Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/11 nk. 18-22
  • Mokumba ya bakonzi baleki liboso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokumba ya bakonzi baleki liboso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Baklisto ya solo ‘batombokelaka bokonzi te’
  • Bazali kotosa mibeko
  • Bakonzi bakobangisaka
  • ‘Azali mosali na Nzambe’
  • Esengeli kozala na kondima
  • Ntango Leta aboyi kopesa lisalisi
  • Lolenge oyo baklisto bazali kotalela Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Likanisi ya boklisto na ntina na bakonzi baleki liboso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Bokonzi ya nani osengeli kotosa?
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Mpo na nini tosengeli kotosa bakonzi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/11 nk. 18-22

Mokumba ya bakonzi baleki liboso

“Mpo ete azali mosali na Nzambe mpo na malamu na yo. Nde soko okosala mabe, obanga.”​—BALOMA 13:4.

1, 2. Ndenge nini bandimi mingi ya boklisto na lokuta bazali kosangana na mobulu?

ESILI KOLEKA mibu mibale, likita moko ya bakonzi na mangomba esalemaki na Londres ezwaki ekateli moko oyo ebimisaki likanisi ya botemeli kati na zulunalo New York Post. Likita yango oyo esalemaki na quartier ebengami Lambeth, esika efandi episkopo monene ya lingomba Anglikane, eyanganisaki ba episkopo koleka 500 bango nyonso basangani ya Lingomba Anglikane. Bakonzi yango na mangomba balamusaki nkanda ya bato, na kozwaka ekateli moko kati na yango bamonisaki ete bazalaki kokweisa te bato oyo, “nsima na kosilisa kosalela myango nyonso mosusu, bazali kozwa ekateli ya kobunda na mindoki lokola mwango bobele moko ebongi mpo na kokotisa boyengebene.”

2 Engebene zulunalo Post, ekateli wana ezalaki mpenza kolongisa mobulu. Nzokande ba episkopo oyo balandaki bobele ezalela moko oyo ekomi komonana mingi. Ezalela na bango ekesenaki te na oyo ya sángo oyo, na Ghana, alobaki ete etumba ya batomboki ezalaki mwango moleki malamu mpe ya mbangu koleka mpo na kozwa bonsomi na Afrike; se ndenge moko na maloba na episkopo moko ya lingomba na metodiste na Afrike oyo “azwaki ekateli ya kobunda kino na nsuka mpo na bonsomi;” ebele na bamisionere ya boklisto na mokili oyo bazali mpe kobunda esika moko na batomboki mpo na kokweisa biyangeli na Azia mpe na Amerike ya Sudi.

Baklisto ya solo ‘batombokelaka bokonzi te’

3, 4. a) Mitinda nini baklisto ya nkombo mpamba oyo bazali kolendisa mobulu bazali kobuka yango? b) Moto moko amonaki nini na ntina na ba Témoins de Jéhovah?

3 Na ekeke ya liboso, Yesu alobaki na ntina na bayekoli na ye ete: “Bazali bato na mokili te pelamoko ngai nazali moto na mokili te.” (Yoane 17:14) Moto nyonso oyo ezali koloba ete azali’ moklisto bongo azali kolendisa mobulu azali moto ya mokili. Azali ata moyekoli na Yesu te mpe azali ‘na botosi te epai na bakonzi baleki liboso.’ (Baloma 13:1) Ekobonga na ye koyoka likebisi oyo epesamaki na ntoma Paulo: “Ye oyo azali kotombokela bokonzi, azali kotombokela yango ebongisami na Nzambe mpe baoyo bakotomboka, bakomiyeisela etumbu.”​—Baloma 13:2.

4 Na kokesena na ebele na basangani ya mangomba na boklisto ya lokuta, ba Témoins de Jéhovah bazali kosangana ata moke te na etumba. Ezali yango nde mobali moko amonaki, na Eropa, oyo azali koloba ete: “Esili ngai komona makambo oyo mangomba mpe politike bazali kosala, nazwaki ekateli ya kokweisa bokonzi. Na bongo namikotisaki na etuluku moko ya batomboki mpe nayekolaki kobeta mindoki ya lolenge nyonso. Nasanganaki mbala mingi na koyiba biloko na kosalelaka mindoki. Bomoi na ngai ezalaki ntango nyonso na likama. Kasi lokola ntango ezalaki koleka, ezalaki komonana polele ete tozalaki kobunda se mpamba. Nazalaki mpenza moto moko oyo azangi bosepeli mpe oyo azangi mpenza elikya ntango moklisto mwasi moko abetaki na ekuke na ngai. Alobelaki ngai mpo na Bokonzi na Nzambe. Namonaki ete ezalaki kolekisa ntango mpamba, nasengaki na ye aloba nde na mwasi na ngai. Ye ayokamelaki mpe abandaki koyekola Biblia. Na nsima ya mwa mikolo, nandimaki kosangana na boyekoli. Maloba mazangi ngai mpo na koyebisa bino elendiseli oyo nayokaki ntango nayebaki epai wapi nguya oyo ezali kopusa bato na kosala mabe ezali kouta. Bilaka kitoko oyo bitaleli Bokonzi bipesaki ngai elikya mpe ntina ya kozala na bomoi.”

5. Mpo na nini baklisto batosaka na kimya nyonso mikonzi baleki liboso, mpe kino ntango nini bakolanda kosala bongo?

5 Baklisto bazali bantoma to batindami ya Nzambe mpe ya Klisto. (Yisaya 61:1, 2; 2 Bakolinti 5:20; Baefese 6:19, 20) Lokola bazali bantoma to batindami, bazali komikotisa te na matata ya mokili. Atako bibongiseli mosusu ya politike bizali kozwa mwa matomba ya malamu kati na makambo ya nkita mpe ezali kotikela bato bonsomi mingi koleka mosusu, baklisto bazali kokumisa ata moko te kati na yango. Bayebi ete bibongiseli yango nyonso bizali ya kokoka te. “Yango ebongisami na Nzambe” na ntina boye ete Nzambe atikeli yango nzela eumela kino ntango Bokonzi na ye ekokitana yango. (Danyele 2:44) Na yango, baklisto bazali kotosa bakonzi baleki liboso na kimya nyonso, kolukaka bolamu ya seko ya bazalani na bango, epai na bango bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi.​—Matai 24:14; 1 Petelo 3:11, 12.

Bazali kotosa mibeko

6. Mpo na nini mibeko mingi na bato mizali malamu nzokande “mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe”?

6 Biyangeli ya mokili bizali kobimisa mibeko, mpe mingi kati na mibeko yango, mizali ya malamu. Tokoki kokamwa mpo na yango, mpamba te “mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe”? (1 Yoane 5:19) Te, mpamba te Jéhovah apesaki epai na tata na biso ya liboso, Adam, lisosoli, mpe eyokeli wana ya kobotama mpo na kokesenisa mabe na malamu ezali komonana na mitindo mikeseni kati na mibeko ya bato. (Baloma 2:13-16) Hammourabi, mosali na mibeko na mboka Babylone ya Kala, alobáká na maloba ya ebandeli ya buku na ye ya mibeko ete: “Ezali ntango wana babandaki kobenga ngai Hammourabi, mokonzi na lokumu mingi, mosambeli na banzambe, mpo na kolongisa boyengebene kati na mboka, mpo na kokweisa mabe, mpo na kobikisa bato bazangi nguya na monyokoli ya bato na nguya.”

7. Soki moto moko abuki mobeko, nani azali na lotomo ya kopesa ye etumbu, mpe mpo na nini?

7 Mikili mingi bazali koloba ete mibeko na bango mizali kokokisa mokano motindo moko: kopesa bolamu epai na bafandi ya mboka mpe kimya kati na mboka. Yango wana bazali kopesa etumbu epai na bato oyo bazali kosala makambo mabe, lokola koboma moto mpe koyiba, mpe bazali kotya mibeko mpo na makambo mosusu, na ndakisa ndelo ya vitesse ya mituka mpe bisika ya kotelemisa mituka. Baoyo nyonso bazali kobuka mibeko na nko bazali kotombokela bokonzi mpe “bakomiyeisela etumbu.” Nani azali kopesa etumbu yango? Ezali bobele Nzambe te. Liloba na greke oyo ebongolami na etumbu kati na verset oyo ekoki kolimbola kosambisama liboso na mikonzi ya leta kasi etali mpenza bisambiseli na Jéhovah te. (Tala 1 Bakolinti 6:7) Soki moto abuki mobeko, mokonzi aleki liboso azali na lotomo ya kopesa ye etumbu.

8. Lisangá ezali koseka nini soki moko na basangani na yango asali libunga moko monene?

8 Ba Témoins de Jéhovah bayebani ete bakotombokelaka bakonzi na mokili te. Soki ekomi ete mosungami moko ya lisangá abuki mobeko, lisangá ekosalisa ye te na kokima etumbu oyo epesameli ye. Soki moto moko ayibi, abomi, akoseli moto makambo, azali kofuta mpako te mpe taxes te, abebisi mwasi na makasi, azali komela bangi to azali kotemela na lolenge mosusu bokonzi oyo endimami, akozwa etumbu makasi kati na lisangá mpe azali na ntina moko te ya kokanisa ete azali konyokwama ntango apesameli etumbu epai na bakonzi ya Leta.​—1 Bakolinti 5:12, 13; 1 Petelo 2:13-17, 20.

Bakonzi bakobangisaka

9. Na nani baklisto bakoki kosenga lisalisi na lolenge malamu ntango bakanelami na bato oyo bazali kobuka mibeko?

9 Paulo akobi na kolobaka na ntina na bakonzi baleki liboso: “Mpo ete bakobangisa basali na malamu te kasi basali na mabe. Yo olingi ete obanga mokonzi te? Bongo, salaka bobele malamu mpe okozala na lokumu epai na ye.” (Baloma 13:3) Ezali baklisto na sembo te nde basengeli kobanga kozwa etumbu epai na mikonzi, kasi basali na mabe, baoyo bazali kosala ‘makambo mabe,’ makambo mazali kobuka mibeko. Ntango bakanelami epai na bato oyo bazali kotyola mibeko, ba Témoins de Jéhovah bakoki kondima libateli ya ba gendarmes to ya basoda.​—Misala 23:12-22.

10. ‘Makumisi’ nini ba Témoins de Jéhovah bazwaki epai na bakonzi?

10 Epai na moklisto oyo azali kotosa mibeko ya bakonzi baleki liboso, Paulo alobi ete: “Okozala na lokumu epai na ye.” Mpo na komonisa bosolo ya maloba oyo, totalela mwa mikanda oyo ba Témoins de Jéhovah ya Brezile bazwaki nsima na kosala ba assemblées na bango ya distrike. Oyo ya mokonzi moko akotalaka makambo ya masano na etuka: “Mpo na etamboli na bino ya kimya, bato bazali kotyela bino motema. Ezali elendiseli na koyeba ete ebele na bato bazali naino kondima Nzambe mpe bazali kosambela ye.” Oyo ya mokonzi moko ya libanda na masano na etuka: “Atako bato bazalaki mingi, na lisalisi ya ebongiseli na bino ya kokoka, eloko moko te ebebisi likita yango.” Oyo ya hotel de ville moko: “Tolingi kosalela libaku oyo mpo na kopesa bino longonya mpo na ordre malamu na bino mpe mpo na disipline na bino kitoko. Totombeli bino bolongi mingi mpo na mikolo mizali koya liboso.”

11. Mpo na nini ekoki kolobama soko moke te ete kosakolama ya nsango malamu ezali mosala mabe?

11 Liloba ‘mosala malamu’ elimboli likambo oyo esalemi na botosi na mibeko mipesami na bakonzi baleki liboso. Lisusu, mosala na biso ya kosakola, oyo epesameli etinda na Nzambe, kasi na moto te, ezali mosala mabe te likambo oyo mikonzi na politike basengeli koyeba yango. Mosala oyo ya kosakola na bato nyonso ezali kotombola nivo ya bizaleli ya bato oyo bazali kotya likebi mpo na yango. Mposa na biso ezali bongo ete bakonzi baleki liboso babatela lotomo na biso ya kosakola epai na bazalani. Paulo asengaki lisalisi epai na bakonzi mpo na ‘kolendisa na nzela na mibeko’ mosala ya kosakola nsango malamu. (Misala 16:35-40; 25:8-12; Bafilipi 1:7, MN) Kala mingi te, ba Témoins de Jéhovah basengaki mpe bandimami na Leta mpo na mosala na bango na Allemagne de l’Est, na Hongrie, na Pologne, na Roumanie, na Benin mpe na Myanma (Birmanie)

‘Azali mosali na Nzambe’

12-14. Ndenge nini bakonzi baleki liboso basalaki (lokola basali na Nzambe a) na ntango ya kala? b) na ntango na biso?

12 Mpo na oyo etali bakonzi ya Leta, Paulo abakisi ete: “Mpo ete azali mosali na Nzambe mpo na malamu na yo. Nde soko okosala mabe, obanga. Mpamba te ekomamaka mopanga mpamba te. Azali mosali na Nzambe mpo na “kokomisa nkanda na ye epai na moto oyo akosalaka mabe.”​—Baloma 13:4.

13 Bakonzi ya mikili misusu basalaki mbala mosusu lokola basali na Nzambe na lolenge ya kokamwisa mpenza. Ezalaki bongo mpo na Siruse ntango apesaki etinda epai na Bayuda ete batika Babilone mpe bazonga na Yelusaleme kotonga ndako na Nzambe. (Ezela 1:1-4; Yisaya 44:28) Artaxerxes azalaki mosali na Nzambe ntango atindaki Esdras elongo na makabo mpo na kotonga lisusu ndako yango, mpe ntango atindaki Néhémie na kozongela kotonga lopango na Yelusaleme. (Ezela 7:11-26; 8:25-30; Nehemia 2:1-8) Bokonzi ya Loma esalaki mpe lokola mosali na Nzambe ntango babikisaki Paulo katikati na ebele na bato oyo bazalaki kobeta ye na Yelusaleme, ntango babatelaki ye na mobembo oyo masuwa na ye ezindaki mpe bapesaki ye ndingisa ete azala na ndako na ye moko mpenza na Rome.​—Misala 21:31, 32; 28:7-10, 30, 31.

14 Motindo moko, ekomaki mpe ete bakonzi ya Leta basalaki lokola basali na Nzambe na ntango na biso. Na ndakisa na 1959, Esambiselo monene to cour suprême ya Kanada elongisaki Témoin de Jéhovah moko oyo afundamaki ete azali kokabola mokanda moko oyo ezali kotombokisa bato mpe oyo ezali na maloba ya kotuka na Québec.

15. Mingimingi, ndenge nini bakonzi bazali kosala lokola basali na Nzambe, mpe lotomo nini yango ezali kopesa bango?

15 Lisusu, biyangeli bikokoba kosala lokola basali na Nzambe na kobatelaka kimya kino ntango oyo Bokonzi na Nzambe ekozwa mokumba yango Lokola Paulo alobi yango, ezali bongo mpo na yango nde mokonzi azali “komema mopanga,” elembo ya lotomo na ye mpo na kopesa etumbu. Mbala mingi, etumbu yango ekoki kokende kino etumbu ya liwa. Nzokande, mikili mingi, basili kolongola etumbu ya liwa, likambo oyo ezali mpe lotomo na bango.

16. a) Lokola mokonzi azali mosali na Nzambe, likambo nini basaleli mosusu ya Nzambe bamonaki malamu na kosala? b) Mosala ya lolenge nini moklisto akoki kondima yango te, mpe mpo na nini?

16 Lokola bakonzi baleki liboso bazali basali na Nzambe, tozali koyeba sikawa mpo na nini Danyele, Bahebré misato, Néhémie mpe Mardochée bandimaki mikumba minene kati na biyangeli ya Babilone mpe ya Perse. Yango epesaki bango nzela na kosenga lisalisi epai na moyangeli ya Ekolo mpo na bolamu ya libota na Nzambe. (Néhémie 1:11; Esetele 10:3; Danyele 2:48, 49; 6:1, 2) Na mikolo na biso, baklisto mosusu bazali mpe kosala kati na Leta.a Kasi lokola bakabwani na mokili, bazali kolinga te kosangana na ba partis politiques, to kopesa nkombo mpo ete baponama lokola bayangeli, to kondima mosala moko kati na bibongiseli ya politike.

Esengeli kozala na kondima

17. Makambo nini mazali mbala mosusu kopusa bato oyo bazali baklisto te na kotombokela bakonzi?

17 Kasi ezali boni soki mokonzi azali kondima mabe, to monyokoli? Baklisto basengeli komeka kotya mokonzi mosusu na esika na ye, oyo emonani ete azali malamu? Ya solo, bokesene mpe mabe kati na biyangeli ebandi lelo te. Na. ekeke ya liboso, Bokonzi ya rome ezalaki kondima bokesene lokola boombo. Biblia ezali koloba mpo na bakongoli na mpako oyo bazalaki koyiba, mpo na mosambisi moko oyo azalaki moto mabe mpe mpo na guvernere moko ya etuka oyo azalaki koluka kozwa kanyaka.​—Luka 3:12, 13; 18:2-5; Misala 24:26, 27.

18, 19. a) Baklisto bazali kosala nini soki bakonzi na Leta bazali bango moko kobuka mibeko? b) Lokola mokomi moko na makambo ya kala amonisi yango mpe encadré oyo elandi awa na nse, ndenge nini baklisto babongisaki bomoi ya bato mosusu?

18 Baklisto ya ntango wana mbele bakokaki komeka kotya nsuka na bambeba motindo wana, kasi basalaki yango te. Na ndakisa, Paulo asakolaki kosilisama ya boombo te mpe alobaki te epai na baklisto oyo bazalaki na baombo ete batika bango. Nkutu apesaki nde toli epai na baombo mpe bankolo na bango na kosalelana na motema boboto oyo ebongi na baklisto (1 Bakolinti 7:20-24; Baefese 6:1-9; Filemo 10-16; tala mpe 1 Petelo 2:18) Motindo moko mpe, baklisto bazalaki kosangana te na mobulu, bazalaki nde na mosala mingi mpo na kosakola “nsango malamu ya kimya.” (Misala 10:36) Na mobu 66, limpinga na baromé ezingaki Yelusaleme, na nsima elongwaki. Na esika ete batikala esika moko na batomboki oyo bazalaki kobundela mboka, Baebele wana oyo bakomaki baklisto ‘bakimaki na ngomba’, na boyokani na malako na Yesu.​—Luka 21:20, 21.

19 Baklisto ya liboso bazalaki koluka te kobongola makambo ya ntango na bango; bazalaki nde kosala molende na kobongisa bomoi ya bazalani na bango na kosalisaka bango ete balanda mitinda na Biblia. Kati na mokanda na ye Mokili ya kala ya baromé (Angl.), mokomi na makambo ya kala John Lord akomaki ete: “Bolongi ya solo ya boklisto ezalaki komonana na mbongwana ya bizaleli ya bandimi, kasi ezalaki te mpo na kobongola bibongiseli ya mokili, biyangeli mpe mibeko.” Baklisto basengeli kosala ndenge mosusu lelo?

Ntango Leta aboyi kopesa lisalisi

20, 21. a) Kati na likambo nini bakonzi ya mokili moko basalaki te lokola basali na Nzambe mpo na malamu? b) Ba Témoins de Jéhovah basengeli kosala nini ntango banyokwami mpe Leta azali kokotela banyokoli na bango?

20 Na Septembre 1972, monyokoli moko makasi ebimelaki ba Témoins de Jéhovah kati na mokili moko ya Afrique centrale. Bankoto mingi kati na bango babotolaki bango biloko na bango mpe bazwaki minyokoli misusu: babetamaki, bayokisaki bango mpasi to mpe koboma bango. Bakonzi baleki liboso bakokisaki mokumba na bango, oyo ya kobatela Batemwe? Te! Nkutu, balendisaki monyokoli, kobenganaka baklisto wana ya kimya ete bákima kati na mikili ya penepene mpo na kozwa libateli

20 Ba Témoins de Jéhovah basengeli kotomboka mpo na kobundisa banyokoli motindo wana? Te. Baklisto basengeli koyika mpiko na kimya nyonso mpo makambo mabe motindo wana, komonisaka bopolo na ndakisa na Klisto, oyo elobami boye mpo na ye ete: “Atukamaki nde azongisaki kotuka te; ayokaki mpasi nde akanelaki moto te; kasi amipesaki epai na ye oyo akosambisaka sembo.” (1 Petelo 2:23) Bazali komikundola ete ntango Yesu akangamaki na elanga ya Getesemane, apamelaki moko na bayekoli na ye oyo akomelaki ye na kobimisaka mopanga, mpe alobaki na nsima epai na Ponce Pilate ete: “Bokonzi na ngai ezali na mokili oyo te. Soko bokonzi na ngai ezalaki na mokili oyo, mbele bato na ngai bakobunda ete nakabama epai na Bayuda te. Nde Bokonzi na ngai euti awa te.”​—Yoane 18:36; Matai 26:52; Luka 22:50, 51.

21 Batemwe wana ya Afrike, baoyo babosanaki ndakisa na Yesu te, bazwaki mpiko ya kolanda toli oyo ya Paulo: “Bozongisaka mabe mpo na mabe te; bolikiaka mpo na yango emonani sembo na miso na bato nyonso. Soko ekokoka, mpe lokola ezali likambo na bino, bozala na bato nyonso kimya. Balingami, bobukanisa mpo na bino mpenza te, kasi tika esika mpo na nkanda na Nzambe. Pelamoko ekomami ete: ‘Jéhovah alobi ete kobukanisa ezali likambo na ngai, ngai nakofuta” (Baloma 12:17-19; tala Baebele 10:32-34) Oyo nde ndakisa ya kolendisama bandeko na biso ya Afrike bapesi biso nyonso! Ata soki bakonzi baboyi kosala na motindo ya kolongobana baklisto ya solo bakotika mitinda na Biblia te.

22. Ndakisa nini malamu ba Témoins de Jɛ́hovah ya Afrike bapesaki ntango bazwaki minyoko makasi?

22 Kasi likambo nini bakonzi baleki liboso bakoki komizela na yango epai na baklisto? Ndelo ezali kati na makambo oyo bazali kosenga epai na bango? Mituna oyo mikotalelama kati na lisolo elandi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Buku na mibeko oyo Nzambe apesaki na Yisraele ya kala ezalaki na etumbu ya liwa na kati na yango, ntango moto asali mabe moko monene. Exode 31:14; Levitike 18:29; 20:2-6; Mituya 35:30.

Bozongeli?

◻ Ndenge nini moto akoki ‘kotombokela’ bakonzi baleki liboso?

◻ Ebongiseli ya Nzambe’ ezali nini mpo na oyo etali bakonzi ya Lela?

◻ Na ndimbola nini bakonzi bazali ‘kobangisa’?

◻ Ndenge nini biyangeli ya bato bizali kosala lokola basali na Nzambe’?

23. Mituna nini mitikali mpo na kotalelama lisusu?

[Etanda na lokasa 21]

Mokanda ya commissaire de police moko

FILIALE ya la Societé Watch Tower na Brézil ezwaki mokanda moko ekomami na papier en-tete ya “Service public de l’Etat de Minas Gerais”. Eutaki epai na commissaire de police ya engumba ya conquista. Likambo moko ya mabe esalemaki kuna? Totika mokanda yango moko epesa eyano

“Messieurs,

“Mpo na kobanda mokanda oyo, nalingi komiyebisa: nazali commissaire de police ya engumba ya conquista (Minas Gerais) uta pene na mibu misato. Namekaki ntango nyonso kokokisa mosala na ngai na lisosoli malamu, kasi nakutanaki na nkaka mpo na kotya kimya kati na boloko. Atako bakangami bayekolaki mpenza mosala, bazalaki ntango nyonso se na mobulu

“Ekoki sikawa mwa basanza, Monsieur O​——​ akomaki na engumba na biso. Amiyebisaki ete azali Témoin de jéhovah mpe abandaki kosakola Biblia epai na bakangami mosusu. Alakisaki bango kotanga mpe kokoma mpe alakisaki bango mibeko ya ebandeli ya bopeto mpe ya kozala malamu na bato, kokobaka mpe na koteya bango Biblia Mosantu. Na lolenge oyo azalaki kosala mosala na ye, mosakoli wana azalaki komonisa boboto, bolingo mpe komipesa. Etambweli ya bakangami eumelaki te na kobongwana nokinoki, likambo oyo ezalaki mpenza likamwisi kitoko mpo na baoyo bazalaki komona yango

“Na kotalela makambo oyo maleki kati na boloko na biso, nazali kotonda mpenza la Société Watch Tower mpo na mosala kitoko oyo mosakoli wana ya makoki asali kati na engumba na biso.”

Mpo na oyo etali bokonzi na Leta, ntoma Paulo alobaki ete: “Salaka bobele malamu mpe okozala na lokumu epai na ye.” (Baloma 13:3) Maloba oyo malongisamaki mpenza kati na likambo oyo touti koyebisa. Nsango malamu ekokisaki bobele na mwa ba sanza makambo oyo ebongiseli ya boloko elongaki te na kokokisa yango uta bambula mingi. Oyo nde litatoli kitoko oyo ezali komonisa nguya na Liloba na Nzambe mpo na kobongola bato! Nzembo 19:7-9

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto