Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/5 nk. 21-25
  • Omibongisi mpo na kobika?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Omibongisi mpo na kobika?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo ya ntango na biso oyo ekokani na mikolo ya Noa
  • Tosengeli kozala na kondima mpo na kobika
  • Kosembolama mokemoke ezali kobongisa biso
  • Omibongisa mpo na kobika
  • Okweisaka mokili na kondima na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • “Atambolaki elongo na Nzambe ya solo”
    Mekolá kondima na bango
  • “Atambolaki elongo na Nzambe ya solo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Nzambe ‘abatelaki ye ná bato mosusu nsambo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/5 nk. 21-25

Omibongisi mpo na kobika?

“Kɔtá na masuwa na libota na yo nyonso elongo, mpo ete namoni ete ozali moyengebene liboso na ngai na kati ya bato oyo.”​—GENESE 7:1.

1. Ebongiseli nini Yehova azwaki mpo na kobikisa bato na mikolo ya Noa?

NA MIKOLO ya Noa, Yehova “ayeisaki mpela likoló ya mokili moko ya bato oyo bazalaki kotyola Nzambe”; kasi abongisaki mpe ndenge oyo bato mosusu bakokaki kobika. (2 Petelo 2:5) Nzambe ya solo apesaki moyengebene Noa malako ya sikisiki mpo na kotonga masuwa mpo na kobikisa bomoi na ntango ya mpela ya mokili mobimba. (Genese 6:14-16) Ndenge mosaleli nyonso ya sembo ya Yehova asengeli kosala, “Noa asalaki bobele bongo, mpe asilisaki nyonso elakaki Nzambe ye.” Soki tozali na bomoi lelo oyo, ezali mpo Noa atosaki Nzambe.​—Genese 6:22.

2, 3. (a) Ndenge nini bato ya ntango ya Noa batalelaki mosala oyo ye azalaki kosala? (b) Noa akɔtaki na masuwa na elikya nini?

2 Kotonga masuwa ezalaki mosala moke te. Na ntembe te, bato mingi bazalaki kokamwa ntango bazalaki kotala mosala oyo Noa ná libota na ye bazalaki kosala. Atako bongo, bandimaki kaka te ete mpo na kobika, basengeli kokɔta na masuwa. Nsukansuka, motema molai ya Yehova epai ya bato mabe wana ekómaki na nsuka.​—Genese 6:3; 1 Petelo 3:20.

3 Nsima ya ebele ya bambula oyo Noa ná libota na ye basalaki mosala makasi, Yehova alobaki na Noa boye: “Kɔtá na masuwa na libota na yo nyonso elongo, mpo ete namoni ete ozali moyengebene liboso na ngai na kati ya bato oyo.” Na kondima mpe elikya nyonso na maloba ya Yehova, “Noa akɔtaki na masuwa na bana babali na ye mpe mwasi na ye mpe basi ya bana na ye.” Yehova akangaki porte ya masuwa mpo na kobatela basambeli na ye. Ntango Mpela eyaki na mokili, emonanaki ete masuwa ezalaki eloko oyo Nzambe abongisaki mpo na kobikisa bato.​—Genese 7:1, 7, 10, 16.

Makambo ya ntango na biso oyo ekokani na mikolo ya Noa

4, 5. (a) Yesu akokanisaki eleko ya kozala na ye na nini? (b) Makambo nini ya ntango na biso ekokani na mikolo ya Noa?

4 Mpo na komonisa ete ntango ya kozala na ye na elimo ekokokana na mikolo ya Noa, Yesu alobaki boye: “Se ndenge mikolo ya Noa ezalaki, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.” (Matai 24:37) Emonani ete alobaki solo. Mingimingi kobanda 1919, likebisi lokola oyo Noa apesaki ezali kosakolama epai ya bato ya bikólo nyonso. Kasi, bato mingi bazali kotalela yango ndenge kaka bato batalelaki likebisi oyo epesamaki na mikolo ya Noa.

5 Yehova atindaki Mpela oyo ebomaki mokili oyo ‘etondaki na mobulu.’ (Genese 6:13, NW) Liboso Mpela eya, bato nyonso bazalaki komona ete Noa ná libota na ye bazalaki kosangana te na mobulu wana mpe bazalaki kosala na kimya nyonso mosala ya kotonga masuwa. Na likambo yango mpe, tozali komona ete mikolo ya Noa ekokani na mikolo na biso. Lelo oyo, bato oyo bazali sembo bazali “komona bokeseni kati na moyengebene ná moto mabe, kati na ye oyo azali kosalela Nzambe mpe ye oyo azali kosalela ye te.” (Malaki 3:18, NW) Bato oyo bazali na makanisi ya mabe te mpo na Batatoli ya Yehova balobaka ete bazali bato ya sembo, ya boboto, ya kimya mpe ya molende. Bato yango bamonaka mpe ete bizaleli wana ekesenisaka Batatoli na bato mosusu. Batatoli baboyaka makambo nyonso ya mobulu mpe batikaka ete elimo ya Yehova etambwisa bango. Yango wana bazalaka na bomoi ya kimya mpe balukaka boyengebene.​—Yisaya 60:17.

6, 7. (a) Likambo nini bato ya mikolo ya Noa basosolaki te, mpe ndenge nini yango ezali komonana lelo oyo? (b) Bandakisa nini emonisi ete bato mingi bandimaka ete Batatoli ya Yehova bakeseni na bato mosusu?

6 Bato ya ntango ya Noa basosolaki te ete Nzambe azalaki elongo na Noa mpe ete moto yango azalaki kosala makambo oyo Nzambe atindaki ye. Bazwaki na lisɛki makambo oyo azalaki kosakola, yango wana bayokaki likebisi na ye te. Ezali boni lelo oyo? Atako bato mosusu bazali kosepela na mosala ya Batatoli ya Yehova mpe etamboli na bango, mingi bazali komona mpamba nsango malamu ya Biblia mpe makebisi na yango. Mbala mingi, baninga ya kartye, baninga ya mosala, to bandeko bakumisaka baklisto ya solo mpo na bizaleli na bango ya malamu, kasi na nsima okoyoka, “Mabe moko kaka bazali Batatoli ya Yehova!” Likambo oyo bato yango bayebaka te ezali ete soki Batatoli bamonisaka bizaleli lokola bolingo, kimya, motema malamu, bolamu, boboto, mpe komipekisa ezali mpo elimo santu ya Nzambe etambwisaka bango. (Bagalatia 5:22-25) Likambo yango esengelaki kutu kotinda bato bázwa na lisɛki te nsango oyo bazali kosakola.

7 Na ndakisa, na ekólo Russie, Batatoli ya Yehova bazalaki kotonga Ndako ya Bokonzi na engumba moko. Mobali moko oyo azalaki koleka atunaki ndeko moko boye: “Oyo bato ya ndenge nini bazali kotonga awa—moko te azali komɛla likaya, kofinga, mpe moto moko te alangwe! Bozali Batatoli ya Yehova te?” Ndeko yango alobaki na ye ete, “Soki nalobi ete tozali Batatoli te, okondima?” Mobali yango alobaki mbala moko ete, “Nakondima te.” Na engumba mosusu, kaka na Russie, guvɛrnɛrɛ akamwaki mingi ntango amonaki Batatoli bazali kotonga Ndako ya Bokonzi. Alobaki ete liboso azalaki kokanisa ete mangomba nyonso ezali kaka ndenge moko, kasi nsima ya komona ndenge Batatoli ya Yehova basalaka makambo mpo na bolamu ya bato mosusu, makanisi na ye ebongwanaki. Wana ezali ndakisa mibale mpamba oyo emonisi ete basaleli ya Yehova bakeseni na bato oyo batosaka mitinda ya Biblia te.

8. Tosengeli kosala nini mpo tóbika ntango mokili mabe oyo ekobomama?

8 Noa azalaki ‘mosakoli ya boyengebene’ na mikolo ya nsuka ya ‘mokili ya kala’ oyo ekufaki na Mpela. (2 Petelo 2:5) Na mikolo ya nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, basaleli ya Yehova bazali kosakola mitinda na ye ya sembo mpe koyebisa bato ete bakoki kobika mpe kokɔta na mokili ya sika. (2 Petelo 3:9-13) Noa ná libota na ye babikaki mpo bakɔtaki na masuwa; lelo oyo mpe mpo bato bábika, basengeli kozala na kondima mpe kokɔta na ebongiseli ya Yehova awa na mabelé.

Tosengeli kozala na kondima mpo na kobika

9, 10. Mpo na nini tosengeli kozala na kondima mpo na kobika ntango ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekobomama?

9 Moto asengeli kosala nini mpo abika ntango mokili oyo Satana azali koyangela ekobomama? (1 Yoane 5:19) Ya liboso, asengeli koyeba ete azali na mposa ya libateli. Na nsima, asengeli koluka libateli yango. Bato ya mikolo ya Noa bamipesaki na makambo na bango ya mokolo na mokolo ndenge bamesanaki mpe bamonaki ntina ya koluka libateli te liboso ya likama oyo ezalaki koya. Bazangaki mpe eloko mosusu: kondima epai ya Nzambe.

10 Nzokande, Noa ná libota na ye bayebaki ete bazali na mposa ya libateli mpe lobiko. Lisusu, bazalaki na kondima epai ya Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, Yehova Nzambe. Ntoma Paulo akomaki boye: “Na kozanga kondima likoki ya kosepelisa mpenza [Yehova] ezali ata moke te, mpo moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe ete akómaka mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.” Abakisaki boye: “Na kondima Noa, nsima ya kozwa likebisi ya Nzambe na ntina etali biloko oyo emonanaki naino te, amonisaki ezaleli ya kobanga Nzambe mpe atongaki masuwa mpo na kobikisa bato ya ndako na ye; mpe na nzela ya kondima wana akweisaki mokili likambo, mpe akómaki mozwi-ya-libula ya boyengebene oyo ezali engebene kondima.”​—Baebele 11:6, 7.

11. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Yehova abatelaki bato na ntango ya kala?

11 Mpo na kobika na nsuka ya ebongiseli ya makambo mabe oyo, tosengeli kosuka kaka te na kondima ete ebongiseli yango ekobomama. Tosengeli kozala na kondima, kosalela bibongiseli nyonso oyo Nzambe apesi mpo na lobiko. Tosengeli kondima mbeka oyo Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, apesaki mpo na kobikisa biso. (Yoane 3:16, 36) Nzokande, tosengeli kobosana te ete kaka bato oyo bakɔtaki na masuwa nde babikaki na Mpela. Ndenge moko mpe, na Yisalaele ya kala, moto oyo abomi moto na nko te azalaki kobatelama na mboka ya kobombama se soki akɔti kuna mpe atikali kuna tii liwa ya nganga-nzambe monene. (Mituya 35:11-32) Na mikolo ya Moize, ntango bolɔzi ya zomi ebɛtaki mokili ya Ezipito, mwana ya liboso ya libota mokomoko ya Baezipito akufaki, kasi oyo ya Bayisalaele babikaki. Mpo na nini? Yehova alobaki na Moize boye: “[Bayisalaele] bakokamata ndambo ya makila mpe bakotya yango na makonzí mibale ya monɔkɔ ya ndako mpe na likoló ya monɔkɔ ya ndako wana ekolya bango yango. . . . Mpe moto moko te akobima na ndako na ye kino ntɔngɔ.” (Exode 12:7, 22) Okanisi ete mwana moko ya liboso ya Bayisalaele akokaki kozwa na lisɛki lilako wana ya Nzambe mpe kobima na ndako oyo bapakolaki makila na makonzí ya monɔkɔ ya ndako mpe likoló ya monɔkɔ ya ndako?

12. Motuna nini mokomoko na biso asengeli komituna, mpe mpo na nini?

12 Yango wana, tosengeli kotalela malamu bomoi na biso. Tozali mpenza na kati ya ebongiseli ya Yehova oyo ezali kobatela biso na elimo? Ntango bolɔzi monene ekoya, bato oyo bazali koluka libateli wana bakoganga na esengo mpe bakozala na botɔndi mingi. Mpo na bamosusu, ekozala nde kolela mpe mawa.

Kosembolama mokemoke ezali kobongisa biso

13. (a) Mpo na nini Yehova asembolaki makambo ndenge na ndenge na ebongiseli na ye? (b) Lobelá mwa makambo oyo esembolamaki mokemoke.

13 Yehova asemboli mokemoke makambo mingi na ebongiseli na ye awa na mabelé. Kosembolama yango ekómisi kitoko ebongiseli na ye oyo ezali kobatela biso na elimo mpe elendisi yango. Kobanda bambula ya 1870 tii na 1932, bankulutu ná badiakono bazalaki koponama na voti. Na 1932, na esika ya kopona bankulutu na voti, bakómaki kaka kopona na voti bandeko ya komite ya mosala ya kosakola mpo na kosunga mokambi ya mosala oyo biro ezalaki kopona. Na 1938, bandeko nyonso oyo basengeli kozwa mikumba na lisangá bakomaki koponama na ndenge ya Teokrasi. Kobanda 1972, na kolanda malako ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, bankulutu ya lisangá batindaka bankombo ya bato oyo bamoni ete bakoki kozwa mikumba mpe biro ya filiale etindaka mikanda oyo eyebisaka bankombo ya bandeko oyo bandimami lokola bankulutu mpe basaleli na misala. Mosala ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezalaki kobakisama mbula na mbula mpe mbongwana ndenge na ndenge esalemaki mpo básala mosala na bango malamu.

14. Eteyelo nini ebandaki na 1959?

14 Na 1950, boyekoli mozindo ya Nzembo 45:16 epesaki nzela na kosala ebongiseli ya kopesa bandeko formasyo mokemoke. Vɛrsɛ yango elobi boye: “Bana na yo bakozala na esika ya batata na yo; okotya bango lokola bana ya mokonzi na mokili mobimba.” Bankulutu oyo bazali kotambwisa masangá bazali kozwa formasyo mpo na mikumba oyo bazali kokokisa lelo oyo mpe oyo bakokokisa nsima ya Armagedona. (Emoniseli 16:14, 16) Eteyelo ya mosala ya Bokonzi ebandaki na 1959. Na ntango wana, bakambi ya masangá, ndenge bazalaki kobenga bakɛngɛli-bakambi, bazalaki kolanda formasyo ya sanza mobimba. Lelo oyo, eteyelo yango ezali kopesa formasyo na bakɛngɛli nyonso mpe basaleli na misala. Na nsima, bandeko yango bazali kopesa Batatoli mosusu formasyo na masangá na bango. Na ndenge yango, bandeko nyonso bazali kozwa lisungi ya elimo mpe bazali kobakisa mayele na mosala na bango ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi.​—Malako 13:10.

15. Tángá makambo mibale oyo esalemaka mpo lisangá etikala pɛto.

15 Bato oyo balingi kokɔta na lisangá ya boklisto basengeli kokokisa masɛngami. Yango wana, basɛki bazali kokɔta na lisangá te, ndenge kaka bato ya ndenge wana bakɔtaki te na masuwa ya Noa. (2 Petelo 3:3-7) Mingimingi kobanda 1952, Batatoli ya Yehova bandimaka mpenza ebongiseli ya kobimisa na lisangá basumuki oyo baboyi kobongola motema mpo lisangá etikala pɛto. Nzokande, basumuki oyo babongoli motema bazwaka lisalisi mpo ‘bákoba kosala banzela ya semba mpo na makolo na bango.’​—Baebele 12:12, 13; Masese 28:13; Bagalatia 6:1.

16. Basaleli ya Yehova bazali ndenge nini na elimo?

16 Bomɛngo ya elimo ya basaleli ya Yehova ezali likambo ya kokamwa te, eyei mpe na mbalakaka te. Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova alobaki boye: “Talá, baombo na ngai bakolya, nde bino bokoyoka nzala. Talá, baombo na ngai bakomɛla, nde bino bokoyoka mposa ya mai. Talá, baombo na ngai bakosepela, nde bino bokozwa nsɔni. Talá, baombo na ngai bakoyemba mpo na esengo ya motema, nde bino bokonguluma mpo na mpasi ya motema, bokolela mpe mpo na mikakatano ya [elimo, NW].” (Yisaya 65:13, 14) Yehova azali kokoba kopesa biso ebele ya bilei ya elimo na ntango oyo ebongi, bilei oyo ezali kosalisa biso tótikala makasi na elimo.​—Matai 24:45.

Omibongisa mpo na kobika

17. Nini ekosalisa biso tómibongisa mpo na kobika?

17 Koleka eleko mosusu nyonso, lelo oyo ezali mpenza ntango ya ‘kotyelana likebi mpo na kopusama na kozala na bolingo mpe na misala ya malamu, kotikáká te koyangana na biso mpenza, ndenge bamosusu bamesaná kosala, kasi nde tólendisanaka.’ (Baebele 10:23-25) Kozala pembeni ya bandeko mpe kozala na mosala mingi na kati ya moko ya masangá koleka 98 000 ya Batatoli ya Yehova ekosalisa biso tómibongisa mpo na kobika. Bandeko na biso ya elimo bakosunga biso ntango tozali kosala nyonso mpo na kolata “bomoto ya sika” mpe tozali kosala milende ya solosolo mpo na kosalisa bato mosusu báyeba ebongiseli oyo Yehova asali mpo na kobikisa bato.​—Baefese 4:22-24; Bakolose 3:9, 10; 1 Timote 4:16.

18. Mpo na nini ozali na ekateli ya kotikala na lisangá ya boklisto?

18 Satana ná mokili mabe na ye bazali koluka na ndenge nyonso komeka biso mpe kobenda biso mpo tótika lisangá ya boklisto. Kasi, tokoki kotikala na lisangá mpe kobika ntango ebongiseli ya makambo mabe ya ntango oyo ekobomama. Tiká ete bolingo mpo na Yehova mpe botɔndi na biso mpo na bibongiseli na ye etinda biso tózwa ekateli ya kosukisa milende ya Satana. Ekateli na biso ya kosala yango ekolendisama soki tozali kokanisa mapamboli oyo tozali na yango lelo oyo. Na lisolo oyo elandi, tokolobela mapamboli yango.

Okopesa eyano nini?

• Makambo nini ya ntango na biso ekokani na mikolo ya Noa?

• Ezaleli nini ezali na ntina mingi mpo na kobika?

• Makambo nini oyo esembolamaki mokemoke elendisi ebongiseli ya Yehova oyo ezali kobatela biso?

• Ndenge nini mokomoko na biso akoki komibongisa mpo na kobika?

[Elilingi na lokasa 22]

Bato ya mikolo ya Noa bazwaki maloba na ye na lisɛki

[Elilingi na lokasa 23]

Kozwa makebisi ya Nzambe na lisɛki te epesaka mbano

[Elilingi na lokasa 24]

Eteyelo ya mosala ya Bokonzi ezali kokokisa mokano nini?

[Elilingi na lokasa 25]

Sikoyo nde ntango ya kokangama na lisangá ya boklisto

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto