Bobele bongo, Jéhovah azali kosepela wana basambeli na ye bazali kotambola kati na solo. Na mikolo na biso, ezali esengo mpenza na komona lisangá monene oyo lizali na bamilió ya basangani na bango bazali kolanda nzela oyo ya mayele!—Masese 27:11.
Nzokande, atako bango nyonso, basali na Nzambe bakangami makasi mpenza na solo, kasi baklisto mosusu bazali kopota lisusu mbango te to mpe bazali ata kotika losambo ya peto. Yango ekoki kokamwisa biso te, mpamba te likambo moko ebimaka mpe na ekeke ya liboso. (2 Timote 4:10; Baebele 2:1) Nzokande, likambo oyo ete bamosusu bazali kozonga nsima ezali komonisa ntina mpo na moto na moto ete akengela elimo na ye. Paulo apesi elendiseli oyo epai na baklisto nyonso ete: “Bomimeka bino mpenza soko bozali kati na kondima, mpe bosalaka yango ntango nyonso.” (2 Bakolinti 13:5.) Moklisto nyonso asengeli bongo komituna boye: ‘Ndenge nini nakoki koyeba mpenza ete nazali kolanda kotambola kati na solo?’
Bamosusu basili kozonga nsima to nkutu kotika kotambola kati na solo mpo ete balembaki—mbala mosusu mpo na maladi to mpo na matata elongo na moto mosusu. Bamosusu bazali komipengola na solo. Balingi kozwa mwa matomba oyo epesami na ebongiseli ya biloko ya ntango oyo na boumeli na yango. Nini tosengeli kosala mpo ete tolembisa lombangu na biso te? Mpo na koyanola na motuna oyo, totalela ndakisa oyo Yesu atikelaki biso.
Tolanda ndakisa na Yesu
Yesu akutanaki na mikakatano mingi. Asilisaki matata oyo mazalaki kati na bayekoli mpe alongaki koyina mpe kotyela oyo ezalaki kouta epai na banguna na ye. Atemelaki komekama oyo ezalaki kouta na mokili. Ya solo, bapesaki ye bozwi mpe lokumu oyo moto moko azwa naino yango te. (Matai 4:8-11; Yoane 6:14, 15) Atako bongo, Yesu atikaki te kolanda kotambola kati na solo. Eloko nini esalisaki ye?
Ntoma Paulo ayebisi biso yango wana ekomi ye boye: “Topota na etingya na emekaneli na mbango etyami liboso na biso, awa ezali biso kotala Yesu, ye mobandisi mpe mosukisi na kondim. Mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye, ayikeli nzete mpiko, kotyoláká nsoni na yango mpe afandi na loboko ya mobali na kiti na bokonzi ya Nzambe. (Baebele 2:1, MN) Likambo oyo abombaki na makanisi na ye “esengo oyo etyamaki liboso na ye,” mbano monene oyo ezalaki kozela ye, esalisaki Yesu na kolanda kotambola kati na solo. Esengo yango “etyamaki liboso na ye” ezalaki kolongola mpenza mpasi ya ntango moke oyo ekokaki kolembisa ye to mpe kopengola ye na mosala na ye.
Likambo oyo ya kobomba mbano kati na makanisi, ekoki kosalisa biso na koyika mpiko lokola Yesu. (Emoniseli 22:12) Mpo na kolobela likanisi yango, tozwa ndakisa ya mosali mobembo moko azali kotambola na nzela ya ngomba molai mpenza. Amiyoki lisusu na makasi te mpe alembi. Kotambola ekómi mpasi mpenza mpe nzela ezali komonana bobele molai. Mpe wana ekómaki ye na nsóngé ya ngomba, amoni na mosika engumba epai kuna azali kokende. Na mbala moko, kotambola etikali lisusu mpasi mingi te. Komona malamu mpenza esika epai kuna azali kokende, ezali kosalisa ye na kobosana bolembu na ye. Bobele bongo, ezali petee mpenza mpo na moklisto na kolanda kotambola kati na solo soki abómbi mokano na ye polele mpenza kati na makanisi.
Tomekola ntoma Paulo
Moto mosusu mpe ayikaki mpiko na mimekamo mingi oyo mikokaki kolembisa ye: ezali bongo ntoma Paulo. Asilisaki kokabwana mpe matata oyo ezalaki kati na baklisto, ayikaki mpiko na maladi makasi, na monyoko, na bampasi, na mikakatano, ata mpe na botemeli kati na masangá. (1 Bakolinti 1:10; 2 Baklisto 10:7-12; 11:21-29; 12:7-10) Mpo na nini Paulo alembaki te kino ete atika lisangá? Alimboli boye ete: “Nayebi kosala makambo nyonso kati na ye oyo akokembisaka ngai na nguya.” (Bafilipi 4:13) Amekaki komema mikumba na ye moko te, kasi abongwanaki epai na Jéhovah mpo ete asunga ye.—Nzembo 55:22.
Liziba na Nzambe oyo Paulo azalaki koluka lisalisi mpo na koyika mpiko na mimekamo ezali mpe kopesa lisalisi na mikolo na biso. Biblia elobi ete: “(Jéhovah) akopesa nguya epai na ye oyo alembi; epai na ye oyo azangi makasi, akobakisa nguya Bilenge bakosenzwa, bakolemba, ata bankumu mpe bakotuta mabaku mpe kokweya, ee, nde baoyo batye motema epai na Jéhovah bakozwa nguya na sika. Bakopumbwa na mapapu lokola mpongo. Bakopota mbango nde bakolemba te; bakotambola nde bakosenzwa te.” (Yisaya 40:29-31, MN.) Soki tobongwani epai na Jéhovah mpo ete apesa biso makasi na nzela na boyekoli ya moto na moto, na koyanganaka na makita, na nzela na mosala na boklisto ya molende mpe mingi mpenza na nzela ya mabondeli, tokolonga komekama mpe bolembu oyo ekoki koya na ntango moko to mosusu.Nzembo 1:1-3; Baloma 10:10; 1 Batesaloniki 5:16, 17; Baebele 10:23-25.
Bamilió na bato bazali komibongisa mpo na kozala na bomoi kati na Paradis
Satana azali nzambe ya ebongiseli ya biloko mabe oyo mpo na yango baklisto bazali bobele bapaya, bafandi na mokili mosusu. (2 Bakolinti 4:4) Tokamwa te soki makambo mosusu ezali komema kino na kolembisa biso to na kopengola biso na solo. Paulo akomi kati na mokanda na ye epai na Baebele ete: “Tozali na mboka na seko awa te, kasi bozali koluka mboka elingi koya.” (Baebele 13:14) Soki tomikundoli ete elikya na biso ezali te kati na mokili oyo ezali pene na kokufa, nde kati na oyo ezali koya, yango mpe ekosalisa biso mpo ete tozonga nsima te.
Na lolenge mosusu, baklisto bakokani na bapaya oyo batiki mboka na bango mpo na koluka mokili mosusu epai kuna bakoki kozala na bomoi malamu. Mingimingi, ezalaka mosala makasi. Esengeli na bango kosangisa mpe kosundola biloko na bango nyonso mpe kotika mpo na libela, esika oyo basili komesana na yango, baninga na bango mpe baboti na bango. Basengeli mpe kokende na mboka mopaya mpo na kozala na bomoi kati na bato oyo mbala mosusu bakoyamba bango malamu te, epai kuna basengeli koyekola monoko mosusu mpe komesana na lolenge na bomoi mosusu. Nzokande, mingi basili kosala yango bobele na elikya ya kokólisa bozwi na bango ya mosuni kati na mokili ya lelo.
Baoyo bazali kotika ebongiseli ya biloko oyo ezali pene na kokufa, toloba, baoyo bauti longwa na mokili, mpe bazali kokóma basangani na libota ya Jéhovah, basengeli kolonga ntembe motindo moko. Bazali kotika makanisi bazalaki na yango liboso mpo na kozala na bomoi na boyokani elongo na mitinda ya peto ya Liloba na Nzambe, mpe bazali koyekola “monoko na peto” ya solo. (Sefania 3:9; 1 Bakolinti 6:9-11) Bazali mpe kosala milende makasi mpo na kosalela Mokonzi monene) Yesu Klisto. Lisusu, mbala mingi, baboti na bango mpe baninga na bango ya kala bazali koboya bango, na boye ete basengeli batika bango libela.
Nzokande, baklisto bazali na mingi ya kozwa koleka baoyo bazali kotika mboka na bango na ntina na makambo na nkita. Yambo mpenza, bazali kokóta kati na lisangá oyo lizali kolinga bango mpe komibanzabanza na ntina na bango. (Luka 18:29, 30) Mpe likambo ya motuya mingi mpenza, bazali na boyokani malamu elongo na Jehovah, Nzambe ya Molongo mobimba. Bazali na kimya na elimo mpe bazali na elikya mpo na avenire, mpamba te bazali kozela na motema likoló, kokokana ya bilaka kitoko ya Nzambe. (Bafilipi 4:8, 9) Baoyo bazali kokanisa na makambo nyonso wana, bakoki komitika kopengolama te to mpe kolemba kino ete batika mosala mpo na libela. Eloko moko te ekolongola bango na nzela na nkaká oyo ezali komema na bomoi.—Matai 7:13 14; 1 Yoane 2:15-17.
Tobatela kolongono na biso ya elimo
Soko tokobatela kolongono ya nzoto na biso ntango nyonso, tokozala na makoki mingi ya kozanga bokono. Mpe atako bongo soko tobeli maladi, tokobika noki mpenza. Bobele bongo, soko tokobatela kolongono na biso ya elimo, na komonáká mapamboli oyo tozali kozwa kobanda sikawa mpe oyo ezali kozela biso, mpe soko totye motema likoló na nguya na Jéhovah na esika ya kotya motema na makasi na biso moko, tokolonga mikakatano na petee mpenza. Tokoki mpenza te kopengola makambo nyonso oyo ekoki kopengola biso na mosala na biso to na kolembisa biso. Kasi, soko tobatelaki kolongono na biso ya elimo liboso, makambo yango makoki kozindisa biso te.
Tobosana te ete Jéhovah azali na esengo wana basambeli na ye bazali komonisa mpiko. Bongo, tosepelisa motema na ye na kolandáká kotambola kati na solo.