Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/10 nk. 30-31
  • Mituna na batangi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna na batangi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka likambo ya kolela ebembe to kosala matánga?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Likanisi ya baklisto na ntina na milulu ya bokundi ebembe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Baklisto basengeli kokunda bakufi kozanga mindondo mpe na ndenge oyo esepelisaka Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Tóbɔndisa baoyo bakufeli moto
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/10 nk. 30-31

Mituna na batangi

◼ Na Genese 3:1, mpo na nini Traduction du monde nouveau ezali kobongola liloba ya hébreu ‘aroum na adjectif ‘prudent’ le ‘ekenge‘ nzokande ba Biblia mosusu ezali kotya “mayele mabe”?

Mokapo wana mozali kotangama boye: “Nyoka alekaki nyama nyonso na mokili na ekenge, oyo Jehovah Nzambe asilaki kozalisa. Alobaki na mwasi ete, ‘Nzambe alobaki solo ete bino bokoki kolya mbuma na nzete nyonso na elanga te?”’ M.N.

Na Masese 12:23 mpe na bisika misusu, Traduction du monde nouveau ebongoli liloba ya hébreu aroum na “mayele,” oyo ezali ndimbola na solo ya liloba oyo ntango yango etaleli bato. Kasi, lokola ebele na maloba mosusu, ’aroum ezali na bandimbola ndenge na ndenge. Na ndakisa, Benjamin Davidson alimboli ‘aroum lokola: “l. mayele mabe, bokosi. ll. bokebi, ekenge.” Lexique analytique hébreu et chaldéen (angl.).

Na yango, mpo na nini Traduction du monde nouveau eponi ndimbola ya mibale, “ekenge”, kati na Genese 3:1? Liponi wana ezali na boyokani na mabongoli mosusu ya Biblia. Na ndakisa. ntango Genese 3:1 ebongolamaki na greke na libongoli ya Septante, na ekeke ya misato liboso ya ntango na biso, ezali liloba phronimos nde esalelamaki, bobele liloba moko nde esalelami na Matai 10:16 bikeke mingi na nsima: “bozala na ekenge lokola nyoka mpe bomibatela lokola bibenga.” La Bible en français courant.

Ludwig Koehler, moyekoli ya lokola na hébreu, alobaki boye na 1945 ete: “Nyoka azali na mosawa. Ezalela yango ekoki kolimbolama malamu na greke na liloba phronimos, mpamba te, ezalela wana ya sokɛ to ekenge, nyoka azali na yango, mpe asalelaka ezalela oyo, phrenés.” Kati na likambo oyo, Phrénes ezali kolimbola lolenge na mayele oyo banyama mosusu bazali mpe komonisa.​—Tala Masese 30:24.

Ezali mpe lisusu na ntina moko ya monene koleka mpo na koponama ya liloba ‘ekenge’ na esika ya “mayele” to ”mayele mabe” kati na Genese 3:1. Koloba awa ete nyoka azali na mayele mabe, liboso amonisama mpenza ete azali komema Eve na lisumu, ekoki kotinda batangi mingi na koloba ete Biblia ezali komonisa bobele nyoka mpamba azali koyanga mwango wana na kosalelaka mayele na ye, mayele oyo mazali mingi mpenza. Ndimbola motindo wana ekobongola lisolo yango na lisapo, nkutu lisapo moko ya bozoba mpenza.

Nzokande, Biblia ezali koyebisa ete ezalaki mpenza te nyoka moko na mayele mabe oyo asalaki likambo wana kati na elanga na Edene. kasi ekelamu moko monene oyo eleki nyoka. Emoniseli 12:9 emonisi polele ete Satan le Diable nde azalaki “nyoka na kalakala” yango. Ezalaki ye, nguya na kozanga komonana mpe ekelamu na nguya eleki ya bato, oyo asalelaki nyoka na lolenge ya moto moko na mayele azali koloba kozanga ete aningisa bibebu na kopesaka likanisi lokola ete nyama moko ezali kolandalanda pembeni na ye nde ezali koloba. Ekenge oyo nyoka akelamaki na yango esalaki ete akanisama lokola ekelamu moko oyo ebongi mpo na mayele mabe. Ntango Eve amonaki ete, na kokesena na ezalela na ye ya ekenge, azalaki kobanga te, kasi afungolaki monoko na molende nyonso mpo na koloba na ye, ezalaki mpenza likambo ya kokamwa mingi mpo na kobenda likebi na ye.

Liloba lipemami na Nzambe lizali na masapo mpamba te, mpe, na kobongolaka yango malamu, Traduction du monde nouveau ezali kosalisa biso na kososola likambo yango.​—2 Timoté 3:16.

◼ Lokola ba Témoins de Jéhovah bayebi ete bakufi bayebi lisusu likambo moko te. mpo na nini bamonaka ntina ya koyangana na milulu ya bokundi ebembe ya baninga na bango kati na kondima?

Boyebi ya solo mpo na oyo Biblia ezali koloba na ntina na bakufi ezali kobalela ba Temoins de Jehovah na mateya ya lokuta mpe, mingi mpenza, na ezalela moko ya kozanga mayele na ntango ya bokundi. Ezali mpe kopesa bango bantina ya koyangana na bokundi ya baklisto.

Liloba na Nzambe ezali komonisa polele ete ntango moto akufi azali na bomoi lisusu te kati na molimo moko ezangi kokufa. (Mosakoli 9:5) Nsima na liwa, nzoto ezali kozonga na putulu, to na nzela na kopola to na nzela na kotumbama. Moto oyo akufi azali lisusu na bomoi te; akozongela bomoi bobele soki Nzambe asekwisi ye na mikolo mizali koya liboso.​—Yoane 5:28, 29; Misala 24:15.

Na ntina yango, ba Temoins de Jehovah bazali kolanda te milulu na bokundi oyo mitongami likolo na endimeli oyo ete mowei azalaki na molimo oyo mokufaka te, oyo ezali kokoba kozala na bomoi na esika mosusu. Bazali koyangana te na matanga ya bawei, epai bazali koyemba banzembo to bileli makasi oyo bazali kokanisa ete ezali kobangisa “bilimu”. Bazali kokengela nzoto ya mowei butu mobimba te mpe bazali koboma nzoto te mpo na kolembisa milimo ya bakufi.

Nzokande, yango elingi koloba te ete basaleli na Nzambe balelaka te. Liwa ya moboti to ya moninga ya motema ezali ntina ya mawa, ezala ata mpo na basambeli ya solo oyo bazali na boyebi ya solo na ntina na bakufi. Na ndakisa, ntango tata na mabota Yakobo akanisaki ete nyama na yauli moko ebomaki Yosefe, “alelaki mwana na ye na boumeli ya mikolo mingi.” Tozali kotanga lisusu ete “bana na ye nyonso mibali mpe basi batelemaki mpo na kobondisa ye.” (Genese 37:33-35) Ntango mosembwi Yakobo akufaki, Yosefe “alakaki basaleli na ye minganga ete babongisa tata na ye ete apola te,” mpe “Baezipito balelaki ye mikolo ntuku nsambo.” Atako libota na Yakobo endimaki te makanisi na libunga ya Baezipito likolo na bakufi, ezali polele ete bayokaki mawa mpo na liwa na ye. “Mpe etuka mobimba na Yosefe mpe bandeko na ye,” balingaki ete Yakobo akundama na esika ya malamu, mpe ata bapaya bamonaki ete bazalaki mpenza na mawa.​—Genese 50:1-11.

Tokoki mpe kotanga bandakisa mingi misusu ya Biblia ya basaleli na Jéhovah baoyo babulunganaki mpenza na liwa ya moko na bandeko na bango to ya moboti mpe baoyo balelaki, na lolenge ya malamu.a Ntango akendaki epai na bandeko na Lazare oyo batondaki na mawa. Yesu azangi mawa te, azalaki mpe na esengo te. Atako azalaki na elikya kati na nguya ya lisekwa, Yesu alelaki. (Yoane 11:33-35) Nsima na liwa na Yesu ye moko, bayekoli na ye balelaki; nzokande, ayebisaki bango ete akobomama, mpe akosekwisama.​—Matai 16:28; Yoane 16:17-20; 20:11.

Basaleli na Nzambe lelo bazali koyoka mawa, mpe bakoki kozala na yango, na kufa ya moto. Nzokande, boyebi na bango ya Biblia ezali kosalisa bango na kokanga motema to na komonisa mawa na bango na lolenge ya malamu, na kolanda likanisi ya 1 Batesaloniki 4:13, 14: “Bandeko, tolingi te ete bozanga koyeba makambo na bango basili kolala ete boyoka mawa te pelamoko bamosusu baoyo bazali na elikya te. Mpamba te, soko tozali kondima ete Yesu akufi mpe asekwi lisusu, bongo na nzela na Yesu, Nzambe akoyeisa lisusu bango balali esika moko na ye.”

Lokola tomoni yango, esengeli kozala na esika oyo bazali kokunda moklisto (to na diskur oyo epesami mpo na mondimi)? Ba Témoins bamonaka malamu na kosala bokundi mpe kozala wana, mpe yango ezali mpo na ntina ya Biblia.

Toyeba lisusu ete: Ntango Yakobo akanisaki ete abungisi mwana na ye, “bana na ye nyonso mibali mpe basi batelemaki mpo na kobondisa ye.” (Genese 37:35.) Kati na mikili mingi, bonkoko esengaka ete libota eyangana mpo na bokundi. Yango epesaka libaku epai na bamosusu, bazalaki na boninga makasi te elongo na mowei mpe na bango batalelami mpenza na likambo yango te na kozala na maloba ya bolingo mpe ya kobondisa. Nsima na liwa ya Lazare, ‘Bayuda mingi bayaki epai na Malata mpe Malia mpo ete babondisa bango mpo na ndeko mobali na bango.’ (Yoane 11:19) Libaku epesami mpe na baklisto oyo balingi ‘kobondisa baoyo bazali kati na bolozi.’​—2 Bakolinti 1:4.

Bakengeli baklisto, ata soki bazali na makambo mingi ya kosala, basengeli kopesa ndakisa mpo na oyo etali kobondisa etonga. Bazali komikundola ete Yesu, ndakisa na bango, Mobateli na mpate aleki malamu, azwaki mokumba ya ‘kobongisa batutami na motema mpe kobondisa baoyo nyonso bazali kolela.’ (Yisaya 61:1, 2; Yoane 10:14) Yesu apesaki te elendiseli yango bobele na ntango oyo yango ebebisaki misala na ye te. asengelaki nde kosala molende ya solo mpo na kozala elongo na bandeko ya Lazare oyo bazalaki na mawa mpo na kokabola mawa na bango.​—Yoane 11:11, 17, 33.

Ata baklisto oyo bayebi makambo mingi te mpo na koyebisa na libota ya mowei na ntango ya bokundi, bazali mpe na likoki ya kosala bango malamu ata na kozala elongo na bango. Basangani ya libota oyo ezali na mawa bakoki kozwa kobondisama monene kati na komonana mpe na bolingo ya basangani ya lisanga, bilenge mpe mikolo, baoyo bayei mingi. Tozali koyeba lisusu mayoki ya Bayuda mosusu na ntango oyo Yesu akomaki epai na bandeko basi ya Lazare na kotangisaka mpisolo: “Tata lokola alingaki ye!” (Yoane 11:36) Baboti oyo bazali bandimi te, baninga ya penepene to baninga ya mosala baoyo bayaki na ebembe ya moklisto, basepelaki mingi mpenza na motuya monene ya ba Temoins oyo bazalaki wana, likambo oyo esalisaki ete bandima solo na Biblia oyo eyebisameli bango.

Ezalela ya ba Témoins oyo bazali koya na bokundi esengeli kotalela likambo wana. Atako bayebi ete mowei azali koyoka mpasi te, mpe ete bazali na elikya ete lisekwa ezali kozela bato nyonso ya sembo, bazali kobosana te toli oyo: ‘Ntango na kolela mpe ntango na koseka, ntango na kolela mokufi mpe ntango na kobina.’ (Mosakoli 3:4) Milulu ya bokundi to mpe likita moko mpo na kokanisa mowei ezali ntango te mpo na koloba makasi to kosekisa bato. Na ntango ya mawa, ezali na boyokani elongo na toli oyo: “Bosepelaka na basepeli; bólelaka na baleli.”​—Baloma 12:15.

Ezali mpe na ntina mosusu mpo na yango ba Témoins de Jéhovah bazali koyangana na milulu a bokundi. Liloba na Nzambe elobi ete: “Kokende na ndako na kolela eleki malamu na kokende na ndako na elambo; mpamba te yango ezali nsuka na bato nyonso mpe moto na bomoi akotya yango na motema na ye. . . . Mitema na bato na mayele mikozala na ndako na kolela, nde mitema na bazoba mikozala na ndako na bisengo.”​—Mosakoli 7:2-4.

Atako biso, ba Témoins de Jéhovah, tozali na bantina ya kolikya, maloba wana mapemami mpe makomami kati na Biblia mpo na bolamu na biso. Bokundi moto ekoki kokokisama na “ndako na kolela.” Na kozalaka wana, tokoki kobosana mitungisi na biso mpe kotya pembeni misala na biso ya mokolo na mokolo, mpe tokotya makanisi na biso likolo na bokuse ya bomoi na biso. Ezala na nzela na maladi to na mwa likambo moko ya mbalakaka’. liwa ekoki kozwa soko moto nani kati na biso mpe nokinoki kokomisa biso eloko mpamba, mpo ete “moto ayebi ntango na ye te.” (Mosakoli 9:11, 12) Baboti oyo bazali komema bana elongo na bango na milulu ya bokundi moklisto moko, bakomona mbala mosusu ete likambo yango ekoki kobimisa masolo mpo na bosolo ya liwa, ntina ya lisiko mpo na biso mpe mayele oyo ezali mpo na kosalela “Nzambe oyo azali kosekwisa bakufi.”​—2 Bakolinti 1:9; Mosakoli 12:1, 13.

Ba Temoins de Jéhovah bazali kotalela te milulu ya bokundi lokola sakramentu, kasi bazali kokanga ntina ete na ntango wana ya mpasi bazali na libaku ya komema libondisi. Na koyanganaka na yango, baklisto bakoki komonisa bolingo mpe limemya oyo bazalaki na yango mpo na moninga na bango oyo akufi. Mpe ekoki kozala ete bapusama na kokanisa na mozindo mpenza mpo na ndimbola ya bomoi, na lolenge oyo basengeli kosalela oyo ya bango liboso na Nzambe.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Genese 23:2, 19; Mituya 20:29: Deteronome 34:7, 8; 2 Samwele 1:11, 12; 3:31-34; 13:32-37; 18:33; 2 Ntango 35:24, 25; Yobo 1:18-20; Nzembo 35:14; Yilimia 9:1; Luka 7:12,13; 8:49-52; Misala 8:2; 9:39.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto