Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/10 lok. 30
  • Olandaka malako?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Olandaka malako?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kati na libota
  • Kati na lisangá
  • Matomba na esengo
  • Omibongisi mpo na kobika?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Ndenge ya kozala na libota ya esengo
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Moize alandaki malamumalamu malako
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Okoki kozala na libota ya esengo
    Makambo oyo Biblia eteyaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/10 lok. 30

Olandaka malako?

TATA oyo na bolingo akolakisaka bana na ye mpo ete balonga na bomoi na bango mpe bazala na esengo ntango bakokóma mikóló. Mpo na bana oyo ya bolingo baoyo bakotosaka baboti na bango, bakondimaka malako mpo bayebi ete ezali mpo na bolamu na bango. Bobele bongo, Jéhovah, Tata na biso ya likolo atondi na bolingo, azali kopesa mitinda mpo ete basaleli na ye balonga bomoi na bango mpe bazala na esengo. Ezali bongo na ntina ete tolanda malako oyo Nzambe azali kopesa na nzela ya Liloba na ye, Biblia, mpe na nzela ya lisangá na ye ya mabelé.

Kati na libota

Tokozwaka mitinda na bisika bikeseni, ndakisa kati na libota. Libala mpe libota ezali bibongiseli ya bonzambe. Engebene Biblia, ezali Nzambe nde abalisaki mobali mpe mwasi ya liboso mpe alobaki na bango ete babota bana. (Genese 1:27, 28; 2:22-24) Mozalisi asili kopesa malako mpo na basangani nyonso ya libota, malako oyo matali mikumba ya moto na moto. Na ndakisa, mpo na mobali mpe tata, azali mokonzi ya libota, oyo elimboli ete azali na mokumba ya koteya, ya koleisa, ya kolatisa, ya kozala na ndako, ya kobatela mpe kopesa toli epai na basangani ya libota na ye. Ezali ye lisusu nde akozwa makatami ya ntina mpenza oyo matali libota. Lokola azali mobali, asengeli kozala na bizaleli malamu epai na mwasi na ye mpe kopesa ye lokumu lokola mbeki na motau. (Baefese 5:22, 23; 1 Timoté 5:8; Petelo 3:7) Mwasi asengeli kotosa mobali na ye, komonisaka mpenza botosi ya mozindo mpe komimonisa mosungi mobongi. Na nsuka, Makomami mazali kolobela mingi ete bana basengeli kotosa baboti na bango.​—Genese 2:18; Baefese 6:1-3; 1 Petelo 3:1, 2.

Nini ekomaka wana malako oyo malandami te? Kozanga komimonisa na bizaleli malamu ya mobali epai na mwasi na ye to botosi moke ya mwasi epai na mobali ezali komema na kokabwana mpe na koswana. Na solo mpenza, mingi na mabala ezali kokufa likoló ya makambo motindo oyo. Kozanga botosi mpe botomboki ya bana ekopesaka mawa mpenza na baboti mingi. Bazali mbala na mbala komema mikumba minene, mpamba te bazali kobokola bana na bango na toli malamu te, mpe, boye, ‘bazali kookisa bango nkanda’.​—Baefese 6:4.

Atako ezali na bapesi-toli na bituluku, ba psychologues (baoyo bazali koyekola bizaleli ya bato) mpe bato mosusu oyo bakopesaka makanisi ya ndenge na ndenge likoló na lolenge ya kosilisa mikakatano na mabota, nzokande ata toli na bango moko te ezali malamu koleka malako oyo Mozalisi ya libota azali kopesa kati na Biblia. Na kolandáká yango, tozali kozwa bolamu ya solo mpe esengo.​—Nzembo 19:7-9.

Kati na lisangá

Esengeli na biso lisusu tolanda mitinda oyo mokonzi ya lisangá, Yesu Klisto, azali kopesa biso na nzela ya “moombo na sembo mpe na mayele,” oyo atyami na mabelé lokola esaleli ya lisangá na Nzambe. (Matai 24:45-47; Baefese 5:23) Basangani nyonso ya lisangá basengeli kosala na boyokani na mitinda mipesami mpo na kozala na kimya mpe na bomoko. Baoyo bazali koteya masangá mpe bazali kosalisa bamosusu, basengeli kokangama na kolanda mitinda miuti na lisangá na Jéhovah. Na bongo, bakokokisa mosala na bango malamu mpenza. Malako yango makoki kotalela lolenge ya kosangana na mosala ya kosakola, lolenge ya kosilisa mikakatano na lisangá, lolenge ya kopesa batoli mpe bilendiseli, lolenge ya koyikisa mpiko baoyo banyokwami, mpe makambo mosusu. Ezali mpe na malako likoló na lolenge ya kobongisa mateya malamu mpe na kolendisa baoyo nyonso bazali kosangana na lisangá na boklisto.​—Misala 20:20; Baloma 12:6-8; Bagalati 6:1; 1 Batesalonike 3:1-3.

Bankulutu mpe bakengeli ya masangá basengeli mpenzampenza kopesa ndakisa malamu na likambo oyo. college central ezali kotinda malako oyo bankulutu basengami na kolanda malamu mpenza mpe na bosembo nyonso. Basengeli kosalela yango na kotalela bamposa ya lisangá. Tosengeli kobosana te ete Yesu Klisto nde azali kotambwisa lisanga na boklisto. Azali kososola malamu mpenza bamposa ya masanga ya mokili mobimba mpe azali kopesa lisalisi mpe bilendiseli oyo esengeli. Bankulutu basengeli kokakatana te mpo na kosalela mitinda oyo bazali kozwa epai na lisangá na bonzambe. Na bongo, bapesa ndakisa malamu epai na basangani nyonso ya lisangá mpe bakosalisa bango na kozala na bomoko kati na bango mpe elongo na libota ya mokili mobimba ya baklisto na solo.​—Misala 15:1-31; Baebele 13:7; Emoniseli 5:6.

Matomba na esengo

Moto oyo azali kotonga ndako akotosa mpenza ba plans oyo eyemami na moto oyo ayekolaki mosala yango mpo ete ndako eumela. Na mikolo na mobulu oyo mozalaki liboso na mpela, Noé azwaki mokumba ya kotonga masuwa. Azwaki malako mpo na lolenge na kosala yango, lisusu mpo na koponama ya bato mpe banyama oyo asengelaki kokotisa mpo na kobika na mpela oyo esengelaki koya nsima. Lolenge nini Noé asalaki? Biblia elobi ete: “Noa asalaki bobele bongo, mpe asilisaki nyonso elakaki Nzambe ye.” Bobele Noé mpe baoyo bazalaki elongo na ye kati na masuwa nde babikaki na mpela. (Genese 6:5, 13-22; 7:23) Mpo lelo oyo, tozali kobika na eleko ekokani mingi mpenza na mikolo na Noé; yango wana Nzambe akoboma bato mabe nyonso. Biblia ezali koyebisa biso matambe nini tosengeli kosala soki tolingi mpenza kozala kati na baoyo bakobika.​—Matai 24:37-39; 2 Petelo 3:5-7, 11.

Na yango, toyamba na botondi mpenza, malako oyo Jéhovah azali kopesa biso na nzela na Liloba na ye likomami mpe na nzela ya lisangá na ye ya mabelé, mpe tosalela yango. Yango ekomema biso na kozwa elonga mpe ekozwila biso bolamu, mpe ekobikisa bomoi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto